< ᏧᏓᏏ ᎤᏬᏪᎳᏅᎯ 1 >

1 ᎠᏴ ᏧᏓᏏ, ᏥᏌ ᎦᎶᏁᏛ ᎠᎩᏅᏏᏓᏍᏗ ᎠᎴ ᏥᎻ ᏦᏍᏓᏓᏅᏟ, ᏫᏨᏲᎵᎦ ᏂᎯ ᏂᏥᏍᎦᏅᎾ ᎢᏨᏁᎸᎯ ᎤᏁᎳᏅᎯ ᎠᎦᏴᏎᎨᎢ, ᎠᎴ ᏥᏌ ᎦᎶᏁᏛ ᎢᏳᏩᏂᏌᏛ ᎡᏥᏍᏆᏂᎪᏔᏅᎯ, ᎠᎴ ᎡᏥᏯᏅᏛ ᎢᏣᏓᏅᏘ ᎢᏣᎵᏍᏙᏗᏱ;
Ngai Jide, mowumbu ya Yesu-Klisto mpe ndeko ya Jake; Epai ya bato oyo Nzambe abenga, ba-oyo Nzambe Tata alingaka, mpe ba-oyo babatelami mpo na Yesu-Klisto:
2 ᎤᏓᏙᎵᏍᏗ ᎨᏒ ᎠᎴ ᏅᏩᏙᎯᏯᏛ ᎠᎴ ᎠᏓᎨᏳᏗ ᎨᏒ ᎡᏥᏁᏉᎡᏗ ᎨᏎᏍᏗ.
Tika ete mawa, kimia mpe bolingo efuluka kati na bino!
3 ᎢᏨᎨᏳᎢ, ᎢᏳᏃ ᎠᏆᏟᏂᎬᏁᎸ ᏫᏨᏲᏪᎳᏁᏗᏱ ᏂᎦᏗᏳᏉ ᎢᎦᏤᎵ ᎢᎦᎵᏍᏕᎸᏙᏗ ᎤᎬᏩᎵ, ᎤᏚᎸᏗ ᎾᏆᎵᏍᏓᏁᎸᎩ ᏫᏨᏲᏪᏔᏁᎲ ᎢᏨᏍᏗᏰᏙᏗᏱ, ᎾᏍᎩ ᎤᎵᏂᎩᏛ ᎢᏣᏗᏒᏎᏗᏱ ᎪᎯᏳᏗ ᎨᏒ ᎾᏍᎩ ᎦᏳᎳ ᏗᎨᏥᏲᎯᏎᎸᎯ ᏥᎩ ᎤᎾᏓᏅᏘ.
Balingami na ngai, nazalaki na posa makasi ya kokomela bino na tina na lobiko oyo tozali na yango na lisanga. Nazwaki mokumba ya kokomela bino mpo na kolendisa bino ete bobunda mpo na kondima oyo Nzambe apesaki, mbala moko mpo na libela, epai ya basantu.
4 ᎩᎶᏰᏃ ᎢᏳᎾᏍᏗ ᎠᏂᏍᎦᏯ ᎤᏕᎵᏛ ᎤᏂᏴᎸᎯ ᎢᎩ ᎾᏍᎩ ᎢᎸᎯᏳ ᏅᏓᎬᏩᏓᎴᏅᏛ ᏗᎨᎪᎥᎯ ᏥᎩ ᎾᏍᎩ ᎢᏳᏍᏗ ᏗᎨᎫᎪᏓᏁᏗᏱ; ᎤᏁᎳᏅᎯ ᏂᏚᎾᏁᎶᏛᎾ ᎠᏂᏍᎦᏯ, ᎬᏩᎦᏘᏯ ᎤᏓᏙᎵᏍᏗ ᎨᏒ ᎤᏁᎳᏅᎯ ᎠᏂᏁᏟᏴᏍᎩ ᎾᎵᏏᎾᎯᏍᏛᎾ ᎠᎴᏂᏓᏍᏗ ᎨᏒ ᎢᏯᏅᏁᎯ, ᎠᎴ ᎠᎾᏓᏱᎯ ᎤᏩᏒᎯᏳ ᎤᎬᏫᏳᎯ ᎤᏁᎳᏅᎯ, ᎠᎴ ᎢᎦᏤᎵ ᎤᎬᏫᏳᎯ ᏥᏌ ᎦᎶᏁᏛ.
