< ᎣᏍᏛ ᎧᏃᎮᏛ ᎷᎦ ᎤᏬᏪᎳᏅᎯ 16 >

1 ᎠᎴ ᎾᏍᏉ ᎯᎠ ᏂᏚᏪᏎᎴ ᎬᏩᏍᏓᏩᏗᏙᎯ, ᎩᎶ ᎢᏳᏍᏗ ᎡᎮ ᎤᏪᎿᎭᎢ ᎠᏍᎦᏯ ᎾᏍᎩ ᎤᏪᎧᎮ ᎤᎦᏌᏯᏍᏗᏕᎩ ᎤᎿᎭᎥᎢ; ᎠᎴ ᎾᏍᎩ ᎠᏥᎳᏫᏎᎲ ᏧᎬᏩᎶᏗ ᎤᏓᏤᏪᎸ ᎠᏥᏃᏁᎴᎢ.
Yesu alobaki na bayekoli na Ye: — Mozwi moko azalaki na mobateli bomengo; bongo bafundaki ye epai ya mozwi ete azali kosakana na biloko na ye.
2 ᏭᏯᏅᎮᏃ ᎯᎠ ᏄᏪᏎᎴᎢ, ᎦᏙ ᏗᎦᎵᏍᏙᏗᎭ ᏥᏄᏍᏗ ᏥᎬᏯᏛᎩᎭ? ᎬᏂᎨᏒ ᏅᎦ ᏄᏍᏛ ᏕᏣᎸᏫᏍᏓᏁᎸ ᏣᎦᏌᏯᏍᏗᏕᎩ ᎨᏒᎢ; ᎪᎯᏰᏃ ᎢᏳᏓᎴᏅᏛ ᎥᏝ ᎿᎭᏉ ᏣᎦᏌᏯᏍᏗᏕᎩ ᏱᎨᏎᏍᏗ.
Mozwi abengaki ye mpo na kotuna ye: « Makambo nini nazali koyoka na tina na yo? Yebisa ngai ndenge nini obateli bomengo na ngai; pamba te, kobanda lelo, okozala lisusu mobateli bomengo na ngai te. »
3 ᎤᎦᏌᏯᏍᏗᏕᎩᏃ ᎯᎠ ᏄᏪᏎ ᎤᏩᏒ ᏧᏓᏅᏛᎢ, ᎦᏙ ᏓᎦᏛᏁᎵ, ᎠᎩᏅᏏᏙᎯᏰᏃ ᎠᎩᎩᎡᎭ ᎠᏆᎦᏌᏯᏍᏗᏕᎩ ᎨᏒᎢ? ᏝᏃ ᏰᎵ ᎬᏆᏍᎪᏍᏗ ᏱᎩ; ᎠᏆᏚᎳᏗᏓᏍᏗᏱᏃ ᎢᎦᏕᎣᏍᎦ.
Mobateli bomengo amilobelaki: « Nasala nini sik’oyo? Mokonzi na ngai azali kolongola ngai na mosala? Nazali na makasi te ya kotimola mabele, mpe nakoyoka soni mpo na kokoma kosenga-senga.
4 ᏕᎫᎪᏓ ᎢᏯᏆᏛᏁᏗᏱ, ᎾᏍᎩ ᎥᎩᏌᏕᏒ ᎠᏆᎦᏌᏯᏍᏗᏕᎩ ᎨᏒ ᏗᎦᎬᏆᏓᏂᎸᎢᏍᏗ ᎢᏳᎵᏍᏙᏗᏱ ᏓᏂᏁᎸᎢ.
Ah! Nasosoli sik’oyo likambo oyo nakoki kosala mpo ete, tango nakozala lisusu na mosala te, bato bayamba ngai kati na bandako na bango. »
5 ᎰᏩᏃ ᏫᏚᏯᏅᎮ ᏂᎦᏛ ᎤᏅᏏᏙᎯ ᏧᏚᎩ, ᎢᎬᏱᏱᏃ ᎯᎠ ᏄᏪᏎᎴᎢ, ᎢᎳᎪ ᎢᎦᎢ ᏣᏚᎦ ᎠᎩᏅᏏᏙᎯ.
