< ᏉᎳ ᏧᏬᏪᎳᏅᎯ ᎢᎬᏱᏱ ᏗᎹᏗ ᏧᏬᏪᎳᏁᎸᎯ 6 >

1 ᎾᏂᎥ ᏗᎨᏥᎾᏝᎢ ᎾᏍᎩ ᏗᎨᏥᎩᎳᎾᎳ ᏥᎩ ᎤᏣᏘ ᏧᏂᎸᏉᏗᏳ ᎨᏎᏍᏗ ᏗᎬᏩᏂᎾᏝᎢ, ᎾᏍᎩ ᏚᏙᎥ ᎤᏁᎳᏅᎯ ᎠᎴ ᎤᏤᎵ ᏗᏕᏲᏗ ᎨᏒ ᎠᏐᏢᎯ ᎢᏳᎵᏍᏙᏗᏱ ᏂᎨᏒᎾ.
Bato nyonso oyo bazali bawumbu basengeli kotala bankolo na bango lokola bato oyo babongi na limemia makasi, mpo ete Kombo ya Nzambe mpe malakisi na biso efingama te.
2 ᎾᏃ ᎠᏃᎯᏳᎲᏍᎩ ᏗᎬᏩᏂᎾᏝᎢ ᎨᏒ ᏞᏍᏗ ᏱᏚᏂᏂᏆᏘᎴᏍᏗ ᏱᏅᏗᎦᎵᏍᏙᏗᏍᎨᏍᏗ ᎠᎾᎵᏅᏟ ᎨᏒᎢ, ᎪᎱᏍᏗᏍᎩᏂ ᏓᎾᏛᏁᎮᏍᏗ ᏅᏗᎦᎵᏍᏙᏗᏍᎨᏍᏗ ᎠᏃᎯᏳᎲᏍᎩ ᎠᎴ ᎨᏥᎨᏳᎢ ᎨᏒᎢ, ᎤᎾᏠᏯᏍᏗᏍᎩ ᎣᏍᏛ ᎾᎦᏛᏁᎸᎢ. ᎾᏍᎩ ᎯᎠ ᏄᏍᏕᏍᏗ ᏕᎭᏕᏲᎲᏍᎨᏍᏗ, ᎠᎴ ᏕᎯᏁᏤᎮᏍᏗ.
Bawumbu oyo bankolo na bango bazali bandimi basengeli te kozanga kotosa bankolo na bango, atako bazali bandeko mpe balingami na bango kati na Klisto; nzokande, basengeli kutu kosalela bankolo na bango malamu koleka, pamba te bankolo, oyo bazali kozwa bolamu kowuta na mosala ya bawumbu, bazali motuya epai na bango bawumbu lokola bandeko balingami. Yango nde malakisi oyo osengeli kopesa mpe kosenga na bato ete batosa yango.
3 ᎢᏳᏃ ᎩᎶ ᎤᏣᏘᏂ ᏂᎦᏪᏍᎨᏍᏗ ᏓᏕᏲᎲᏍᎨᏍᏗ, ᎠᎴ ᎣᏏ ᎾᏰᎸᏍᎬᎾ ᎢᎨᏎᏍᏗ ᎣᏍᏛ ᎤᏬᏂᏒ ᎢᎦᏤᎵ ᎤᎬᏫᏳᎯ ᏥᏌ ᎦᎶᏁᏛ, ᎠᎴ ᏗᏕᏲᏗ ᎨᏒ ᎾᏍᎩ ᎤᏁᎳᏅᎯ ᏗᏂᎶᏙᏗ ᎨᏒ ᏥᏓᏕᏲᎲᏍᎦ;
Soki moto apesi malakisi mosusu mpe aboyi kokangama na maloba ya solo ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso, elongo na malakisi oyo ekoki na botosi kati na makambo ya Nzambe,
