< ᏉᎳ ᏧᏬᏪᎳᏅᎯ ᏔᎵᏁ ᏗᎹᏗ ᏧᏬᏪᎳᏁᎸᎯ 3 >

1 ᎯᎠᏃ ᎾᏍᏉ ᎯᎦᏔᎮᏍᏗ, ᎤᎵᏍᏆ ᎸᏗ ᎨᏎᏍᏗ ᎠᏎ ᎤᏕᏯᏙᏗ ᎤᎵᏰᎢᎶᎯᏍᏗ ᎨᏎᏍᏗ.
Kasi yeba malamu ete mikolo ya suka ekozala mikolo ya pasi:
2 ᏴᏫᏰᏃ ᎤᏅᏒ ᎤᎾᏓᎸᏉᏗᏳ ᎨᏎᏍᏗ, ᎠᏕᎸ ᎤᏂᎬᎥᏍᎩ, ᎠᎾᏢᏆᏍᎩ, ᎤᎾᏢᏉᏗ, ᎤᏁᎳᏅᎯ ᎬᏩᏂᏐᏢᏗ, ᏧᏂᎦᏴᎵᎨ ᏗᏂᎳᏏᏘᏍᎩ, ᏄᎾᎵᎮᎵᏣᏛᎾ, ᎠᏂᎦᏓᎭᎢ,
bato bakokoma na lokoso ya mbongo, bakokoma miyimi, lolendo, lofundu; bakokoma kofinga Nzambe, kozanga botosi epai ya baboti na bango, koboya kozongisa matondi, kozanga limemia mpo na biloko ya bule,
3 ᎪᎱᏍᏗ ᏧᏅᎾ ᏂᏚᏂᎨᏳᏒᎾ, ᏄᏃᎯᏍᏘᏒᎾ, ᎤᏐᏅ ᎠᎾᏓᏃᎮᎵᏙᎯ, ᏄᎾᎵᏏᎾᎯᏍᏛᎾ, ᎤᏂᎿᎭᎸᎯ, ᎠᏂᏍᎦᎩ ᎣᏍᏛ,
kozanga bolingo, kozanga mawa, kokosela baninga makambo, kozanga makoki ya komikanga, bato na kanza, banguna ya bolamu,
4 ᎠᎾᏓᎶᏄᎮᏍᎩ, ᎤᏂᎫᏏᏯ, ᎤᎾᏓᎵᏌᎳᏗ, ᎤᏂᎨᏳᎯ ᏱᏍᏛ ᎤᎾᏓᏅᏓᏗᏍᏗᏍᎩ ᎤᏁᎳᏅᎯᏃ ᏄᏂᎨᏳᏒᎾ,
bateki baninga, bato ya mitema mikuse, bato na komitombola, bato balinga bisengo na esika ya kolinga Nzambe;
5 ᎤᏁᎳᏅᎯ ᏗᏁᎶᏙᏗ ᏗᏤᎵᏛ ᎤᏂᎯ, ᎠᏎᏃ ᎠᎾᏓᏱᎯ ᎤᏁᎳᏅᎯ ᏗᏁᎶᏙᏗ ᎨᏒᎢ. ᎾᏍᎩ ᎢᏳᎾᏍᏗ ᏕᎭᏓᏅᎡᎮᏍᏗ.
bakobanda komilakisa lokola nde bazali na botosi kati na makambo ya Nzambe, nzokande bawanganaka nguya na yango. Kima bato ya lolenge wana!
6 ᎾᏍᎩᏰᏃ ᎯᎠ ᎢᏳᎾᏍᏗ ᏥᏓᏂᏴᎵᏙᎰ ᏓᏓᏁᎸᎢ ᎠᎴ ᏥᏓᎾᏘᎾᏫᏗᏍᎪ ᏄᎾᏓᏅᏛᎾ ᎠᏂᎨᏴ ᎤᏂᎧᎵᏨᎯ ᎠᏍᎦᎾᎢ, ᏚᎾᏘᏂᏒ ᏧᏓᎴᏅᏛ ᎠᏚᎸᏗ ᎨᏒᎢ,
Bamosusu kati na bango bakotaka na bandako ya bato mpe bakosaka basi ya pete oyo batonda na masumu mpe bamitikaka na lolenge nyonso ya baposa ya nzoto,
7 ᎾᏍᎩ ᏂᎪᎯᎸ ᎠᎾᏕᎶᏆᏍᎪᎢ, ᎠᏎᏃ ᎥᏝ ᎢᎸᎯᏳ ᏱᏩᏂᏰᎢᎶᎯᎰ ᏚᏳᎪᏛ ᎠᎦᏙᎥᎯᏍᏗ ᎨᏒᎢ.
oyo balukaka tango nyonso koyekola kasi bakokaka ata moke te koyeba solo.