Boye, abengaki bato nyonso oyo bazalaki na niongo ya mokonzi na ye; atunaki na moto ya liboso: « Osengeli kofuta boni lokola niongo epai ya mokonzi na ngai? »
6 ᎯᎠᏃ ᏄᏪᏎᎢ, ᎠᏍᎪᎯᏧᏈ ᎢᏳᏟᎶᏛ ᎪᎢ. ᎯᎠᏃ ᏄᏪᏎᎢ, ᎯᎾᎩ ᎪᏪᎵ ᎡᏣᏚᎬᎢ, ᎠᎴ ᏄᎳ ᎯᎲᎦ, ᎠᎴ ᎯᏍᎩᏍᎪᎯ ᎰᏪᎸᎦ.
Moto yango azongisaki: « Batono tuku mibale ya mafuta. » Mobateli bomengo alobaki na ye: « Zwa mokanda na yo ya niongo, vanda noki, mpe koma mokanda mosusu ya nyonso ya bangungulu zomi. »
7 ᏅᏩᏓᎴᏃ ᎯᎠ ᏄᏪᏎᎴᎢ, ᏂᎯᎾ ᎢᎳᎪ ᎡᏣᏚᎦ? ᎯᎠᏃ ᏄᏪᏎᎢ, ᎠᏍᎪᎯᏧᏈ ᎢᏳᏟᎶᏛ ᎤᏣᎴᏍᏗ. ᎯᎠᏃ ᏄᏪᏎᎴᎢ, ᎯᎾᎩ ᎪᏪᎵ ᎡᏣᏚᎬᎢ, ᎠᎴ ᏁᎳᏍᎪᎯ ᎰᏪᎸᎦ.
Atunaki na moto mosusu: « Osengeli kofuta boni lokola niongo epai ya mokonzi na ngai? » Azongisaki: « Basaki nkama moko ya ble. » Mobateli bomengo alobaki na ye: « Zwa mokanda na yo ya niongo, mpe koma mokanda mosusu ya nyonso ya basaki tuku mwambe. »
8 ᎤᎾᏜᏓᎢᏃ ᎤᎸᏉᏔᏁ ᏂᏚᏳᎪᏛᎾ ᎢᏯᏛᎾᎯ ᎤᎦᏌᏯᏍᏗᏕᎩ, ᎤᏗᎦᎵᏍᏙᏍᎨ ᎤᏏᎾᏌᏅᏨᎢ; ᎡᎶᎯᏰᏃ ᏧᏪᏥ ᎤᏅᏒ ᎠᏁᎲᎢ, ᎤᏟ ᎾᏂᏏᎾᏌᏅ ᎡᏍᎦᏉ ᎢᎦᎦᏘ ᏧᏪᏥ. (aiōn g165)
Mokonzi akumisaki mobateli mabe wana ya bomengo mpo na mayele oyo asalaki na yango. Pamba te bato ya mokili oyo, bazali na mayele koleka bana ya pole. (aiōn g165)
9 ᎠᎴ ᎢᏨᏲᏎᎭ, ᎢᏣᎵᎢᏓ ᎤᏓᎵᏓᏍᏗ ᎨᏅᎢᏍᏗ ᎨᏒᎢ; ᎾᏍᎩ ᎡᏍᎦ ᏂᏣᎵᏍᏓᏁᎸ ᎤᎵᏍᏆᏗᏍᏗ ᏂᎨᏒᎾ ᏩᏕᏗᏱ ᎨᏒ ᎦᎨᏣᏓᏂᎸᎢᏍᏗ ᎨᏎᏍᏗ. (aiōnios g166)
Nalobi na bino: bosalela bomengo ya mabe mpo na kotonga bondeko na bato mosusu; mpo ete tango ekosila, bayamba bino kati na bivandelo ya seko. (aiōnios g166)
10 ᎩᎶ ᏚᏳᎪᏛ ᎢᏯᏛᏁᎯ ᎦᏲᎵ ᎨᏒᎢ, ᎾᏍᏉ ᏚᏳᎪᏛ ᎾᏛᏁᎰ ᎤᎪᏗᏗ ᎨᏒᎢ; ᏂᏚᏳᎪᏛᎾᏃ ᎢᏯᏛᏁᎯ ᎤᏍᏗ ᎨᏒ, ᎾᏍᏉ ᏂᏚᏳᎪᏛᎾ ᎾᏛᏁᎰ ᎤᎪᏗᏗ ᎨᏒᎢ.
