< Psalmi 118 >

1 Aleluja! Zahvaljujte Jahvi jer je dobar, jer je vječna ljubav njegova!
Bosanzola Yawe, pamba te azali malamu, pamba te bolingo na Ye ewumelaka seko na seko!
2 Neka rekne dom Izraelov: “Vječna je ljubav njegova!”
Tika ete Isalaele aloba: « Pamba te bolingo na Ye ewumelaka seko na seko! »
3 Neka rekne dom Aronov: “Vječna je ljubav njegova!”
Tika ete bakitani ya Aron baloba: « Pamba te bolingo na Ye ewumelaka seko na seko! »
4 Svi koji se Jahve boje neka reknu: “Vječna je ljubav njegova!”
Tika ete bato oyo batosaka Yawe baloba: « Pamba te bolingo na Ye ewumelaka seko na seko! »
5 Iz tjeskobe Jahvu ja zazvah: on me usliša i oslobodi.
Kati na pasi na ngai, nabelelaki Yawe, mpe Yawe ayanolaki ngai, abikisaki ngai.
6 Jahve je sa mnom i ja ne strahujem: što mi tko može?
Yawe azali mpo na ngai, nakobanga te; bato bakoki kosala ngai nini?
7 Jahve je sa mnom, pomoć moja, i zbunjene gledam dušmane.
Yawe azali mpo na ngai, ayaka kosunga ngai; boye natalaka banguna na ngai na miso lokola molongi.
8 Bolje se Jahvi uteći nego se uzdat' u čovjeka.
Eleki malamu koluka ebombamelo kati na Yawe na esika ya kotia elikya na bato.
9 Bolje se Jahvi uteći nego se uzdat' u mogućnike.
Eleki malamu koluka ebombamelo kati na Yawe na esika ya kotia elikya kati na bato minene ya mokili.
10 Pogani me okružiše: imenom ih Jahvinim uništih.
Bikolo nyonso ezingelaki ngai, kasi nabebisaki bango na Kombo na Yawe.
11 Opkoliše me odasvud: imenom ih Jahvinim uništih.
Bakobaki kaka kozingela ngai, kasi nabebisaki bango na Kombo na Yawe.
12 Opkoliše me poput pčela, ubod im žeže kao trnje zapaljeno: imenom ih Jahvinim uništih.
Bazingelaki ngai lokola banzoyi, kasi ekufaki lokola moto ya esobe; nabebisaki yango na Kombo na Yawe.
13 Gurahu me, gurahu, da me obore, ali mi Jahve pomože.
Batindikaki ngai mpo ete nakweyisa kondima, kasi Yawe asungaki ngai.
14 Jahve je moja snaga i pjesma, on mi je spasitelj.
Yawe azali makasi mpe nguya na ngai; apesaki ngai elonga.
15 Čuj! Radost i spasenje odzvanja šatorima pravednika: Jahvina se proslavi desnica,
Koganga ya esengo mpe ya elonga eyokanaka wuta na bandako ya kapo ya bato ya sembo, pamba te nguya na Yawe esalaka makambo minene!
16 Jahvina me uzdigne desnica, Jahvina se proslavi desnica!
Yawe asembolaka loboko na Ye ya mobali, mpe nguya na Yawe esalaka makambo minene.
17 Ne, umrijeti neću nego živjeti i kazivat ću djela Jahvina.
Nakokufa te, nakozala na bomoi mpe nakopanza sango ya misala ya Yawe.
18 Kaznom teškom kaznio me Jahve, ali me smrti ne preda.
Solo, Yawe apesaki ngai etumbu makasi; kasi akabaki ngai na kufa te.
19 Otvorite mi širom vrata pravde: ući ću, Jahvi zahvalit'!
Bofungolela ngai bikuke ya bosembo mpo ete nakota mpe nakumisa Yawe.
20 “Ovo su vrata Jahvina, na njih ulaze pravedni!”
Tala ekuke ya Yawe; bato ya sembo bakotelaka na ekuke yango.
21 Zahvalit ću ti što si me uslišio i moj postao spasitelj.
Nasanzolaka Yo, pamba te oyanolaki ngai mpe opesaki ngai elonga.
22 Kamen što ga odbaciše graditelji postade kamen zaglavni.
Libanga oyo batongi ndako babwakaki ekomi libanga ya songe ya ndako, mpe esimbi ndako mobimba.
23 Jahvino je to djelo: kakvo čudo u očima našim!
Ezali Yawe nde alingaki bongo, mpe ezali penza likambo ya kokamwa na miso na biso!
24 Ovo je dan što ga učini Jahve: kličimo i radujmo se njemu!
Tala mokolo oyo Yawe asali; tika ete tosepela mpe toganga na esengo mpo na mokolo yango!
25 O Jahve, spasenje nam daj! Jahve, sreću nam daj!
Yawe, nabondeli Yo, pesa lobiko. Yawe, nabondeli Yo, pesa elonga.
26 Blagoslovljen koji dolazi u imenu Jahvinu! Blagoslivljamo vas iz Doma Jahvina!
Tika ete apambolama, Ye oyo ayei na Kombo ya Nkolo! Tozali kopambola bino wuta na Tempelo ya Yawe.
27 Obasjao nas Bog Jahve! Složite povorku s grančicama u ruci sve do rogova žrtvenika.
Yawe azali Nzambe, mpe angengisaki biso. Bokota na molongo, bomema mandalala na maboko mpe bokende kino na maseke ya etumbelo.
28 Ti si Bog moj - tebi zahvaljujem: Bože moj, tebe ja uzvisujem.
Ozali Nzambe na ngai, nasanzolaka Yo! Ozali Nzambe na ngai, nanetolaka Yo.
29 Zahvaljujte Jahvi jer je dobar, jer je vječna ljubav njegova!
Bosanzola Yawe, pamba te azali malamu, pamba te bolingo na Ye ewumelaka seko na seko!

< Psalmi 118 >