< ᏉᎳ ᏧᏬᏪᎳᏅᎯ ᏔᎵᏁ ᏗᎹᏗ ᏧᏬᏪᎳᏁᎸᎯ 4 >

1 ᎾᏍᎩ ᎢᏳᏍᏗ ᎬᏁᏤᎭ ᎤᏁᎳᏅᎯ ᎠᎦᏔᎲᎢ ᎠᎴ ᎠᎦᏔᎲ ᎤᎬᏫᏳᎯ ᏥᏌ ᎦᎶᏁᏛ, ᎾᏍᎩ ᏧᏭᎪᏓᏁᏗ ᏥᎩ ᏗᏅᏃᏛ ᎠᎴ ᏧᏂᏲᎱᏒᎯ ᎾᎯᏳ ᎦᎾᏄᎪᏥᎸᎭ ᎠᎴ ᎤᎬᏫᏳᎯ ᎿᎭᏉ ᏂᎦᎵᏍᏔᏅᎭ,
Yango wana, liboso ya Nzambe mpe ya Yesu-Klisto oyo akosambisa bato ya bomoi mpe bakufi, mpe na makanisi ya kolengela koya na Ye mpe ya Bokonzi na Ye, nazali kopesa yo mitindo oyo:
2 ᎭᎵᏥᏙᎲᏍᎨᏍᏗ ᎧᏃᎮᏛ, ᏣᎵᏁᏅᏕᏍᏗᏉ ᏰᎵ ᎨᏎᏍᏗ ᎠᎴ ᏰᎵ ᏂᎨᏒᎾ ᎨᏎᏍᏗ, ᏕᎯᎬᏍᎪᎸᎥᏍᎨᏍᏗ, ᏕᎯᏍᎦᎨᏍᏗ, ᏕᎯᏍᏗᏰᏗᏍᎨᏍᏗ ᎲᏗᏍᎨᏍᏗ ᎤᏣᏘ ᎬᏂᏛ ᎨᏒ ᎠᎴ ᏗᏕᏲᏗ ᎨᏒᎢ.
teya Liloba, betela yango sete na tango ya malamu to te, zongisa na nzela, pamela mpe lendisa na nzela ya mateya na yo mpe na kokanga motema.
3 ᏛᏍᏆᎸᎯᏰᏃ ᎿᎭᏉ ᎾᎯᏳ ᎥᏝ ᏳᎾᏚᎵᏍᎨᏍᏗ ᎤᎾᏛᏓᏍᏙᏗᏱ ᎣᏍᏛ ᏗᏕᏲᏗ ᎨᏒᎢ; ᏚᏂᏲᏕᏍᎬᏍᎩᏂ ᏗᏂᎴᏂ ᎠᏅᏗᏍᎨᏍᏗ ᎤᏅᏒᏉ ᎤᎾᏚᎸᏅᏗ ᎨᏒ ᏓᏂᏍᏓᏩᏗᏒ ᏓᏂᏟᏏᏍᎨᏍᏗ ᏗᎾᏕᏲᎲᏍᎩ;
Pamba te na mikolo ekoya, bato bakolinga lisusu te koyoka mateya ya solo, kasi bakomilukela bango moko, kolanda baposa na bango, bateyi oyo bakoyebisa bango makambo oyo matoyi na bango esepelaka koyoka;
4 ᏗᏂᎴᏂᏃ ᏓᏂᎦᏔᎲᏍᎨᏍᏗ ᎠᎾᏛᎩᏍᎬ ᏚᏳᎪᏛᎢ, ᎠᏎᏉᏃ ᎦᏬᏂᎯᏍᏗ ᎨᏒ ᎢᏗᏢ ᏩᎾᎦᏔᎲᏍᏗᏍᎨᏍᏗ.
bakoboya koyoka mateya ya solo mpe bakomipesa makasi na koyoka masapo.
5 ᏂᎯᏍᎩᏂ ᎮᏯᏔᎯᏳ ᎨᏎᏍᏗ ᏂᎦᎥ ᏂᏣᏛᎿᎭᏕᎬᎢ, ᎲᏂᏗᏳ ᎨᏎᏍᏗ ᎯᎩᎵᏲᎬᎢ, ᏕᏣᎸᏫᏍᏓᏁᎮᏍᏗ ᎠᎵᏥᏙᏂᏙᎯ ᏧᎸᏫᏍᏓᏁᏗ ᎨᏒᎢ; ᏰᎵᎦᏯ ᎯᏍᏆᏗᏍᎨᏍᏗ ᏗᏣᎸᏫᏍᏓᏁᏗ ᎨᏒᎢ.
Kasi yo, zala na ekenge na makambo nyonso, yikela pasi mpiko, sala mosala ya mopanzi Sango Malamu, kokisa malamu lotomo na yo.
6 ᎿᎭᏉᏰᏃ ᎦᏓᎵᏍᎪᎸᏗᎭ, ᎠᎴ ᎾᎯᏳ ᎠᏇᏅᏍᏗ ᎨᏒ ᎤᏍᏆᎸᎯᏗ.