Moto oyo azali sembo na makambo mike, akoki mpe kozala sembo na makambo minene; mpe moto oyo azali sembo te na makambo mike, akozala mpe sembo te na makambo minene.
11 ᎾᏍᎩ ᎢᏳᏍᏗ ᎢᏳᏃ ᏚᏳᎪᏛ ᏂᏣᏛᏁᎲᎾ ᎢᎨᏎᏍᏗ ᎤᏓᎵᏓᏍᏗ ᎨᏅᎢᏍᏗ ᎨᏒ ᎪᎱᏍᏗ ᎢᏨᏗᏍᎬᎢ, ᎦᎪ ᏱᏥᎦᏘᏗᏍᏓ ᏄᏓᎵᏓᏍᏛᎾ ᎨᏅᎢᏍᏗ ᎨᏒᎢ?
Boye soki bozali sembo te na bobateli bomengo oyo ezwami na banzela ya lokuta, nani akopesa bino bomengo ya solo?
12 ᎢᏳᏃ ᏚᏳᎪᏛ ᏂᏣᏛᏁᎸᎾ ᏱᎩ ᏅᏩᏓᎴ ᎤᏤᎵᎦ ᎨᏒᎢ, ᎦᎪ ᏓᏥᏁᎵ ᎢᏨᏒ ᎢᏣᏤᎵ ᎨᏒᎢ?
Mpe soki bozali sembo te na bobateli biloko ya moto mosusu, nani akopesa bino biloko oyo esengeli kozala ya bino moko?
13 ᎥᏝ ᎩᎶ ᎠᏥᏅᏏᏓᏍᏗ ᏰᎵ ᎠᏂᏔᎵ ᎬᏩᏅᏏᏙᎯ ᎪᎱᏍᏗ ᏱᏙᎬᏛᏂᏏ; ᏱᎠᏍᎦᎦᏰᏃ ᏌᏉ ᏱᎤᎨᏳᎭᏃ ᏐᎢ; ᏱᏙᎤᏂᏴᏆᎴ ᏌᏉ ᏱᎦᏂᏆᏘᎭᏃ ᏐᎢ. ᏝᏍᎩᏂ ᏰᎵ ᎤᏁᎳᏅᎯ ᎠᎴ ᎹᎹᏂ ᎪᎱᏍᏗ ᏱᏙᎨᏣᏛᏂᏏ.
Mosali moko te akoki kosalela bankolo mibale, pamba te akoyina moko mpe akolinga mosusu to akokangama na moko mpe akoboya mosusu. Bokoki te kosalela mbala moko Nzambe mpe mbongo.
14 ᎠᏂᏆᎵᏏᏃ ᎾᏍᏉ, ᎾᏍᎩ ᎠᏕᎸ ᎤᏂᎬᎥᏍᎩ ᏥᎨᏎᎢ, ᎾᏍᎩ ᎯᎠ ᏂᎦᏛ ᎤᎾᏛᎦᏁᎢ; ᎠᎴ ᎬᏩᏕᎰᏔᏁᎢ.
Wana Bafarizeo bazalaki koyoka Yesu koloba makambo wana nyonso, bazalaki koseka Ye, pamba te bazalaki na lokoso ya mbongo.
15 ᎯᎠᏃ ᏂᏚᏪᏎᎴᎢ, ᏂᎯ ᎧᏂ ᏚᏳᎪᏛ ᎢᏣᏛᏁᎯ ᏅᏩᏍᏙᎢ ᏴᏫ ᎠᏂᎦᏔᎲᎢ; ᎤᏁᎳᏅᎯᏍᎩᏂ ᏓᎦᏔᎭ ᏗᏥᎾᏫ; ᎾᏍᎩᏰᏃ ᎦᎸᏉᏗᏳ ᏧᏂᏰᎸᏐ ᏴᏫ, ᎤᏂᏆᏘᏍᏗᏳ ᎤᏁᎳᏅᎯ ᏓᎧᏂᏍᎬᎢ.
