< ᏣᏂ ᏄᏍᏛ ᎠᏥᎾᏄᎪᏫᏎᎸᎢ 12 >

1 ᎦᎸᎶᎢᏃ ᎦᎸᏉᏗ ᎤᏰᎸᏛ ᎤᎾᏄᎪᏨᎩ; ᎠᎨᏴ ᏅᏙ ᎢᎦ-ᎡᎯ ᎤᏄᏬᏍᏛᎩ, ᏅᏙᏃ ᏒᏃᏱ-ᎡᎯ ᎤᎳᏍᏓᎥᎩ, ᎤᎵᏍᏚᎸᎩᏃ ᎠᎵᏍᏚᎶ ᏔᏔᏚ ᏃᏈᏏ ᏗᎪᏢᏔᏅᎯ.
Elembo moko ya monene emonanaki na likolo, ezalaki mwasi moko. Alataki moyi lokola elamba, sanza ezalaki na se ya matambe na ye, mpe, na moto na ye, alataki motole oyo ezalaki na minzoto zomi na mibale.
2 ᎾᏍᎩᏃ ᎦᏁᎵᏛ ᎨᏒ ᎢᏳᏍᏗ, ᎤᏪᎷᏅᎩ ᎠᎴ ᎤᎾᏄᎪᏫᏏᏕᎾ ᎨᏒᎩ, ᎠᎴ ᎡᎯᏍᏗ ᎤᏓᏅᏛ ᎤᏚᎵᏍᎬᎩ ᎤᎾᏄᎪᏫᏍᏗᏱ [ ᎠᏲᎵ.]
Azalaki na zemi mpe, lokola azalaki koyoka pasi ya kobota, azalaki koganga makasi mpo na pasi.
3 ᎠᎴ ᏅᏩᏓᎴ ᎤᏍᏆᏂᎪᏗ ᎤᎾᏄᎪᏨᎩ ᎦᎸᎳᏗ; ᎠᎴ ᎬᏂᏳᏉ ᎤᏔᏅ ᎩᎦᎨ ᎢᎾᏛ [ ᏫᏥᎪᎥᎩ, ] ᎦᎸᏉᎩ ᏓᏍᎫᏓᏛᎩ, ᎠᎴ ᎠᏍᎪᎯ ᏕᎤᎷᎬᎩ, ᎠᎴ ᎦᎵᏉᎩ ᏚᎵᏍᏚᎸᎩ ᏓᏍᎫᏓᏛᎢ.
Sima na yango, elembo mosusu emonanaki na likolo, ezalaki dalagona moko ya monene mpe ya motane. Dalagona yango ezalaki na mito sambo mpe maseke zomi; mpe na mito wana sambo, moko na moko ezalaki na motole.
4 ᎦᏂᏓᏛᏃ ᏃᏈᏏ ᎦᎸᎳᏗ ᎠᏂᎧᎸ ᏦᎢ ᎢᏗᎦᏛᎯ ᎨᏒ ᎾᏍᎩ ᏌᏉ ᎢᏳᏪᏨᎯ ᏕᎤᏎᏒᏔᏅᎩ, ᎠᎴ ᎦᏙᎯ ᏫᏚᏗᏅᏒᎩ; ᎢᎾᏛᏃ ᎢᎬᏱᏗᏢ ᎤᎴᏅᎩ ᎠᎨᏴ ᏄᏛᏅᎢ, ᎾᏍᎩ ᎤᎾᏄᎪᏫᏏᏕᎾ [ ᎠᏲᎵ ] ᎾᏍᎩ ᎤᏕᏃᏅᎯᏉ ᎤᏪᏯᎣᎲᏍᏗᏱ ᎤᏰᎸᏒᎩ.
Mokila na yango ekombolaki eteni moko kati na biteni misato ya minzoto ya likolo mpe ebwakaki yango na mabele. Dalagona etelemaki liboso ya mwasi oyo azalaki koyoka pasi ya kobota mpo ete elia mwana na ye tango kaka akobotama.
