< ᎨᏥᏅᏏᏛ ᏄᎾᏛᏁᎵᏙᎸᎢ 5 >

1 ᎩᎶᏃ ᎢᏳᏍᏗ ᎠᏍᎦᏯ ᎡᏂᎾᏯ ᏧᏙᎢᏛ, ᎤᏓᎵᎢᏃ ᏌᏉᎵ ᎤᏂᎾᏗᏅᏎ ᎪᎱᏍᏗ ᎤᏂᎲᎢ,
Nzokande, ezalaki na moto moko na kombo Ananiasi. Atekaki eteni ya mabele na ye na boyokani na Safira, mwasi na ye.
2 ᎠᎴ ᎤᎯᏰ ᎢᎦᏛ ᏧᎬᏩᎳᏅᎯ, ᎠᎴ ᎤᏓᎵᎢ ᎾᏍᏉ ᎠᎦᏔᎮᎢ; ᎤᏲᎴᏃ ᎢᎦᏛ, ᎠᎴ ᎨᏥᏅᏏᏛ ᏧᎾᎳᏏᏕᏄᎶᏗ ᎤᏁᎢ.
Abombaki ndambo ya mbongo mpo na ye moko, boye amemaki ndambo oyo etikalaki mpe apesaki yango na bantoma. Mwasi na ye mpe ayebaki yango.
3 ᏈᏓᏃ ᎯᎠ ᏄᏪᏎᎢ; ᎡᏂᎾᏯ, ᎦᏙᏃ ᏎᏓᏂ ᏣᎾᏫ ᎢᏣᎧᎵᎡᎸ, ᎯᏯᏥᎪᏁᏗᏱ ᎦᎸᏉᏗᏳ ᎠᏓᏅᏙ, ᎠᎴ ᏣᎯᏯᏍᏗᏱ ᎢᎦᏛ ᎾᏍᎩ ᎦᏓ ᏧᎬᏩᎳᏅᎯ.
Boye, Petelo atunaki ye: — Ananiasi, ndenge nini Satana atondisi motema na yo mpo ete okosa Molimo Mosantu, mpe obomba ndambo ya mbongo oyo otekeli elanga na yo?
4 ᏥᏅᏩᏍᏛᏉ ᏝᏍᎪ ᏣᏤᎵᎦᏯ ᏱᎨᏎᎢ? ᏣᎾᏗᏅᏃ ᏝᏍᎪ ᏱᏣᎮ ᎭᏓᏅᏖᏍᎬᏉ ᎢᏨᏁᏗᏱ? ᎦᏙᏃ ᎯᎠ ᎾᏍᎩ ᏂᎤᏍᏗ ᎢᏦᏢᏅ ᏣᎾᏫᏱ? ᎥᏝᏍᎩᏂ ᏴᏫᏉ ᏱᎩᏯᏥᎪᏁᎸ, ᎤᏁᎳᏅᎯᏍᎩᏂ ᎯᏯᏥᎪᏁᎸ.
Boni, liboso ete oteka yango, ezalaki ya yo te? Mpe sima na koteka yango, okokaki te kosala na mbongo yango likambo nyonso oyo motema na yo elingi? Mpo na nini ozwaki likanisi ya kosala likambo ya boye? Okosi bato te, kasi okosi nde Nzambe!
5 ᎡᏂᎾᏯᏃ ᎾᏍᎩ ᎤᏛᎦᏅ ᎤᏅᏤ ᎠᎴ ᎤᎵᏍᏆᏕᎴᎢ. ᎾᏂᎥᏃ ᎾᏍᎩ ᏄᎵᏍᏔᏅᎢ ᎤᎾᏛᎦᏅᎯ ᎤᏣᏔᏅᎯ ᎤᏂᎾᏰᏎᎢ.
Tango Ananiasi ayokaki bongo, akweyaki mpe akufaki. Bongo, bato nyonso oyo bayokaki likambo yango batondaki na somo.