Kasi Yesu alobaki na bango: — Bino, bozali penza bato oyo bomilakisaka na miso ya bato mosusu lokola nde bozali bato ya sembo, nzokande Nzambe ayebi mitema na bino; pamba te oyo bato bamonaka motuya makasi, Nzambe ayokaka yango nkele.
16 ᏗᎧᎿᎭᏩᏛᏍᏗ ᎠᎴ ᎠᎾᏙᎴᎰᏍᎩ ᏕᏤᎲᎩ ᏣᏂ ᎤᎾᏄᎪᏥᎸ ᎢᏯᏍᏗ; ᎾᎯᏳ ᏅᏓᎬᏩᏓᎴᏅᏛ ᎤᏁᎳᏅᎯ ᎤᎬᏫᏳᎯ ᎨᏒ ᎠᏂᏃᎮᎭ ᎠᎾᎵᏥᏙᎲᏍᎦ, ᎠᎴ ᎾᏂᎥ ᏴᏫ ᎠᎾᏁᎷᎩ ᎠᏂᏴᎯᎭ.
Tango ya Mibeko mpe ya Basakoli ewumelaki kino na Yoane Mobatisi; kasi wuta Yoane Mobatisi ayaki, Sango Malamu ya Bokonzi ya Nzambe ezali koteyama, mpe moto nyonso azali kobunda na kondima mpo na kokota kuna.
17 ᎠᎴ ᎤᏟ ᎠᎯᏗᏳ ᎦᎸᎶᎢ ᎠᎴ ᎡᎶᎯ ᎤᏂᎶᏐᎲᏍᏗᏱ, ᎠᏃ ᏌᏉ ᎤᏍᏗᎧᏂ ᏗᎧᎿᎭᏩᏛᏍᏗ ᎡᏍᎦ ᎢᏳᎵᏍᏙᏗᏱ.
Ezali penza pete mpo na Likolo mpe mabele kolimwa; kasi mpo na Mibeko, ezali penza pasi mpo na nkoma na yango oyo eleki moke kolongwa.
18 ᎩᎶ ᎤᏓᎵᎢ ᎢᎠᏓᎡᎨᏍᏗ, ᎠᎴ ᏅᏩᏓᎴ ᎠᏓᏰᎨᏍᏗ, ᎠᏓᏲᏁᎮᏍᏗ; ᎩᎶᏃ ᎠᎦᏓᎢᏅᏛ ᎠᏓᏰᎨᏍᏗ ᎠᏓᏲᏁᎮᏍᏗ.
Mobali nyonso oyo alongoli mwasi na ye na libala mpe abali mwasi mosusu asali ekobo, mpe mobali oyo abali mwasi oyo balongoli na libala asali mpe ekobo.
19 ᎩᎶ ᎢᏳᏍᏗ ᎠᏍᎦᏯ ᎤᏪᎿᎭᎢ ᎡᎮᎢ, ᎩᎦᎨ ᎠᎴ ᎤᏏᏙᎵ ᏙᎴᏛ ᏗᏄᏬ ᏓᏄᏬᏍᎨᎢ, ᎠᎴ ᏂᏓᏙᏓᏈᏒ ᎣᏍᏛ ᏓᎵᏍᏓᏴᎲᏍᎨᎢ.
Ezalaki na mozwi moko oyo azalaki kolata bilamba ya motane makasi mpe ya lino ya kitoko, bongo azalaki kobika bomoi ya bisengo mikolo nyonso.
20 ᎠᎴ ᎾᏍᏉ ᎡᎮ ᎩᎶ ᎢᏳᏍᏗ ᎤᏲ ᎢᏳᏛᎿᎭᏕᎩ ᎳᏏᎳ ᏧᏙᎢᏛ, ᎾᏍᎩ ᎠᏥᏂᏏᏁ ᎤᏪᎿᎭᎢ ᎤᏤᎵ ᎦᎶᎯᏍᏗᏱ, ᏧᏥᏓᎳ ᎨᏎᎢ,
Na liboso ya ekuke ya ndako na ye, mobola moko atandamaki wana, kombo na ye ezalaki Lazare, nzoto na ye mobimba etonda na bapota;
21 ᎠᎴ ᎤᏚᎵᏍᎨ ᎠᎨᎳᏍᏙᏗᏱ ᎤᏅᎪᎣᏒᎯ ᎤᏪᎿᎭᎢ ᎤᏪᏍᎩᎸᎢ; ᎠᎴ ᎾᏍᏉ ᎩᎵ ᎤᏂᎷᏤ ᏚᏂᎦᎾᏕ ᏚᏥᏓᎸᎢ.
azalaki koluka ata kolia biloko oyo ezalaki kokweya longwa na mesa ya mozwi, kasi ezalaki bambwa nde ezalaki koya kolembola bapota na ye.
