< ᏣᏂ ᏄᏍᏛ ᎠᏥᎾᏄᎪᏫᏎᎸᎢ 13 >

1 ᎠᎺᏉᎯᏃ ᎤᎶᏗ ᏃᏳᎯ ᎨᏒ ᎥᏆᎴᏔᏅᎩ, ᎠᎴ ᏅᎩ ᏗᎦᏅᏌᏗ ᏥᎪᎥᎩ ᎠᎺᏉᎯ ᏓᏳᏚᎩᏒᎩ, ᎦᎵᏉᎩ, ᏓᏍᎫᏓᏛᎩ ᎠᎴ ᎠᏍᎪᎯ ᏚᎷᎬᎩ, ᏚᎷᎬᏃ ᎠᏍᎪᎯ ᏚᎵᏍᏚᎸᎩ, ᏓᏍᎫᏓᏛᏃ ᎤᏁᎳᏅᎯ ᏚᏙᎥ ᎠᏐᏢᎢᏍᏙᏗ ᎨᏒ ᎪᏪᎸᎩ.
Dalagona ekendeki kotelema na zelo ya ebale monene. Bongo namonaki nyama moko kobima longwa na ebale monene. Ezalaki na maseke zomi mpe mito sambo. Elataki mitole zomi na maseke na yango; mpe na mito na yango, bakomaki bakombo mpo na kofinga Nzambe.
2 ᎿᎭᏃ ᏅᎩ ᏗᎦᏅᏌᏗ ᏥᎪᎥᎯ ᏢᏓᏥᏧᎶᎸᏗ ᎾᏍᎩᏯ ᎨᏒᎩ, ᏚᎳᏍᎬᏃ ᏲᏅᏥᏚᎳᏍᎦ ᎾᏍᎩᏯ ᎨᏒᎩ, ᎠᎰᎵᏃ ᏢᏓᏥ ᎤᏃᏕᏅ ᎠᎰᎵ ᏥᏄᏍᏙ ᎾᏍᎩᏯ ᎨᏒᎩ, ᎢᎾᏛᏃ ᎤᏁᎸᎩ ᎤᏤᎵ ᎤᎵᏂᎬᎬᎢ ᎠᎴ ᎤᏤᎵ ᎤᏪᏗᏱ ᎨᏒᎢ, ᎠᎴ ᎤᏣᏗ ᎢᏳᏛᏁᎵᏓᏍᏗᏱ ᎤᎵᏍᎪᎸᏓᏁᎸᎩ.
Nyama oyo namonaki ezalaki lokola nkoyi. Makolo na yango ezalaki lokola ya ngombolo, mpe monoko na yango lokola ya nkosi. Dalagona epesaki nyama wana nguya na yango, kiti na yango ya bokonzi mpe bokonzi monene.
3 ᏌᏉᏃ ᎠᏍᎫᏓᏛ ᎠᎩᎪᎲᎩ ᎬᏩᏲᎱᎯᏍᏗ ᎢᏴᏛ ᏣᏥᏐᏅᏃ ᏓᏤᎸᎩ; ᎠᎴ ᎾᏍᎩ ᎬᏩᏲᎱᎯᏍᏗ ᎢᏴᏛ ᎠᏥᏐᏅᏅ ᎤᏗᏩᏒᎯ ᎨᏒᎩ; ᎠᎴ ᏂᎬᎾᏛ ᎡᎶᎯ [ ᎠᏁᎯ ] ᎠᏂᏍᏆᏂᎪᏍᎬᎩ [ ᎠᎴ ] ᎠᏂᏍᏓᏩᏗᏒᎩ ᎾᏍᎩ Ꮎ ᏅᎩ-ᏗᎦᏅᏌᏗ.
Moko kati na mito na yango ezalaki komonana lokola nde ezali na pota moko ya monene makasi oyo ekokaki komema yango na kufa, kasi pota yango esilaki. Mokili mobimba elulaki nyama yango mpe ekomaki kolanda yango.
4 ᎠᎴ ᎤᎾᏓᏙᎵᏍᏓᏁᎸᎩ ᎢᎾᏛ ᎾᏍᎩ ᏅᎩ-ᏓᎦᏅᏌᏗ ᎤᎵᏂᎬᎬ ᎤᏁᎸᎯ ᎨᏒᎢ; ᎠᎴ ᎾᏍᎩ ᏅᎩ-ᏗᎦᏅᏌᏗ ᎤᎾᏓᏙᎵᏍᏓᏁᎸᎩ, ᎯᎠ ᎾᏂᏪᏍᎬᎩ, ᎦᎪ ᏅᎩ-ᏗᎦᏅᏌᏗ ᏄᏍᏛ ᎾᏍᎩᏯ ᏄᏍᏗ? ᎦᎪ ᏰᎵ ᎾᏍᎩ ᏓᎿᎭᏩ ᏱᎾᏅᎦ?
