< ᎨᏥᏅᏏᏛ ᏄᎾᏛᏁᎵᏙᎸᎢ 4 >

1 ᎠᏏᏉᏃ ᏓᏂᏬᏁᏗᏍᎨ ᏴᏫ, ᎠᏥᎸ-ᎠᏁᎶᎯ ᎠᎴ ᎣᏍᏛ ᎢᏳᏩᎿᎭᏕᎩ ᎤᏛᏅ-ᏗᏚᎳᏫᎢᏍᏗᏱ ᎠᎴ ᎠᏂᏌᏚᏏ ᎬᏩᏂᏃᎴᎢ;
Wana Petelo mpe Yoane bazalaki nanu koloba na bato, Banganga-Nzambe, mokonzi ya bakengeli ya Tempelo mpe Basaduseo bayaki,
2 ᎤᏥᏐᏅᏤᎮ ᏅᏗᎦᎵᏍᏙᏗᏍᎨ ᏓᏁᏲᎲᏍᎬ ᏴᏫ, ᎠᎴ ᏥᏌ ᎠᏅᏗᏍᎬ ᎠᎾᎵᏥᏙᎲᏍᎬ ᎠᏲᎱᏒ ᏗᎴᎯᏐᏗ ᎨᏒᎢ.
na kanda makasi ndenge bamonaki bantoma koteya bato mpe kotatola ete bakufi bakosekwa ndenge Yesu asekwaki.
3 ᎠᎴ ᏕᎬᏩᏂᏂᏴᎨ ᎠᎴ ᏕᎬᏩᏂᏍᏚᏁ ᎤᎩᏨᏛ ᎢᎪᎯᏛ, ᎿᎭᏉᏰᏃ ᎤᏒᎢ ᎨᏎᎢ.
Bakangaki Petelo mpe Yoane, bongo babwakaki bango na boloko kino na mokolo oyo elandaki, pamba te pokwa esilaki kokoma.
4 ᎠᏎᏃ ᎤᏂᏣᏖ ᎧᏃᎮᏛ ᎤᎾᏛᎦᏅᎯ ᎤᏃᎯᏳᏁᎢ, ᎾᏍᎩᏃ ᎠᏂᏍᎦᏯ ᎯᏍᎩᎭ ᎢᏯᎦᏴᎵ ᎾᏂᎡᎢ.
Kasi kati na bato oyo bayokaki mateya, mingi bandimaki yango; bongo motango ya bandimi ebakisamaki mpe bakomaki bato pene nkoto mitano.
5 ᎯᎠᏃ ᏄᎵᏍᏔᏁ ᎤᎩᏨᏛ, ᎾᏍᎩ ᎤᏂᎬᏫᏳᎯ ᏧᎾᏤᎵ ᎠᎴ ᏗᏂᎳᏫᎩ ᎠᎴ ᏗᏃᏪᎵᏍᎩ,
Boye, mokolo oyo elandaki, bakonzi ya Bayuda, bakambi ya bato mpe balakisi ya Mobeko basanganaki na Yelusalemi.
6 ᎠᎴ ᎡᎾ ᏄᎬᏫᏳᏒ ᎠᏥᎸ-ᎨᎶᎯ, ᎠᎴ ᎧᏱᏆ ᎠᎴ ᏣᏂ ᎠᎴ ᎡᎵᎩ ᎠᎴ ᏂᎦᏛ ᏄᎬᏫᏳᏒ ᎠᏥᎸ-ᎨᎶᎯ ᎪᎱᏍᏗ ᏧᏩᏅ ᏚᏂᎳᏫᏤ ᏥᎷᏏᎵᎻ.
Ana, mokonzi ya Banganga-Nzambe, azalaki wana elongo na Kayifa, Yoane, Alekizandre mpe bato mosusu ya libota ya mokonzi ya Banganga-Nzambe.
7 ᎠᏰᎵᏃ ᏚᏂᎧᏅ ᎯᎠ ᏄᏂᏪᏎ ᏚᎾᏛᏛᏁᎢ; ᎦᎪ ᎤᎵᏂᎬᎬᎢ ᎠᎴ ᎦᎪ ᎦᏙᎥ ᎢᏍᏛᏔᏅ, ᎯᎠ ᏂᏍᏓᏛᏁᎸ?
Bamemaki Petelo mpe Yoane liboso na bango, mpe bakomaki kotuna bango mituna: — Bozali kosala makambo oyo na nguya nini to na kombo ya nani?
8 ᎿᎭᏉᏃ ᏈᏓ ᎤᎧᎵᏨᎯ ᎨᏎ ᎦᎸᏉᏗᏳ ᎠᏓᏅᏙ, ᎯᎠ ᏂᏚᏪᏎᎴᎢ; ᎢᏥᎬᏫᏳᎯ ᏴᏫ ᏧᎾᏤᎵᎦ ᎠᎴ ᎢᏏᎵ ᏗᏥᎳᏫᏤᎯ,
Bongo, Petelo oyo atondisamaki na Molimo Mosantu alobaki na bango: — Bakonzi mpe bakambi ya bato!