Pamba te nakomi pene ya kokaba bomoi na ngai lokola mbeka ya masanga mpo na Nzambe, mpe tango na ngai ya kotika mokili oyo ekoki.
7 ᎠᏆᎵᎸ ᎣᏍᏛ ᎠᎵᏍᏗ ᎨᏒᎢ, ᎠᎩᏍᏆᏛ ᎦᏙᎩᏯᏍᎬᎢ, ᎠᎩᏍᏆᏂᎪᏔᏅ ᎪᎯᏳᏗ ᎨᏒᎢ,
Nabundi etumba na ngai malamu, nakomi na suka ya lisano na ngai ya kokima mbangu, nabateli kondima.
8 ᎿᎭᏉᏃ ᏨᏆᏓᏁᎳᏁᎸ ᎠᎵᏍᏚᎶ ᏚᏳᎪᏛ ᎢᏳᎾᏛᏁᎸᎯ ᎨᎦᎫᏴᏓᏁᏗ, ᎾᏍᎩ ᎤᎬᏫᏳᎯ ᎾᏍᎦᏅᎾ ᏗᎫᎪᏗᏍᎩ ᎠᏗᏅᏁᏗ ᎾᎯᏳ ᎢᎦ, ᎥᏝ ᎠᎴ ᎠᏴᏉ ᎠᏋᏒ, ᎾᏍᏉᏍᎩᏂ ᎾᏂᎥ ᎤᎾᏄᎪᎢᏍᏗ ᎨᏒ ᎣᏏᏳ ᎣᏂᏰᎸᎯ.
Sik’oyo, Nzambe abombeli ngai motole ya bosembo, oyo Nkolo, Mosambisi ya sembo, akopesa ngai na mokolo wana: akopesa yango na ngai kaka te, kasi mpe na bato nyonso oyo balingaka boyei na Ye.
9 ᎭᏟᏂᎬᏁᎸᎭ ᏂᎪᎯᎸᎾᏉ ᏣᎷᎯᏍᏗᏱ ᎠᏂ ᎨᏙᎲᎢ.
Sala makasi ete oya noki epai na ngai.
10 ᏗᎹᏰᏃ ᎠᏋᏕᏨ, ᏅᏗᎦᎵᏍᏙᏗᎭ ᎤᏟ ᎤᏰᎸᏅ ᎪᎯ ᎨᏒᎢ, ᎠᎴ ᏕᏏᎶᏂᎦ ᏭᎶᏒ; ᏞᏏᏂ ᎨᎴᏏᏱ ᏭᎶᏒ, ᏓᏓᏏ ᏕᎵᎺᏏᏱ ᏭᎶᏒ; (aiōn g165)
Pamba te Demasi asundolaki ngai: alingaki mokili oyo mpe akendeki na Tesalonika; Kresasi akendeki na Galatia, mpe Tito akendeki na Dalimatia. (aiōn g165)
11 ᎷᎦ ᎤᏩᏒ ᎣᏍᏕᏙᎭ; ᎹᎦ ᏘᏯᏗᏁᏒᎭ, ᎬᎩᏍᏕᎸᎯᏓᏍᏗᏰᏃ ᏓᎩᎸᏫᏍᏓᏁᎲᎢ.
Kaka Luka nde azali elongo na ngai. Kamata Malako, mpe boya elongo na ye, pamba te azali na tina mingi epai na ngai mpo na lotomo.
12 ᏗᏥᎦᏍᎩᏂ ᎡᏈᏌ ᏥᏅᏒ
Natindaki Tishike na Efeso.
13 ᎦᏌᎴᎾ ᏠᏯ ᏨᏛᎩᏂᏴᎩ ᎦᏆ ᎦᏁᎸᎢ ᏖᏒ ᏘᏁᏒᎭ, ᎠᎴ ᎪᏪᎵ ᏙᏘᏁᏒᎭ ᎾᏍᎩ Ꮀ ᎤᎬᏫᏳᏎᏍᏗ ᎦᏁᎦ ᏗᎪᏪᎶᏗ.
Tango okoya, memela ngai kazaka oyo natikaki na Troasi epai ya Karipisi; memela ngai mpe babuku na ngai, mingi-mingi babuku oyo basala na poso ya banyama.
14 ᎡᎵᎩ ᎥᏣᏱ ᎪᏢᏅᎥᏍᎩ ᎤᎶᏘ ᏃᏒᎾ ᎾᏋᏁᎸᎩ. ᎤᎬᏫᏳᎯ ᎤᎫᏴᎡᏗ ᎨᏎᏍᏗ ᎾᏍᎩᏯ ᏕᎤᎸᏫᏍᏓᏁᎸᎢ.
Alekizandre, monyangwisi bibende, asalaki ngai mabe mingi. Nkolo akofuta ye kolanda misala na ye.
15 ᎾᏍᏉ ᏂᎯ ᎾᏍᎩ ᎯᏰᏯᏙᏤᎮᏍᏗ, ᎤᎵᏂᎩᏗᏳᏰᏃ ᎤᏡᏔᏅ ᎣᏥᏬᏂᏍᎬᎢ.
Yo mpe sala keba liboso na ye, pamba te atelemelaki makasi mateya na biso.