6 ᎠᏂᏫᏅᏃ ᏚᎾᎴᏁ ᎠᎴ ᎤᏂᏣᏄᎳᏁᎢ, ᎤᏂᎾᏫᏛᎲᏃ ᏭᏂᏂᏌᏁᎢ.
Boye, bilenge mibali bayaki, bazipaki nzoto na ye mpe bamemaki yango libanda mpo na kokunda yango.
7 ᏦᎢᎭᏃ ᎢᏳᏟᎶᏛ ᎢᏴᏛ ᎣᏂ ᎤᏓᎵᎢ ᎤᏴᎵᎴᎢ, ᎾᎦᏔᎲᎾ ᎨᏎ ᏄᎵᏍᏔᏅᎢ,
Sima na ngonga pene misato, mwasi ya Ananiasi akotaki, kasi ayebaki te likambo oyo ewutaki kosalema.
8 ᏈᏓᏃ ᎯᎠ ᏂᏅᏪᏎᎴᎢ; ᏍᎩᏃᎲᏏ, ᏥᎪ ᎾᏍᎩᏉ ᎢᎦᎢ ᏕᏍᏓᎬᏩᎳᏁᎴ ᎾᏍᎩ ᎦᏙᎯ? ᎯᎠᏃ ᏄᏪᏎᎢ; ᎥᎥ, ᎾᏍᎩᏉ ᎢᎦᎢ.
Petelo atunaki ye: — Yebisa ngai, ezali na talo wana nde yo mpe Ananiasi botekaki elanga wana? Safira azongisaki: — Ezali bongo, etekamaki Kaka na talo wana.
9 ᎿᎭᏉᏃ ᏈᏓ ᎯᎠ ᏄᏪᏎᎴᎢ; ᎦᏙᏃ ᏥᏍᏓᎵᎪᏅ ᎡᏍᏗᎪᎵᏰᏗᏱ ᎤᎬᏫᏳᎯ ᎤᏤᎵ ᎠᏓᏅᏙ? ᎬᏂᏳᏉ ᎠᏉ ᎦᎶᎯᏍᏗᏱ ᏧᎾᎳᏏᏕᏂ ᏣᏰᎯ ᎬᏩᏂᏌᏅᎯ, ᎾᏍᎩᏃ ᏂᎯ ᏛᎨᏣᎾᏫᏛᎯ.
Petelo alobaki na ye: — Mpo na nini boyokanaki mpo na komeka Molimo ya Nkolo? Yoka, makolo ya bato oyo bawuti kokunda mobali na yo esili kokoma liboso ya ekuke; yo mpe, bakomema yo.
10 ᎩᎳᏉᏃ ᎢᏴᏛ ᏧᎳᏏᏕᏄᎶᏗ ᎤᏅᏤᎢ, ᎠᎴ ᎤᎵᏍᏆᏕᎴᎢ. ᎠᏂᏫᏅᏃ ᎤᏂᏴᎸ ᎤᏂᏩᏛᎮ ᎤᏲᎱᏒᎯ ᎢᎨᏎᎢ, ᎤᏂᎾᏫᏛᎲᏃ ᏭᏂᏂᏌᏁ ᎤᏰᎯ ᏫᎦᏅᎢ.
Kaka na tango yango, akweyaki liboso ya Petelo mpe akufaki. Boye tango bilenge mibali bakotaki, bakutaki ye ya kokufa. Bamemaki ye mpe bakendeki kokunda ye pembeni ya mobali na ye.
11 ᏂᎦᏛᏃ ᏧᎾᏁᎶᏗ ᎤᎾᏓᏡᎬ ᎤᏣᏔᏅᎯ ᎤᏂᎾᏰᏎᎢ, ᎠᎴ ᎾᏍᏉ ᏂᎦᏛ ᎯᎠ ᎾᏍᎩ ᏄᎵᏍᏔᏅ ᎠᎾᏛᎩᏍᎩ.