9 ᎢᏳᏃ ᎣᏍᏛ ᏃᏍᏓᏛᏁᎸᎢ ᎯᎠ ᎠᏲᎤᎵ ᎠᏍᎦᏯ, ᎢᏳᏍᏗ ᎬᏔᏅᎯ ᎨᏒ ᎠᏥᏅᏩᏅᎢ ᏅᏗᎦᎵᏍᏙᏗᏍᎨᏍᏗ ᎪᎯ ᎢᎦ ᎢᎣᎩᎾᎵᏱᎵᏕᎮᏍᏗ,
Lokola botuni biso lelo na tina na bolamu oyo esalemi epai ya mokufi makolo mpe ndenge nini asili kobika,
10 ᎢᏥᎦᏔᎮᏍᏗ ᏂᎦᏛ, ᎠᎴ ᏂᎦᏛ ᎢᏏᎵ ᎠᏁᎯ ᎠᏂᎦᏔᎮᏍᏗ ᎾᏍᎩ ᏕᎤᏙᎥ ᏥᏌ ᎦᎶᏁᏛ ᎾᏎᎵᏗ ᏤᎲᎩ, ᎾᏍᎩ ᏓᏓᎿᎭᏩᏍᏛ ᏤᏣᏛᏅᎩ, ᎤᏁᎳᏅᎯ ᏥᏕᎤᎴᏔᏅ ᎤᏲᎱᏒᎢ, ᎾᏍᎩ ᏄᏩᏂᏌᏅ ᎯᎠ ᎠᏍᎦᏯ ᎤᏗᏩᏒᎯ ᏥᎦᏙᎦ ᏕᏥᎧᏅᎢ.
tika ete, bino nyonso mpe bato nyonso ya Isalaele, boyeba ete ezali na Kombo na Yesu-Klisto ya Nazareti nde moto oyo atelemi liboso na bino na nzoto kolongono; kaka Yesu oyo bino bobakaki na ekulusu, kasi Nzambe asekwisaki Ye kati na bakufi.
11 ᎾᏍᎩᏍᎩᏂ ᎯᎠ ᏅᏯ ᏥᏥᏲᎢᏎᎸᎩ ᏗᏣᏁᏍᎨᏍᎩ; ᎾᏍᎩ ᎤᏅᏏᏴ ᏄᎬᏫᏳᏒ ᎠᏗ ᏥᏄᎵᏍᏔᏅ.
Ye nde azali « libanga oyo bino, batongi ndako, bobwakaki, kasi ekomi libanga ya songe ya ndako, mpe esimbi ndako mobimba. »
12 ᎥᏝ ᎠᎴ ᏅᏩᏓᎴ ᎩᎶᎢ ᎠᎵᏍᏕᎸᏙᏗ ᎨᏒ ᏳᎭ, ᎥᏝᏰᏃ ᏅᏩᏓᎴ ᏕᎤᏙᎥ ᎦᎸᎶ ᎭᏫᏂᏗᏢ ᏴᏫ ᎠᏁᎲ ᎠᎵᏍᎪᎸᏔᏅᎯ ᏱᎩ ᎢᎦᎵᏍᏕᎸᏙᏗ.
Lobiko ekoki kozwama na moto mosusu te, pamba te kombo mosusu ezali te na mokili, oyo epesama na bato, oyo ekoki kobikisa biso.
13 ᎤᎾᏙᎴᎰᏒᏃ ᏈᏓ ᎠᎴ ᏣᏂ ᎾᏂᏯᎦᎢᎲᎾ ᎨᏒᎢ, ᎠᎴ ᎤᎾᏓᏅᏖᎸ ᎪᏪᎵ ᏂᏓᏂᏏᎾᏒᎾ ᎠᎴ ᎾᏂᎦᏔᎿᎭᎥᎾ ᎨᏒᎢ, ᎤᏂᏍᏆᏂᎪᏎᎢ, ᎠᎴ ᏚᏃᎵᏤ ᎾᏍᎩ ᏥᏌ ᎤᏁᏙᎸᎯ ᎨᏒᎢ.
Wana bamonaki ndenge nini Petelo mpe Yoane bazalaki koloba na mpiko, mpe wana basosolaki ete bazali bato batanga te mpe bato pamba, bakamwaki mingi. Boye, basosolaki ete bango mpe bazalaki elongo na Yesu.
14 ᎠᏂᎪᏩᏘᏍᎨᏃ ᎠᏍᎦᏯ ᎠᏥᏅᏩᏅᎯ ᎢᏧᎳᎭ ᎠᏂᏙᎾᎡᎢ, ᎥᏝᏃ ᎪᎱᏍᏗ ᏫᎬᏩᎾᏛᏗ ᏱᎨᏎᎢ.
Kasi, lokola bazalaki komona moto oyo abikisamaki atelemi elongo na bango, bazalaki ata na liloba moko te ya koloba.
