< Banzembo 129 >

1 Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Tempelo ya Yawe. Wuta bolenge na ngai, banyokoli ngai bambala ebele. Tika ete Isalaele ezongela koloba: 2 « Wuta bolenge na ngai, banyokoli ngai bambala ebele, kasi batikali kolonga ngai te! » 3 Bato mabe batimoli mokongo na ngai, bazokisi ngai bapota ya banzela milayi na mokongo. 4 Kasi lokola Yawe azali sembo, akati basinga ya bato mabe. 5 Tika ete bato nyonso oyo bayinaka Siona bakufa soni mpe bazonga sima! 6 Tika ete bakoma lokola matiti oyo ebotaka na likolo ya ndako mpe ekawukaka liboso ete balongola yango; 7 tika ete mobuki bambuma ya bilanga atondisa na yango te maboko na ye, tika ete mokangi maboke ya banzete atondisa na yango te saki na ye. 8 Tika ete baleki nzela baloba na bango te: « Tika ete Yawe apambola bino! » Topamboli bino na Kombo na Yawe!

< Banzembo 129 >