4 ᎾᏍᎩ Ꮎ ᎤᏢᏉᏗ, ᎪᎱᏍᏗ ᎾᎦᏔᎲᎾ, ᎤᎵᏰᏔᏁᎯ ᎦᏬᏂᎯᏍᏗ ᎨᏒ, ᎠᎴ ᏧᏘᏲᏌᏘ ᎠᎵᏃᎮᏍᎬᎢ, ᎾᎿᎭᏨᏗᏓᎴᎲᏍᎦ ᎠᏛᏳᎨᏗ ᎨᏒᎢ, ᎠᎴ ᎠᏗᏒᏍᏗ ᎨᏒᎢ, ᎠᎴ ᎠᏐᏢᎢᏍᏙᏗ ᎨᏒᎢ, ᎠᎴ ᎪᎱᏍᏗ ᏗᏓᏕᎵᏎᏗ ᎨᏒᎢ,
azali moto na lolendo, ayebi eloko te, azali kobela bokono ya kotia tembe mpe ya koswana na tina na maloba oyo ebotaka zuwa, koswana, kofingana, kokaniselana mabe
5 ᎠᎴ ᎬᏍᎦᎢᏍᏓᎩ ᎤᏂᏬᏂᎯᏍᏗ ᎨᏒ ᏴᏫ ᎤᎪᏏᏛ ᏧᎾᏓᏅᏘ, ᎤᏂᏂᎩᏛ ᏚᏳᎪᏛᎢ, ᎨᏅᎢᏍᏗ ᎨᏒ ᎤᏁᎳᏅᎯ ᏗᏁᎶᏙᏗ ᎢᏧᎳᎭ ᎠᏁᎵᏍᎩ. ᎾᏍᎩ ᎢᏳᎾᏍᏗ ᏕᎭᏓᏅᎡᎮᏍᏗ.
mpe tembe oyo esilaka te kati na bato oyo mayele na bango ebeba, oyo bayebaka lisusu solo te mpe bakanisaka ete kozala sembo epai na Nzambe ezali nzela ya kozwa bomengo.
6 ᎤᏁᎳᏅᎯᏍᎩᏂ ᏗᏁᎶᏙᏗ ᎨᏒ ᎠᎴ ᏅᏩᏙᎯᏯᏛ ᎠᏓᏅᏓᏗᏍᏗ ᎨᏒ, ᎾᏍᎩ ᎤᏣᏘ ᎨᏅᎢᏍᏗ.
Solo, kozala sembo epai na Nzambe ezali nzela monene ya kozwa bomengo soki kaka oyebi kosepela na oyo ozali na yango.
7 ᏝᏰᏃ ᎪᎱᏍᏗ ᏱᎩᏲᎴ ᎠᏂ ᎡᎶᎯ, ᎠᎴ ᎬᏂᎨᏳᎢᏳ Ꮭ ᎪᎱᏍᏗ ᏴᎨᏗᏄᎪᏩ.
Pamba te, toyaki maboko pamba kati na mokili, mpe tokozonga maboko pamba.
8 ᎢᏳᏃ ᏱᎩᎭ ᎠᎵᏍᏓᏴᏗ ᎠᎴ ᏗᎦᏄᏬ ᏱᏗᎩᎾᎠ, ᎾᏍᎩ ᏰᎵᏉ ᎢᎩᏰᎸᏎᏍᏗ.
Mpe lokola tokozalaka na bilei mpe na bilamba, tokosepelaka na yango.
9 ᎤᎾᏚᎵᏍᎩᏍᎩᏂ ᏥᎩ ᎤᏁᏅᎢᏍᏗᏱ, ᎤᏓᎴᎾᏍᏗᏱ ᎠᎴ ᎠᏌᏛ ᏫᏓᏂᏅᎪᎢ, ᎠᎴ ᎤᏣᏘ ᎢᏳᏓᎴᎩ ᎤᎵᏍᎦᏂᏍᏛ ᎠᎴ ᎤᏲ ᎢᏯᏓᏛᏁᎯ ᎠᎬᎥᎯᏍᏗ ᎨᏒᎢ; ᎾᏍᎩ ᏥᏚᏂᏃᏴᏘᏍᏗᎭ ᏴᏫ ᎾᎿᎭᎠᎩᎵᏲᎢᏍᏗ ᎨᏒ ᎠᎴ ᎠᏲᎱᎯᏍᏗ ᎨᏒᎢ.
