< ᏉᎳ ᏕᏏᎶᏂᎦ ᎠᏁᎯ ᎢᎬᏱᏱ ᏧᏬᏪᎳᏁᎸᎯ 2 >

1 ᎢᏨᏒᏰᏃ ᎢᏥᎦᏔᎭ, ᎢᏓᎵᏅᏟ, ᏄᏍᏛ ᏫᏨᎷᏤᎸᎢ, ᎾᏍᎩ ᎠᏎᏉᏉ ᏂᎨᏒᎾ ᎨᏒᎢ.
Bandeko, bino moko boyebi malamu ete koya na biso epai na bino ezalaki ya pamba te.
2 ᎾᏍᏉᏍᎩᏂ ᎢᎬᏱ ᏃᎩᎩᎵᏲᏦᎢ ᎠᎴ ᏂᎪᎩᏐᏢᏃᎢ ᏈᎵᎩᏱ, ᎾᏍᎩ ᏥᏥᎦᏔᎭ, ᏃᏥᏍᎦᎢᎲᎾ ᎣᎦᏁᎳᏅᎯ ᎣᏣᎵᏍᎦᏍᏙᏛ ᎢᏨᏃᎮᎮᎸᎩ ᎣᏍᏛ ᎧᏃᎮᏛ ᎤᏁᎳᏅᎯ ᎤᏤᎵᎦ, ᏔᎵ ᎤᏛᏛᎩ ᎤᏣᏘ ᎠᏟᏂᎬᏁᏗ ᎨᏒᎢ.
Boyebi lisusu ete, sima na biso konyokwama mpe kofingama kati na Filipi, toteyaki bino, na lisungi ya Nzambe na biso mpe na molende nyonso, Sango Malamu na Ye kati na bitumba makasi.
3 ᎢᏨᏬᏁᏔᏅᏰᏃ ᎥᏝ ᎠᏓᎴᎾᏍᏗᏍᎩ ᏱᎨᏎᎢ, ᎥᏝ ᎠᎴ ᎦᏓᎭᎢ, ᎥᏝ ᎠᎴ ᎠᏠᏄᎮᏛ;
Pamba te, soki tosengaka na bato ete bandimela Nzambe, ezali te mpo ete tozali kati na libunga to totondi na makanisi ya mbindo to mpe tolukaka kokosa bato.
4 ᎤᏁᎳᏅᎯᏍᎩᏂ ᏰᎵᏉ ᏧᏰᎸᏅ ᎣᎦᎨᏅᏗᏍᏗᏱ ᎣᏍᏛ ᎧᏃᎮᏛ, ᎾᏍᎩᏯ ᎣᏥᏁᎦ; ᎥᏝ ᏴᏫᏉ ᎣᏏᏳ ᎤᏂᏰᎸᏗ, ᎤᏁᎳᏅᎯᏍᎩᏂ ᎾᏍᎩ ᏗᎪᎵᏰᏍᎩ ᏥᎩ ᏗᎩᎾᏫ.
Kasi ezali mpo ete Nzambe amekaki biso mpe amonaki ete tobongi mpo na kopesamela mokumba ya koteya Sango Malamu. Yango wana mpe toteyaka te mpo na kosepelisa bato, kasi mpo na kosepelisa Nzambe oyo ayebi mozindo ya mitema na biso.
5 ᎥᏝ ᎠᎴ ᎣᏥᏬᏂᏍᎬ ᎢᎸᎯᏳ ᎠᏎᏉ ᎠᏓᎸᏉᏙᏗ ᎨᏒ ᏲᏨᏗᏍᎨᎢ, ᎾᏍᎩ ᏥᏥᎦᏔᎭ, ᎥᏝ ᎠᎴ ᎪᎱᏍᏗ ᏲᏨᏗᏍᎨ ᏲᏧᏢᏗᏍᎨ ᏧᎬᏩᎶᏗ ᎠᎬᎥᎯᏍᏗ ᎨᏒᎢ; ᎤᏁᎳᏅᎯ ᎠᎦᏔᎯ;
Boyebi malamu ete tosalelaki maloba ya sukali te mpe totindikamaki te na posa ya konduka mbongo. Na tina na likambo oyo, Nzambe azali penza Motatoli na biso.