Somo monene etondisaki Lingomba mobimba mpe bato nyonso oyo bayokaki sango yango.
12 ᎨᏥᏅᏏᏛᏃ ᎤᏣᏖ ᎤᏰᎸᏛ ᎠᎴ ᎤᏍᏆᏂᎪᏗ ᏚᏂᎸᏫᏍᏓᏁᎮ ᏴᏫ ᎠᏁᎲᎢ. ᏂᎦᏛᏃ ᏌᏉ ᎢᎦᎦᏛ ᎠᏂᏁ ᏐᎵᎹᏅ ᎤᏤᎵ ᎠᏲᏓᏝᎲᎢ.
Bantoma bazalaki kosala bilembo mingi ya kokamwa mpe misala minene kati na bato. Boye, bandimi nyonso bazalaki na momesano ya kosangana na veranda ya Salomo.
13 ᎠᏂᏐᎢᏃ ᎠᏂᏍᎦᎢᎮ ᎬᏩᎾᎵᎪᏁᏗᏱ; ᎤᏂᏣᏘᏍᎩᏂ ᏴᏫ ᎬᏩᏂᎸᏉᏗᏳ ᎨᏎᎢ.
Moko te kati na bato oyo bazalaki na lisanga na bango te azalaki komeka kosangana na bango, ata bato bazalaki kopesa bango lokumu mingi.
14 ᎠᏃᎯᏳᎲᏍᎩᏃ ᎤᏟ ᏂᎦᎡ ᎬᏩᏁᏉᏤᎴ ᎤᎬᏫᏳᎯ, ᎤᏂᏣᏔᏅᎯ ᎨᏎ ᎠᏂᏍᎦᏯ ᎠᎴ ᎠᏂᎨᏴ.
Nzokande, mibali mpe basi ebele penza bazalaki kondimela Nkolo mpe kobakisama na lisanga na bango.
15 ᏚᏜᏓᏅᏛᏰᏃ ᏓᏂᏃᎯᎮ ᏧᏂᏢᎩ, ᏗᏤᏍᏙ ᎠᎴ ᏗᎦᏂᏟ ᏓᏂᏢᏗᏍᎨᎢ ᎾᏍᎩ ᎤᏓᏩᏗᏍᏛᏉ ᎾᏍᏉ ᏈᏓ ᎠᎢᏒᎢ ᎢᎦᏛ ᎤᏄᏢᏙᏗᏱ.
Bongo, bazalaki komema babeli na babalabala, kolalisa bango na bambeto mpe na bitoko mpo ete tango Petelo akoleka, elilingi na ye ekoka kozipa bamoko kati na bango.
16 ᎾᏍᏉᏃ ᎤᏂᏣᏖ ᏕᎦᏚᏩᏗᏒ ᏅᏓᏳᏂᎶᏒᎯ ᏥᎷᏏᎵᎻ ᎠᏂᎷᎨᎢ, ᏓᎾᏖᏃᎯᎮ ᏧᏂᏢᎩ ᎠᎴ ᎠᏂᏍᎩᎾ ᎬᏩᏂᏱᎵᏙᎯ; ᏂᎦᏛᏃ ᏕᎨᏥᏅᏩᏁᎢ.
Mpe lisusu, bato ebele oyo bazalaki kowuta na bingumba ya zingazinga bazalaki kosangana na Yelusalemi; bazalaki komema babeli na bango mpe bato oyo bazalaki kotungisama na milimo ya mbindo; mpe bango nyonso bazalaki kobikisama.
17 ᎿᎭᏉᏃ ᏄᎬᏫᏳᏒ ᎠᏥᎸ-ᎨᎶᎯ ᏚᎴᏅ ᎠᎴ ᏂᎦᏛ ᎬᏩᎵᎪᏁᎯ, ᎾᏍᎩ ᎠᏂᏌᏚᏏ ᏧᎾᏙᎢᏛ ᏥᎩ, ᎤᏂᎧᎵᏤ ᎤᏂᏔᎳᏬᏍᎬᎢ;
Bongo mokonzi ya Banganga-Nzambe mpe bato nyonso oyo bazalaki kosala na ye elongo, oyo bazalaki bato ya lisanga ya Basaduseo, batondaki na zuwa.
