< Job 1 >

1 Bijaše nekoć u zemlji Usu čovjek po imenu Job. Bio je to čovjek neporočan i pravedan: bojao se Boga i klonio zla.
Moto moko azalaki kovanda na mokili ya Utsi, kombo na ye ezalaki « Yobo; » azalaki kotambola na boyengebene mpe na bosembo, azalaki kotosa Nzambe mpe kokima mabe.
2 Rodilo mu se sedam sinova i tri kćeri.
Azalaki na bana mibali sambo, bana basi misato;
3 Imao je sedam tisuća ovaca, tri tisuće deva, pet stotina jarmova goveda, pet stotina magarica i veoma mnogo služinčadi. Čovjek taj bijaše najugledniji među svim istočnjacima.
mpe azalaki na etonga ya bameme nkoto sambo, bashamo nkoto misato, bangombe nkoto moko, ba-ane nkama mitano, mpe azalaki na basali ebele penza. Alekaki bato nyonso ya Este na lokumu.
4 Sinovi su njegovi običavali naizmjence priređivati gozbe kod jednoga od njih, svaki u svoj dan, te su pozivali svoje tri sestre da jedu i piju s njima.
Bana na ye ya mibali bazalaki na ezaleli ya kosangana kati na ndako ya moko kati na bango, mpo na kosala feti; mpe, na feti yango, bazalaki kobengisa bandeko na bango ya basi mpo na kolia mpe komela elongo na bango.
5 A kad bi se izredali s gozbama, Job bi ih pozvao na očišćenje. Uranio bi izjutra i prinio paljenice za svakog od njih; mislio je: “Tko zna nisu li mi sinovi griješili i u srcu Boga hulili!” Tako je Job svagda činio.
Mpe soki mikolo ya feti esili, Yobo azalaki kobengisa bana na ye mpo na kopetola bango. Na tongo-tongo, azalaki kobonza mbeka ya kotumba mpo na moko na moko kati na bango; pamba te azalaki komilobela: « Tango mosusu bana na ngai basali masumu mpe balakeli Nzambe mabe kati na mitema na bango. » Yobo azalaki kosala bongo tango nyonso.
6 Jednoga dana dođu sinovi Božji da stanu pred Jahvu, a među njima pristupi i Satan.
Mokolo moko, ba-anjelu ya Nzambe bayaki komilakisa liboso ya Yawe. Satana mpe ayaki elongo na bango.
7 Jahve tad upita Satana: “Odakle dolaziš?” - “Evo prođoh zemljom i obiđoh je”, odgovori on.
Yawe atunaki Satana: — Owuti wapi? Satana azongiselaki Yawe: — Nawuti kotambola mpe koyengayenga na mokili.
8 Nato će Jahve: “Nisi li zapazio slugu moga Joba? Njemu na zemlji nema ravna. Čovjek je to neporočan i pravedan, boji se Boga i kloni zla!”
Yawe alobaki na Satana: — Boni, omoni Yobo, mosali na Ngai? Ezali na moto moko te oyo azali lokola ye, kati na mokili: azali moyengebene mpe moto ya sembo, atosaka Nzambe mpe akimaka mabe.
9 A Satan odgovori Jahvi: “Zar se Job uzalud Boga boji?
Satana azongiselaki Yawe: — Okanisi ete ezali na pamba nde Yobo atosaka Nzambe?
10 Zar nisi ogradio njega, kuću mu i sav posjed njegov? Blagoslovio si djelo njegovih ruku, stoka mu se namnožila po zemlji.
Boni, otonga mir te zingazinga na ye mpo na kobatela ye, ndako na ye mpe biloko na ye nyonso? Opambola misala ya maboko na ye, mpe bibwele na ye epanzana na mokili mobimba.
11 Ali pruži jednom ruku i dirni mu u dobra: u lice će te prokleti!”
Kasi sik’oyo, sembola kaka loboko na Yo mpe beta biloko na ye nyonso; okomona penza soki akolakela Yo mabe te na miso na Yo.
12 “Neka ti bude! - reče Jahve Satanu. - Sa svime što ima radi što ti drago; samo ruku svoju na nj ne diži.” I Satan ode ispred lica Jahvina.