Bato bagumbamelaki dalagona mpo ete epesaki bokonzi na yango epai ya nyama wana. Bagumbamelaki mpe nyama yango na maloba oyo: « Nani akokani na nyama oyo? Nani akoki kobundisa yango? »
5 ᎠᎴ ᎠᎰᎵ ᎠᏥᏁᎸᎩ ᎾᏍᎩ ᎬᏗᏍᎬ ᎤᏣᏘ ᎠᏢᏈᏍᏗ ᎨᏒ ᎦᏬᏂᏍᎬᎩ ᎠᎴ ᎠᏐᏢᎢᏍᏗᏍᎬᎩ; ᎠᎴ ᎠᎦᎵᏍᎪᎸᏓᏁᎸᎩ ᏅᎦᏍᎪᎯ ᏔᎵᎦᎵ ᎢᏯᏅᏙ ᎤᏕᏗᏱ.
Nyama epesamelaki monoko mpo na kobimisa maloba ya lolendo mpe ya kofinga Nzambe; epesamelaki nzela ya kosalela bokonzi na yango basanza tuku minei na mibale.
6 ᎠᎴ ᎠᎰᎵ ᎤᏍᏚᎢᏒᎩ ᎤᏁᎳᏅᎯ ᎠᏐᏢᎢᏍᏗᏍᎬᎢ, ᏚᏙᎥ ᎦᎬᏩᏐᏢᏙᏗᏱ, ᎠᎴ ᎾᏍᎩ ᎤᏤᎵ ᎦᎵᏦᏛᎢ, ᎠᎴ ᎾᏍᎩ Ꮎ ᎦᎸᎳᏗ ᎠᏁᎯ.
Efungolaki monoko na yango mpe ekomaki kobimisa maloba ya kofinga Nzambe, Kombo na Ye, evandelo na Ye mpe bavandi ya Lola.
7 ᎠᎴ ᎾᏍᎩ ᎠᏥᏁᎸᎩ ᎤᎾᏓᏅᏘ ᏓᎿᎭᏩ ᎢᏳᏅᏁᏗᏱ, ᎠᎴ ᎾᏍᎩ ᏧᏎᎪᎩᏍᏗᏱ; ᎠᎴ ᎠᏥᏁᎸᎩ ᎾᏍᎩ ᎢᏳᏩᏂᏐᏗᏱ ᏗᎬᏩᏁᎶᏙᏗᏱ ᎾᏂᎥ ᏓᏂᎳᏍᏓᎳᏩᏗᏒᎢ, ᎠᎴ ᏧᏓᎴᏅᏛ ᏗᏂᏬᏂᏍᎩ ᎨᏒᎢ, ᎠᎴ ᎤᎾᏓᏤᎵᏛ ᏴᏫ ᏓᏁᏩᏗᏒᎢ.
Epesamelaki lisusu makoki ya kobundisa mpe kolonga basantu. Mpe epesamelaki bokonzi na likolo ya mabota nyonso, mikili nyonso, nkota nyonso mpe bikolo nyonso.
8 ᎠᎴ ᎾᏂᎥ ᎡᎶᎯ ᏓᏁᏩᏗᏒ ᏓᎬᏩᏓᏙᎵᏍᏓᏁᎵ, ᎾᏍᎩ ᏚᎾᏙᎥ ᏂᏗᎪᏪᎸᎾ ᎬᏂᏛ ᎪᏪᎵᎯ ᎾᏍᎩ ᎤᏃᏕᎾ ᎠᎩᎾ ᎤᏤᎵᎦ, ᎾᏍᎩ [ ᎤᏃᏕᎾ ᎠᎩᎾ ] ᎡᎶᎯ ᏧᏙᏢᏅ ᏅᏓᎬᏩᏓᎴᏅᏛ ᎠᏥᎸᎯ ᏥᎨᏎᎢ.
Bavandi nyonso ya mokili bakogumbamela nyama yango, ba-oyo nyonso bakombo na bango ekomama te, wuta na ebandeli ya mokili, kati na buku ya bomoi ya Mpate oyo babomaki.
9 ᎩᎶ ᎦᎵᎷᎨᏍᏗ ᎾᏍᎩ ᏩᏛᎬᎦ.
Tika ete moto oyo azali na matoyi mpo na koyoka ayoka!