Pamba te ezali na bato mosusu oyo basili kokota kati na bino na mayele mabe, ba-oyo etumbu na bango ekomama wuta kala: batosaka makambo ya Nzambe te, bakomisaka ngolu ya Nzambe na biso lokola nzela ya kosala makambo na bango ya soni, mpe bawanganaka Yesu-Klisto, Mokonzi kaka moko mpe Nkolo na biso.
5 ᎾᏍᎩ ᎢᏳᏍᏗ ᎠᏆᏚᎵᎭ ᎢᏨᏯᏅᏓᏗᏍᏙᏗᏱ ᎾᏍᎩ ᎯᎠ ᎦᏳᎳ ᏥᏥᎦᏔᎭ, ᎾᏍᎩ Ꮎ ᎤᎬᏫᏳᎯ ᏥᏚᏭᏓᏓᏎ ᏴᏫ ᎢᏥᏈᏱ ᎦᏓ ᎠᎲ, ᎣᏂ ᏥᏚᏛᏔᏁ ᎾᏍᎩ Ꮎ ᏄᏃᎯᏳᏅᎾ.
Atako boyebi malamu makambo oyo nyonso, kasi nalingi kaka koyebisa bino lisusu ete Nkolo akangolaki bato na Ye na bowumbu kati na Ejipito, kasi, sima na yango, abomaki ba-oyo bazalaki na kondima te.
6 ᎠᎴ ᏗᏂᎧᎿᎭᏩᏗᏙᎯ ᏄᏂᏍᏆᏂᎪᏔᏅᎾ ᏥᎨᏎ ᏄᏂᎬᏫᏳᏌᏕᎩ ᏂᎨᎬᏁᎸ ᏧᏅᏕᏤᏉᏍᎩᏂ ᎤᎾᏤᎵᎪᎯ ᎠᏁᎲᎢ, ᏧᏓᏕᏒᏛ ᏗᎬᏩᏲᎢᏍᏗ ᏂᎨᏒᎾ ᏕᎨᎦᎸᏍᏗ ᎤᎵᏏᎬᎢ, ᎦᎸᏉᏗᏳ ᏗᎫᎪᏙᏗᏱ ᎢᎦ ᎠᏍᏆᎸᎲ ᎬᏗᏍᎩ. (aïdios g126)
Nzambe akangaki mpe na minyololo ya seko, kati na molili mpo na kosambisama ya mokolo monene, ba-anjelu oyo basepelaki te na evandelo oyo Nzambe apesaki bango mpe batikaki yango. (aïdios g126)
7 ᎠᎴ ᎾᏍᏉ ᏐᏓᎻ ᎠᎴ ᎪᎹᎵ, ᎠᎴ ᎾᏍᎩ Ꮎ ᎾᎥ ᏥᏕᎦᏚᎮᎢ, ᎾᏍᎩᏯ ᎾᎾᏛᏁᎮ ᏓᎾᏓᏲᏍᎨ ᎤᏕᎵᏛ ᏗᏂᏏᏗ ᎨᏒ ᏧᏂᎸᏫᏍᏓᏁᏗᏱ, ᎠᎴ ᎠᏂᏍᏓᏩᏗᏙᎮ ᎤᏇᏓᎵ ᎠᏍᏓᏳᏛᏍᏗ ᎤᏇᏓᎵ ᏂᎨᏒᎾ ᎨᏒᎢ, ᎠᏓᏕᏯᏔᎲᏍᎩ ᏂᎨᎬᏁᎴᎢ ᎠᏂᎩᎵᏲᎨ ᎤᏂᏍᏛᏗᏍᏗ ᎨᏒ ᎬᏠᏍᎩ ᏂᎨᏒᎾ ᎠᏥᎸᏱ. (aiōnios g166)
Ndenge moko mpe mpo na bato ya Sodome, ya Gomore mpe ya bingumba ya pembeni: basalaki ndenge moko na ba-anjelu, bamipesaki na pite mpe bazalaki kosangisa nzoto na ndenge oyo esengeli te. Bazali ndakisa mpo na bato oyo bazali komona pasi ya etumbu ya moto ya seko na seko. (aiōnios g166)
8 ᎾᏍᎩᏯ ᎾᏍᏉ ᎯᎠ ᎠᎾᏍᎩᏓᏒᎥᏍᎩ ᎦᏓᎭ ᎾᏅᏁᎭ ᎤᏂᏇᏓᎸᎢ, ᏗᏂᏍᎦᎩ ᏄᏂᎬᏫᏳᏌᏕᎩ, ᎠᎴ ᏗᎬᏩᏂᏐᏢᏗ ᎨᏥᎸᏉᏗ.