Yawe alobaki na Satana: — Malamu! Biloko na ye nyonso ezali kati na maboko na yo; kasi, kokitisa loboko na yo te na bomoi na ye! Boye, Satana alongwaki liboso ya Yawe.
13 Jednoga dana, dok su Jobovi sinovi i kćeri jeli i pili vino u kući najstarijeg brata,
Mokolo moko, tango bana mibali mpe bana basi ya Yobo bazalaki kosala feti mpe komela masanga ya vino kati na ndako ya ndeko mobali na bango ya liboso,
14 dođe glasnik k Jobu i reče: “Tvoji su volovi orali a magarice pokraj njih pasle,
ntoma moko ayaki epai na Yobo mpo na koyebisa ye: « Bangombe ezalaki kobalola mabele ya bilanga, mpe ba-ane ezalaki kolia matiti pembeni wana;
15 kad iznenada Sabejci navališe na njih i oteše ih, pobivši momke oštrim mačem. Jedini ja utekoh da ti ovo javim.”
bongo bato ya Saba bayei kokweyela yango mpe bakei na yango. Babomi basali na mopanga, mpe ngai moko kaka moto nabiki; yango wana nayei kopesa yo sango! »
16 Dok je on još to govorio, dođe drugi i reče: “Oganj Božji udari s neba, spali tvoje ovce i pastire te ih proždrije. Jedini ja utekoh da ti javim.”
Wana azalaki nanu koloba, ntoma mosusu ayaki mpe alobaki: « Moto ya Nzambe ekweyi longwa na likolo mpe ezikisi bibwele mpe basali! Ngai moko kaka moto nabiki; yango wana nayei kopesa yo sango! »
17 Dok je još govorio, dođe treći i reče: “Kaldejci navališe sa tri čete na tvoje deve i oteše ih, pobivši momke oštrim mačem. Jedini ja utekoh da ti javim.”
Wana azalaki nanu koloba, ntoma mosusu ayaki mpe alobaki: « Bato ya Chalide basalaki masanga misato, bakweyeli bashamo na yo mpe bakei na yango. Babomi basali na mopanga, mpe ngai moko kaka moto nabiki; yango wana nayei kopesa yo sango! »
18 Dok je ovaj još govorio, dođe četvrti i reče: “Tvoji su sinovi i kćeri jeli i pili vino u kući najstarijeg brata.
Wana azalaki nanu koloba, ntoma mosusu ayaki mpe alobaki: « Wana bana na yo ya mibali mpe ya basi bazalaki kosala feti mpe komela masanga ya vino kati na ndako ya ndeko mobali na bango ya liboso,
19 I gle, vjetar se silan diže iz pustinje, udari na sva četiri ugla kuće, obori je na djecu te ona zaglaviše. Jedini ja utekoh da ti javim.”
mopepe moko ya makasi ewutaki na ngambo mosusu ya esobe mpe eyaki kobeta basonge minei ya ndako. Ndako ekweyeli bango, mpe bango nyonso basili kokufa. Ngai moko kaka moto nabiki; yango wana nayei kopesa yo sango! »
20 Tad ustade Job, razdrije haljinu na sebi, obrija glavu pa ničice pade na zemlju, pokloni se
Yobo atelemaki, apasolaki kazaka na ye, akokolaki suki ya moto na ye, akweyaki na mabele mpe afukamaki.
21 i reče: “Go iziđoh iz krila majčina, go ću se onamo i vratiti. Jahve dao, Jahve oduzeo! Blagoslovljeno ime Jahvino!”
Alobaki: « Nabimaki bolumbu, na libumu ya mama na ngai, mpe nakozonga bolumbu. Yawe apesaki, mpe Yawe asili kozwa; tika ete Kombo na Ye ekumisama! »
22 Uza sve to, nije sagriješio Job niti je kakvu ludost protiv Boga izustio.
Na makambo wana nyonso, Yobo atikalaki kosala lisumu te mpe atangaki pasi yango na moto ya Nzambe te.

< Job 1 >