< ᏉᎳ ᏕᏏᎶᏂᎦ ᎠᏁᎯ ᎢᎬᏱᏱ ᏧᏬᏪᎳᏁᎸᎯ 5 >

1 ᎾᎯᏳᏍᎩᏂ ᎨᏒᎢ ᎠᎴ ᎾᎯᏳ ᏕᎨᏌᏗᏒᎢ, ᎢᏓᎵᏅᏟ, ᎥᏝ ᎤᏚᎸᏗ ᏱᏂᏣᎵᏍᏓᏁᎭ ᎢᏨᏲᏪᎳᏁᏗᏱ.
Mpe mpo na oyo etali tango to mokolo, bandeko, tomoni ete ezali na tina te ya kokomela bino,
2 ᎢᏨᏒᏰᏃ ᎣᏏᏳ ᎢᏥᎦᏔ ᎾᏍᎩ ᎤᎬᏫᏳᎯ ᎤᏤᎵ ᎢᎦ ᎤᎵᏰᎢᎶᎯᏍᏗ ᎨᏒ ᎾᏍᎩᏯ ᎦᏃᏍᎩᏍᎩ ᏒᏃᏱ ᏥᎦᎷᎪᎢ.
pamba te boyebi malamu ete mokolo ya Nkolo ekoya ndenge moyibi ayaka kati na butu.
3 ᎾᎯᏳᏰᏃ ᏅᏩᏙᎯᏯᏛ ᎠᎴ ᏄᎾᏰᎯᏍᏛᎾ ᎠᎾᏗᏍᎨᏍᏗ, ᎿᎭᏉ ᏄᏰᎶᎢᏍᏔᏅᏛ ᎠᏓᏛᏗᏍᎩ ᎤᏂᎷᏤᏗ ᎨᏎᏍᏗ, ᎾᏍᎩᏯ ᎠᎩᎵᏯ ᏧᎷᏤᎰ ᎠᎨᏴ ᎦᏁᎵᏛ; ᎠᎴ ᎥᏝ ᎤᎾᏗᏫᏎᏗ ᏱᎨᏎᏍᏗ.
Tango bato bakokoma koloba: « Tozali sik’oyo na kimia, mpe tozali lisusu na mitungisi te, » ekozala na tango wana nde libebi ekokweyela bango na mbalakata, lokola pasi ya mwasi oyo azali kobota, mpe bakokoka kokima te.
4 ᏂᎯᏍᎩᏂ, ᎢᏓᎵᏅᏟ, ᎥᏝ ᎤᎵᏏᎬ ᏱᏤᎭ, ᎾᏍᎩ Ꮎ ᎾᎯᏳ ᎢᎦ ᎨᏣᏢᏔᏍᏗ ᎢᏳᎵᏍᏙᏗᏱ ᎾᏍᎩᏯ ᎦᏃᏍᎩᏍᎩ ᏧᏢᏔᏍᎪᎢ.
Kasi bino bandeko, bozali kati na molili te mpo ete mokolo yango ekanga bino na mbalakata lokola moyibi.
5 ᏂᏥᎥᎢ ᎢᎦ-ᎦᏘ ᏧᏪᏥ, ᎠᎴ ᎢᎦ ᏧᏪᏥ; ᎥᏝ ᏒᏃᏱ ᎠᎴ ᎤᎵᏏᎬ ᎢᏕᎯ ᏱᎩ.
Pamba te bino nyonso bozali bana ya pole mpe bana ya moyi. Tozali bato ya butu te to bato ya molili te.
6 ᎾᏍᎩ ᎢᏳᏍᏗ ᏞᏍᏗ ᏱᏗᎵᎮᏍᏗ, ᎾᏍᎩᏯ ᎠᏂᏐᎢ ᎾᎾᏛᏁᎲᎢ; ᎢᏗᏯᏫᏍᎨᏍᏗᏍᎩᏂ ᎠᎴ ᏂᏗᎩᏴᏍᏕᏍᎬᎾ ᎨᏎᏍᏗ.
Yango wana tolalaka pongi te lokola bato mosusu, kasi tosenzelaka mpe tomibatelaka malamu.
