< ᏉᎳ ᏓᏓᏏ ᎤᏬᏪᎳᏁᎸᎯ 2 >

1 ᏂᎯᏍᎩᏂ ᎯᏃᎮᏍᎨᏍᏗ ᎾᏍᎩ ᎣᏍᏛ ᏗᏕᏲᏗ ᎨᏒ ᎤᎵᎶᎲᏍᎩ;
Kasi yo, teya makambo oyo ekoki na malakisi ya peto.
2 ᎾᏍᎩ ᏧᎾᏛᏐᏅᎯ ᏧᏂᏴᏍᏕᏍᎩ ᏂᎨᏒᎾ ᎢᏳᎾᎵᏍᏙᏗᏱ, ᎨᏥᎸᏉᏗ, ᎤᎾᎵᏏᎾᎯᏍᏗ, ᏄᎪᎸᎾ ᎨᏒ ᎤᏃᎯᏳᏒᎢ, ᎠᎴ ᎤᎾᏓᎨᏳᏒᎢ, ᎠᎴ ᏗᏅᏂᏗᏳ ᎨᏒᎢ.
Teya na batata mibange ete balekisaka ndelo te na bizaleli na bango, bazala bato oyo bakoki na lokumu, bato na mayele, bato na kondima ya solo, bato na bolingo, mpe bato na molende.
3 ᎠᏂᎨᏴ ᎾᏍᏉ ᎠᏂᎦᏴᎵᎨᎢ, ᎾᏍᎩ ᏚᏂᎸᏫᏍᏓᏁᎲ ᏚᏳᎪᏛ ᎢᏯᏛᏁᏗ ᎨᏒ ᎤᎵᎶᎲᏍᎩ ᏱᎩ, ᎤᏐᏅ ᎠᎾᏓᏃᎮᏍᎩ ᏂᎨᏒᎾ, ᎩᎦᎨ-ᎠᏗᏔᏍᏗ ᎤᏂᎦᎾᏏᏍᎩ ᏂᎨᏒᎾ, ᎣᏍᏛ ᎨᏒ ᏗᎾᏕᏲᎲᏍᎩ;
Teya mpe bamama mibange ete bazala na bizaleli oyo ekoki na bato oyo bamibulisa mpo na Nzambe: basengeli te kotongaka bato mpe kozala bawumbu ya masanga; basengeli nde komipesa na koteyaka makambo ya malamu,
4 ᎾᏍᎩ ᏗᎬᏩᏁᏲᏗ ᏱᎩ ᎠᏂᏫᎾᎨᏌᏂ ᎠᏂᎨᏴ ᎤᎾᎵᏏᎾᎯᏍᏗ ᎢᏳᎵᏍᏙᏗᏱ, ᏧᏂᎨᏳᎯ ᎢᏳᎵᏍᏙᏗᏱ ᏗᎬᏩᏂᏰᎯ, ᏧᏂᎨᏳᎯ ᎢᏳᎵᏍᏙᏗᏱ ᏧᏁᏥ,
mpo ete balakisa na bilenge basi kolinga mibali na bango mpe bana na bango,
5 ᎤᎾᎵᏏᎾᎯᏍᏗ ᎢᏳᎾᎵᏍᏙᏗᏱ, ᎠᏁᏯᏔᎯ, ᏚᏁᏅᏒᏉ ᎠᏁᏙᎯ, ᎠᏃᏍᏛ, ᏧᏃᎯᏳᎯ ᎤᏅᏒ ᏗᎬᏩᏂᏰᎯ, ᎾᏍᎩ ᏅᏓᏳᎵᏍᏙᏗᏱ ᎧᏃᎮᏛ ᎤᏁᎳᏅᎯ ᎤᏤᎵ ᎦᎬᏩᏂᏐᏢᏙᏗᏱ ᏂᎨᏒᎾ.
komibatela malamu, kotambola na bomoi ya peto, komipesa na misala kati na bandako na bango, kozala basi ya boboto mpe ya botosi liboso ya mibali na bango, mpo ete Liloba na Nzambe efingama te.