5 ᎠᏍᎦᏯᏃ ᎠᏲᎵ ᎤᎾᏄᎪᏫᏒᎩ ᎾᏍᎩ ᎠᏙᎳᏅᏍᏗ ᏔᎷᎩᏍᎩ ᎪᏢᏔᏅᎯ ᎤᏮᏙᏗ ᎨᏒᎩ ᏗᎬᏩᏁᎶᏙᏗᏱ ᎢᏳᏩᏁᏗᏱ ᏂᎦᏛ ᎤᎾᏓᏤᎵᏛ ᏓᏁᏩᏗᏒ ᏴᏫ; ᎾᏍᎩ ᎤᏪᏥ ᎤᏁᎳᏅᏱ ᏩᏥᏅᏍᏔᏅᎩ, ᎠᎴ ᎤᎾᎳᏅᎯ ᎤᏪᏍᎩᎸᎢ.
Nzokande, mwasi yango abotaki mwana mobali oyo akokamba bikolo nyonso na nzela ya lingenda ya ebende. Bongo mwana na ye amemamaki epai ya Nzambe mpe epai ya Kiti na Ye ya Bokonzi.
6 ᎠᎨᏴᏃ ᎤᎵᏘᏒᎩ ᎢᎾᎨ ᏭᎶᏒᎩ, ᎾᎿᎭᎤᏁᎳᏅᎯ ᎤᏛᏅᎢᏍᏓᏁᎸᎢ, ᎾᏍᎩ ᎠᎨᎳᏍᏗᏱ ᏌᏉ ᎢᏯᎦᏴᎵ ᏔᎵᏧᏈ ᏑᏓᎵᏍᎪᎯ ᏧᏒᎯᏛ.
Mwasi yango akimaki na esobe epai wapi Nzambe abongiselaki ye ebombamelo, mpo ete asungama kuna mikolo nkoto moko na nkama mibale na tuku motoba.
7 ᏓᎿᎭᏩᏃ ᏄᎵᏍᏔᏅᎩ ᎦᎸᎳᏗ; ᎹᏱᎩᎵ ᎠᎴ ᎾᏍᎩ ᏧᏤᎵ ᏗᏂᎧᎿᎭᏩᏗᏙᎯ ᏚᎾᎵᎸᎩ ᏚᏂᎦᏘᎸᏒᎩ ᎢᎾᏛ; ᎢᎾᏛᏃ ᎠᎴ ᎾᏍᎩ ᏧᏤᎵ ᏗᏂᎧᎿᎭᏩᏗᏙᎯ ᏚᎾᏟᏴᎲᎩ,
Bongo etumba ekweyaki kuna na likolo: Misheli elongo na ba-anjelu na ye babundisaki dalagona, mpe dalagona elongo na ba-anjelu na yango ebundisaki Misheli elongo na ba-anjelu na ye.
8 ᎠᎴ ᎥᏝ ᏳᎾᏓᏎᎪᎩᏎᎢ; ᎥᏝ ᎠᎴ ᎿᎭᏉ ᎢᎸᎯᏳ ᏳᏂᏩᏛᎮ ᎦᎸᎳᏗ ᎤᎾᏕᏗᏱ.
Kasi dalagona elongaki te; boye dalagona yango elongo na ba-anjelu na yango ebungisaki esika na yango kuna na likolo.
9 ᎾᏍᎩᏃ Ꮎ ᎤᏔᏅ ᎢᎾᏛ ᎠᏥᏄᎪᏫᏒᎩ, ᎾᏍᎩ Ꮎ ᎠᎦᏴᎵ ᎢᎾᏛ, ᎠᏍᎩᎾ ᏣᎪᏎᎭ, ᎠᎴ ᏎᏓᏂ, ᎾᏍᎩ ᏥᏕᎦᎶᏄᎮᎭ ᏂᎬᎾᏛ ᎡᎶᎯ [ ᎠᏁᎯ; ] ᎾᏍᎩ ᏓᏰᏥᏄᎪᏫᏒᎩ ᎡᎶᎯ ᏓᏰᎦᏓᎢᏅᏒᎩ, ᎠᎴ ᎾᏍᎩ ᏧᏤᎵ ᏗᏂᎧᎿᎭᏩᏗᏙᎯ ᎢᏧᎳᎭ ᏓᎨᏥᏄᎪᏫᏒᎩ.