7 ᎠᏂᎵᎯᏰᏃ, ᏒᏃᏱ ᏓᏂᎵᎰᎢ; ᎠᎴ ᎾᏍᎩ Ꮎ ᏧᏂᏴᏍᏕᏍᎩ, ᏒᏃᏱ ᏚᏂᏴᏍᏕᏍᎪᎢ.
Pamba te bato oyo balalaka pongi balalaka na butu, mpe ba-oyo balangwaka masanga balangwaka na butu.
8 ᎠᏴᏍᎩᏂ ᎢᎦ ᎢᏕᎯ ᏥᎩ ᏂᏗᎩᏴᏍᏕᏍᎬᎾ ᎨᏎᏍᏗ, ᎠᏓᏁᏣᏍᏚᎶ ᎪᎯᏳᏗ ᎨᏒ ᎠᎴ ᎠᏓᎨᏳᏗ ᎨᏒ ᎢᏓᏓᏁᏥᏍᏚᎶᏗᏍᎨᏍᏗ, ᎡᎩᏍᏕᎸᏗᏱᏃ ᎨᏒ ᎤᏚᎩ ᎢᎬᏒ ᎢᎦᎵᏍᏚᎶᏕᏍᏗ.
Kasi lokola tozali bato ya moyi, tika ete tosenzela malamu, tolata kondima mpe bolingo lokola ebombelo ya tolo, mpe tolata elikya ya lobiko lokola ekoti ya ebende.
9 ᎤᏁᎳᏅᎯᏰᏃ ᎥᏝ ᏱᎦᏑᏰᏒ ᎤᏔᎳᏬᎯᏍᏗ ᎨᏒ ᎢᎩᎷᏤᏗᏱ; ᎠᎵᏍᏕᎸᏙᏗᏍᎩᏂ ᎢᎩᏩᏛᏗᏱ ᎢᎦᏤᎵ ᎤᎬᏫᏳᎯ ᏥᏌ ᎦᎶᏁᏛ ᎢᏳᏩᏂᏌᏛ;
Pamba te Nzambe abongisa biso te mpo na kanda na Ye, kasi mpo ete tozwa lobiko na nzela ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso,
10 ᎾᏍᎩ ᏥᎩᏲᎱᎯᏎᎴᎢ, ᎾᏍᎩ ᎾᏍᏉ ᏱᏗᎵᎭ ᎠᎴ ᏂᏗᎵᎲᎾ ᏱᎩ, ᎾᏍᎩ ᎢᏧᎳᎭ ᏫᎦᏕᏗᏱ ᎢᏳᎵᏍᏙᏗᏱ.
oyo akufelaki biso mpo ete, ezala soki tozali na bomoi to tokufi, tozala na bomoi elongo na Ye.
11 ᎾᏍᎩ ᎢᏳᏍᏗ, ᏕᏣᏓᎦᎵᏍᏓᏗᏍᎨᏍᏗ, ᎠᎴ ᏕᏣᏓᎵᏂᎪᎯᏍᏗᏍᎨᏍᏗ, ᎾᏍᎩᏯ ᏥᏂᏣᏛᏁᎭ.
Yango wana, bolendisanaka mpe bosunganaka bino na bino, ndenge mpe kaka bozali kosala yango.
12 ᎠᎴ ᎢᏨᏔᏲᏎᎭ, ᎢᏓᎵᏅᏟ, ᎾᏍᎩ ᏗᏥᎦᏔᎯ ᎢᏳᎵᏍᏙᏗᏱ ᎾᏍᎩ Ꮎ ᏧᏂᎸᏫᏍᏓᏁᎯ ᎢᏤᎲᎢ, ᎠᎴ ᏗᎨᏣᏁᎶᏗ ᏥᎩ ᎤᎬᏫᏳᎯ ᏕᏣᏁᎶᏛᎢ, ᎠᎴ ᏥᎨᏣᏅᏓᏗᏍᏗᎭ;
Bandeko, tosengi na bino ete bondimaka bato oyo basalaka mosala makasi kati na bino, oyo bamitungisaka mpo na bino kati na Nkolo mpe bapesaka bino makebisi.
