< ᏉᎳ ᏧᏬᏪᎳᏅᎯ ᏔᎵᏁ ᏗᎹᏗ ᏧᏬᏪᎳᏁᎸᎯ 1 >

1 ᎠᏴ ᏉᎳ ᎠᎩᏅᏏᏛ ᏥᏌ ᎦᎶᏁᏛ ᏅᏧᎵᏍᏙᏔᏅ ᎤᏁᎳᏅᎯ ᎣᏏ ᎤᏰᎸᏅᎢ, ᎾᏍᎩᏯ ᎠᏚᎢᏍᏛ ᎬᏂᏛ ᎡᎩᏁᏗᏱ, ᎾᏍᎩ ᎦᎶᏁᏛ ᏥᏌ ᏨᏗᏓᎴᎲᏍᎦ;
Ngai Polo, ntoma ya Yesu-Klisto, kolanda mokano ya Nzambe, mpo na kosakola bomoi oyo Nzambe alaka kati na Yesu-Klisto;
2 ᏫᎬᏲᏪᎳᏏ ᏗᎹᏗ ᎬᎨᏳᎢ ᎠᏇᏥ; ᎬᏩᎦᏘᏯ ᎤᏓᏙᎵᏍᏗ ᎨᏒ ᎠᎴ ᎤᏓᏙᎵᏣᏛ ᎨᏒ ᎠᎴ ᏅᏩᏙᎯᏯᏛ ᏕᏣᎧᎿᎭᏩᏗᏙᎮᏍᏗ ᏅᏓᏳᎾᎵᏍᎪᎸᏔᏅᎯ ᎤᏁᎳᏅᎯ ᎢᎩᏙᏓ ᎠᎴ ᎦᎶᏁᏛ ᏥᏌ ᎢᎦᏤᎵ ᎤᎬᏫᏳᎯ.
Epai ya Timote, mwana na ngai ya bolingo: Tika ete ngolu, boboto mpe kimia epesamela yo kowuta na Nzambe Tata mpe na Yesu-Klisto, Nkolo na biso!
3 ᏥᏯᎵᎡᎵᏤ ᎤᏁᎳᏅᎯ, ᎾᏍᎩ ᏥᏕᏥᏯᏁᎶᏗ, ᎾᏍᎩᏯ ᏗᎩᎦᏴᎵᎨ ᏄᎾᏛᏁᎸᎢ, ᏥᎬᏗᎭ ᎦᏓᎭ ᏂᎨᏒᎾ ᎠᏆᏓᏅᏙ, ᏂᏥᏲᎯᏍᏗᏍᎬᎾ, ᎢᎦ ᎠᎴ ᏒᏃᏱ ᎬᏯᏅᏓᏗᏍᎬ ᎦᏓᏙᎵᏍᏗᏍᎬᎢ,
Nazali kozongisa matondi epai ya Nzambe oyo nasalelaka na motema peto ndenge bakoko na ngai bazalaki kosala, pamba te tango nyonso, ezala butu to moyi, nabosanaka yo te na mabondeli na ngai.
4 ᎾᏍᎩ ᎤᏣᏘ ᎠᏆᏚᎵᏍᎬ ᎬᎪᏩᏛᏗᏱ, ᎠᎴ ᎦᏅᏓᏗᏍᎬ ᏕᏣᏠᏱᎸᎢ ᎾᏍᎩᏃ ᎠᎩᎧᎵᎢᏍᏗᏱ ᎤᎵᎮᎵᏍᏗ ᎨᏒᎢ,
Tango nakanisaka mpinzoli na yo, nakomaka na posa makasi ya komona yo mpo ete natondisama na esengo.
5 ᎢᏳᏃ ᎦᏅᏓᏓ ᎤᏠᎾᏍᏗ ᏂᎨᏒᎾ ᎪᎯᏳᏗ ᎨᏒ ᏥᏣᏯᎠ, ᎾᏍᎩ ᎢᎬᏱ ᏧᏯᎥ ᏣᎵᏏ ᎶᏏ ᎠᎴ ᏣᏥ ᏳᏂᏏ, ᎠᎴ ᏄᏜᏓᏏᏛᏒᎾ ᎠᎩᏰᎸᎭ ᏂᎯ ᎾᏍᏉ ᏣᏯᎥᎢ.
Nakanisaka bosolo ya kondima na yo, oyo Loyisi, koko na yo ya mwasi, mpe Enise, mama na yo, bazalaki na yango, kondima oyo nandimisami solo ete ezali mpe kati na yo.
6 ᎾᏍᎩ ᎢᏳᏍᏗ ᎬᏯᏅᏓᏗᏍᏗᎭ ᏣᏖᎸᏗᏱ ᎤᏁᎳᏅᎩ ᏣᏁᎸᎯ ᎨᏒᎢ, ᎾᏍᎩ ᏥᏣᏯᎠ, ᎾᏍᎩ ᏕᎬᏯᏏᏔᏛ ᏥᏅᏗᎦᎵᏍᏙᏗᎭ.
Yango wana nazali kolendisa yo ete olamusa lisusu likabo oyo Nzambe apesaki yo tango natiaki yo maboko.