Babwakaki dalagona monene, nyoka ya kala, oyo babengaka zabolo to Satana, oyo akosaka mokili mobimba. Ebwakamaki na mabele elongo na ba-anjelu na yango.
10 ᎠᏆᏛᎦᏅᎩᏃ ᎠᏍᏓᏯ ᎧᏁᎬ ᎯᎠ ᏅᏗᎦᏪᏍᎬ ᎦᎸᎳᏗ, ᎿᎭᏉ ᎠᎵᏰᎢᎶᎦ ᎠᎵᏍᏕᎸᏙᏗ ᎨᏒ ᎠᎴ ᎤᎵᏂᎩᏛ ᎨᏒᎢ, ᎠᎴ ᎢᎦᏁᎳᏅᎯ ᎾᎿᎭᎤᎬᏫᏳᎯ ᎨᏒᎢ, ᎠᎴ ᎤᎵᏂᎩᏗᏳ ᎨᏒ ᎦᎶᏁᏛ ᎾᏍᎩ ᎤᏤᎵᎦ; ᎢᏓᎵᏅᏟᏰᏃ ᎨᏒ ᎤᏄᎯᏍᏗᏍᎩ ᎡᎳᏗ ᏩᎦᏓᎤᎦ; ᎾᏍᎩ ᏧᏄᎯᏍᏗᏍᎬ ᎢᎦᏁᎳᏅᎯ ᎠᎦᏔᎲᎢ ᎢᎦ ᎠᎴ ᏒᏃᏱ ᏗᎬᏩᏜᏓᏍᏗ.
Bongo nayokaki, kati na Lola, mongongo moko ya makasi koloba: « Tango ya lobiko, ya nguya, ya Bokonzi ya Nzambe na biso, mpe ya nguya ya Klisto na Ye ekoki. Pamba te Mofundi ya bandeko na biso, oyo afundaka bango butu mpe moyi, liboso ya Nzambe na biso, abwakami na mokili.
11 ᎠᎴ ᎬᏩᏎᎪᎩᏍᏔᏅᎩ ᎤᏃᏕᎾ ᎠᎩᎾ ᎤᎩᎬ, ᎠᎴ ᎬᏂᎨᏒ ᎾᏅᏁᎲ ᎤᏃᎯᏳᏒᎢ, ᎾᏍᎩ ᏓᏅᏅ ᏂᏚᏂᎸᏉᏛᎾ ᎨᏒᎢ.
Kasi bango balongi ye na nzela ya makila ya Mpate, mpe na nzela ya liloba ya litatoli na bango; balingaki te bomoi na bango kino kondima ata kokufa.
12 ᎾᏍᎩ ᎢᏳᏍᏗ ᎢᏣᎵᎮᎵᎩ ᏂᎦ ᎦᎸᎶᎢ ᎨᏒᎢ, ᎠᎴ ᏂᎯ ᎾᎿᎭᏥᏤᎭ. ᎤᏲᎢᏳ ᎢᏣᎵᏍᏓᏁᏗ ᎡᎶᎯ ᎢᏤᎯ, ᎠᎴ ᎠᎺᏉᎯ ᎢᏤᎯ! ᎠᏍᎩᎾᏰᏃ ᎢᏣᏠᎠᏎᎵᎦ, ᎤᏣᏘ ᎤᏔᎳᏬᏍᎬᎢ ᎠᎦᏔᎭᏰᏃ ᎤᏍᏆᎳᎯᏳ ᎨᏒ ᎠᎦᎵᏍᎪᎸᏓᏁᎸᎢ.
Yango wana, yo Lola, sepela; mpe bino bavandi ya Lola, bosepela! Kasi mawa na mokili mpe na ebale monene, pamba te Satana akiti epai na bino! Atondi na kanda, pamba te ayebi malamu ete atikali kaka na tango moke. »
13 ᎢᎾᏛᏃ ᎤᏙᎴᎰᏒ ᎦᏙᎯ ᏣᎦᏓᎢᏅᏒᎢ, ᎤᏕᏯᏙᏔᏅᎩ ᎠᎨᏴ ᎾᏍᎩ Ꮎ ᎠᏍᎦᏯ ᎤᎾᏄᎪᏫᏒᎯ.
