< ᏉᎳ ᏧᏬᏪᎳᏅᎯ ᏔᎵᏁ ᏗᎹᏗ ᏧᏬᏪᎳᏁᎸᎯ 2 >

1 ᎾᏍᎩ ᎢᏳᏍᏗ ᏂᎯ ᎠᏇᏥ ᏣᎵᏂᎪᎯᏍᏗᏍᎨᏍᏗ ᎬᏩᎦᏘᏯ ᎤᏓᏙᎵᏍᏗ ᎨᏒ ᎾᏍᎩ ᏥᏌ ᎦᎶᏁᏛ ᏅᏓᏳᎵᏍᎪᎸᏔᏅᎯ.
Mwana na ngai, zala makasi kati na ngolu oyo ezali kati na Yesu-Klisto.
2 ᎠᎴ ᎾᏍᎩ ᏍᏆᏛᎦᏁᎸᎯ ᏥᎩ ᎤᏂᏣᏘ ᎠᏂᎦᏔᎲᎢ, ᎾᏍᎩ ᏕᎭᎨᏅᏗᏍᎨᏍᏗ ᎠᏃᏍᏛ ᎠᏂᏍᎦᏯ ᎾᏍᎩ ᏰᎵ ᏗᎬᏩᏁᏲᏗ ᎨᏒ ᎾᏍᏉ Ꮎ ᏭᏅᎫᏛᎢ.
Makambo oyo oyokaki epai na ngai liboso ya batatoli ebele, teya yango na bato ya sembo oyo bazali na makoki ya koteya yango lisusu na bato mosusu.
3 ᎾᏍᎩ ᎢᏳᏍᏗ ᏂᎯ ᎲᏂᏗᏳ ᎨᏎᏍᏗ ᎯᎩᎵᏲᎬᎢ, ᎾᏍᎩᏯ ᎣᏍᏛ ᎠᏯᏫᏍᎩ ᏥᏌ ᎦᎶᏁᏛ ᎤᏤᎵᎦ.
Mona pasi elongo na ngai lokola soda ya mpiko ya Yesu-Klisto.
4 ᎩᎶ ᏓᎿᎭᏩ ᏤᎪᎢ ᎥᏝ ᎬᏅ ᎤᎵᏍᏕᎸᏙᏗ ᏕᎤᎸᏫᏍᏓᏁᎲ ᏯᏚᏓᎸᏗᏍᎪᎢ, ᎤᏚᎵᏍᎪ ᎠᏍᎦᏰᎬᏍᏓ ᎣᏍᏛ ᎤᏰᎸᏗ ᏧᎸᏫᏍᏓᏁᏗᏱ.
Moto oyo akoti na mosala ya soda amipesaka te na makambo ya bato oyo bazali basoda te mpo na kosepelisa mokonzi na ye ya mampinga.
5 ᎢᏳ ᎠᎴ ᎩᎶ ᎤᏓᏎᎪᎩᏍᏗᏱ ᏣᏟᏂᎬᏁᎰᎢ, ᎥᏝ ᏯᏥᏍᏚᎸᏍᎪᎢ ᎬᏂ ᏗᎧᎿᎭᏩᏛᏍᏗ ᏂᎬᏅ ᎢᏳᏛᏁᎸᎯ ᏥᎨᏐᎢ.
Ezali mpe ndenge moko mpo na moto oyo azali kosala lisano ya kokima mbangu: akoki te kozwa motole soki akimi mbangu te kolanda mibeko ya lisano.
6 ᏗᎦᎶᎩᏍᎩ ᏥᏚᎸᏫᏍᏓᏁᎰᎢ ᎢᎬᏱ ᎤᏪᎳᏗᏍᏙᏗ ᎨᏐ ᎤᎾᏄᎪᏫᏒᎯ.
Moloni elanga oyo asalaka makasi asengeli kozala moto ya liboso mpo na kobuka bambuma.