18 ᎠᎴ ᏚᏂᏂᏴᎮ ᎨᏥᏅᏏᏛ ᎠᎴ ᏗᏓᏍᏚᏗᏱ ᏚᏂᏴᏔᏁᎢ.
Bakangaki bantoma mpe babwakaki bango na boloko ya monene.
19 ᎠᏎᏃ ᏗᎧᎿᎭᏩᏗᏙᎯ ᎤᎬᏫᏳᎯ ᎤᏤᎵᎦ ᏒᏃᏱ ᏚᏍᏚᎢᏎ ᏗᏓᏍᏚᏗᏱ ᎦᎶᎯᏍᏗᏱ, ᏚᏄᎪᏫᏒᏃ ᎯᎠ ᏄᏪᏎᎢ;
Kasi na butu, anjelu moko ya Nkolo afungolaki bikuke ya boloko, abimisaki bantoma mpe alobaki na bango:
20 ᎢᏤᎾ, ᎤᏛᏅ-ᏗᎦᎳᏫᎢᏍᏗᏱ ᏫᏣᎴᎲᎦ ᎠᎴ ᏫᏗᏥᏬᏁᏓ ᏴᏫ ᏫᏗᏥᏃᎲᏏ ᏂᎦᏛ ᎧᏃᎮᏛ ᎯᎠ ᎾᏍᎩ ᎬᏂᏛ ᎤᎬᏩᎵ.
— Bokende kotelema kati na Tempelo mpe kuna, boyebisa bato maloba nyonso ya bomoi oyo ya sika.
21 ᎾᏍᎩᏃ ᎤᎾᏛᎦᏅ ᎩᎳ ᏧᎩᏥᏍᎪᎢ ᏭᏂᏴᎴ ᎤᏛᏅ-ᏗᎦᎳᏫᎢᏍᏗᏱ ᎠᎴ ᏚᎾᏕᏲᏁᎢ. ᎠᏎᏃ ᏄᎬᏫᏳᏒ ᎠᏥᎸ-ᎨᎶᎯ ᎤᎷᏨ, ᎠᎴ ᎾᏍᎩ ᎬᏩᎵᎪᏁᎯ, ᏚᏂᏟᏌᏁ ᏗᏂᎳᏫᎩ, ᎠᎴ ᏂᎦᏛ ᏄᏂᎬᏫᏳᏌᏕᎩ ᎢᏏᎵ ᏧᏪᏥ ᏧᎾᏤᎵᎦ, ᎠᎴ ᏫᏓᏯᏅᎲ ᎤᎾᏓᏅᏎ ᏗᏓᏍᏚᏗᏱ.
Bantoma batosaki. Boye, na tongo-tongo, bakotaki na Tempelo mpe bakomaki koteya bato. Tango mokonzi ya Banganga-Nzambe mpe bato oyo basalaka na ye elongo bakomaki, babengisaki Likita-Monene—lisanga mobimba ya bakambi ya bana ya Isalaele—mpe bapesaki mitindo ete bakende kozwa bantoma na boloko.
