< ᎣᏍᏛ ᎧᏃᎮᏛ ᎷᎦ ᎤᏬᏪᎳᏅᎯ 15 >

1 ᎿᎭᏉᏃ ᎾᎥ ᎬᏩᎷᏤᎴ ᏂᎦᏛ ᎠᏕᎸ ᎠᏂᎩᏏᏙᎯ ᎠᎴ ᎠᏂᏍᎦᎾ ᎬᏩᏛᏓᏍᏓᏁᏗᏱ.
Bafutisi mpako mpe bato ya masumu bapusanaki bango nyonso pene ya Yesu mpo na koyoka Ye.
2 ᎠᏂᏆᎵᏏᏃ ᎠᎴ ᏗᏄᏪᎵᏍᎩ ᎤᏂᏐᏅᏤᎴ ᎯᎠ ᏄᏂᏪᏎᎢ, ᎯᎠ ᎠᏍᎦᏯ ᏓᏓᏂᎸᎪ ᎠᏂᏍᎦᎾᎢ, ᎠᎴ ᎢᏧᎳᎭ ᎠᎾᎵᏍᏓᏴᎲᏍᎪᎢ.
Kasi Bafarizeo mpe balakisi ya Mobeko bazalaki koyimayima mpe koloba: — Moto oyo azali koyamba bato ya masumu mpe kolia mesa moko elongo na bango.
3 ᎯᎠᏃ ᏄᏪᏎ ᏚᏟᎶᏍᏔᏁᎴᎢ,
Bongo Yesu alobaki na bango lisese oyo:
4 ᎦᎪ ᎯᎠ ᏥᏂᏣᏛᏅ, ᎠᏍᎪᎯᏧᏈ ᏱᏚᎾᏝᎠ ᎤᏂᏃᏕᎾ, ᎢᏳᏃ ᏌᏉ ᏳᏲᎱᏎᎸ, ᎥᏝ ᏱᏗᎬᏕᎪ ᎢᎾᎨ ᎠᏁᏙᎲ ᏐᎣᏁᎳᏍᎪᎯ ᏐᎣᏁᎳᎦᎵ ᎢᏯᏂᏛ, ᎠᎴ ᏳᏲᎴᎪ ᎤᏲᎱᏎᎸᎯ, ᎬᏂ ᎠᏩᏛ?
— Soki moko kati na bino azali na bameme nkama moko, bongo moko kati na yango ebungi; boni, akotika te bameme tuku libwa na libwa kati na esobe mpo na kokende koluka moko oyo ewuti kobunga kino amona yango?
5 ᎢᏳᏃ ᎠᏩᏛ ᎠᏃᎭᏢᎥᏍᎪᎢ ᎠᎵᎮᎵᎪᎢ.
Mpe tango akomona yango, akotia yango na mapeka na ye, na esengo.
6 ᎥᎦᎷᎩᏃ ᎤᏪᏅᏒ ᏫᏓᏯᏂᏍᎪ ᏧᎵᎢ ᎠᎴ ᎾᎥ ᎢᏳᎾᏓᎳ, ᎯᎠ ᏂᏕᎦᏪᏎᎰᎢ, ᎢᏧᎳᎭ ᎢᏓᎵᎮᎵᎩ; ᎢᏥᏩᏛᎲᏰᏃ ᎤᏃᏕᎾ ᏣᎩᏲᎱᏎᎲᎩ.
Bongo, tango kaka akokoma na ndako na ye, akobengisa balingami mpe baninga na ye, akoloba na bango: « Bosepela na ngai elongo, pamba te namoni meme na ngai, oyo ebungaki! »
7 ᎢᏨᏲᏎᎭ, ᎾᏍᏉᏍᎩᏂ ᎤᏟᎯᏳ ᎾᎾᎵᎮᎵᎨᏍᏗ ᎦᎸᎳᏗ ᏦᏒ ᏌᏉ ᎠᏍᎦᎾ ᎦᏁᏟᏴᏍᎨᏍᏗ ᎤᏓᏅᏛᎢ, ᎡᏍᎦᏉ ᎢᏴᏛ ᏐᎣᏁᎳᏍᎪᎯ ᏐᎣᏁᎳᎦᎵ ᎢᏯᏂᏛ ᎤᎾᏓᏅᏘ ᎠᏂᏍᎦᏯ ᏧᏂᏁᏟᏴᏍᏗ ᏄᎾᎵᏍᏓᏁᎲᎾ ᏚᎾᏓᏅᏛᎢ.