7 ᎭᏓᏅᏓᏛᎵ ᎯᎠ ᏥᏂᏥᏪᎭ; ᎤᎬᏫᏳᎯᏃ ᏫᏣᎲᏏ ᏣᎦᏙᎥᎯᏍᏗᏱ ᏂᎦᎥ ᏧᏓᎴᏅᏛ.
Kanisaka malamu na tina na makambo oyo nazali koloba, mpe Nkolo akopesa yo makoki ya kososola yango nyonso.
8 ᏣᏅᏖᏍᏗ ᏥᏌ ᎦᎶᏁᏛ, ᏕᏫ ᎤᏪᏥ, ᎤᏲᎱᏒ ᏚᎴᎯᏌᏅᎢ, ᎾᏍᎩᏯ ᏂᎦᏪᏍᎬ ᎣᏍᏛ ᎧᏃᎮᏛ ᎠᏆᏤᎵᎦ,
Kanisaka Yesu-Klisto, mokitani ya Davidi, oyo asekwaki kati na bakufi, kolanda Sango Malamu oyo nateyaka.
9 ᎾᏍᎩ ᎾᎿᎭᏥᏥᎩᎵᏲᎦ ᎥᏆᎸᏍᏗᏱ ᎢᏴᏛ, ᎤᏲ ᏧᎸᏫᏍᏓᏁᎯ ᎾᏍᎩᏯᎢ; ᎤᏁᎳᏅᎯᏍᎩᏂ ᎤᏤᎵᎦ ᎧᏃᎮᏛ ᎥᏝ ᎦᎸᎸᎯ ᏱᎩ.
Ezali mpe mpo na Sango Malamu yango nde nazali komona pasi kino bakanga ngai minyololo lokola mobomi, kasi bakangi Liloba na Nzambe minyololo te.
10 ᎾᏍᎩ ᎢᏳᏍᏗ ᎤᏁᎳᎩ ᎨᎵᎭ ᏂᎦᏛ ᏧᏓᎴᏅᏛ ᎾᏆᎵᏍᏓᏁᎵᏙᎲᎢ ᎨᎦᏑᏰᏛ ᏅᏗᎦᎵᏍᏙᏗᎭ, ᎠᎴ ᎤᏂᏩᏛᏗᏱ ᎠᎵᏍᏕᎸᏙᏗ ᎾᏍᎩ ᏥᏌ ᎦᎶᏁᏛ ᏅᏓᏳᎵᏍᎪᎸᏔᏅᎯ, ᎠᎴ ᎠᎵᏍᏆᏗᏍᎩ ᏂᎨᏒᎾ ᎦᎸᏉᏗᏳ ᎨᏒᎢ. (aiōnios g166)
Yango wana nazali koyikela makambo nyonso mpiko mpo na bolamu ya bato oyo Nzambe apona, mpo ete bango mpe bazwa lobiko oyo ezali kati na Yesu-Klisto, elongo na nkembo ya seko. (aiōnios g166)
11 ᎤᏙᎯᏳᎯᏯ ᎢᎦᏪᏛ, ᎢᏳᏰᏃ ᎢᏧᎳᎭ ᏗᎩᏲᎱᏒᎯ ᎨᏎᏍᏗ, ᎠᏎ ᎾᏍᏉ ᎢᏧᎳᎭ ᏕᏛᏁᏍᏗ;
Maloba oyo ezali ya solo: Soki tokufi elongo na Ye, tokozala mpe na bomoi elongo na Ye.
12 ᎢᏳᏃ ᏕᏛᏂᎡᏍᏗ ᎠᏎ ᎾᏍᎩ ᎢᏧᎳᎭ ᎢᎩᎬᏫᏳᏌᏕᎨᏍᏗ; ᎢᏳᏃ ᎢᏒᏓᏓᏱᎸᎭ ᎾᏍᏉ ᎠᏎ ᏓᎦᏓᏱᎵ.