Bato oyo balingaka kokoma na bomengo bakweyaka kati na komekama mpe bakangamaka na mitambo ya baposa mingi ya bozoba mpe ya mabe, oyo ememaka bango na libebi mpe na kufa.
10 ᎠᏕᎸᏰᏃ ᏗᎨᏳᏗ ᎨᏒ ᎾᎿᎭᏗᏓᎴᎲᏍᎦ ᏄᏓᎴᏒ ᎤᏲᎢ, ᎾᏍᎩ ᎩᎶ ᎤᏂᎬᎥᏍᎬᎢ ᎤᎾᏞᏒ ᎪᎯᏳᏗ ᎨᏒᎢ, ᎠᎴ ᎤᏅᏒ ᏚᎾᏓᏘᏍᏔᏅ ᎤᏣᏘ ᎤᏲ ᎠᏓᏅᏓᏗᏍᏗ ᎨᏒᎢ.
Pamba te lokoso ya mbongo ezali mosisa ya mabe nyonso. Mpo na lokoso ya mbongo, bato mingi babungisaki kondima na bango mpe bamipesaki minyoko ebele.
11 ᏂᎯᏍᎩᏂ ᎯᏍᎦᏯ ᎤᏁᎳᏅᎯ ᎤᏤᎵᎦ ᎾᏍᎩ ᎯᎠ ᏕᎭᏓᏅᎡᎮᏍᏗ, ᎠᎴ ᏕᎯᏍᏓᏩᏗᏎᏍᏗ ᏚᏳᎪᏛ ᎨᏒᎢ, ᎠᎴ ᎤᏁᎳᏅᎯ ᎦᎾᏰᎯᏍᏗ ᎨᏒᎢ, ᎠᎴ ᎪᎯᏳᏗ ᎨᏒᎢ, ᎠᎴ ᎠᏓᎨᏳᏗ ᎨᏒᎢ, ᎠᎴ ᎬᏂᏗᏳ ᎨᏒᎢ, ᎠᎴ ᎤᏓᏅᏘᏳ ᎨᏒᎢ.
Kasi yo, moto na Nzambe, kima makambo nyonso wana; luka nde bosembo, botosi kati na makambo ya Nzambe, kondima, bolingo, molende mpe boboto.
12 ᎪᎯᏳᏗ ᎨᏒ ᎲᏗᏍᎨᏍᏗ ᎣᏍᏛ ᎠᎵᏍᏗ ᎨᏒ ᎭᎵᎮᏍᏗ. ᎾᎵᏍᏆᏗᏍᎬᎾ ᎬᏂᏛ ᎨᏒ ᏘᏂᏴ, ᎾᎿᎭᎾᏍᏉ ᎡᏣᏯᏅᏛ ᏥᎩ, ᎠᎴ ᏣᏃᏅᎯ ᏥᎩ ᎣᏍᏛ ᎧᏃᎮᏗ ᎨᏒ ᎤᏂᏣᏘ ᎠᏂᎦᏔᎯ ᎠᏂᏚᏔᎲᎢ. (aiōnios g166)
Bunda etumba ya malamu ya kondima, zwa bomoi ya seko, pamba te Nzambe abengaki yo mpo oyeba yango tango otatolaki malamu kondima na yo liboso ya batatoli ebele. (aiōnios g166)
13 ᎬᏁᏤᎭ ᎤᏁᎳᏅᎯ ᎠᎦᏔᎲᎢ, ᎾᏍᎩ ᏗᎬᏂᏗᏍᎩ ᏥᎩ ᏂᎦᎥ ᏄᎾᏓᎴᏒᎢ, ᎠᎴ ᎠᎦᏔᎲ ᏥᏌ ᎦᎶᏁᏛ ᎾᏍᎩ ᏆᏂᏗ ᏆᎴᏗ ᎠᎦᏔᎲ ᎤᏃᏅᎯ ᏥᎩ ᎣᏍᏛ ᎧᏃᎮᏛ ᎨᏒᎢ,