7 ᎤᏁᎳᏅᎯᏰᏃ ᎥᏝ ᏱᎩᏁᎸ ᎠᏓᏅᏙ ᎤᏓᏍᎦᏍᏗ, ᎤᎵᏂᎩᏛᏍᎩᏂ ᎠᎴ ᎠᏓᎨᏳᏗ ᎨᏒ ᎠᎴ ᎣᏍᏛ ᎠᏓᏅᏖᏗ ᎨᏒᎢ.
Pamba te Molimo oyo Nzambe apesa biso akomisaka biso te bato ya kobanga-banga, kasi apesaka biso makasi, bolingo mpe mayele.
8 ᎾᏍᎩ ᎢᏳᏍᏗ ᏞᏍᏗ ᏯᏕᎰᏍᎨᏍᏗ ᎯᏃᎮᏍᎬ ᎤᎬᏫᏳᎯ ᎢᎦᏤᎵᎦ, ᎠᎴ ᏞᏍᏗ ᏱᏍᏆᏕᎰᏍᎨᏍᏗ ᎠᏴ ᏥᏴᎩ ᎾᏍᎩ ᎤᏤᎵᎦ, ᏤᎳᏗᏍᏗᏍᎨᏍᏗᏍᎩᏂ ᎠᎩᎵᏲᎬ ᎣᏍᏛ ᎧᏃᎮᏛ, ᏣᏍᏕᎵᏍᎨᏍᏗ ᎤᎵᏂᎩᏗ ᎨᏒ ᎤᏁᎳᏅᎯ,
Boye, koyoka soni te mpo na kotatola na tina na Nkolo na biso to mpe na tina na ngai oyo nakangami na boloko mpo na Ye, kasi mona pasi elongo na ngai mpo na Sango Malamu kolanda makasi oyo Nzambe azali kopesa yo,
9 ᎾᏍᎩ ᎢᎩᏍᏕᎸᏛ ᏥᎩ, ᎠᎴ ᎢᎩᏯᏅᏛ ᏥᎩ ᎤᏩᏔᏅᎯ ᎦᎸᏉᏗ ᎠᏓᏯᏅᏗ ᎨᏒᎢ, ᎥᏝ ᎠᏴ ᏕᎩᎸᏫᏍᏓᏁᎲ ᏱᏅᏧᎵᏍᏙᏔᏅ, ᎤᏩᏒᏍᎩᏂ ᎤᏓᏅᏖᎸᎢ ᎠᎴ ᎬᏩᎦᏘᏯ ᎤᏓᏙᎵᏍᏗ ᎨᏒ ᏅᏧᎵᏍᏙᏔᏅ, ᎾᏍᎩ ᎢᎩᏁᎸᎯ ᏥᎩ ᏅᏧᏓᎴᏅᎲᎾ, ᏥᏌ ᎦᎶᏁᏛ ᎨᏒ ᎢᏳᏍᏗ, (aiōnios g166)
pamba te abikisaki biso mpe abengaki biso mpo ete totambola na bomoi ya bule. Mpe soki asalaki bongo, ezali te mpo na misala na biso, kasi ezali nde mpo na mabongisi mpe ngolu na Ye moko kaka, ngolu oyo apesaki biso kati na Yesu-Klisto liboso ya ebandeli ya tango. (aiōnios g166)
10 ᎪᎯᏃ ᎨᏒ ᎬᏂᎨᏒ ᎢᎬᏁᎸᎯ ᎾᏍᎩ ᎤᎾᏄᎪᏥᎸ ᎢᎩᏍᏕᎵᏍᎩ ᏥᏌ ᎦᎶᏁᏛ, ᎾᏍᎩ ᎤᏲᏍᏔᏅᎯ ᏥᎩ ᎠᏲᎱᎯᏍᏗ ᎨᏒ, ᎠᎴ ᎤᎾᏄᎪᏫᏒᎯ ᏥᎩ ᎬᏂᏛ ᎠᎴ ᎠᏲᎱᎯᏍᏗ ᏂᎨᏒᎾ ᎨᏒ, ᎣᏍᏛ ᎧᏃᎮᏛ ᎬᏔᏅᎯ,
Nzokande ngolu yango emonani sik’oyo na nzela ya koya ya Yesu-Klisto, Mobikisi na biso, oyo asilisaki nguya ya kufa mpe atalisaki bosolo ya bomoi ya seko na nzela ya Sango Malamu.
11 ᎾᏍᎩ ᎠᏴ ᎥᎩᏁᏤᎸᎯ ᎦᎵᏥᏙᎲᏍᎩ ᎠᎴ ᎥᎩᏅᏏᏛ ᎠᎴ ᏗᎦᏥᏰᏲᎲᏍᎩ ᏧᎾᏓᎴᏅᏛ ᏴᏫ.
Ezali mpo na Sango Malamu yango nde Nzambe atiaki ngai moteyi, ntoma mpe molakisi.