Soki toyiki mpiko, tokokonza mpe elongo na Ye. Kasi soki towangani Ye, Ye mpe akowangana biso;
13 ᎢᏳᏃ ᏁᏙᎢᏳᏅᎾ ᎢᎨᏎᏍᏗ ᎠᏎ ᏅᏩᏍᏗᏉ ᎦᎪᎯᏳᏗ ᎨᏒᎢ; ᎥᏝ ᎤᏩᏒ ᏴᎬᏓᏓᏱᎦ.
soki tozangi kondima, Ye azalaka kaka Moyengebene, pamba te akoki komiwangana te.
14 ᎯᎠ ᎾᏍᎩ ᏕᎭᏅᏓᏗᏍᏗᏍᎨᏍᏗ, ᎤᎵᏂᎩᏛᏯ ᏕᎯᏁᏤᎮᏍᏗ ᎤᎬᏫᏳᎯ ᎠᎦᏔᎲᎢ, ᎤᎾᏗᏒᏍᏗᏱ ᏂᎨᏒᎾ ᎨᏒ ᏓᏂᏬᏂᏍᎬᎢ, ᎪᎱᏍᏗ ᎬᏙᏗ ᏂᎨᏒᎾ ᏥᎩ, ᏓᏂᎦᏔᎲᏍᎬᏉᏍᎩᏂ ᎬᏩᎾᏛᏓᏍᏓᏁᎯ.
Yango nde makambo oyo osengeli koloba mbala na mbala epai ya bato, na kopesa bango mitindo liboso ya Nzambe ete batika koswana na tina na maloba; ezali na tina moko te, soki kaka te komema bato oyo bayokaka yango na libebi.
15 ᎭᏟᏂᎬᏁᎮᏍᏗ ᎬᏂᎨᏒ ᎢᏨᏁᏗᏱ ᎣᏏᏳ ᏣᏰᎸᏒ ᎤᏁᎳᏅᎯ, ᏗᏣᎸᏫᏍᏓᏁᎯ ᎨᏎᏍᏗ ᎨᏣᏕᎰᎯᏍᏗ ᏂᎨᏒᎾ ᎨᏒᎢ, ᎣᏍᏛ ᏘᏯᏙᎮᎯ ᎦᏰᎪᎩ ᏂᎨᏒᎾ ᎧᏃᎮᏛ.
Sala makasi ete omimonisa liboso ya Nzambe lokola moto ya kokoka, lokola mosali oyo ayokelaka mosala na ye soni te, pamba te ateyaka na bosembo Liloba ya solo.
16 ᎢᏴᏛᏍᎩᏂ ᏅᏁᎮᏍᏗ ᎦᏪᏢᏗ ᎨᏒ ᎠᎴ ᏄᎵᏌᎶᏛᎾ ᎦᏬᏂᎯᏍᏗ ᎨᏒᎢ, ᎾᏍᎩᏰᏃ ᎠᏂᏁᏉᏍᎨᏍᏗ ᎤᏁᎳᏅᎯ ᏗᏁᎶᏙᏗ ᏂᎨᏒᎾ ᎨᏒᎢ,
Kima masolo oyo ezanga tina mpe efingaka Nzambe, pamba te ememaka bato oyo bamipesaka na yango mosika na Nzambe.
17 ᎠᎴ ᎠᏂᏬᏂᏍᎬ ᎠᏓᏰᏍᎨᏍᏗ ᎾᏍᎩᏯ ᎤᎪᏏᏛ ᏣᏓᏰᏍᎪᎢ; ᎾᏍᎩ ᏄᎾᏍᏗ ᎭᎻᏂᏯ ᎠᎴ ᏆᎵᏓ,
Mateya na bango eliaka nzoto lokola pota oyo ezali na tofina. Kati na bango, tozali na Imene mpe Filete
18 ᎾᏍᎩ ᏚᏳᎪᏛ ᎨᏒ ᎤᎾᏞᏒ, ᎯᎠ ᏥᎾᏂᏪᎠ, ᎠᏲᎱᏒ ᏗᎴᎯᏐᏗ ᎨᏒ ᎦᏳᎳ ᎤᎶ ᏐᏅ; ᎠᎴ ᏓᏂᎷᏆᏗᏁᎭ ᎢᎦᏛ ᎤᏃᎯᏳᏒᎢ.
oyo basila kotika nzela ya solo. Bazali koloba ete lisekwa esili kosalema mpe bazali kokweyisa kondima ya bandimi mosusu.