22 ᎠᏎᏃ ᏗᎾᏓᏂᏱᏍᎩ ᏭᏂᎷᏨ ᏫᏚᎾᏠᏤ ᏗᏓᏍᏚᏗᏱ, ᏗᎤᎾᏨᏒᏃ ᎤᏂᏃᏁᎢ,
Kasi tango bakengeli bakomaki na boloko, bakutaki bango te. Bazongaki mpe balobaki:
23 ᎯᎠ ᏄᏂᏪᏎᎢ; ᏗᏓᏍᏚᏗᏱ ᎤᏙᎯᏳᎯ ᎣᎩᏩᏛᎲ ᎤᎵᏂᎩᏗᏳ ᎠᏍᏚᎲᎩ, ᎠᎴ ᎠᏂᎦᏘᏯ ᎠᏂᏙᎾᎥ ᏙᏱᏗᏢ ᎦᎶᎯᏍᏗᏳᎶᏗ, ᎠᏎᏃ ᎣᎩᏍᏚᎢᏒ ᎥᏝ ᎩᎶ ᏲᏥᏩᏛᎮ ᏱᏯᎡᎢ.
— Tokuti boloko ya kokangama malamu mpe bakengeli liboso ya bikuke; kasi tango tofungoli yango, tomoni ata moto moko te na kati.
24 ᎿᎭᏉᏃ ᎠᏥᎸ-ᎨᎶᎯ ᎠᎴ ᎣᏍᏛ ᎢᏳᏩᎿᎭᏕᎩ ᎤᏛᏅ-ᏗᎦᎳᏫᎢᏍᏗᏱ, ᎠᎴ ᏄᏂᎬᏫᏳᏒ ᎠᏥᎸ-ᎠᏁᎶᎯ, ᎾᏍᎩ ᎯᎠ ᏄᏂᏪᏒ ᎤᎾᏛᎦᏅ, ᎾᏍᎩ ᎤᎾᏓᏅᏖᏔᏁᎢ, ᎭᏢ ᏮᏛᏍᏗᏥ ᎯᎠ, ᎤᏁᎵᏎᎢ.
Tango mokonzi ya bakengeli ya Tempelo mpe bakonzi ya Banganga-Nzambe bayokaki sango yango, bakomaki mitema likolo mpe bakomaki kotunana soki likambo yango ekosuka ndenge nini.
25 ᎿᎭᏉᏃ ᎩᎶ ᎤᎷᏤ ᎤᏂᏃᏁᎴ ᎯᎠ ᏄᏪᏎᎢ; ᎬᏂᏳᏉ ᎾᏍᎩ ᎠᏂᏍᎦᏯ ᏗᏓᏍᏚᏗᏱ ᏥᏕᏥᏴᏔᏅᎩ ᎠᏂᏯᎠ ᎤᏛᏅ-ᏗᎦᎳᏫᎢᏍᏗᏱ, ᎠᏂᏙᎾᎠ, ᎠᎴ ᏓᏁᏲᎲᏍᎦ ᏴᏫ.
Bongo moto moko ayaki koyebisa bango: — Boyoka! Bato oyo bobwakaki na boloko, batelemi kuna na Tempelo mpe bazali koteya bato.
26 ᎿᎭᏉᏃ ᎣᏍᏛ ᎢᏳᏩᎿᎭᏕᎩ ᎠᎴ ᏗᎾᏓᏂᏱᏍᎩ ᎬᏍᎦᎢᏍᏓᎩ ᏂᏚᏅᏁᎸᎾ ᏫᏚᏂᏯᏅᎮᎢ; ᏓᏂᏍᎦᎢᎮᏰᏃ ᎤᏂᏣᏘ, ᏅᏯ ᏱᏕᎪᎬᏂᏍᏓ ᎠᏁᎵᏍᎨᎢ.
Mbala moko, mokonzi ya bakengeli akendeki elongo na basoda na ye mpo na kozwa bantoma. Kasi amemaki bango na makasi te, pamba te bazalaki kobanga ete bato babamba bango mabanga.
27 ᏚᎾᏘᏃᎸᏃ ᏕᎦᎳᏫᎥ ᎢᎬᏱᏗᏢ ᏑᏂᎧᏁᎢ. ᏄᎬᏫᏳᏒᏃ ᎠᏥᎸ-ᎨᎶᎯ ᏚᏛᏛᏁᎢ,
Wana bamemaki bango, batiaki bango liboso ya Likita-Monene, mpe mokonzi ya Banganga-Nzambe abandaki kotuna bango mituna.