Tala makambo oyo nazali kotinda yo, liboso ya Nzambe oyo apesaka bomoi epai na bikelamu nyonso, mpe liboso ya Yesu-Klisto oyo atatolaki malamu bosolo liboso ya Ponse Pilato:
14 ᎾᏍᎩ ᏣᏍᏆᏂᎪᏙᏗᏱ ᏗᎧᎿᎭᏩᏛᏍᏗ, ᏄᏓᏓᎸᎾ ᎠᎴ ᎪᎱᏍᏗ ᎦᏰᏤᎵᏎᏗ ᏂᎨᏒᎾ ᎢᏳᎵᏍᏙᏗᏱ ᎢᎦᏤᎵ ᎤᎬᏫᏳᎯ ᏥᏌ ᎦᎶᏁᏛ ᎦᎾᏄᎪᏥᎸ ᎬᏗᏍᎩ,
Batela mobeko oyo, kokakola yango ata moke te, mpe sala ete bamona yo na pamela ata moko te, kino Yesu-Klisto, Nkolo na biso, akoya
15 ᎾᏍᎩ ᏨᎦᎾᏄᎪᏫᏏ ᎾᎯᏳ ᏧᎾᏄᎪᏫᏎᏗ ᎨᏒᎢ, ᎾᏍᎩ ᏅᏩᏙᎯᏯᏛ ᎤᏓᏅᏘ ᎠᎴ ᎤᏩᏒᎯ ᎤᎵᏂᎩᏛ ᎨᏒᎢ, ᎤᎬᏫᏳᎯ ᎤᏂᎬᏫᏳᎯ ᎠᏁᎲᎢ, ᎠᎴ ᎤᎬᏫᏳᏌᏕᎩ ᏄᏂᎬᏫᏳᏌᏕᎩ ᎠᏁᎲᎢ;
na tango oyo ekatama na Ye oyo azali Nkolo-Na-Esengo, Nkolo se moko na nguya nyonso, Mokonzi ya bakonzi, Nkolo ya bankolo,
16 ᎾᏍᎩ ᎤᏩᏒᎯ ᎠᏲᎱᎯᏍᏗ ᏂᎨᏒᎾ ᎨᏒ ᎤᎯ, ᎢᎦᎦᏛ ᎡᎯ ᎨᏒᎢ, ᎾᏍᎩ ᎢᎦᎦᏛ ᎾᎿᎭᎩᎶ ᎬᏩᎷᎯᏍᏗ ᏂᎨᏒᎾ ᎨᏒᎢ, ᎾᏍᎩ ᎩᎶ ᎤᎪᎲᎩ ᏂᎨᏒᎾ, ᎠᎴ ᎬᏩᎪᏩᏛᏗ ᏂᎨᏒᎾ ᎨᏒᎢ; ᎾᏍᎩ ᎠᏥᎸᏉᏗᏳ ᎨᏎᏍᏗ ᎠᎴ ᎤᎵᏂᎩᏗ ᎨᏒ ᏫᎾᏍᏛᎾ ᎨᏎᏍᏗ. ᎡᎺᏅ. (aiōnios g166)
Ye oyo azali se moko oyo akufaka te, avandaka kati na pole oyo moto ata moko te akoki kopusana pene na yango, Ye oyo moto ata moko te atikala komona, mpe oyo moto moko te akoki komona. Tika ete lokumu mpe nguya ezala ya Ye mpo na libela! Amen! (aiōnios g166)
17 ᎩᏁᏤᎮᏍᏗ ᏧᏁᎿᎭᎢ ᏥᎩ ᎠᏂ ᎡᎶᎯ ᎾᏍᎩ ᎤᎾᏢᏉᏗ ᏱᏉ ᏂᎨᏒᎾ, ᎠᎴ ᎤᎾᎵᏍᎦᏍᏙᏙᏗᏱ ᏂᎨᏒᎾ ᎤᏓᎵᏓᏍᏗ ᎨᏅᎢᏍᏗ ᎨᏒᎢ, ᎤᏁᎳᏅᎯᏍᎩᏂ ᎬᏂᏛ ᎠᎾᎵᏍᎦᏍᏙᏗᏍᎨᏍᏗ ᎾᏍᎩ ᎤᏣᏘ ᎢᎩᏁᎯ ᏥᎩ ᎾᎦᎥ ᏄᏓᎴᏒ ᎣᏍᏛ ᎢᎦᎵᏍᏓᏁᏗ. (aiōn g165)