19 ᎠᏎᏍᎩᏂᏃᏅ ᎦᎫᏍᏛᏗ ᎤᏁᎳᏅᎯ ᎤᏤᎵᎦ ᎤᎵᏂᎩᏗᏳ ᏂᎬᏅ; ᎯᎠᏰᏃ ᏂᎬᏅ ᎪᏪᎸᎢ, ᎤᎬᏫᏳᎯ ᏓᎦᏔᎭ ᎾᏍᎩ ᏧᏤᎵᎦ; ᎠᎴ ᎯᎠ, ᎩᎶ ᎧᏁᎢᏍᏗᏍᎨᏍᏗ ᎦᎶᏁᏛ ᏚᏙᎥ ᎾᏍᎩ ᎠᏓᏅᎡᎮᏍᏗ ᎠᏍᎦᏂ.
Nzokande moboko makasi oyo Nzambe asila kotia ezali kaka ngwi; batobola makomi oyo na likolo na yango lokola kashe: « Nkolo ayebi bato na Ye, » mpe « Moto nyonso oyo atatolaka Kombo ya Nkolo asengeli koboya mabe. »
20 ᎠᏎᏃ ᎡᏆ ᏣᏓᏁᎶ ᎾᎿᎭᏓᎰ ᏗᏖᎵᏙ ᎥᏝ ᎠᏕᎸᏉ ᏓᎶᏂᎨ ᎠᎴ ᎠᏕᎸᎤᏁᎬ ᎤᏩᏒ ᏗᎪᏢᏔᏅᎯ ᏱᎨᏐᎢ, ᎾᏍᏉᏍᎩᏂ ᎠᏓ ᎠᎴ ᎦᏓ ᏗᎪᏢᏔᏅᎯ; ᎠᎴ ᎢᎦᏛ ᏗᎦᎸᏉᏗ ᎢᎦᏛᏃ ᏗᎦᎸᏉᏗ ᏂᎨᏒᎾ.
Kati na ndako ya monene, ezalaka kaka te na basani ya wolo mpe ya palata, kasi ezalaka mpe na basani oyo basala na nzete to na mabele. Basani ya wolo mpe ya palata ezalaka mpo na koyamba bato ya lokumu, kasi basani ya nzete mpe ya mabele ezalaka mpo na misala ya bongo na bongo.
21 ᎢᏳᏃ ᎩᎶ ᎤᏓᏅᎦᎸᏛ ᏱᎩ ᎯᎠ ᎾᏍᎩ ᎨᏒᎢ, ᎾᏍᎩ Ꮎ ᎠᏖᎵᏙ ᎦᎸᏉᏗ ᎨᏎᏍᏗ, ᎦᎸᏉᏔᏅᎯ, ᎠᎴ ᏱᏍᏛ ᎢᎬᏁᎸᎯ ᎪᎱᏍᏗ ᎤᏩᏙᏗᏱ ᎦᏁᎳ; ᎠᎴ ᎠᏛᏅᎢᏍᏔᏅᎯ ᎾᎦᎥ ᎣᏍᏛ ᏗᎦᎸᏫᏍᏓᏁᏗ ᎨᏒ ᎤᎬᏩᎵ.
Soki moto amibateli peto na makambo nyonso oyo nawuti koloba, akozala lokola sani oyo babongisi mpo na koyamba bato ya lokumu, akozala bule, moto na tina mpo na Nkolo mpe moto oyo babongisi mpo na misala nyonso ya malamu.