6 ᎠᏂᏫᏅ ᎾᏍᏉ ᏕᎯᏁᏤᎮᏍᏗ ᎤᎾᎵᏏᎾᎯᏍᏗ ᎢᏳᎾᎵᏍᏙᏗᏱ.
Lendisa mpe bilenge mibali ete bamibatelaka malamu.
7 ᏂᎦᎥ ᏧᏓᎴᏅᏛ ᎨᏒ ᎬᏂᎨᏒ ᏅᏁᎮᏍᏗ ᏗᎦᏰᏣᏟᎶᏍᏙᏗ ᎨᏒ ᎣᏍᏛ ᏗᎦᎸᏫᏍᏓᏁᏗ ᎨᏒᎢ; ᏗᏕᏂᏗ ᎨᏒ ᎤᎬᏩᎵ ᎤᏲ ᏄᏓᏑᏴᎾ, ᎬᎸᏉᏗᏳ, ᏄᏠᎾᏍᏛᎾ,
Na makambo nyonso, zala ndakisa na nzela ya misala malamu; mpe na mateya na yo, lakisa bosembo, longola maseki,
8 ᎯᏬᏂᏍᎬ ᎣᏍᏛ ᏱᎩ ᎾᏍᎩ ᎬᎪᏁᎶᎯᏍᏗ ᏂᎨᏒᎾ; ᎾᏍᎩ Ꮎ ᏣᏡᏗᏍᎩ ᎬᏩᏕᎰᎯᏍᏗ ᏱᎩ ᏄᎲᏅ ᎨᏒ ᎢᏳᏍᏗ ᎪᎱᏍᏗ ᎤᏐᏅ ᎶᏃᎮᏗᏱ.
salela maloba ya kimia mpe ezanga pamela, mpo ete bato oyo batelemelaka yo bayoka soni mpe bazanga mabe ya koloba na tina na biso.
9 ᎨᏥᏅᏏᏓᏍᏗ ᏕᎯᏁᏤᎮᏍᏗ ᏧᏃᎯᏳᏗᏱ ᎤᏅᏒ ᏗᎬᏩᏂᏅᏏᏙᎯ, ᏂᎦᎥᏉ ᎾᎾᏛᏁᎲ ᎣᏍᏛ ᎤᏂᏰᎸᏗ ᏧᏂᎸᏫᏍᏓᏁᏗᏱ; ᏔᎵᏁᏉ ᏅᏗᏂᏁᎬᎾ.
Teya bawumbu ete batosaka bankolo na bango na makambo nyonso, basalaka makasi mpo na kosepelisa bango, babendanaka na bango te
10 ᎾᏂᏃᏍᎩᏍᎬᎾ, ᎬᏂᎨᏒᏍᎩᏂ ᎾᏅᏁᎮᏍᏗ ᏂᎦᎥ ᎣᏍᏛ ᏄᏓᎵᏓᏍᏛᎾ ᎨᏒᎢ; ᎾᏍᎩ ᎤᏃᏚᎢᏍᏙᏗᏱ ᏂᎦᎥᏉ ᎾᎾᏛᏁᎲ ᎾᏍᎩ ᏗᏕᏲᏅᎯ ᎨᏒ ᎤᏁᎳᏅᎯ ᎢᎩᏍᏕᎵᏍᎩ ᎤᏤᎵᎦ.
mpe bayibaka te. Kasi teya bango ete bamilakisaka tango nyonso lokola bato oyo bankolo na bango bakoki kotiela mitema, mpo ete bakomisa malakisi ya Nzambe Mobikisi na biso elengi.
11 ᎬᏩᎦᏘᏯᏰᏃ ᎤᏓᏙᎵᏍᏗ ᎨᏒ ᎤᏁᎳᏅᎯ ᎾᏍᎩ ᎠᏓᏍᏕᎵᏍᎩ ᎾᏂᎥ ᏴᏫ ᎤᏂᎾᏄᎪᏤᎸ,
Pamba te ngolu ya Nzambe emonisami lokola etima ya lobiko mpo na bato nyonso.