10 ᎩᎶ ᎠᏂᏴᎩ ᏓᏘᎾᏫᏗᏍᎨᏍᏗ ᎾᏍᎩ ᎠᏴᎩ ᎠᎦᏘᏁᏫᏛᏗ ᎨᏎᏍᏗ; ᎩᎶ ᎭᏰᎳᏍᏗ-ᎦᏅᎯᏛ ᎠᏓᎯᏍᏗᏍᎨᏍᏗ ᎾᏍᎩ ᎠᏎ ᎭᏰᎳᏍᏗ-ᎦᏅᎯᏛ ᎬᏗ ᎠᏥᎢᏍᏗ ᎨᏎᏍᏗ. ᎠᏂ ᎾᏍᎩ ᏗᏅᏂᏗᏳ ᎨᏒ ᎠᎴ ᎤᏃᎯᏳᏒ ᎤᎾᏓᏅᏘ [ ᎬᏂᎨᏒ ᏂᎦᎵᏍᏗᎭ.]
Soki moto asengeli kokende na bowumbu akokende penza na bowumbu. Soki moto asengeli kokufa na mopanga akokufa penza na mopanga. Makambo oyo ezali penza kosenga ete basantu bazala na mpiko mpe kondima.
11 ᎠᎴ ᏅᏩᏓᎴ ᏅᎩ-ᏗᎦᏅᏌᏗ ᎥᏥᎪᎥᎩ ᎦᏙᎯ ᏓᏳᏄᎪᏥᏗᏒᎩ; ᎠᎴ ᏔᎵ ᏚᎷᎬᎩ ᎤᏃᏕᎾ ᎠᎩᎾ ᏥᏚᎷᎪ ᎾᏍᎩᏯᎢ, ᎠᎴ ᎢᎾᏛ ᎦᏬᏂᏍᎬ ᎾᏍᎩᏯ ᎦᏬᏂᏍᎬᎩ.
Bongo namonaki nyama mosusu kobima longwa na mabele. Ezalaki na maseke mibale lokola maseke ya mpate, mpe ezalaki koloba lokola dalagona.
12 ᎠᎴ ᎢᎬᏱ ᎤᎾᏄᎪᏨᎯ ᏅᎩ-ᏗᎦᏅᏌᏗ ᎾᏍᎩᏯ ᏄᎵᏂᎬᎬ ᏄᎵᏂᎬᎬᎩ, ᎠᎴ ᎡᎶᎯ ᎠᎴ ᎾᏍᎩ ᎾᎿᎭᎠᏁᎯ ᎤᎾᏓᏙᎵᏍᏓᏁᏗᏱ ᏂᏕᎬᏁᎲᎩ ᎢᎬᏱ ᎤᎾᏄᎪᏨᎯ ᏅᎩ-ᏗᎦᏅᏌᏗ, ᎾᏍᎩ ᎬᏩᏲᎱᎯᏍᏗ ᎨᏒ ᎢᏴᏛ ᎠᏥᏐᏅᏅ ᎤᏗᏩᏒᎯ.
Ezalaki kosalela bokonzi nyonso ya nyama ya liboso na miso na yango. Ezalaki kotindika mokili mpe bavandi na yango mpo ete bagumbamela nyama ya liboso oyo esilaki kobikisama na pota na yango wana ya monene.
13 ᎠᎴ ᎤᏣᏘ ᎤᏍᏆᏂᎪᏗ ᏕᎤᎸᏫᏍᏓᏁᎭ, ᎾᏍᎩ ᎠᏥᎸ ᎦᎸᎳᏗ ᏅᏓᏳᎶᎯᏍᏗᏱ ᎠᏂᏃ ᎡᎶᎯ ᎤᏬᏥᎯᏍᏗᏱ ᏂᎬᏁᎭ ᏴᏫ ᎠᏥᎦᏔᎲᎢ,
Ezalaki kosala bilembo ya kokamwa kino kokweyisa na mabele, moto kowuta na likolo, na miso ya bato nyonso.
14 ᎠᎴ ᎡᎶᎯ ᎠᏁᎯ ᏕᎦᎶᏄᎮᎭ ᎬᏗᏍᎬ ᎤᏍᏆᏂᎪᏗ ᏗᎬᏩᎸᏫᏍᏓᏁᏗ ᎨᏒ ᎠᎦᏔᎲ ᏅᎩ-ᏗᎦᏅᏌᏗ; ᎯᎠ ᏂᏕᎦᏪᏎᎭ ᎾᏍᎩ Ꮎ ᎡᎶᎯ ᎠᏁᎯ, ᎾᏍᎩ ᏅᎩ-ᏗᎦᏅᏌᏗ ᏗᏟᎶᏍᏔᏅᎯ ᎢᏦᏢᎾ, ᎾᏍᎩ ᎭᏰᎳᏍᏗ-ᎦᏅᎯᏛ ᎬᏗ ᎠᏥᏐᏅᏅᎯ ᎠᎴ ᏧᏛᏂᏛᎩ.