22 ᎠᎴ ᏕᎭᏓᏅᎡᎮᏍᏗ ᎩᎳ ᏗᎾᏛᏍᎩ ᎤᎾᏚᎸᏅᏗ ᎨᏒᎢ; ᎯᏍᏓᏩᏕᎨᏍᏗᏃ ᏚᏳᎪᏛ ᎨᏒ, ᎠᎴ ᎪᎯᏳᏗ ᎨᏒ, ᎠᎴ ᎠᏓᎨᏳᏗ ᎨᏒ, ᎠᎴ ᏅᏩᏙᎯᏯᏛ ᎨᏒᎢ, ᎢᏣᎵᎪᏎᏍᏗ ᎾᏍᎩ Ꮎ ᎤᎬᏫᏳᎯ ᎠᎾᏓᏙᎵᏍᏓᏁᎯ ᎤᎾᏫ ᎦᏓᎭ ᏂᎨᏒᎾ ᎠᏅᏗᏍᎩ.
Kima baposa mabe ya bolenge mpe luka bosembo, kondima, bolingo mpe kimia elongo na bato oyo babelelaka Nkolo na motema ya peto.
23 ᏕᎭᏓᏅᎡᎮᏍᏗᏍᎩᏂ ᏄᎵᏌᎶᏛᎾ ᎠᎴ ᏅᎦᏔᎲᎾ ᏚᏬᏂᎯᏍᏗ ᎨᏒᎢ, ᎯᎦᏔᎭᏰᏃ ᏗᏘᏲᏍᏗ ᎨᏒ ᏩᎵᏰᎢᎶᎯᎲᎢ.
Kima masolo ya tembe ya bozoba mpe ezanga tina, pamba te oyebi malamu ete esukaka kaka na koswana.
24 ᎤᎬᏫᏳᎯᏰᏃ ᎤᏅᏏᏓᏍᏗ ᎥᏝ ᏧᏘᏲᏍᏗ ᏱᎩ, ᏧᎨᏳᎯᏍᎩᏂ ᏱᎩ ᎾᏂᎥᎢ, ᏗᎬᏩᏕᏲᏗ ᏱᎩ, ᎬᏂᏗᏳ ᏱᎩ,
Mpe ezali malamu te mpo na mosali ya Nkolo kozala moto oyo aswanaka na bato, kasi asengeli nde kozala moto ya boboto epai ya bato nyonso, moto oyo azali na makoki ya kopesa malakisi, ya kokanga motema
25 ᎤᏓᏅᏘ ᎬᏗᏍᎬ ᏱᎩ ᏕᎨᏲᎲᏍᎬ ᎬᏩᏡᏗᏍᎩ; ᎤᏚᎩ ᏳᏩᎭ ᎤᏁᎳᏅᎯ ᏧᏁᏗᏱ ᏧᏂᏁᏟᏴᏍᏗᏱ ᏚᎾᏓᏅᏛᎢ, ᎠᎴ ᏧᎾᏓᏂᎸᎢᏍᏗᏱ ᎤᏙᎯᏳᎯ ᎨᏒᎢ;
mpe ya koteya na boboto bato oyo babendanaka na ye; asengeli kozala na elikya ete Nzambe akosalela bango ngolu ya kobongola mitema mpo ete bayeba solo.
26 ᎠᎴ ᎤᎾᏓᏅᏘᏐᏗᏱ ᎤᏅᏒ ᎤᎾᏚᏓᎴᏍᏗᏱ ᎠᏍᎩᎾ ᎤᏌᏛᎢ, ᎾᏍᎩ ᎫᏴᎩᏅᎯ ᏥᎩ ᎤᏩᏒᏉ ᎠᏓᏅᏖᏍᎬ ᎢᏧᏩᏁᎸᎯ.
Bongo bakozongela mayele na bango ya malamu mpe bakolongwa na motambo ya Satana oyo akanga bango na boloko mpo ete basala kaka mokano na ye.

< ᏉᎳ ᏧᏬᏪᎳᏅᎯ ᏔᎵᏁ ᏗᎹᏗ ᏧᏬᏪᎳᏁᎸᎯ 2 >