12 ᎾᏍᎩ ᎾᏍᏉ ᏅᏗᎦᎵᏍᏙᏗᎭ ᎯᎠ ᎾᏍᎩ ᏧᏓᎴᏅᏛ ᏥᎩᎵᏲᎦ; ᎠᏎᏃ ᎥᏝ ᏱᎦᏕᎣᏍᎦ; ᏥᎦᏔᎭᏰᏃ ᎾᏍᎩ ᏥᏥᏯᎵᏍᎦᏍᏙᏔᏅ, ᎠᎴ ᎤᎵᏂᎩᏗᏳ ᎠᏉᎯᏳᎭ ᏰᎵᏉ ᎬᏩᏍᏆᏂᎪᏙᏗ ᎨᏒ ᎾᏍᎩ ᏥᏥᏯᎨᏅᏴ ᎬᏂ ᎾᎯᏳ ᎢᎦ ᎠᏍᏆᎸᎲᎭ.
Ezali mpe mpo na Sango Malamu yango nde nazali komona pasi oyo. Kasi atako bongo, nazali koyoka soni te, pamba te nayebi nani oyo ngai nandimela, mpe nazali na elikya ete azali na makoki ya kobatela nyonso oyo apesa ngai, kino na mokolo wana.
13 ᏕᏣᏂᏴᏎᏍᏗ ᎾᏍᎩ ᏗᏣᏟᎶᏍᏔᏅᎯ ᎣᏍᏛ ᎧᏃᎮᏛ ᎾᏍᎩ ᏍᏆᏛᎦᏁᎸᎯ ᏥᎩ, ᎲᏗᏍᎨᏍᏗ ᎪᎯᏳᏗ ᎨᏒ ᎠᎴ ᎠᏓᎨᏳᏗ ᎨᏒ ᎾᏍᎩ ᎦᎶᏁᏛ ᏥᏌ ᏅᏓᏳᏓᎴᏅᎯ.
Kamata lokola ndakisa, mateya ya sembo oyo nateyaki yo mpe salela yango kolanda kondima mpe bolingo oyo tozali na yango kati na Yesu-Klisto.
14 ᎾᏍᎩ Ꮎ ᎣᏍᏛ ᏤᏣᎨᏅᏴ ᏣᏍᏆᏂᎪᏕᏍᏗ, ᏣᏍᏕᎵᏍᎨᏍᏗ ᎦᎸᏉᏗᏳ ᎠᏓᏅᏙ ᎾᏍᎩ ᏥᎩᏯᎠ.
Batela yango malamu lokola bomengo, na lisungi ya Molimo Mosantu oyo avandaka kati na biso.
15 ᎯᎠ ᎾᏍᎩ ᎯᎦᏔᎭ, ᏂᎦᏛ ᎡᏏᏱ ᎠᏁᎯ ᎬᏋᏕᏨᎢ, ᎾᏍᎩ ᎤᎾᏓᏑᏯ ᏆᏤᎳ ᎠᎴ ᎭᎹᏥᏂ.
Oyebi malamu ete bato nyonso oyo bazali kati na mokili ya Azia bakimaki ngai; kati na bango, tozali na Fijele mpe Erimojene.
16 ᎤᎬᏫᏳᎯ ᏧᏁᏗ ᎨᏎᏍᏗ ᎤᏓᏙᎵᏍᏗ ᎨᏒ ᏚᏓᏘᎿᎭᎥ ᎣᏁᏏᏉᎳ, ᏯᏃᏰᏃ ᎠᎩᎦᎵᏍᏓᏗᏍᎬᎩ, ᎠᎴ ᎥᏝ ᏯᏉᏕᎰᎯᏎᎮ ᎠᏆᏤᎵ ᏧᏓᏕᏒᏛ;
Tika ete Nkolo atalisa ngolu na Ye epai ya libota ya Onezifore, pamba te abondisaki ngai mbala mingi mpe ayokaki soni te mpo na minyololo na ngai.
17 ᎶᎻᏍᎩᏂ ᎤᏪᏙᎸ ᎤᎵᏂᎩᏛ ᎠᎩᏲᎸᎩ, ᎠᎴ ᎠᎩᏩᏛᎲᎩ.
Kutu tango akomaki na Rome, asalaki nyonso mpo na koluka ngai kino amonaki ngai.
18 ᎤᎬᏫᏳᎯ ᎤᏁᏗ ᎨᏎᏍᏗ ᎤᏩᏛᏗᏱ ᎤᏓᏙᎵᏍᏗ ᎨᏒ ᎤᎬᏫᏳᎯ ᎾᎯᏳ ᎢᎦ. ᎠᎴ ᏂᎦᎥ ᎠᎩᏍᏕᎸᎯᏙᎸ ᎡᏈᏌ ᎣᏏᏳ ᎯᎦᏔᎭ.
Tika ete, na mokolo wana, Nkolo atalisa ngolu na Ye epai ya Onezifore! Oyebi lisusu malamu ndenge nini asungaki ngai kati na Efeso.

< ᏉᎳ ᏧᏬᏪᎳᏅᎯ ᏔᎵᏁ ᏗᎹᏗ ᏧᏬᏪᎳᏁᎸᎯ 1 >