Na nzela yango, nazali koloba na bino: esengo oyo ekozala kati na Likolo mpo na mosumuki moko kaka oyo abongoli motema, eleki esengo mpo na bato ya sembo tuku libwa na libwa oyo bazali na posa te ya kobongola mitema.
8 ᎠᎴ ᎦᎪ ᎢᏳᏍᏗ ᎠᎨᏴ ᎠᏍᎪᎯ ᏱᏚᎭ ᎠᎩᏏ ᏧᎾᎬᏩᎶᏗ, ᎢᏳᏃ ᏌᏉ ᏳᏲᎱᏎᎸ, ᎥᏝ ᏯᏨᏍᏛᏍᎪ ᎠᏨᏍᏙᏗ ᎠᎴ ᏱᎬᏃᏌᏍᎪ ᎦᎵᏦᏕ, ᎠᎴ ᎤᎵᏏᎾᎯᏍᏗ ᏳᏲᎰ ᎬᏂ ᎠᏩᏛ?
Soki mwasi azali na mbongo ya bibende zomi mpe abungisi moko kati na yango, boni, apelisaka mwinda te, akombaka ndako te mpo na koluka yango malamu kino amona yango?
9 ᎢᏳᏃ ᎠᏩᏛ ᏫᏓᏯᏂᏍᎪ ᏧᎵᎢ ᎠᎴ ᎾᎥ ᎢᏳᎾᏓᎳ, ᎯᎠ ᏂᎦᏪᏍᎪᎢ, ᎢᏧᎳᎭ ᎢᏓᎵᎮᎵᎩ; ᎠᎩᏩᏛᎲᏰᏃ ᎠᏕᎸ ᏣᎩᏲᎱᏎᎲᎩ.
Bongo soki amoni yango, abengisaka balingami na ye elongo na baninga na ye, mpe alobaka na bango: « Bosepela na ngai elongo, pamba te namoni mbongo na ngai, oyo ebungaki! »
10 ᎾᏍᏉᏍᎩᏂ ᎢᏨᏲᏎᎭ ᎠᎾᎵᎮᎵᎪ ᏗᏂᎧᎿᎭᏩᏗᏙᎯ ᎤᏁᎳᏅᎯ ᏧᏤᎵᎦ ᏌᏉ ᎠᏍᎦᎾ ᎦᏁᏟᏴᎾ ᎤᏓᏅᏛᎢ.
Na nzela yango, nazali koloba na bino: ba-anjelu ya Nzambe basepelaka mpo na mosumuki moko oyo abongoli motema.
11 ᎯᎠᏃ ᏄᏪᏎᎢ, ᎩᎶ ᎢᏳᏍᏗ ᎠᏍᎦᏯ ᎠᏂᏔᎵ ᏧᏪᏥ ᎠᏂᏍᎦᏯ ᎠᏁᎮᎢ.
Yesu alobaki lisusu: — Mobali moko azalaki na bana mibali mibale.
12 ᎣᏂᏃ ᎡᎯ ᎯᎠ ᏄᏪᏎᎴ ᎤᏙᏓ, ᎡᏙᏓ, ᎠᏆᏤᎵ ᎢᏳᎵᏍᏙᏗ ᎨᏒ ᏧᎬᏩᎶᏗ ᏣᎲᎢ ᏍᎩᎲᏏ. ᏔᎵᏃ ᏂᏚᏪᏕᎴ ᏂᎦᎥ ᏧᎬᏩᎶᏗ ᎤᎲᎢ.
Leki alobaki na tata na ye: « Tata, pesa ngai eteni na ngai ya libula. » Mpe tata akabolelaki bango biloko na ye.
13 ᎢᏳᏍᎩᏉᏃ ᏫᏄᏒᎸ ᎤᏪᏥ ᎣᏂ ᎡᎯ ᏂᎦᏛ ᎤᏪᏟᏌᏁᎢ, ᎠᎴ ᎤᏂᎩᏎ ᎢᏅ ᏭᎶᏎᎢ, ᎾᎿᎭᏃ ᏄᏁᎸᎾ ᎡᎲᎢ ᏭᏤᏫᏙᎴ ᏧᎬᏩᎶᏗ ᎤᎲᎢ.