13 ᎠᎴ ᎤᏣᏘ ᏗᏥᎸᏉᏗᏳ ᎢᏳᎵᏍᏙᏗᏱ ᎠᏓᎨᏳᏗ ᎬᏗ ᏅᏗᎦᎵᏍᏙᏗᏍᎨᏍᏗ ᏚᏂᎸᏫᏍᏓᏁᎲᎢ. ᎠᎴ ᏙᎯᏱ ᏂᏨᏁᏍᏗ ᎢᏨᏒ ᎢᏤᎲᎢ.
Bomemiaka bango makasi kati na bolingo mpo na mosala na bango. Bobikaka na kimia kati na bino.
14 ᎠᎴ ᎢᏨᏔᏲᏎᎭ, ᎢᏓᎵᏅᏟ, ᏕᏤᏯᏔᎲᏍᎨᏍᏗ ᎾᏍᎩ Ꮎ ᏄᎾᏁᎸᎾ, ᏕᏥᎦᎵᏍᏓᏗᏍᎨᏍᏗ ᏗᏩᎾᎦᎳ ᏧᎾᏓᏅᏘ, ᏕᏥᏂᏴᏎᏍᏗ ᏗᏂᏩᎾᎦᎳᎢ, ᏗᏨᏂᏗᏳ ᎨᏎᏍᏗ ᎾᏂᎥ [ ᎤᏣᏘᏂ ᏂᎨᏣᏛᏁᎲᎢ.]
Bandeko, tozali kolendisa bino: bopesaka bagoyigoyi mpe bato ya mobulu makebisi, bolendisaka ba-oyo basili kobungisa mpiko na bango, bosungaka ba-oyo bazangi makasi, boyikanaka mpiko.
15 ᏞᏍᏗ ᎩᎶ ᎤᏲ ᎾᎬᏁᎸ ᏳᏞᎨᏍᏗ ᎤᏲ ᏱᎾᏓᏛᏁᎮᏍᏗ; ᎢᏥᏍᏓᏩᏕᎨᏍᏗᏍᎩᏂ ᏂᎪᎯᎸ ᎾᏍᎩ ᎣᏍᏛ ᎨᏒᎢ, ᎾᏍᏉ ᎢᏨᏒ ᎪᎱᏍᏗ ᏕᏣᏓᏛᏗᏍᎬ, ᎠᎴ ᎾᏂᎥᏉ.
Bosenzela ete moko te azongisa mabe na mabe, kasi bolukaka tango nyonso kosalanaka bolamu kati na bino mpe kosalaka bato nyonso bolamu.
16 ᎢᏣᎵᎮᎵᎨᏍᏗ ᏂᎪᎯᎸᎢ;
Bozalaka na esengo tango nyonso;
17 ᏂᏥᏲᎯᏍᏗᏍᎬᎾ ᎢᏣᏓᏙᎵᏍᏗᏍᎨᏍᏗ;
bosambelaka na kolemba te;
18 ᏂᎦᎥᏉ ᏂᏣᎵᏍᏓᏁᎵᏕᎬ ᎡᏣᎵᎡᎵᏤᎮᏍᏗ [ ᎤᏁᎳᏅᎯ; ] ᎯᎠᏰᏃ ᎾᏍᎩ ᎤᏁᎳᏅᎯ ᎢᏣᏓᏅᏖᎮᎲ ᏥᏌ ᎦᎶᏁᏛ ᏕᏣᏁᎶᏛ ᎢᏳᏍᏗ.
bozongisaka matondi kati na makambo nyonso, pamba te yango nde mokano ya Nzambe mpo na bino kati na Yesu-Klisto.
19 ᎠᏓᏅᏙ ᎠᏓᏪᎵᎩᏍᎬ ᏞᏍᏗ ᏴᏝᏗᏍᎨᏍᏗ.