12 ᎢᎨᏲᎲᏍᎦ, ᎾᏍᎩ ᎢᏓᏓᏱᎲ ᎤᏁᎳᏅᎯ ᏗᏁᎶᏙᏗ ᏂᎨᏒᎾ ᎨᏒᎢ ᎠᎴ ᎡᎶᎯ ᎡᎯ ᎠᏚᎸᏅᏗ ᎨᏒᎢ, ᎢᎦᎵᏏᎾᎯᏍᏗ ᎠᎴ ᏚᏳᎪᏛᎢ, ᎠᎴ ᎤᏁᎳᏅᎯ ᎦᎸᏉᏙᏗ ᎨᏒ ᏱᏓᎴᏂᏙᎭ ᎠᏂ ᎡᎶᎯ ᎨᏒᎢ; (aiōn g165)
Elakisaka biso kotika mabe, kokabwana na baposa ya makambo ya mokili, kobika tango oyo na bwanya, na bosembo mpe na botosi kati na makambo ya Nzambe, (aiōn g165)
13 ᏱᏗᎦᏘᏯ ᎣᏍᏛ ᎤᏚᎩ ᎬᏗ ᎨᏒᎢ, ᎾᏍᎩ ᎦᎸᏉᏗᏳ ᏄᏛᏁᏍᏗ ᎦᎾᏄᎪᏥᎸ ᎦᎸᏉᏗ ᎤᏁᎳᏅᎯ ᎠᎴ ᎢᎩᏍᏕᎵᏍᎩ ᏥᏌ ᎦᎶᏁᏛ;
wana tozali kozela kokokisama ya elikya oyo epambolama: komonisama ya nkembo ya Yesu-Klisto, Nzambe monene mpe Mobikisi na biso, oyo
14 ᎾᏍᎩ ᎠᏴ ᏥᏕᎦᏓᎵᏲᎯᏎᎴᎢ, ᎾᏍᎩ ᏅᏓᏳᎵᏍᏙᏗᏱ ᎢᎦᎫᏴᏗᏱ ᎢᎫᏓᎴᏍᏗᏱ ᏂᎦᎥ ᎠᏍᎦᏅᎢᏍᏗ ᎨᏒᎢ, ᎠᎴ ᏧᏅᎦᎸᏗᏱ ᎤᏩᏒ ᏧᏤᎵ ᎢᏧᏩᏁᏗᏱ ᎤᎾᏓᏤᎵᏛ ᏴᏫ, ᎤᎵᏂᎩᏛ ᎤᎾᏓᏅᏘ ᎣᏍᏛ ᏧᏂᎸᏫᏍᏓᏁᏗᏱ.
amikabaki Ye moko mpo na biso, mpo ete akangola biso na mabe nyonso mpe apetola biso mpo na Ye moko lokola bato na Ye, oyo batondi na posa makasi ya kosala misala ya malamu.
15 ᎾᏍᎩ ᎯᎠ ᏄᏍᏕᏍᏗ ᎯᏃᎮᏍᎨᏍᏗ, ᎠᎴ ᏕᎯᏬᏁᏗᏍᎨᏍᏗ, ᎠᎴ ᏕᎯᎬᏍᎪᎸᎥᏍᎨᏍᏗ ᎲᏗᏍᎨᏍᏗ ᏂᎦᎥ ᏣᏒᎦᎸᎢ. ᎲᏗᏍᎨᏍᏗ ᏞᏍᏗ ᎩᎶ ᎡᏍᎦ ᏱᏣᏰᎸᏎᏍᏗ.
Yango nde makambo oyo osengeli koteya. Lendisa mpe pamela na bokonzi nyonso. Kopesa na moto moko te nzela ya kotiola yo.

< ᏉᎳ ᏓᏓᏏ ᎤᏬᏪᎳᏁᎸᎯ 2 >