6 ᎥᏝ ᎠᎴ ᏴᏫ ᎪᎩᎸᏉᏙᏗᏱ ᏲᎩᏲᎮᎢ, ᎥᏝ ᏂᎯ ᏱᏨᏲᏎᎮᎢ, ᎥᏝ ᎠᎴ ᏅᏩᎾᏓᎴᎢ; ᏰᎵᏉ ᎡᎦᏃ ᎦᎨᏛ ᎢᏗᎦᏲᏨᏁᏗ ᎨᏒᎩ, ᎦᎶᏁᏛ ᎣᎩᏅᏏᏛ ᎨᏒ ᎢᏳᏍᏗ.
Tolukaki te lokumu kowuta na bato, ezala epai na bino to epai ya bato mosusu,
7 ᎣᎦᏓᏅᏘᏳᏍᎩᏂ ᎨᏒᎩ ᎢᏨᏰᎳᏗᏙᎲᎢ, ᎾᏍᎩᏯ ᏧᏓᏍᏓᎢ ᏥᏓᏍᏆᏂᎪᏗᏍᎪ ᏧᏪᏥ;
atako, lokola bantoma ya Klisto, tokokaki kosenga bino na makasi ete bosunga biso; kasi tozalaki lokola bana mike kati na bino. Ndenge mama abatelaka bana na ye,
8 ᎤᏣᏘᏃ ᎢᏨᎨᏳᏒ ᎢᏳᏍᏗ, ᎣᎦᏝᏴᏉ ᏗᏨᏲᎯᏎᏗᏱ ᎥᏝ ᎣᏍᏛ ᎧᏃᎮᏛ ᎤᏩᏒ ᎤᏁᎳᏅᎯ ᎤᏤᎵᎦ, ᎾᏍᏉᏍᎩᏂ ᎣᎬᏒ ᏙᏨᏅᎢ, ᏅᏓᎦᎵᏍᏙᏗᏍᎬᎩ ᎢᏨᎨᏳᎢᏳ ᎨᏒᎢ.
ndenge wana mpe, na bolingo monene oyo tozali na yango mpo na bino, tosepelaki kaka te kopesa bino Sango Malamu ya Nzambe, kasi tosepelaki mpe kopesa bino bomoi na biso, pamba te bokomaki motuya makasi na miso na biso.
9 ᎢᏣᏅᏔᏉᏰᏃ, ᎢᏓᎵᏅᏟ, ᏙᎩᎸᏫᏍᏓᏁᎸ ᎠᎴ ᏙᎩᏯᏪᏥᏙᎸᎢ; ᏗᎬᏩᎩᏨᏗᏰᏃ ᏙᎩᎸᏫᏍᏓᏁᎲ ᏃᎦᏚᎵᏍᎬᎾ ᎨᏒ ᎢᏳᏍᏗ ᎠᏏᏴᏫ ᏂᏣᏛᏅ ᎦᎨᏛ ᎢᏲᏨᏴᏁᏗᏱ, ᎢᏨᏯᎵᏥᏙᏁᎸᎩ ᎣᏍᏛ ᎧᏃᎮᏛ ᎤᏁᎳᏅᎯ ᎤᏤᎵᎦ.
Bandeko na ngai, bokanisa ndenge nini tomonaki pasi mpe tosalaki mosala makasi; butu mpe moyi, tozalaki kosala, pamba te toboyaki kozala mokumba epai ya moto ata moko kati na bino, wana toteyaki bino Sango Malamu ya Nzambe.
10 ᏂᎯ ᎢᏥᎦᏔᎯ ᏂᏣᎵᏍᏗᎭ, ᎠᎴ ᎾᏍᏉ ᎤᏁᎳᏅᎯ, ᏂᎦᎥ ᎾᏍᎦᏅᎾ ᎨᏒ ᎠᎴ ᏚᏳᎪᏛ ᎨᏒ, ᎠᎴ ᎦᎫᎯᏍᏙᏗ ᏂᎨᏒᎾ ᎨᏒ ᎣᎨᏙᎸ ᎢᏨᏰᎳᏗᏙᎸ ᏂᎯ ᎢᏦᎯᏳᎯ;
Bino moko bozali batatoli, Nzambe mpe azali Motatoli, ete totambolaki na bosantu, na bosembo mpe na kozanga pamela, na miso na bino oyo bozali kondima.