Bopekisaka te mosala ya Molimo Mosantu,
20 ᏞᏍᏗ ᎠᏎᏉ ᏱᏥᏰᎸᏍᎨᏍᏗ ᎠᏙᎴᎰᎯᏍᏗ ᎨᏒᎢ.
botiolaka masakoli te
21 ᏄᏓᎴᏒ ᎪᎱᏍᏗ ᎢᏥᎪᎵᏰᏍᎨᏍᏗ; ᎠᏍᏓᏯ ᏕᏥᏂᏴᏎᏍᏗ ᎾᏍᎩ Ꮎ ᎣᏍᏛ ᎨᏒᎢ.
kasi bomekaka nyonso na mozindo mpe bosimba oyo ezali malamu.
22 ᎢᏣᏓᏅᎡᎮᏍᏗ ᏂᎦᎥ ᏄᏓᎴᏒ ᎤᏲᎢ.
Boboyaka mabe ya lolenge nyonso.
23 ᎤᏁᎳᏅᎯᏃ ᎤᏩᏒ ᏅᏩᏙᎯᏯᏛ ᎠᏓᏁᎯ ᏂᎦᎷᎶᎬᎾ ᎢᏥᏅᎦᎸᏗ ᎨᏎᏍᏗ; ᎠᎴ ᏂᎬ ᎢᏣᏓᏅᏖᏗᏱ ᎠᎴ ᏗᏣᏓᏅᏙ ᎠᎴ ᏗᏥᏰᎸᎢ ᏤᏥᏍᏆᏂᎪᏓᏁᏗ ᎨᏎᏍᏗ, ᏂᏚᏚᎯᏍᏛᎾ ᎢᏣᎵᏍᏙᏗᏱ ᎢᎦᏤᎵ ᎤᎬᏫᏳᎯ ᏥᏌ ᎦᎶᏁᏛ ᎦᎷᏨ ᎢᏳᎢ.
Tika ete Ye moko Nzambe ya kimia abulisa bino na mobimba na bino! Tika ete mobimba na bino, molimo, elimo mpe nzoto ebatelama malamu na lolenge ete ezanga pamela na mokolo oyo Yesu-Klisto, Nkolo na biso, akoya.
24 ᏄᏓᎵᏓᏍᏛᎾ ᎾᏍᎩ Ꮎ ᎢᏣᏯᏅᏛ, ᎾᏍᏉ ᎾᏍᎩ ᎠᏎ ᏥᏅᏛᏛᏁᎵ.
Ye oyo azali kobenga bino azali sembo, mpe Ye nde akokokisa yango.
25 ᎢᏓᎵᏅᏟ ᏍᎩᏯᏅᏓᏗᏍᎨᏍᏗ ᎢᏣᏓᏙᎵᏍᏗᏍᎬᎢ.
Bandeko, bobondelaka mpo na biso.
26 ᏂᎦᏛ ᎠᎾᎵᏅᏟ ᎦᎸᏉᏗᏳ ᏗᏓᏙᏪᏙᎥᏍᏗ ᏕᏥᏲᎵᏍᏗᏍᎨᏍᏗ.
Bopesaka bandeko nyonso mbote na nzela ya beze ya bule.
27 ᎢᏨᏁᏤᎭ ᎤᎬᏫᏳᎯ ᎢᏨᏁᎢᏍᏓᏁᎭ, ᎯᎠ ᎾᏍᎩ ᎪᏪᎵ ᎨᏥᎪᎵᏰᏗᏱ ᎾᏂᎥ ᎤᎾᏓᏅᏘ ᎠᎾᎵᏅᏟ.
Nasengi na bino, na Kombo ya Nkolo, ete botangelaka bandeko nyonso mokanda oyo.
28 ᎢᎦᏤᎵ ᎤᎬᏫᏳᎯ ᏥᏌ ᎦᎶᏁᏛ ᎬᏩᎦᏘᏯ ᎤᏓᏙᎵᏍᏗ ᎨᏒ ᏕᏥᎧᎿᎭᏩᏗᏙᎮᏍᏗ. ᎡᎺᏅ.
Tika ete ngolu ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso, ezala na bino!

< ᏉᎳ ᏕᏏᎶᏂᎦ ᎠᏁᎯ ᎢᎬᏱᏱ ᏧᏬᏪᎳᏁᎸᎯ 5 >