28 ᎯᎠ ᏄᏪᏎᎢ; ᏝᏍᎪ ᎤᎵᏂᎩᏛᏯ ᏱᏨᏅᏍᏓᏕᎴ ᏗᏣᏕᏲᏗᏱ ᎯᎠ ᎾᏍᎩ ᏕᎤᏙᎥ ᎢᏨᏙᏗᏱ? ᎬᏂᏳᏉᏃ ᏕᏣᏕᏲᎲᏍᎬ ᏥᎷᏏᎵᎻ ᎢᏥᎧᎵᎢᏍᏔᏅ, ᎠᎴ ᎾᏍᎩ ᎠᏍᎦᏯ ᎤᎩᎬ ᎣᎩᏍᏛᏗᏍᏗᏱ, ᎢᏥᏰᎸᎭ.
Alobaki: — Topekisaki bino ete bomeka lisusu te koteya na Kombo wana. Kasi tala sik’oyo ndenge botondisi Yelusalemi na mateya na bino mpe bolingi komemisa biso ngambo ya makila ya moto wana.
29 ᏈᏓᏃ ᎠᎴ ᎨᏥᏅᏏᏛ ᎤᏂᏁᏨ ᎯᎠ ᏄᏂᏪᏎᎢ; ᎤᏁᎳᏅᎯ ᎣᏦᎯᏳᏗ, ᎥᏝᏃ ᏴᏫ.
Kasi Petelo mpe bantoma mosusu bazongisaki: — Esengeli kotosa Nzambe, kasi bato te!
30 ᎤᏁᎳᏅᎯ ᏗᎩᏙᏓ ᎤᎾᏤᎵᎦ ᏕᎤᎴᏔᏅ ᏥᏌ, ᎾᏍᎩ ᏤᏥᎸᎩ ᎨᏛ ᏤᏣᏛᏅᎩ.
Nzambe ya bakoko na biso asekwisaki Yesu kati na bakufi, Yesu oyo bino bobomaki mpe bobakaki na nzete.
31 ᎾᏍᎩ ᎤᏁᎳᏅᎯ ᎤᏌᎳᏓᏅ ᎠᎦᏘᏏ ᎤᏬᏰᏂ ᎤᏩᏔᏅ, ᎤᎬᏫᏳᎯ ᎠᎴ ᎠᏓᏍᏕᎵᏍᎩ ᎢᏳᎵᏍᏙᏗᏱ, ᎢᏏᎵ ᏧᏁᏗᏱ ᏧᏂᏁᏟᏴᏍᏗᏱ ᏚᎾᏓᏅᏛᎢ, ᎠᎴ ᎦᎨᏥᏁᏗᏱ ᎤᏂᏍᎦᏅᏨᎢ.
Ezali Ye nde Nzambe atomboli na nzela ya loboko na Ye ya mobali lokola Mokonzi mpe Mobikisi, mpo ete bana ya Isalaele bakoka kozwa nzela ya kobongola mitema mpe kozwa bolimbisi ya masumu na bango.
32 ᎠᏴᏃ ᏧᏤᎵ ᎣᏥᏃᎮᏍᎩ ᎾᏍᎩ ᎯᎠ ᏄᏍᏛᎢ, ᎠᎴ ᎾᏍᏉ ᎦᎸᏉᏗᏳ ᎠᏓᏅᏙ ᎾᏍᎩ ᎤᏁᎳᏅᎯ ᏧᏁᎸᎯ ᏥᎩ ᎬᏬᎯᏳᎲᏍᎩ.
Biso, tozali batatoli ya makambo oyo; ndenge moko mpe Molimo Mosantu oyo Nzambe apesaki na bato oyo batosaka Ye azali motatoli ya makambo yango.