Ezali mpe ndenge moko mpo na bato wana: makanisi na bango etindikaka bango na kobebisa banzoto na bango, na kotiola bokonzi ya Nkolo, mpe na kofinga bikelamu ya nkembo ya Likolo.
9 ᏑᏱᎩᎵᏍᎩᏂ ᏄᎬᏫᏳᏌᏕᎩ ᏗᎧᎿᎭᏩᏗᏙᎯ ᎠᏍᎩᎾ ᎤᎾᏗᏒᎸ, ᎤᎾᏗᏒᎸ ᎠᏂᏬᏂᏍᎬ ᎼᏏ ᎠᏰᎸᎢ, ᎹᏱᎩᎵ ᎥᏝ ᎪᎱᏍᏗ ᎤᏐᏅ ᏳᎳᏫᏎᎴᎢ, ᎯᎠᏉᏍᎩᏂ ᏄᏪᏎᎢ, ᎤᎬᏫᏳᎯ ᏫᏣᏍᎦᎩ.
Nzokande, ezala Misheli, mokonzi ya ba-anjelu, tango abendanaki na Satana na tina na nzoto ya Moyize, amekaki ata moke te kopesa Satana etumbu ya soni; kasi alobaki kaka: « Tika ete Nkolo apesa yo etumbu! »
10 ᎯᎠᏍᎩᏂ ᎤᏐᏅ ᎠᏂᏃᎮᎭ ᎾᏍᎩ ᎾᏂᎦᏔᎲᎾ; ᎾᏍᎩᏍᎩᏂ ᎤᏅᏒ ᎨᏒ ᏥᎾᎦᏔᎭ, ᎾᏍᎩᏯ ᎦᎪᎵᏍᏗᏉ ᏣᏁᎿᎭᎠ ᎠᏂᎦᏔᎲᎢ, ᎾᏍᎩ ᎾᎿᎭᎤᏲ ᎾᎾᏓᏛᏁᎭ.
Kasi bato wana bafingaka oyo bango basosolaka te, mpe makambo oyo bango basosolaka na lolenge na bango ya bomoto mpe ya bonyama ekobebisa bango.
11 ᎤᏲ ᏫᏄᎾᎵᏍᏓᏏ! ᎨᎾᏰᏃ ᎤᏅᏅ ᎤᏂᏍᏓᏩᏕᏅ, ᎠᎴ ᎨᎦᎫᏴᏓᏁᏗ ᎤᎾᏚᎵᏍᎬ ᎤᏂᎬᎥᏍᎬ ᎤᏂᎨᎮᎾ ᏇᎳᎻ ᎤᎵᏓᏍᏔᏅ, ᎠᎴ ᎨᏥᏛᏔᏅ, ᏚᏂᎦᏘᎸᏒ ᎪᎵ ᏧᎦᏘᎸᏛ ᎨᏒᎢ.
Mawa na bango, pamba te balandaki nzela ya Kayina, bapengwaki lokola Balami mpo na lokoso ya mbongo, mpe bakufaki lokola Kore mpo na botomboki.
