< Banzembo 131 >

1 Nzembo ya Davidi. Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Tempelo ya Yawe. Yawe, motema na ngai ezali na lofundu te, miso na ngai ezali na posa makasi te; namipesaka te na makambo oyo eleki ya minene mpe eleki pasi mpo na ngai. 2 Kasi nabatelaki kimia kati na motema na ngai mpe namitungisaki te lokola mwana moke elongo na mama na ye. Nazali na kimia lokola mwana oyo mama alongola na mabele. 3 Isalaele, tia elikya kati na Yawe kobanda sik’oyo mpe libela na libela.

< Banzembo 131 >