33 ᎾᏍᎩᏃ ᎤᎾᏛᎦᏅ ᏚᏂᏘᎴ ᏧᏂᎾᏫᏱ, ᎠᎴ ᏧᏂᎯᏍᏗᏱ ᎤᏂᏱᎵᏙᎴᎢ.
Tango bayokaki bongo, batombokaki makasi mpe bazwaki mokano ya kobomisa bantoma.
34 ᎿᎭᏉᏃ ᏕᎦᎳᏫᎥᎢ ᎩᎶ ᎢᏳᏍᏗ ᏚᎴᏁ ᎠᏆᎵᏏ ᎨᎺᎵ ᏧᏙᎢᏛ ᏗᎧᎿᎭᏩᏛᏍᏗ ᏗᎪᏏᏏᏍᎩ ᎾᏂᎥ ᏴᏫ ᎬᏩᎸᏉᏗ, ᎠᎴ ᎤᏁᏤ ᎨᏥᏅᏏᏛ ᏞᎦ ᏧᏂᎧᎲᏍᏗᏱ.
Kasi Mofarizeo Gamalieli, molakisi ya Mobeko mpe moto ya lokumu mingi na miso ya bato nyonso, atelemaki kati na Likita-Monene mpe atindaki ete babimisa bantoma mpo na mwa tango moke.
35 ᎯᎠᏃ ᏂᏚᏪᏎᎴᎢ; ᎢᏥᏍᎦᏯ ᎢᏏᎵ ᏧᏪᏥ ᎢᏤᏯᏔᎮᏍᏗ ᏄᏍᏛ ᎢᏣᏓᏅᏖᏍᎬ ᎢᏗᏳᏁᏗᏱ ᎯᎠ ᎠᏂᏍᎦᏯ.
Alobaki na bango: — Bato ya Isalaele, bosala keba mpo na makambo oyo bolingi kosala bato oyo.
36 ᎢᎸᎯᏳᏰᏃ ᏧᎾᏄᎪᏤ ᏚᏓᏏ ᎩᎶ ᏧᏤᎸᏎᎢ, ᎠᏂᏍᎦᏯ ᏅᎩᏧᏈ ᎢᏴᏛ ᎢᏯᏂᏛ ᏥᎬᏩᎵᎪᏁᎴᎢ, ᎾᏍᎩ ᏣᏥᎴᎢ, ᎠᎴ ᏂᎦᏛ ᎾᏍᎩ ᎬᏬᎯᏳᏅᎯ ᏧᎾᏗᎦᎴᏲᏤ ᎠᎴ ᏥᏫᎬᏩᏂᏲᏥᏙᎴᏉ.
Eleki mikolo mingi te, moto moko na kombo Teodasi awutaki kobima. Azalaki komimona moto monene, mpe bato pene nkama minei bazalaki kolanda ye. Kasi tango babomaki ye, bato nyonso oyo bazalaki kolanda ye bapalanganaki mpe lisanga na ye ekufaki.
37 ᎣᏂᏃ ᏧᎾᏄᎪᏤ ᏧᏓᏏ ᎨᎵᎵ ᎡᎯ ᏣᎾᏎᎵᏙᎮ ᎢᏳᎢ, ᎠᎴ ᎤᏂᏣᏘ ᏴᏫ ᏥᏚᏘᎿᎭᏫᏛᎮᎢ, ᎾᏍᎩᏃ ᎾᏍᏉ ᏥᎤᏲᎱᏎᎢ ᎠᎴ ᏂᎦᏛ ᎾᏂᎥ ᎬᏬᎯᏳᏅᎯ ᏧᎾᏗᎦᎴᏲᏤᎢ.
Sima na ye, tango tozalaki kotanga motango ya bato kati na mokili, moto moko mpe lisusu na kombo Yuda, moto ya Galile, abimaki mpe amemaki bato ebele na botomboki. Ye mpe lisusu babomaki ye, bongo bato nyonso oyo bazalaki kolanda ye bapalanganaki.