12 ᎯᎠ ᎾᏍᎩ ᏅᏲᎯ ᏚᏓᏓᎳ ᏗᏣᏁᎶᏗ ᏕᏣᎵᏍᏓᏴᎲᏍᎬᎢ, ᎾᎯᏳ ᎢᏧᎳᏕᏣᎵᏍᏓᏴᎲᎦ ᎾᏂᎾᏰᏍᎬᎾ ᎠᎾᎵᏍᏓᏴᎲᏍᎪᎢ; ᏚᎶᎩᎸ ᎠᎹ ᏂᏚᏁᎲᎾ, ᎤᏃᎴ ᏧᏱᎴᎪᎢ; ᏕᏡᎬ ᏧᎳᏍᏚᏬᎠᏔᎯ, ᎪᎱᏍᏗ ᏄᎾᏓᏓᏁᎲᎾ, ᏔᎵ ᎢᏳᏩᎫᏗ ᎤᏩᏴᏒᎯ ᏥᎨᏐᎢ, ᏗᏰᎯᏛ ᏗᎧᎾᏍᏕᏢᏔᏅᎯ ᏥᎨᏐᎢ.
Ezali mpe kaka bango nde babetisaka baninga mabaku na tango ya kolia na lisanga: baliaka na lokoso mpe na soni te, balukaka kaka bolamu na bango; bazali lokola mapata oyo ezangi mayi, oyo mopepe ezali komema; bazali lokola banzete oyo ebotaka bambuma te, ata na eleko ya kobuka bambuma; ekufaka mbala mibale soki bapikoli yango.
13 ᎠᎺᏉᎯ ᎤᎿᎭᎸᎯ ᏗᎵᏍᏗᎳᏁᎩ, ᎤᏅᏒ ᎤᎾᏕᎰᎯᏍᏗᏍᎩ ᎠᏂᎾᏄᎪᏫᏍᎩ; ᏃᏈᏏ ᎤᏂᏅᏅ ᎤᎾᏞᏛ, ᎾᏍᎩ ᎤᏣᏘ ᎬᎿᎭᎨ ᎤᎵᏏᎬ ᏥᎨᎦᏛᏅᎢᏍᏓᏁᎸ ᎤᎵᏍᏆᏗᏍᏗ ᏂᎨᏒᎾ. (aiōn g165)
Babimisaka misala na bango ya soni ndenge ebale monene ebimisaka mbonge mpe fulufulu soki etomboki makasi; bazali lokola minzoto oyo eyengaka-yengaka. Nzambe abombeli bango etumbu ya molili makasi mpo na libela. (aiōn g165)
14 ᎠᎴ ᎢᎾᎩ, ᎠᏓᏫ ᎤᏕᏅ ᎦᎵᏉᎩᏁ ᏪᎯ, ᎾᏍᏉ ᎠᏙᎴᎰᏍᎬ ᎯᎠ ᎾᏍᎩ ᏚᏁᎢᏍᏔᏁ ᎯᎠ ᏄᏪᏎᎢ, ᎬᏂᏳᏉ, ᎤᎬᏫᏳᎯ ᏓᎦᎷᏥ ᏓᏘᏁᎮᏍᏗ ᎠᏍᎪ ᎢᏯᎦᏴᎵ ᏧᏙᎵ ᎤᎾᏓᏅᏘ,
Ezala Enoki, mokitani ya sambo wuta Adamu, asakolaki na tina na bango: « Tala, Nkolo azali koya elongo na basantu na Ye, bankoto na bankoto,
15 ᏧᏭᎪᏓᏁᏗᏱ ᎾᏂᎥᎢ, ᎠᎴ ᏧᎬᏍᎪᎸᏗᏱ ᎾᏂᎥ ᎤᏁᎳᏅᎯ ᏂᏚᎾᏁᎶᏛᎾ ᏅᏗᎦᎵᏍᏙᏗᏍᎬ ᏂᎦᎥ ᎤᏣᏘᏂ ᏗᎦᎸᏫᏍᏓᏁᏗ ᏚᏂᎸᏫᏍᏓᏁᎸᎢ, ᎠᎴ ᏂᎦᎥ ᏂᏚᏳᎪᏛᎾ ᏄᏂᏪᏒ ᎤᏁᎳᏅᎯ ᏂᏚᎾᏁᎶᏛᎾ ᎾᏍᎩ ᎬᏩᏡᏗᏍᎬᎢ.
