< ᏉᎳ ᏕᏏᎶᏂᎦ ᎠᏁᎯ ᏔᎵᏁ ᏧᏬᏪᎳᏁᎸᎯ 1 >

1 ᏉᎳ, ᎠᎴ ᏌᏱᎳ, ᎠᎴ ᏗᎹᏗ, ᏫᏨᏲᏪᎳᏏ ᏗᏣᏁᎶᏗ ᎢᏣᏓᏡᎬ ᏕᏏᎶᏂᎦ ᎢᏤᎯ ᎤᏁᎳᏅᎯ ᎢᎩᏙᏓ ᎠᎴ ᎤᎬᏫᏳᎯ ᏥᏌ ᎦᎶᏁᏛ ᏕᏣᏁᎶᏛᎢ.
Polo, Silasi mpe Timote; Epai ya Lingomba ya bandeko ya Tesalonika, oyo ezali kati na Nzambe, Tata na biso, mpe kati na Nkolo Yesu-Klisto:
2 ᎬᏩᎦᏘᏯ ᎤᏓᏙᎵᏍᏗ ᎨᏒ ᎠᎴ ᏅᏩᏙᎯᏯᏛ ᏕᏥᎧᎿᎭᏩᏗᏙᎮᏍᏗ ᏅᏓᏳᎾᎵᏍᎪᎸᏔᏅᎯ ᎤᏁᎳᏅᎯ ᎢᎩᏙᏓ ᎠᎴ ᎤᎬᏫᏳᎯ ᏥᏌ ᎦᎶᏁᏛ.
Tika ete ngolu mpe kimia epesamela bino kowuta na Nzambe, Tata na biso, mpe na Nkolo Yesu-Klisto!
3 ᎣᎦᏚᏓᎳ ᏂᎪᎯᎸ ᎣᏣᎵᎡᎵᏤᏗᏱ ᎤᏁᎳᏅᎯ ᏂᎯ ᎢᏓᎵᏅᏟ ᎤᎬᏩᎵ, ᏥᏚᏳᎪᏗ ᎾᏍᎩ ᎢᏲᎦᏛᏁᏗᏱ, ᏅᏗᎦᎵᏍᏙᏗᎭ ᎢᏦᎯᏳᏒ ᎤᏣᏘ ᏣᏛᏍᎦ, ᎠᎴ ᏕᏣᏓᎨᏳᏒ ᏂᏥᎥ ᎢᏥᏏᏴᏫᎭ ᎨᏒ ᎤᏣᏘ ᏥᎧᏁᏉᎦ;
Bandeko, tosengeli tango nyonso kozongisaka matondi epai ya Nzambe mpo na bino. Solo, ezali malamu mpo na biso kosalaka bongo, pamba te kondima na bino ezali se kokola mpe bolingo oyo moko na moko kati na bino azali na yango mpo na moninga na ye ezali mpe kokola.
4 ᎾᏍᎩ ᎢᏳᏍᏗ ᎠᏴ ᎣᎬᏒ ᎣᏣᏢᏈᏍᎦ ᎢᏨᏁᎢᏍᏗᏍᎬ ᏧᎾᏁᎶᏗ ᏚᎾᏓᏡᏩᏗᏒ ᎤᏁᎳᏅᎯ ᏧᏤᎵᎦ, ᎾᏍᎩ ᏗᏨᏂᏗᏳ ᎨᏒ ᎠᎴ ᎢᏦᎯᏳ ᎨᏒ ᏂᎦᎥ ᎤᏕᏯᏙᏗ ᎠᎴ ᎠᎩᎵᏯ ᎢᏥᎷᏤᎲᎢ;
Mpe kati na Mangomba ya Nzambe, tozali komikumisa na tina na molende mpe kondima na bino kati na minyoko nyonso mpe kati na pasi oyo bozali komona.