22 ᎯᎠᏃ ᏄᎵᏍᏔᏁᎢ; ᎾᏍᎩ ᎤᏲ ᎢᏳᏛᎿᎭᏕᎩ ᎤᏲᎱᏎᎢ, ᎠᎴ ᏗᏂᎧᎿᎭᏩᏗᏙᎯ ᎬᏩᏅᏎ ᎡᏆᎭᎻ ᎦᏁᏥᎢ ᏫᎬᏪᎧᏁᎢ. ᎤᏪᎿᎭᎢᏃ ᎾᏍᏉ ᎤᏲᎱᏎᎢ ᎠᎴ ᎠᏥᏂᏌᏁᎢ.
Mokolo moko, mobola yango akufaki, mpe ba-anjelu bamemaki ye epai ya Abrayami. Mozwi mpe akufaki, mpe bakundaki ye.
23 ᎠᎴ ᏨᏍᎩᏃᎢ ᏚᏌᎳᏓᏁ ᏗᎦᏙᎵ ᎠᎩᎵᏲᎨᎢ, ᎠᎴ ᎾᎿᎭᎢᏅ ᏭᎪᎮ ᎡᏆᎭᎻ, ᎠᎴ ᎳᏏᎳ ᎡᏆᎭᎻ ᎦᏁᏥᎢ. (Hadēs g86)
Kati na mboka ya bakufi, mozwi azalaki konyokwama na pasi makasi; boye atombolaki miso mpe amonaki, na mosika, Abrayami elongo na Lazare avanda pembeni na ye. (Hadēs g86)
24 ᎠᎴ ᎤᏪᎷᏁ ᎯᎠ ᏄᏪᏎᎢ; ᎡᏙᏓ ᎡᏆᎭᎻ, ᏍᎩᏙᎵᎩ, ᎠᎴ ᎡᎯᏅᎵ ᎳᏏᎳ, ᎠᎴ ᎾᏍᎩ ᎤᏍᎪᎵ ᎦᏰᏌᏛ ᎠᎼᎯ ᏩᎱᏓ, ᎠᎴ ᏩᎩᏙᎣᎸᏍᏓᏏ ᏥᏃᎪᎢ; ᏥᎩᎵᏲᎦᏰᏃ ᎠᏂ ᎠᏓᏪᎵᎩᏍᎬᎢ.
Mozwi akomaki koganga: « Tata Abrayami, yokela ngai mawa! Tinda Lazare ete atia songe ya mosapi na ye kati na mayi mpo ete atangisela ngai mayi na lolemo, pamba te nazali koyoka pasi makasi kati na moto oyo. »
25 ᎠᏎᏃ ᎡᏆᎭᎻ ᎯᎠ ᏄᏪᏎᎢ; ᎠᏇᏥ, ᎭᏅᏓᏓ, ᏂᎯ ᎠᏏ ᏣᎴᏂᏙᎲᎩ ᎯᏩᏘᏍᎬ ᏣᏤᎵᎦ ᎣᏍᏛ, ᎠᎴ ᎳᏏᎳ ᎾᏍᏉ ᎠᏩᏘᏍᎬᎩ ᎤᏤᎵᎦ ᎤᏲᎢ. ᎠᏎᏃ ᎿᎭᏉ ᎠᏥᏄᏬᎯᏍᏔᏅ, ᏂᎯᏃ ᎢᎯᎩᎵᏲᎦ.
Kasi Abrayami azongisaki: « Mwana na ngai, kanisa ete, wana ozalaki na bomoi, ozwaki bolamu ebele, kasi Lazare azwaki nde pasi ebele. Sik’oyo awa, azali kozwa kobondisama na ye; kasi yo, okomi na pasi.