11 ᎾᏍᎩ ᏥᏥᎦᏔᎭ ᎢᏥᏏᏴᏫᎭ ᏂᏨᏪᏎᎸ ᎢᏨᏬᏁᏔᏅ, ᎠᎴ ᎢᏨᎦᎵᏍᏓᏛ, ᎠᎴ ᎢᏨᏰᏯᏔᏅᎢ, ᎾᏍᎩᏯ ᎠᎦᏴᎵᎨ ᏥᏂᏕᎦᏪᏎᎰ ᏧᏪᏥ,
Boyebi mpe ete tosalaki, epai ya moko na moko kati na bino, ndenge penza tata asalaka mpo na bana na ye:
12 ᎾᏍᎩ ᏂᎯ ᎢᏤᏙᎲ ᎤᏁᎳᏅᎯ ᎣᏏᏳ ᎤᏰᎸᏗ ᎢᏤᎵᏍᏗᏱ, ᎾᏍᎩ ᎢᏥᏯᏅᏛ ᏥᎩ ᏫᏥᎷᎯᏍᏗᏱ ᎤᏤᎵᎪᎯ ᎠᎴ ᎤᏤᎵ ᎦᎸᏉᏗᏳ ᏗᎨᏒᎢ.
tozalaki koteya, kolendisa mpe kotindika bino na kotambola na lolenge oyo ebongi liboso ya Nzambe oyo azali kobenga bino ete bokota kati na Bokonzi mpe nkembo na Ye.
13 ᎾᏍᎩ ᎾᏍᏉ ᏅᏗᎦᎵᏍᏙᏗᎭ ᏃᏥᏲᎯᏍᏗᏍᎬᎾ ᎣᏣᎵᎡᎵᏤᎭ ᎤᏁᎳᏅᎯ, ᎾᏍᎩ ᎢᏳᏃ ᏕᏣᏓᏂᎸᏨ ᎧᏃᎮᏛ ᎤᏁᎳᏅᎯ ᎤᏤᎵᎦ, ᎾᏍᎩ ᎠᏴ ᏍᎩᏯᏛᎦᏁᎸᎯ, ᎥᏝ ᏴᏫᏉ ᎤᎾᏤᎵ ᎧᏃᎮᏛ ᎢᏳᏍᏗ ᏱᏗᏣᏓᏂᎸᏤᎢ, ᎤᏁᎳᏅᎯᏍᎩᏂ ᎤᏤᎵ ᎧᏃᎮᏛ, ᎤᏙᎯᏳᎯᏯ ᏥᎩ, ᎾᏍᎩᏯ ᏕᏣᏓᏂᎸᏨᎩ, ᎾᏍᎩ ᎾᏍᏉ ᎤᏣᏘ ᏥᏚᎸᏫᏍᏓᏁᎭ ᏕᏣᏓᏅᏛ ᏂᎯ ᎾᏍᎩ ᎢᏦᎯᏳᏅᎯ.
Mpe tala mpo na nini tozongisaka tango nyonso matondi epai ya Nzambe: tango boyambaki Liloba na Nzambe, oyo toteyaki bino, bondimaki yango te lokola liloba oyo ewuti epai ya bato, kasi lokola penza Liloba na Nzambe, oyo ezali kosala kati na bino oyo bozali na kondima.
14 ᏂᎯᏰᏃ, ᎢᏓᎵᏅᏟ, ᏗᏥᏍᏓᏩᏕᎩ ᏂᏣᎵᏍᏔᏅᎩ ᏧᎾᏁᎶᏗ ᏚᎾᏓᏡᎬ ᎤᏁᎳᏅᎯ ᏧᏤᎵᎦ ᏧᏗᏱ ᎠᏁᎯ, ᎾᏍᎩ ᎦᎶᏁᏛ ᏥᏌ ᎬᏬᎯᏳᎲᏍᎩ ᏥᎩ; ᏂᎯᏰᏃ ᎾᏍᏉ ᎤᏠᏱ ᏕᏥᎩᎵᏲᏤᎸᎩ ᏗᏣᏤᎵᎦ ᏴᏫ, ᎾᏍᎩᏯ ᎾᏍᎩ ᏥᏚᏂᎩᎵᏲᏤᎴ ᎠᏂᏧᏏ;
Bandeko, bino mpe bokomaki kolanda ndakisa ya Mangomba oyo, kati na Yuda, ezali ya Nzambe mpe ezali kati na Yesu-Klisto, pamba te bandeko na bino ya ekolo moko banyokolaki bino ndenge Bayuda banyokolaki Mangomba ya Yuda.