Tango dalagona emonaki ete ebwakami na mokili, ekomaki kolanda mwasi oyo abotaki mwana mobali.
14 ᎠᎨᏴᏃ ᏔᎵ ᏓᏥᏕᎸᎩ ᎠᏬᏎᎵ ᎤᏔᏅ ᏗᎧᏃᎨ, ᎾᏍᎩ ᎢᎾᎨ ᏭᏃᎯᎸᏍᏙᏗᏱ ᎠᏥᏰᎸᎾᏁᎸᎩ, ᎾᎿᎭᎤᏤᎵᎪᎯ ᏗᎨᏒᎢ, ᎾᎿᎭᎠᎨᎳᏍᏗᏱ ᏑᏕᏘᏴᏛ, ᎠᎴ ᏔᎵ ᏧᏕᏘᏴᏛ, ᎠᎴ ᎠᏰᎵ ᎢᏳᏕᏘᏴᏛ, ᎾᏍᎩ ᎠᏥᎧᎲᏍᏗᏱ ᎢᎾᏛ ᎠᎦᏔᎲᎢ.
Kasi mapapu nyonso mibale ya mpongo moko ya monene epesamaki na mwasi yango mpo ete apumbwa kino na esika na ye, na esobe epai wapi asengeli kosungama, mosika ya nyoka, mpo na tango moko, mpo na batango, mpe mpo na ndambo ya tango.
15 ᎢᎾᏛᏃ ᎠᎰᎵ ᏓᏳᏄᎪᏫᏒᎩ ᎠᎹ ᏥᎦᏃᎱᎩᏍᎪ ᎾᏍᎩᏯᎢ, ᎠᎨᏴ ᎤᎨᎮᎩ ᎾᏍᎩ ᎦᏃᎱᎩᏍᎬ ᎤᏅᏍᏙᏗᏱ ᎤᏰᎸᏅᎩ.
Bongo nyoka esanzaki wuta na monoko na yango, na sima ya mwasi, mayi ebele lokola ebale, mpo ete atiola na mbonge na yango.
16 ᎦᏙᎯᏃ ᎤᏍᏕᎸᎲᎩ ᎠᎨᏴ, ᎠᎴ ᎦᏙᎯ ᎤᏍᏚᎢᏒᎩ ᎠᎰᎵ ᎠᎴ ᎤᎩᏐᏅᎩ ᎦᏃᎱᎩᏍᎬ ᎾᏍᎩ ᎢᎾᏛ ᎠᎰᎵ ᏅᏓᏳᏄᎪᏫᏒᎯ.
Kasi mabele esungaki mwasi, efungolaki monoko na yango mpe emelaki ebale oyo dalagona esanzaki wuta na monoko na yango.
17 ᎠᎴ ᎢᎾᏛ ᎤᎿᎭᎸᏤᎸᎩ ᎠᎨᏴ, ᎠᎴ ᏓᎿᎭᏩ ᎢᏧᏩᏁᏗᏱ ᎤᏰᎸᏅᎩ ᎤᎾᎵᏃᎯᏴᎯ ᎾᏍᎩ [ ᎠᎨᏴ ] ᎤᏁᏢᏔᏅᎯ ᎨᏒᎢ, ᎾᏍᎩ Ꮎ ᎠᏂᏍᏆᏂᎪᏗᏍᎩ ᏗᎧᎿᎭᏩᏛᏍᏗ ᎤᏁᎳᏅᎯ ᏧᏤᎵᎦ, ᎠᎴ ᎤᏂᎯ ᏥᏌ ᎦᎶᏁᏛ ᎤᏤᎵ ᎪᎯᏳᏗᏍᎩ.
Bongo dalagona esilikelaki mwasi mpe ekendeki kobundisa bana na ye mosusu, ba-oyo batosaka mibeko ya Nzambe mpe bakangamaka makasi na litatoli na bango na tina na Yesu.

< ᏣᏂ ᏄᏍᏛ ᎠᏥᎾᏄᎪᏫᏎᎸᎢ 12 >