mpo na kosambisa bato nyonso mpe kopesa etumbu na bato nyonso oyo batosaka Ye te mpo na misala na bango nyonso ya botomboki mpe mpo na mafinga nyonso oyo basumuki yango babimisaki mpo na kofinga Nzambe. »
16 ᎯᎠ ᎾᏍᎩ ᎤᏂᎪᏁᎶᎯᏌᏘ, ᎤᏁᎵᎯᏍᎩ, ᎤᏅᏒ ᎤᎾᏚᎸᏅᎥᏍᎬ ᎠᏂᏍᏓᏩᏕᎩ; ᏗᏂᎰᎵᏃ ᏓᏅᏗᏍᎪ ᎤᏣᏘ ᎠᏢᏈᏍᏗ ᎠᏂᏬᏂᏍᎪᎢ, ᏴᏫ ᏚᎾᎧᏛ ᏓᏂᎸᏉᏗᏍᎪ ᎣᏍᏛ ᎢᎬᏩᎾᎵᏍᏓᏁᏗ ᎤᏚᎩ ᎤᏅᏒ ᎢᏳᏍᏗ.
Bato yango bayimaka-yimaka mpe bamilelaka-lelaka tango nyonso, batambolaka kolanda baposa mabe ya banzoto na bango, bamikumisaka mpe bakumisaka bato mosusu na lokuta mpo na kobenda litomba kowuta na bango.
17 ᎠᏎᏃ, ᎢᏨᎨᏳᎢ, ᎢᏣᏅᏓᏓ ᎧᏃᎮᏛ ᎢᎸᎯᏳ ᎤᏂᏃᎮᏛ ᎨᏥᏅᏏᏛ ᎤᎬᏫᏳᎯ ᎢᎦᏤᎵ ᏥᏌ ᎦᎶᏁᏛ ᏧᏤᎵᎦ;
Kasi bino, balingami na ngai, bokanisa maloba oyo bantoma ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso, balobaki liboso.
18 ᎾᏍᎩ ᎯᎠ ᏥᏄᏂᏪᏒᎩ, ᎤᎵᏍᏆᎸᏗ ᎨᏎᏍᏗ ᎠᏁᎮᏍᏗ ᎠᏂᏐᏢᎢᏍᏗᏍᎩ, ᎾᏍᎩ ᎤᏅᏒ ᎤᎾᏚᎸᏅᎥᏍᎬ ᏂᏚᏳᎪᏛᎾ ᎠᏂᏍᏓᏩᏕᎩ.
Balobaki na bino: « Na tango ya suka, ekozala na batioli oyo bakotambola kolanda baposa na bango, oyo ekotindika bango na koboya kotosa makambo ya Nzambe. »
19 ᎯᎠ ᎾᏍᎩ Ꮎ ᎠᎾᏓᏓᎴᏗᏍᎩ ᏥᎩ, ᎤᏇᏓᎵᏉ ᎠᏂᏍᏓᏩᏕᎩ, ᎠᏓᏅᏙ ᏄᏁᎲᎾ.
Bazali bato oyo bakotisaka bokabwani kati na bato, bazali lokola banyama mpo ete bazangi Molimo ya Nzambe.
20 ᏂᎯᏍᎩᏂ ᎢᏨᎨᏳᎢ, ᎤᏣᏘ ᎦᎸᏉᏗᏳ ᎢᏦᎯᏳᏒ ᎢᏣᎵᎫᏍᏛᏗᏍᎬᎢ, ᏓᎸᏉᏗᏳ ᎠᏓᏅᏙ ᎬᏗ ᎢᏣᏙᎵᏍᏗᏍᎬᎢ,
Kasi bino, balingami na ngai, botonga bomoi na bino na likolo ya kondima na bino, oyo eleki bule. Bobondelaka na nguya ya Molimo Mosantu.