Sima na mwa mikolo, leki azwaki biloko nyonso oyo azalaki na yango, akendeki na mboka moko ya mosika. Kuna, asakanaki na bozwi na ye, abikaki bomoi ya mobulu.
14 ᎠᎴ ᏂᎦᏛ ᎤᏤᏬᏅ ᎤᏣᏘ ᏚᎪᏄᎶᏎ ᎾᎿᎭᏂ, ᎿᎭᏉᏃ ᎤᎴᏅᎮ ᎤᏚᎸᎲᏁᎢ.
Sima na ye kosakana na bozwi na ye nyonso, nzala makasi ekotaki kati na mboka yango mobimba, mpe akomaki kokelela.
15 ᎤᏪᏅᏎᏃ ᎤᎵᎪᏁᎴ ᎾᎿᎭᎡᎯ ᎠᏍᎦᏯ; ᏙᏧᎶᎨᏒᏃ ᏏᏆ ᏗᎨᎶᎸ ᎤᏅᏎᎢ.
Boye akendeki komikomisa lokola mosali epai ya moto moko ya mboka yango. Moto yango atindaki ye na bilanga na ye mpo na koleisa bangulu.
16 ᎠᎴ ᎤᏚᎵᏍᎨ ᏧᏪᏰᏍᏗᏱ ᎧᎵᏎᏥ ᎤᎾᏓᏛᏅᎯ ᏏᏆ ᎤᎾᎵᏍᏓᏴᏗ, ᎠᏎᏃ ᎥᏝ ᎩᎶ ᏱᏚᏅᏁᎮᎢ.
Mwana alukaki ata kolia bilei ya bangulu, kasi moto ata moko te apesaki ye yango.
17 ᎤᏓᏅᏘᏌᏅᏃ ᎯᎠ ᏄᏪᏎᎢ; ᏄᏂᏣᏔ ᎨᎦᎫᏴᎡᎯ ᎨᏥᏅᏏᏓᏍᏗ ᎡᏙᏓ ᏧᏤᎵᎦ ᎤᎶᏒᏍᏔᏅᎯ ᎤᏂᎭ ᎤᎾᎵᏍᏓᏴᏗ, ᎠᏴᏃ ᎠᎪᏄᏉ ᎠᎩᎯᎭ!
Bongo akomaki kokanisa na tina na bomoi na ye, alobaki: « Basali boni tata na ngai azwa na mosala mpe bazali kolia ndenge balingi, mpe biloko ya kolia eleki kutu ebele; kasi ngai nazali kokufa awa na nzala!
18 ᏙᏓᎦᎴᏂ, ᎡᏙᏓ ᏮᏓᏥᎷᏤᎵ, ᎯᎠ ᏫᏅᏓᏥᏪᏎᎵ; ᎡᏙᏓ, ᎦᎸᎳᏗ ᏥᏍᎦᏅᏤᎸ, ᎠᎴ ᏂᎯ ᎯᎦᏔᎲᎢ.
Nazwi mokano ya kobima mpe kozonga epai ya tata na ngai; nakoloba na ye: ‹ Tata, nasali masumu liboso ya Nzambe mpe liboso na yo.
19 ᎠᎴ ᎥᏝ ᎿᎭᏉ ᏰᎵ ᎠᏇᏥ ᎨᏍᏉᏎᏗ ᏱᎩ; ᏘᏅᏏᏓᏍᏗᏉ ᏔᎫᏴᎡᎯ ᏄᎾᏍᏛ ᎾᏍᎩᏯ ᏂᏍᏋᎦ.
Nabongi lisusu te kobengama mwana na yo; zwa ngai lokola moko kati na basali na yo! › »
20 ᎠᎴ ᏚᎴᏁ ᎤᏙᏓ ᏭᎷᏤᎴᎢ. ᎠᏎᏃ ᎠᏏ ᎢᏅᎯᏳ ᏣᎢᏎᎢ ᎤᏙᏓ ᏭᎪᎮᎢ, ᎠᎴ ᎤᏪᏙᎵᏤᎢ, ᎠᎴ ᏚᏍᏆᎸᏔᏁᎢ, ᎠᎴ ᎠᎩᎵᎨᏂ ᎤᏪᏯᎸᏤᎢ, ᎠᎴ ᎤᏔᏪᏙᏁᎢ.