15 ᎾᏍᎩ ᎾᏍᏉ ᏧᏂᎸᎩ ᎤᎬᏫᏳᎯ ᏥᏌ, ᎠᎴ ᎠᎾᏙᎴᎰᏍᎩ ᎤᏅᏒ ᏧᎾᏤᎵᎦ, ᎠᎴ ᎠᏴ ᎪᎦᏕᏯᏙᏔᏅᎩ; ᎠᎴ ᎥᏝ ᎣᏏᏳ ᎤᏰᎸᏗ ᎤᏁᎳᏅᎯ ᏱᎾᎾᏛᏁᎭ, ᎠᎴ ᎾᏂᎥ ᏴᏫ ᏓᏂᎦᏘᎴᎦ;
Ezali bango Bayuda nde babomaki Nkolo Yesu mpe basakoli; ezali mpe kaka bango nde banyokolaki biso. Basepelisaka Nzambe te mpe bazali banguna ya bato nyonso;
16 ᎪᎩᏅᏍᏓᏕᎰᎢ ᏦᏥᏬᏁᏙᏗᏱ ᏧᎾᏓᎴᏅᏛ ᏴᏫ, ᎾᏍᎩ ᎦᎨᏥᏍᏕᎸᏗ ᎢᏳᎵᏍᏙᏗᏱ, ᎤᏂᎧᎵᎢᏍᏗᏱ ᏂᎪᎯᎸ ᎤᏂᏍᎦᏅᏨᎢ; ᎤᏔᎳᏬᎯᏍᏗᏍᎩᏂ ᎨᏒ ᏩᏍᏛ ᎢᏴᏛ ᎤᏂᎷᏤᎸ.
bazali kokanga biso nzela mpo ete toteya Bapagano te, noki te bakobika. Na ndenge wana, bazali kaka kofulukisa masumu na bango mpe, suka na suka, kanda ya Nzambe ekokweyela bango.
17 ᎠᏴᏍᎩᏂ ᎢᏓᎵᏅᏟ, ᏞᎦ ᎣᎦᏓᏓᎴᏔᏅ ᏦᏥᏰᎸᎢ, ᎥᏝᏃ ᏦᎩᎾᏫᏱ, ᎤᏟ ᎢᎦᎢ ᎣᎦᏟᏂᎬᏁᎸᎩ ᏕᏣᎧᏛ ᏦᎩᎪᏩᏛᏗᏱ, ᎤᏣᏘ ᎠᏚᎸᏗ ᎣᎬᏔᏅᎩ.
Bandeko, awa tokabwanaki na bino mpo na mwa tango moke, na nzoto kasi na makanisi te, tosalaki makasi mpo na komona bino, pamba te tozalaki na posa na bino makasi.
18 ᎾᏍᎩ ᎢᏳᏍᏗ ᎣᎦᏚᎵᏍᎬᎩ ᏫᏨᎷᏤᏗᏱ, ᎠᎴ ᎠᏴ, ᏉᎳ, Ꮀ ᎤᎬᏫᏳᏒᎩ, ᏌᏉ ᎠᎴ ᏔᎵᏁ ᎠᏆᏚᎸᎲᎩ; ᎠᏎᏃ ᏎᏓᏂ ᎣᎩᏲᏍᏙᏓᏁᎲᎩ.
Yango wana, tolukaki koya epai na bino. Ngai Polo, namekaki yango mbala na mbala, kasi Satana akangaki nzela na biso.
19 ᎦᏙᏰᏃ ᎤᏚᎩ ᎣᎬᎭ, ᎠᎴ ᎦᏙ ᎣᏍᏛ ᏱᎦᏓᏅᏓᏗᎭ, ᎠᎴ ᎦᏙ ᎤᏍᏗ ᎠᎵᏍᏚᎶ ᎣᎦᎵᎮᎵᏍᏙᏗ? ᏝᏍᎪ ᏂᎯ ᏱᎨᏎᏍᏗ ᎠᎦᏔᎲ ᎢᎦᏤᎵ ᎤᎬᏫᏳᎯ ᏥᏌ ᎦᎶᏁᏛ ᎾᎯᏳ ᎦᎷᏨᎭ?
Banani bazali penza elikya na biso, esengo na biso to motole na biso, oyo tokomikumisa mpo na yango na miso ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso, na mokolo oyo akoya? Boni, ezali bino te?
20 ᏂᎯᏰᏃ ᎦᎸᏉᏗᏳ ᎢᏍᎩᏴᏁᎯ ᎠᎴ ᏍᎩᏯᎵᎮᎵᏍᏗᏍᎩ.
Solo, bino nde bozali nkembo mpe esengo na biso.

< ᏉᎳ ᏕᏏᎶᏂᎦ ᎠᏁᎯ ᎢᎬᏱᏱ ᏧᏬᏪᎳᏁᎸᎯ 2 >