5 ᎾᏍᎩ ᎬᏂᎨᏒ ᎢᎬᏁᎯ ᏥᎩ ᎤᏁᎳᏅᎯ ᏚᏳᎪᏛ ᏧᏭᎪᏛᏗ ᏧᏭᎪᏙᏗ ᎨᏒᎢ, ᎾᏍᎩ ᏰᎵ ᎤᏁᎳᏅᎯ ᎤᏤᎵᎪᎯ ᎢᏤᎯ ᎡᏤᎵᏎᏗᏱ, ᎾᏍᎩ ᎾᏍᏉ ᎤᎬᏩᎵ ᏥᏥᎩᎵᏲᎦ.
Makambo oyo nyonso ezali kolakisa na polele ete Nzambe atalaka makambo na bosembo, mpe ete alingi kozwa bino lokola bato oyo babongi mpo na Bokonzi ya Nzambe, oyo bozali komonela pasi.
6 ᏅᏗᎦᎵᏍᏙᏗᎭ ᏚᏳᎪᏛᎢ ᎤᏁᎳᏅᎯ ᏧᎫᏴᏓᏁᏗᏱ ᎠᎩᎵᏲᎢᏍᏗ ᎨᏒ ᎾᏍᎩ Ꮎ ᎨᏥᎩᎵᏲᎢᏍᏗᏍᎩ;
Solo, Nzambe azali sembo: akozongisa pasi lokola etumbu epai ya banyokoli na bino;
7 ᏂᎯᏃ ᎡᏥᎩᎵᏲᎢᏍᏗᏍᎩ, ᎠᏣᏪᏐᎸᏍᏙᏗ ᎨᏒ ᎡᎦᎫᏴᏓᏁᏗᏱ, ᎾᎯᏳ ᎤᎬᏫᏳᎯ ᏥᏌ ᎦᎸᎶ ᏅᏓᏳᏓᎴᏅᎯ ᎬᏂᎨᏒ ᎾᎬᏁᎸᎭ ᎠᏁᎮᏍᏗ ᏧᎾᎵᏂᎩᏛ ᏧᏤᎵ ᏗᏂᎧᎿᎭᏩᏗᏙᎯ,
mpe akopesa bopemi epai na biso mpe epai na bino oyo bozali komona pasi, tango Nkolo Yesu akomimonisa wuta na Likolo, elongo na ba-anjelu na Ye ya nguya,
8 ᎠᏥᎸ ᎠᏓᏪᎵᎩᏍᎩ ᎤᏄᏬᏍᏕᏍᏗ ᏓᎩᎵᏲᎢᏍᏗᏍᎨᏍᏗ ᎾᏍᎩ Ꮎ ᏂᎬᏩᎦᏔᎲᎾ ᎤᏁᎳᏅᎯ, ᎠᎴ ᏄᏃᎯᏳᏒᎾ ᎣᏍᏛ ᎧᏃᎮᏛ ᎢᎦᏤᎵ ᎤᎬᏫᏳᎯ ᏥᏌ ᎦᎶᏁᏛ ᎤᏤᎵᎦ.
mpe kati na moto mpo na kopesa etumbu epai ya bato oyo bayebi Nzambe te mpe batosaka te Sango Malamu ya Yesu, Nkolo na biso.