21 ᎤᏁᎳᏅᎯ ᎡᏥᎨᏳᎢᏳ ᎨᏒ ᏕᏥᏂᏴᏎᏍᏗ, ᎢᏥᎦᏖᏃᎮᏍᏗ ᎢᎦᏤᎵ ᎤᎬᏫᏳᎯ ᏥᏌ ᎦᎶᏁᏛ ᎤᏓᏙᎵᏍᏗ ᎨᏒ ᎬᏂᏛ ᎠᏓᏁᎯ ᏥᎩ. (aiōnios g166)
Bomibomba kati na bolingo ya Nzambe, wana bozali kozela ete Yesu-Klisto, Nkolo na biso, na mawa na Ye, apesa bino bomoi ya seko. (aiōnios g166)
22 ᎢᎦᏛᏃ ᏕᏥᏙᏓᎨᏍᏗ, ᏧᏓᎴᏅᏛ ᏂᏕᏣᏛᏁᎮᏍᏗ;
Boyokela bato oyo bazali nanu na tembe mawa;
23 ᎠᏂᏐᎢᏃ ᎨᏥᎾᏰᏍᎩ ᏕᏥᏍᏕᎵᏍᎨᏍᏗ, ᏕᏨᏕᎨᏍᏗ ᎠᏥᎸᏱ; ᎢᏥᏂᏆᏘᎮᏍᏗ ᎠᏄᏬ ᎤᏇᏓᎸ ᎠᏚᏯᏍᏙᏔᏅᎯ.
mpo na bato mosusu, bobikisa bango na kobimisa bango na moto; mpe mpo na bato mosusu lisusu, boyokela bango mpe mawa oyo esangana na bobangi, na koyina ezala ata bilamba na bango, oyo baposa na bango ya nzoto ekomisa mbindo.
24 ᎿᎭᏉᏃ ᎾᏍᎩ Ꮎ ᏰᎵᏉ ᎬᏩᏲᏍᏙᏙᏗ ᏥᎩ ᏗᏥᏅᎢᏍᏗᏱ, ᎠᎴ ᎬᏂᎨᏒ ᎢᎨᏨᏁᏗ ᏥᎩ ᎤᏣᏘ ᎤᎵᎮᎵᏍᏗ ᎢᏣᏓᏅᏛᎢ ᎪᎱᏍᏗ ᏁᏥᎳᏫᏎᎲᎾ ᎢᎬᏱᏗᏢ ᏓᎧᏅ ᎦᎸᏉᏗᏳ ᎨᏒᎢ,
Epai na Ye oyo azali na makoki ya kobatela bino mpo ete bokweya te, mpe ya kotelemisa bino liboso ya nkembo na Ye lokola bato oyo bazangi mbeba mpe bato ya esengo monene;
25 ᎾᏍᎩ ᎤᏩᏒᎯ ᎠᎦᏔᎾᎢ ᏥᎩ ᎤᏁᎳᏅᎯ ᎢᎩᏍᏕᎵᏍᎩ, ᎦᎸᏉᏙᏗ ᎨᏎᏍᏗ, ᎠᎴ ᎦᎸᏉᏗᏳ ᎨᏎᏍᏗ, ᏄᎬᏫᏳᏌᏕᎩ ᎨᏎᏍᏗ, ᎠᎴ ᎤᎵᏂᎩᏗᏳ ᎨᏎᏍᏗ, ᎪᎯ ᎨᏒ ᎠᎴ ᎤᎵᏍᏆᏗᏍᏗ ᏂᎨᏒᎾ. ᎡᎺᏅ. (aiōn g165)
epai ya Nzambe moko kaka, Mobikisi na biso, na nzela ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso, tika ete nkembo, lokumu, nguya mpe bokonzi ezala ya Ye, wuta liboso ya tango, sik’oyo mpe mpo na libela na libela! Amen! (aiōn g165)

< ᏧᏓᏏ ᎤᏬᏪᎳᏅᎯ 1 >