Boye, abimaki mpe azongaki epai ya tata na ye. Wana azalaki nanu mosika, tata na ye amonaki ye, ayokelaki ye mawa mingi; apotaki mbangu mpo na kokutana na mwana na ye, amibwakaki na nzoto na ye mpe ayambaki ye.
21 ᎤᏪᏥᏃ ᎯᎠ ᏄᏪᏎᎴᎢ; ᎡᏙᏓ, ᎦᎸᎳᏗ ᏥᏍᎦᏅᏤᎸ, ᎠᎴ ᏂᎯ ᎯᎦᏔᎲᎢ; ᎠᎴ Ꮭ ᎿᎭᏉ ᎠᏇᏥ ᎨᏍᏉᏎᏗ ᏱᎩ.
Mwana alobaki na tata na ye: « Tata, nasali masumu liboso ya Nzambe mpe liboso na yo, nabongi lisusu te kobengama mwana na yo. »
22 ᎠᏎᏃ ᎤᏙᏓ ᎯᎠ ᏂᏚᏪᏎᎴ ᏧᏅᏏᏓᏍᏗ; ᎣᏌᏂ ᎠᏄᏬ ᏫᏥᎾᎩ, ᎡᏥᏄᏬᏣ, ᎠᎴ ᎡᏥᏰᏑᏍᏙᎦ, ᎠᎴ ᏤᏣᎳᏑᎸᎦ.
Kasi tata alobaki na basali na ye: « Bomema na lombangu nzambala oyo eleki kitoko mpe bolatisa ye yango; bolatisa ye lopete, na mosapi, mpe basandale, na makolo na ye.
23 ᎠᎴ ᎦᎵᏦᏔᏅᎯ ᏩᎦ ᎠᎩᎾ ᏫᏥᏯᏅ, ᎠᎴ ᎡᏥᎷᎦ; ᎠᎴ ᎢᏓᎵᏍᏓᏴᎲᎦ, ᎣᏍᏛ ᎢᏓᏓᏅᏓᏓ.
Boya na mwana ngombe ya mafuta mpe boboma yango; tolia mpe tosala feti,
24 ᎯᎠᏰᏃ ᎠᏇᏥ ᎤᏲᎱᏒᎯ ᎨᏒᎩ, ᏔᎵᏁᏃ ᎢᎡᎭ, ᎠᎴ ᎡᏓᏠᏨᎯ ᎨᏒᎩ, ᎢᎠᏥᏩᏛᎲᏃ; ᎤᎾᎴᏅᎮᏃ ᎣᏍᏛ ᎤᎾᏓᏅᏓᏕᎢ.
pamba te mwana na ngai, oyo bozali komona, akufaki, kasi azongi lisusu na bomoi; abungaki, kasi amonani! » Boye babandaki feti na esengo makasi.
25 ᎤᏓᏂᎵᎨᏃ ᎤᏪᏥ ᏠᎨᏏ ᏪᏙᎮᎢ; ᏗᎤᏪᏅᏃ ᎠᎴ ᎠᏓᏁᎸ ᎾᎥ ᎤᎷᏨ, ᏓᏂᏃᎩᏍᎬ ᎠᎴ ᎠᎾᎵᏍᎩᏍᎬ ᎤᏛᎦᏁᎢ
Na tango yango, kulutu na ye azalaki nanu kati na bilanga. Tango akomaki pene ya ndako, ayokaki miziki mpe makelele ya mabina.
26 ᏭᏯᏅᎮᏃ ᎠᏏᏴᏫ ᎠᏥᏅᏏᏓᏍᏗ, ᎠᎴ ᎤᏛᏛᏁ ᎤᏰᎸᏛ ᎾᏍᎩ ᎾᎾᏛᏁᎲᎢ.
Boye abengaki moko kati na basali mpe atunaki ye makambo oyo ezali koleka.