9 ᎾᏍᎩ ᎨᏥᏍᏛᏗᏍᏙᏗ ᎨᏎᏍᏗ ᎨᎬᏓᏁᏗ ᏫᎾᏍᏛᎾ ᎠᏓᏛᏗᏍᎩ ᎤᎬᏫᏳᎯ ᎠᎦᏔᎲ ᏅᏓᏳᏓᎴᏅᎯ, ᎠᎴ ᎦᎸᏉᏗᏳ ᎤᎵᏂᎩᏗᏳ ᎨᏒᎢ, (aiōnios g166)
Bakozwa etumbu ya libebi ya seko na seko, mosika ya bozalisami ya Nkolo mpe ya nguya ya nkembo na Ye (aiōnios g166)
10 ᎾᎯᏳ ᏧᏤᎵ ᎤᎾᏓᏅᏘ ᎬᏩᎸᏉᏙᏗᏱ ᎤᎬᏩᎵ ᎦᎷᏨᎭ, ᎠᎴ ᎤᏍᏆᏂᎪᏗ ᏧᏓᏅᏓᏗᏍᏙᏗᏱ ᎾᏂᎥ ᎾᏍᎩ Ꮎ ᎬᏬᎯᏳᎲᏍᎩ ᎾᎯᏳ ᎢᎦ ᎨᏎᏍᏗ, ᏅᏗᎦᎵᏍᏙᏗᏍᎨᏍᏗ ᎪᎯᏳᏅᎯ ᎨᏒ ᎣᎩᏃᎮᎸ ᎢᏤᎲᎢ.
tango akoya na mokolo wana mpo na kopesamela nkembo kati na basantu na Ye, mpe lokumu kati na bandimi na Ye. Bino mpe bokozala elongo na bango, pamba te bondimaki mateya oyo toteyaki bino.
11 ᎾᏍᎩ ᎢᏳᏍᏗ ᎾᏍᏉ ᏂᎪᎯᎸ ᎣᏣᏓᏙᎵᏍᏗᏍᎪ ᎢᏨᏯᏅᏓᏗᏍᎪ, ᎾᏍᎩ ᎣᎦᏁᎳᏅᎯ ᎤᏓᏯᏅᏗ ᎨᏒ ᎢᏥᏯᏅᏔᏅᎯ ᎢᏳᎵᏍᏙᏗᏱ, ᎠᎴ ᎤᏍᏆᏗᏍᏗᏱ ᏂᎦᏛ ᎣᏍᏛ ᎤᏰᎸᏗ ᎨᏒ ᏅᏓᏳᏓᎴᏅᎯ ᎤᏓᏅᏘᏳ ᎨᏒᎢ, ᎠᎴ ᎪᎯᏳᏗ ᎨᏒ ᏧᎸᏫᏍᏓᏁᏗ ᎬᏔᏅᎯ ᎤᎵᏂᎩᏛ ᎨᏒᎢ;
Yango wana tobondelaka tango nyonso Nzambe na biso mpo na bino, mpo ete akomisa bino bato oyo babongi na bomoi oyo abengaki bino mpo na yango; mpe mpo ete, na nzela ya nguya na Ye, akokisa posa na bino ya kosala bolamu to makambo nyonso oyo kondima na bino ezali kotinda bino kosala.
12 ᎾᏍᎩ ᎢᏳᏩᏂᏐᏗᏱ ᏚᏙᎥ ᎢᎦᏤᎵ ᎤᎬᏫᏳᎯ ᏥᏌ ᏓᎶᏁᏛ ᎦᎸᏉᏗᏳ ᎢᏳᎵᏍᏙᏗᏱ ᏂᎯ ᎢᏨᏂᏌᏛ, ᎠᎴ ᏂᎯ ᎦᎸᏉᏗᏳ ᎢᏰᏨᏁᏗᏱ ᎾᏍᎩ ᎢᏳᏩᏂᏌᏛ, ᎾᏍᎩᏯ ᏄᏍᏛ ᎬᏩᎦᏘᏯ ᎤᏓᏙᎵᏍᏗ ᎨᏒ ᎢᎦᏁᎳᏅᎯ, ᎠᎴ ᎤᎬᏫᏳᎯ ᏥᏌ ᎦᎶᏁᏛ.
Tosambelaka bongo mpo ete Kombo ya Yesu, Nkolo na biso, epesamela nkembo kati na bino, mpe bino bozwa lokumu kati na Ye kolanda ngolu ya Nzambe na biso mpe ya Nkolo Yesu-Klisto.

< ᏉᎳ ᏕᏏᎶᏂᎦ ᎠᏁᎯ ᏔᎵᏁ ᏧᏬᏪᎳᏁᎸᎯ 1 >