16 ᎢᎬᏱᏱ ᎠᎩᏬᏂᏒ ᎦᎵᏍᏕᎵᏍᎬ ᎥᏝ ᎩᎶ ᎾᎥ ᏱᎦᏙᎨᎢ, ᎾᏂᎥᏉᏍᎩᏂ ᎬᏆᏕᏨᎩ; ᏞᏍᏗ ᎤᏂᏍᎦᏅᏨ ᏱᏚᏚᎪᏔᏁᏍᏗ;
Tango nasambaki mpo na mbala ya liboso, moto ata moko te azalaki wana mpo na kosunga ngai; bango nyonso basundolaki ngai. Tika ete Nzambe atangela bango yango te!
17 ᎤᎬᏫᏳᎯᏍᎩᏂᏃᏅ ᎾᎥ ᎦᏙᎬᎩ ᎠᎴ ᎠᏆᎵᏂᎪᎯᏍᏔᏅᎩ; ᎾᏍᎩ ᎠᏴ ᎨᏒ ᎠᎩᏍᏆᏗᏍᏗᏱ ᎠᏰᎸᏒᎩ ᎠᎵᏥᏙᏗ ᎨᏒᎢ, ᎠᎴ ᎾᏂᎥ ᏧᎾᏓᎴᏅᏛ ᏴᏫ ᎤᎾᏛᎯᏗᏱ; ᎠᎴ ᎥᎩᎴᏒᎩ ᏢᏓᏥ ᎠᎰᎵ ᏥᎳᎥᎢ.
Ezali Nkolo nde atelemaki pembeni na ngai mpe apesaki ngai nguya mpo ete, na nzela na ngai, mateya eteyama na mobimba na yango nyonso, mpe mpo ete Bapagano bayoka yango. Mpe akangolaki ngai wuta na monoko ya nkosi.
18 ᎠᎴ ᎤᎬᏫᏳᎯ ᎠᏎ ᏛᏇᏓᎴᏏ ᏂᎦᎥ ᎤᏲ ᏗᎦᎸᏫᏍᏓᏁᏗ ᎨᏒᎢ; ᎠᎴ ᏛᎩᏍᏆᏂᎪᏔᏂ ᎦᎸᎳᏗ ᎡᎯ ᎤᎬᏫᏳᎯ ᏗᎨᏒ ᏫᎦᎷᎩ. ᎾᏍᎩ ᎦᎸᏉᏙᏗ ᎨᏎᏍᏗ ᏂᎪᎯᎸ ᎠᎴ ᏂᎪᎯᎸᎢ, ᎡᎺᏅ. (aiōn g165)
Nayebi solo ete Nkolo akokoba kokangola ngai wuta na misala nyonso ya mabe mpe akobikisa ngai mpo na Bokonzi na Ye ya Likolo. Tika ete nkembo ezonga epai na Ye mpo na libela na libela! Amen. (aiōn g165)
19 ᎩᏲᎵᎸᎭ ᏈᏍᎦ ᎠᎴ ᎡᏈᎳ, ᎠᎴ ᎣᏁᏏᏉᎳ ᏚᏓᏘᎾᎥᎢ.
Pesa mbote na Prisika, na Akilasi mpe na libota ya Onezifore.
20 ᎢᎳᏍᏓ ᎪᎴᏂᏗ ᏓᏳᏗᎩᏴᎩ, ᏠᏆᎹᏍᎩᏂ ᎹᎵᏓ ᏓᏥᏯᎧᎯᏴᎩ ᎤᏢᎩ.
Erasite atikalaki na Kolinto, mpe natikaki Trofime azali kobela na Mile.
21 ᎭᏟᏂᎬᏁᎸᎭ ᎠᏂ ᏣᎷᎯᏍᏗᏱ ᎠᏏᏉ ᎪᎳ ᏂᎨᏒᎾ. ᏳᏇᎳ ᏫᏣᏲᎵᎦ, ᎠᎴ ᎾᏍᏉ ᏇᏗᏂ, ᎠᎴ ᎳᎾᏏ, ᎠᎴ ᏠᏗᏯ, ᎠᎴ ᎾᏂᎥ ᎠᎾᎵᏅᏟ.
Sala makasi ete okoma awa liboso ete tango ya malili makasi ebanda. Ebilisi, Pidesi, Linisi, Klodia mpe bandeko nyonso bapesi yo mbote.
22 ᎤᎬᏫᏳᎯ ᏥᏌ ᎦᎶᏁᏛ ᏓᎧᎿᎭᏩᏗᏙᎮᏍᏗ ᏩᏓᏅᏙ. ᎤᏓᏙᎵᏍᏗ ᎨᏒ ᏕᏣᎧᎿᎭᏩᏗᏙᎮᏍᏗ. ᎡᎺᏅ.
Tika ete Nkolo azala elongo na molimo na yo! Tika ete ngolu ezala na bino nyonso!

< ᏉᎳ ᏧᏬᏪᎳᏅᎯ ᏔᎵᏁ ᏗᎹᏗ ᏧᏬᏪᎳᏁᎸᎯ 4 >