38 ᎿᎭᏉᏃ ᎯᎠ ᏂᏨᏪᏎᎭ, ᏞᏍᏗ ᏗᏣᎵᏌᎳᏁᎸ ᎯᎠ ᎠᏂᏍᎦᏯ, ᎤᎾᏁᎳᎩ ᏗᏤᎵᏏ, ᎢᏳᏰᏃ ᎯᎠ ᎠᎾᏓᏅᏖᏍᎬ ᎠᎴ ᏚᏂᎸᏫᏍᏓᏁᎲ ᏴᏫᏉ ᏅᏓᏳᏓᎴᏅᎯ ᎢᎨᏎᏍᏗ, ᎤᏲᏥᏓᏍᏗᏉ;
Yango wana, na likambo oyo, boyoka toli na ngai: Bokota lisusu makambo ya bato oyo te mpe botika bango bakende! Pamba te soki makanisi to mosala na bango ewuti na moto, solo, ekosuka kaka na nzela.
39 ᎤᏁᎳᏅᎯᏍᎩᏂ ᏅᏓᏳᏓᎴᏅᎯ ᎢᎨᏎᏍᏗ, ᎥᏝ ᏰᎵ ᏴᎨᏥᏲᏍᏓ; ᏯᎵᎦᏚᏓᎩᏰᏃ ᎤᏁᎳᏅᎯᏉ ᏤᏣᏟᏴᎡᎯ ᎨᏒᎢ.
Kasi soki yango ewuti na Nzambe, solo, bokolonga te kosukisa bato oyo. Bosala keba ete bobundisa Nzambe te. Bato ya Likita-Monene bandimaki likanisi ya Gamalieli,
40 ᎾᏍᎩᏃ ᎬᏬᎯᏳᏁᎢ; ᏫᏚᏂᏯᏅᎲᏃ ᎨᏥᏅᏏᏛ ᎠᎴ ᏚᏂᎵᎥᏂᎸ, ᏚᏂᏅᏍᏓᏕᎴ ᏥᏌ ᏚᏙᎥ ᎤᏂᏁᎢᏍᏙᏗᏱ, ᎠᎴ ᏚᏂᎧᏁᎢ.
babengisaki bantoma, babetisaki bango bafimbu mpe bapekisaki bango ete bateya lisusu Kombo ya Yesu te. Sima na yango batikaki bango kokende.
41 ᎤᏂᏄᎪᏤᏃ ᏕᎦᎳᏫᎥᎢ ᎠᎾᎵᎮᎵᎨ ᏰᎵ ᎤᏕᎰᎯᏍᏗ ᎢᎬᏩᎾᎵᏍᏓᏁᏗ ᎨᏒ ᎾᏍᎩ ᏕᎤᏙᎥ ᏅᏗᎦᎵᏍᏙᏍᎬᎢ.
Bantoma balongwaki liboso ya Likita-Monene, na esengo mingi ya komona ete bakoki mpo na komona pasi na tina na Kombo na Yesu.
42 ᏂᏚᎩᏨᏂᏒᏃ ᎤᏛᏅ-ᏗᎦᎳᏫᎢᏍᏗᏱ ᎠᎴ ᏓᏓᏁᎳᏗᏒ ᎾᏂᏑᎵᎪᎬᎾ ᎨᏎ ᏓᎾᏕᏲᎲᏍᎨ ᎠᎴ ᎠᎾᎵᏥᏙᎲᏍᎨ ᎣᏍᏛ ᎧᏃᎮᏛ ᏥᏌ ᎦᎶᏁᏛ ᎤᎬᏩᎵ.
Mokolo na mokolo bazalaki kotika te koteya, mpe kosakola Sango Malamu na Tempelo to na ndako moko na moko ete Yesu azali Klisto.

< ᎨᏥᏅᏏᏛ ᏄᎾᏛᏁᎵᏙᎸᎢ 5 >