Ezalaki kokosa bavandi nyonso ya mokili na nzela ya bikamwa oyo epesamelaki makoki ya kosala na miso ya nyama ya liboso. Ezalaki kopesa bango mitindo ete basala ekeko mpo na kopesa lokumu na nyama oyo babetaki mopanga kasi ezali na bomoi.
15 ᎠᎴ ᎤᎲᎩ ᎬᏃᏛ ᎢᏳᏩᏁᏗᏱ ᎾᏍᎩ Ꮎ ᏅᎩ-ᏗᎦᏅᏌᏗ ᏣᎦᏟᎶᏍᏔᏅᎯ, ᎾᏍᎩ ᎬᏩᏬᏂᎯᏍᏗ ᎢᏳᎵᏍᏙᏗᏱ ᎾᏍᎩ Ꮎ ᏅᎩ-ᏗᎦᏅᏌᏗ ᏣᎦᏟᎶᏍᏔᏅᎯ, ᎠᎴ ᎾᏍᎩ ᎢᏳᏩᏂᏐᏗᏱ ᏗᎨᏥᎢᏍᏗᏱ ᎾᏂᎥ ᎾᎾᏓᏙᎵᏍᏓᏁᎲᎾ ᎾᏍᎩ Ꮎ ᏅᎩᏗᎦᏅᏌᏗ ᏣᎦᏟᎶᏍᏔᏅᎯ.
Epesamelaki kutu makoki ya kopesa pema ya bomoi epai ya ekeko ya nyama ya liboso, mpo ete ekoka koloba mpe kobomisa bato nyonso oyo bakogumbamela yango te.
16 ᎠᎴ ᎾᏍᎩ ᏄᏩᏂᏌᏅᎩ ᏂᎦᏗᏳ ᏧᎾᏍᏗᏱ ᎠᎴ ᏧᎾᏛᎾ, ᏧᏁᎿᎭᎢ ᎠᎴ ᎤᏲ ᎢᏳᎾᏛᎿᎭᏕᎩ, ᏂᏗᎨᏥᎾᏝᎥᎾ ᎠᎴ ᏗᎨᏥᎾᏝᎢ, ᏗᎨᎪᏪᎶᏗᏱ ᏗᏂᎦᏘᏏᏗᏢ ᏧᏃᏰᏂ, ᎠᎴ ᏗᏂᎬᏓᎨᏂ;
Esengaki na makasi ete bato nyonso, ezala bato minene to bato pamba, bazwi to babola, bansomi to bawumbu, batiama elembo na loboko ya mobali to na mbunzu.
17 ᎠᎴ ᎾᏍᎩ ᎩᎶ ᎬᏩᏩᎯᏍᏗ ᏂᎨᏒᎾ ᎠᎴ ᎬᏩᎾᏗᏅᏗ ᏂᎨᏒᎾ ᎢᏳᎵᏍᏙᏗᏱ, ᎾᏍᎩ Ꮎ ᎤᏩᏒ ᎠᎪᏪᎵ, ᎠᎴ ᏚᏙᎥᏉ ᏅᎩ-ᏗᎦᏅᏌᏗ ᎠᎪᏪᎶᏔᏅᎯ, ᎠᎴ ᏚᏙᎥ ᎢᎦᎢ ᎠᏎᏍᏗᏱ ᎨᏒ ᎠᎪᏪᎶᏔᏅᎯ.
Boye moko te akokaki kosomba to koteka soki azangi elembo ya kombo ya nyama to ya motango oyo ekokani na kombo ya nyama yango.
18 ᎠᏂ ᎠᎦᏙᎥᎯᏍᏗ ᎨᏒ ᎪᎱᏍᏗ ᎢᏛᏓ. ᎩᎶ ᎤᏬᎵᏣᏘ ᎨᏎᏍᏗ ᏩᏎᎦ ᎢᎦᎢ ᎨᏒ ᎠᎦᏎᏍᏗᏱ ᏅᎩ-ᏗᎦᏅᏎᏗ; ᏴᏫᏰᏃ ᎤᏎᏍᏗ ᎨᏒ ᎤᎬᏩᎳ; ᎠᎴ ᎾᏍᎩ ᎠᎦᏎᏍᏗ ᎨᏒ ᎯᎠ ᏂᎦᎥ, ᏑᏓᎵᏧᏈ ᏑᏓᎳᏍᎪᎯ ᏑᏓᎵᎦᎵ.
Makambo oyo ezali penza kosenga bwanya. Tika ete moto oyo azali na mayele alimbola motango ya nyama, pamba te ezali kotalisa kombo ya moto! Motango yango ezali: nkama motoba na tuku motoba na motoba.

< ᏣᏂ ᏄᏍᏛ ᎠᏥᎾᏄᎪᏫᏎᎸᎢ 13 >