8 ᎠᎴ ᎾᏍᎩᏯ ᏤᏂ ᎠᎴ ᏨᏈ ᏣᎾᏡᏗᏍᎨ ᎼᏏ ᎾᏍᎩᏯ ᎾᏍᏉ ᎯᎠ ᎠᎾᏡᏗ ᏚᏳᎪᏛ ᎨᏒᎢ; ᎠᏂᏍᎦᏯ ᎤᏲᏨᎯ ᏚᎾᏓᏅᏛᎢ, ᎠᎴ ᎨᏥᏲᎢᏎᏛ ᎾᏍᎩ ᎪᎯᏳᏗ ᎨᏒ ᎤᎬᏩᎵ.
Ndenge Janesi mpe Jambresi batelemelaki Moyize, ndenge wana mpe bato wana batelemelaka solo. Bazali bato oyo makanisi na bango esila kobeba mpe kondima na bango esila kokufa.
9 ᎠᏎᏃ ᎥᏝ ᎤᏟ ᎢᏴᏛ ᎬᏩᏁᏅᏍᏗ ᏱᎩ, ᎾᏂᎦᏔᎿᎭᎥᎾᏰᏃ ᎨᏒ ᎬᏂᎨᏒ ᏅᏓᏳᎾᎵᏍᏓᏁᎵ ᎾᏂᎥᎢ, ᎾᏍᎩᏯ ᎾᏍᏉ ᏥᏄᏍᏕ ᎾᏍᎩ.
Kasi bakokende mosika te, pamba te bozoba na bango ekomonana na miso ya bato nyonso, ndenge ezalaki mpo na mibali wana mibale.
10 ᏂᎯᏍᎩᏂ ᎣᏏᏳ ᏣᎦᏙᎥᏒ ᏄᏍᏛ ᏓᏆᏕᏲᏅᎢ, ᏄᏍᏛ ᎠᏆᎴᏂᏙᎸᎢ, ᏄᏍᏛ ᏓᏇᎪᏔᏅ ᏗᏆᏓᏅᏛᎢ, ᎠᏉᎯᏳᏒᎢ, ᎬᏂᏗᏳ ᎨᏒᎢ, ᎠᏆᏓᎨᏳᎯᏳ ᎨᏒᎢ, ᎤᏁᎳᎩ ᎨᎵᏍᎬ ᏥᎩᎵᏲᎬᎢ,
Nzokande yo oyebi nyonso na tina na mateya na ngai, bizaleli, makanisi, kondima, kokanga motema, bolingo, mpiko,
11 ᎤᏲ ᏅᏋᏁᎵᏙᎸᎢ, ᎠᎩᎩᎵᏲᏥᏙᎸᎢ ᎥᏘᎣᎩ, ᎢᎪᏂᏯ, ᎵᏍᏗ-ᏂᎦᎥ ᎤᏲ ᏅᏋᏁᎵᏙᎸᎢ; ᎠᏎᏃ ᎾᏍᎩ ᏂᎦᏛ ᎾᎿᎭᎤᎬᏫᏳᎯ ᎠᏯᏓᎴᏒᎩ.
minyoko mpe pasi na ngai; oyebi makambo nyonso oyo ekomelaki ngai na Antioshe, na Ikoniomi mpe na Listre. Solo, nanyokwamaki makasi, kasi Nkolo akangolaki ngai wuta na nyonso.
