< Banzembo 130 >

1 Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Ndako ya Nkolo. Nkolo, nazali kobelela Yo wuta na mozindo ya pasi! 2 Nkolo, yoka ngai! Yoka mabondeli na ngai! 3 Yawe, soki obosanaka masumu te, Nkolo, nani akokaki kotelema? 4 Kasi bolimbisi ezali epai na Yo, yango wana basengeli kotosa Yo. 5 Na motema na ngai mobimba, nazali na elikya kati na Yawe, nazali penza na elikya; nazali kozela maloba na Ye. 6 Nazali na elikya kati na Nkolo koleka kutu ndenge mokengeli azelaka kotana ya tongo, koleka penza ndenge mokengeli azelaka kotana ya tongo. 7 Isalaele, tia elikya kati na Yawe, pamba te azali bolingo, mpe kokangolama ya kokoka ezali elongo na Ye. 8 Ye nde akokangola Isalaele na bambeba na yango nyonso.

< Banzembo 130 >