Pesa mitindo epai ya bazwi kati na mokili oyo ete bazala na lolendo te mpe batia elikya te na bomengo, pamba te bomengo ekoki kosila; kasi tika ete batia elikya na bango kati na Nzambe oyo apesaka biso biloko nyonso, na bofuluki, mpo ete tosepela na yango. (aiōn g165)
18 ᎠᎴ ᎣᏍᏛ ᎾᎾᏛᏁᎮᏍᏗ, ᎠᎴ ᎤᏁᎿᎭᎢᏳ ᎨᏎᏍᏗ ᎣᏍᏛ ᎾᎾᏛᏁᎲᎢ, ᎠᎴ ᎠᏂᎦᎵᏰᏍᏗ ᎤᎾᏓᏁᏗᏱ, ᎠᏂᏯᏙᎯᎯ ᎨᏎᏍᏗ ᎤᏂᎲᎢ,
Pesa bango mitindo ete basalaka bolamu, batonda na misala malamu, bazala na motema ya kokaba mpe bakabelaka bato.
19 ᎠᎾᏓᏁᎸᏍᎨᏍᏗ ᎤᏅᏒ ᎤᎾᏤᎵᎦ ᎣᏍᏛ ᎦᎫᏍᏛᏗ ᎠᏏ ᎾᏍᏆᎵᏍᎬᎾ ᎾᎯᏳ ᎤᏍᏆᎸᏗ ᏥᎩ, ᎾᏍᎩ ᎾᎵᏍᏆᏗᏍᎬᎾ ᎬᏂᏛ ᏗᎬᏩᏂᏂᏴᏗ ᎢᏳᎵᏍᏙᏗᏱ.
Ezali na nzela wana nde bakomibombela bomengo lokola moboko ya makasi mpo na mikolo oyo ezali koya, mpo ete bakoka kozwa bomoi ya solo.
20 ᏗᎹᏗ, ᏣᏍᏆᏂᎪᏕᏍᏗ ᎾᏍᎩ ᏤᏣᎨᏅᏴ, ᎢᏴᏛ ᏅᏁᎮᏍᏗ ᎦᏪᏢᏗ ᎨᏒ ᎠᎴ ᎠᏎᏉᏉ ᎦᏬᏂᎯᏍᏗ ᎨᏒᎢ, ᎠᎴ ᎠᏗᏒᏍᏗ ᎨᏒ ᎠᎦᏙᎥᎯᏍᏗ ᏂᏚᏳᎪᏛᎾ ᏥᏚᏙᎥ;
Timote, batela malamu nyonso oyo Nzambe apesa yo. Kima bilobaloba ya bato oyo bafingaka Nzambe, mpe makanisi ya oyo babengaka « Boyebi » na kozanga koyeba, pamba te etongaka kondima te.
21 ᎾᏍᎩ ᎩᎶ ᎠᏂᏍᏓᏩᏗᏒ ᎤᎾᏞᏒ ᎪᎯᏳᏗ ᎨᏒᎢ. [ ᎤᏁᎳᏅᎯ ] ᎤᏓᏙᎵᏍᏗ ᎨᏒ ᏕᏣᎧᏩᏗᏙᎮᏍᏗ. ᎡᎺᏅ.
Bato mingi babungisaki kondima na bango mpo ete bakangamaki na boyebi yango. Tika ete ngolu ezala elongo na bino nyonso!

< ᏉᎳ ᏧᏬᏪᎳᏅᎯ ᎢᎬᏱᏱ ᏗᎹᏗ ᏧᏬᏪᎳᏁᎸᎯ 6 >