12 ᎠᎴ ᎾᏍᏉ ᎾᏂᎥ ᎤᎾᏚᎵᏍᎩ ᎤᏁᎳᏅᎯ ᏗᏁᎶᏙᏗ ᎨᏒ ᎤᏂᏍᏓᏩᏛᏍᏗᏱ ᎦᎶᏁᏛ ᏥᏌ ᎠᏃᎯᏳᎲᏍᎩ ᎢᏳᎾᏛᏁᏗ ᎾᏍᎩ ᎠᏎ ᎤᏲ ᎢᎨᎬᏁᏗ.
Solo, bato nyonso oyo balingi kotambola na botosi kati na Yesu-Klisto bakonyokolama.
13 ᎤᏂᏲᏍᎩᏂ ᏴᏫ ᎠᎴ ᎤᎾᏠᎾᏍᏗ ᎠᏂᏁᏉᎨᏍᏗ ᎤᏂᏲ ᎨᏒᎢ, ᏓᏂᎶᎾᏍᏗᏍᎨᏍᏗ ᎠᎴ ᎨᏥᎶᎾᏍᏗᏍᎨᏍᏗ.
Kasi bato mabe mpe ba-oyo bakosaka baninga bakozala kozinda kati na mabe, kokosa bato mosusu, mpe bango moko bakokosa bango.
14 ᏂᎯᏍᎩᏂ ᏕᏣᏂᏴᏎᏍᏗ ᏄᏍᏛ ᏣᏕᎶᏆᎥᎢ ᎠᎴ ᏦᎯᏳᏅᎢ; ᎯᎦᏔᎭᏰᏃ ᎾᏍᎩ ᎯᏯᏕᎶᏆᎡᎸᎯ ᎨᏒᎢ,
Kasi yo, kangama kaka na makambo oyo oyekolaki mpe ondimaki, pamba te oyebi epai ya nani oyekolaki yango;
15 ᎠᎴ ᎯᎦᏔᎭ ᏣᏍᏗ ᎨᏒ ᏅᏓᎬᏩᏓᎴᏅᏛ ᏕᎯᎦᏔᎲ ᏗᎦᎸᏉᏗ ᎪᏪᎵ, ᎾᏍᎩ ᏰᎵ ᎯᎦᏔᎿᎭᎢᏳ ᎢᎬᏩᏁᏗ, ᏣᎵᏍᏕᎸᏙᏗ ᎨᏒ ᏫᎬᏩᎵᏱᎶᎯᏍᏗ, ᎦᎶᏁᏛ ᏥᏌ ᎯᏲᎢᏳᏒ ᎢᏳᏩᏂᏐᏗ.
mpe wuta bomwana na yo, oyebi Makomi ya bule oyo ezali na makoki ya kopesa yo bwanya oyo ememaka na lobiko na nzela ya kondima kati na Yesu-Klisto.
16 ᏂᎦᎥ ᎪᏪᎵ ᎤᏁᎳᏅᎯ ᎤᏓᏅᏖᎸᎯ ᏗᎪᏪᎳᏅᎯ, ᎠᎴ ᎣᏏᏳ ᎤᏓᏕᏲᏗᏱ, ᎤᏓᎬᏍᎪᎸᏗᏱ, ᎤᏓᎪᏗᏱ ᏚᏳᎪᏛᎢ, ᎤᏓᏕᏲᏗᏱ ᎣᏍᏛ ᎨᏒᎢ,
Makomi nyonso ekomama na nguya ya Nzambe mpe ezali na tina mpo na koteya, kopamela, kozongisa na nzela mpe kolakisa bato kotambola kolanda bosembo,
17 ᎾᏍᎩ ᎠᏍᎦᏯ ᎤᏁᎳᏅᎯ ᎤᏤᎵᎦ ᎤᏍᏆᏗᏍᏗᏱ, ᎤᏓᏁᎵᏌᏛ ᎢᏳᎵᏍᏙᏗᏱ ᏂᎦᎥ ᎣᏍᏛ ᏗᎦᎸᏫᏍᏓᏁᏗ ᎨᏒᎢ.
mpo ete moto na Nzambe azala ya kokoka mpe ya kobongisama mpo na kosala misala nyonso ya malamu.

< ᏉᎳ ᏧᏬᏪᎳᏅᎯ ᏔᎵᏁ ᏗᎹᏗ ᏧᏬᏪᎳᏁᎸᎯ 3 >