26 ᎠᎴᏃ ᎾᏍᏉ ᎠᏴ ᎣᏤᎲ ᏂᎯᏃ ᎢᏤᎲ ᎾᎿᎭᎠᏰᎵ ᎨᏒ ᎡᏉᎯᏳ ᎤᏜᏓᏅᏛᎢ ᎪᏢᎭ, ᎾᏍᎩ ᎢᏳᏍᏗ ᎩᎶ ᏳᎾᏚᎵᎭ ᎠᏂ ᎤᎾᏓᎴᏍᏗᏱ ᏗᏤᎲ ᏭᏂᎶᎯᏍᏗᏱ, ᎥᏝ ᏰᎵ ᏱᏅᎬᎾᏛᎦ, ᎠᎴ ᎾᏍᏉ ᎠᏂ ᎣᏤᎲᎢ ᎥᏝ ᏴᎬᏂᎷᎩ ᎾᎿᎭᏅᏓᏳᏂᎶᎯᏍᏗᏱ ᏳᎾᏚᎵᎭ.
Lisusu, libulu moko monene ekaboli biso mpe bino, mpo ete moto nyonso oyo alingi kolongwa awa epai biso tozali mpo na kokende epai na bino, akoka te; mpe ete moto nyonso oyo alingi kokatisa libulu yango longwa kuna epai bino bozali mpo na koya awa epai na biso, akoka mpe te. »
27 ᎯᎠᏃ ᏄᏪᏎᎢ; ᎠᏗᎾ ᎡᏙᏓ, ᎬᏔᏲᏎᎭ, ᎯᏅᏍᏗᏱ ᎡᏙᏓ ᏗᎦᏁᎸᎢ;
Mozwi alobaki: « Tata, nasengi na yo, tinda Lazare epai ya libota na ngai,
28 ᎯᏍᎩᏰᏃ ᎾᏂᎥ ᎣᏣᎵᏅᏟ ᎠᏁᎭ; ᎾᏍᎩᏃ ᏱᏫᏕᎧᏃᎲᏏ ᎾᏍᏉᏰᏃ ᎠᏂ ᎠᎩᎵᏲᎢᏍᏗᏱ ᎨᏒ ᏯᏂᎷᎩ.
pamba te nazali na bandeko mitano. Tika ete akende kokebisa bango mpo ete, bango mpe, bakoma awa te, kati na esika oyo ya pasi! »
29 ᎡᏆᎭᎻ ᎯᎠ ᏄᏪᏎᎴᎢ; ᎼᏏ ᎠᎴ ᎠᎾᏙᎴᎰᏍᎩ ᏚᏁᎭ; ᎾᏍᎩ ᏫᏓᎾᏛᏓᏍᏓᏏ.
Abrayami azongisaki: « Bandeko na yo bazali na Moyize mpe basakoli; tika ete bayoka bango! »
30 ᎯᎠᏃ ᏄᏪᏎᎢ, ᏞᏍᏗ ᎡᏙᏓ ᎡᏆᎭᎻ, ᎢᏳᏍᎩᏂ ᎩᎶ ᎤᏲᎱᏒᎯ ᏱᏭᏂᎷᏤᎸ ᎠᏎ ᏱᏓᏂᏁᏟᏴᎾ ᏓᎾᏓᏅᏛᎢ.
Mozwi alobaki lisusu: « Te, tata Abrayami! Kasi soki moto moko awuti na mboka ya bakufi mpe akei epai na bango, bakobongola mitema! »
31 ᎠᏎᏃ ᎯᎠ ᏄᏪᏎᎴᎢ; ᎢᏳᏃ ᏂᏓᎾᏛᏓᏍᏓᏁᎲᎾ ᏱᎩ ᎼᏏ ᎠᎴ ᎠᎾᏙᎴᎰᏍᎩ, ᎥᏝ ᎾᏍᏉ ᏴᎬᏃᎯᏳᎲᎦ, ᎾᏍᏉ ᎩᎶ ᎤᏲᎱᏒᎯ ᏱᏚᎴᏅ.
Abrayami alobaki na ye: « Soki baboyi koyoka Moyize mpe basakoli, bakondima mpe kaka te ata soki moto moko alamuki kati na bakufi. »

< ᎣᏍᏛ ᎧᏃᎮᏛ ᎷᎦ ᎤᏬᏪᎳᏅᎯ 16 >