27 ᎾᏍᎩᏃ ᎯᎠ ᏄᏪᏎᎴᎢ; ᎡᏣᏅᏟ ᎤᎷᏨ, ᏣᏙᏓᏃ ᎦᎵᏦᏔᏅᎯ ᏩᎦ ᎠᎩᎾ ᎤᎸ, ᏙᎯᏱ ᎤᎾᏄᎪᏥᎸ ᎢᏳᏍᏗ.
Mosali azongisaki: « Ndeko na yo azongi! Tata na yo abomi mwana ngombe ya mafuta, pamba te amoni ye nzoto malamu mpe nzoto kolongono. »
28 ᎤᏔᎳᏬᏎᏃ, ᎠᎴ ᏫᏄᏴᎸᎾᏉ ᎨᏎᎢ; ᎾᏍᎩ ᎢᏳᏍᏗ ᎤᏙᏓ ᏧᏄᎪᏤ ᎤᏍᏗᏰᏔᏁᎢ.
Kulutu asilikaki makasi mpe aboyaki kokota. Boye tata na ye abimaki mpe abondelaki ye.
29 ᎤᏁᏨᏃ ᎯᎠ ᏄᏪᏎᎴ ᎤᏙᏓ; ᎬᏂᏳᏉ ᎤᏣᏔ ᎾᏕᏘᏴ ᎬᏍᏕᎸᎯᏓ, ᎠᎴᎥᏝ ᎢᎸᎯᏳ ᎾᏉᎯᏳᏅᎾ ᏱᎩ ᏣᏁᏨᎢ, ᎠᏎᏃ ᎥᏝ ᎢᎸᎯᏳ ᎠᏫ-ᎠᎩᎾ ᎠᏎᏄᎸᎯ ᏱᏍᎩᎧᏁᎶᎢ, ᎣᏍᏛ ᎣᎦᏓᏅᏓᏗᏍᏙᏗ ᏗᏆᎵᎢ.
Kasi azongiselaki tata na ye: « Tala! Mibu nyonso oyo nazalaki kosalela yo lokola mowumbu, natikalaki koboya te kotosa mitindo na yo. Nzokande, otikala nanu kopesa ngai te ata mwana ntaba mpo ete nasepela elongo na balingami na ngai.
30 ᎯᎠᏍᎩᏂ ᏤᏥ ᎤᎷᏦᏅᎯᏉ, ᎾᏍᎩ ᏣᏒᏁᎸᎯ ᏧᎬᏩᎶᏗ ᎠᏂᎨᏴᎯ ᎤᏂᏁᎫᏥᏛ ᎤᏪᎳᏗᏙᎸᎢ, ᎢᎯᎡᎸ ᎦᎵᏦᏔᏅᎯ ᏩᎦ ᎠᎩᎾ.
Kasi tango mwana na yo, oyo ya mobali azongi na ndako, ye oyo asili kosakana na biloko na yo, na mobulu elongo na basi ya ndumba, obomi mwana ngombe ya mafuta mpo na ye! »
31 ᎯᎠᏃ ᏄᏪᏎᎴᎢ; ᎠᏇᏥ, ᏂᎪᎯᎸᏉ ᎢᏧᎳᎭ ᎢᏂᏁᎸ, ᎠᎴ ᏣᏤᎵᏉ ᏂᎦᎥ ᎠᎩᎾᎥᎢ.
Tata azongiselaki ye: « Mwana na ngai, ozalaka elongo na ngai tango nyonso, mpe biloko na ngai nyonso ezali ya yo.
32 ᏚᏳᎪᏛᎩ ᎣᏍᏛ ᎢᎦᏓᏅᏓᏗᏍᏗᏱ, ᎠᎴ ᎢᎩᎵᎮᎵᏍᏗᏱ; ᎯᎠᏰᏃ ᎡᏣᏅᏟ ᎤᏲᎱᏒᎯ ᎨᏒᎩ, ᏔᎵᏁᏃ ᎢᎡᎭ, ᎠᎴ ᎡᏓᏠᏨᎯ ᎨᏒᎢ, ᎢᎠᏥᏩᏛᎲᏃ.
Kasi tosengelaki kaka kosala feti mpe kosepela, pamba te ndeko na yo, oyo ozali komona, akufaki, kasi azongi lisusu na bomoi; abungaki, kasi amonani! »

< ᎣᏍᏛ ᎧᏃᎮᏛ ᎷᎦ ᎤᏬᏪᎳᏅᎯ 15 >