15 ᎠᏎᏃ ᏚᏂᏁᏥᎸ ᎤᏂᏄᎪᎢᏍᏗᏱ ᏓᏂᎳᏫᎥᎢ ᎤᏅᏒ ᎨᏒ ᎤᎾᎵᏃᎮᎴᎢ,
Bongo, bapesaki mitindo ete babimisa bango na Likita-Monene; mpe batikalaki bango moko mpo na koyekola likambo yango malamu.
16 ᎯᎠ ᏄᏂᏪᏎᎢ; ᎦᏙ ᏙᏓᏛᏁᎵ ᎯᎠ ᎠᏂᏍᎦᏯ, ᏄᏜᏓᏏᏛᏒᎾᏰᏃ ᎤᏍᏆᏂᎪᏗ ᏚᏂᎸᏫᏍᏓᏁᎸ ᎬᏂᎨᏒ ᏄᎾᎵᏍᏓᏁᎸ ᏂᎦᏛ ᏥᎷᏏᎵᎻ ᎠᏁᎯ, ᎠᎴ ᎥᏝ ᏰᎵ ᏴᎨᏓᏓᏱᎦ.
Bazalaki kotunana: — Tosala penza nini na bato oyo? Pamba te bavandi nyonso ya Yelusalemi bayebi malamu ete bango nde basalaki likamwisi wana ya monene; tokoki kowangana yango te.
17 ᎠᏎᏃ ᎤᏟ ᎢᎦᎢ ᏧᏃᏣᎶᎢᏍᏗᏱ ᏂᎨᏒᎾ ᏴᏫ ᎠᏁᎲᎢ, ᎤᎵᏂᎩᏛᏯ ᏗᏗᏍᎦᎩ ᏗᏗᏁᏥ, ᎪᎯ ᎢᏳᏓᎴᏅᏛ ᎯᎠ ᎾᏍᎩ ᏚᏙᎥ ᎠᏂᏁᎢᏍᏗᏍᎬ ᎩᎶ ᎤᏂᏬᏁᏙᏗᏱ ᏂᎨᏒᎾ.
Kasi, mpo ete sango ya likambo oyo ekoba te kopanzana kati na bato, tokebisa bango boye: « Bomeka lisusu te koloba na Kombo na Yesu, ezala ata na nani! »
18 ᏫᏚᏂᏯᏅᎲᏃ ᏚᏂᏁᏤᎴ ᏥᏌ ᏚᏙᎥ ᎤᏅᏙᏗᏱ ᎤᏂᏁᎢᏍᏗᏱ ᎠᎴ ᏧᎾᏕᏲᏗᏱ ᏂᎨᏒᎾ.
Bongo, babengaki Petelo elongo na Yoane mpe bapekisaki bango ete bameka lisusu te koloba to koteya na Kombo na Yesu, ezala ata na lolenge nini.
19 ᎠᏎᏃ ᏈᏓ ᎠᎴ ᏣᏂ ᎤᏂᏁᏨ ᎯᎠ ᏂᏚᏂᏪᏎᎴᎢ; ᎢᏳᏃ ᏚᏳᎪᏕᏍᏗ ᎤᏁᎳᏅᎯ ᏙᏗᎧᏂᏍᎬᎢ ᏂᎯ ᎤᏟ ᎢᎦᎢ ᎢᏨᏯᏛᏓᏍᏓᏁᏗᏱ ᎡᏍᎦᏉ ᎤᏁᎳᏅᎯ, ᏗᏧᎪᏓ ᏂᎯ.
Kasi Petelo mpe Yoane bazongiselaki bango: — Botala nanu ata bino moko, eloko nini ezali sembo na miso ya Nzambe: kotosa bino to kotosa Nzambe?
20 ᎥᏝᏰᏃ ᎤᏁᎳᎩ ᎦᏲᎩᏂᏰᎸᏗ ᏱᎩ, ᎣᎩᏂᏁᎢᏍᏙᏗᏱ ᏄᏍᏛ ᎣᎩᏂᎪᎲᎢ, ᎠᎴ ᎣᎩᎾᏛᎦᏅᎢ.
Pamba te biso, tokokoka te kotika koloba makambo oyo tomonaki mpe toyokaki!
21 ᎠᏏᏃ ᏙᎤᏂᏍᎦᏨ, ᏚᏂᎧᏁᎢ, ᎤᎾᏠᏤ ᎪᎱᏍᏗ ᎬᏩᏂᏍᏛᏗᏍᏗ ᎨᏒᎢ, ᏅᏗᎦᎵᏍᏙᏗᏍᎨ ᎤᏂᏣᏘ ᏴᏫ, ᏂᎦᏛᏰᏃ ᎠᏂᎸᏉᏗᏍᎨ ᎤᏁᎳᏅᎯ, ᏅᏗᎦᎵᏍᏙᏗᏍᎨ ᎾᏍᎩ ᏄᎵᏍᏔᏅᎢ.
Sima na kogangela bango, batikaki bango mpo ete bakende, pamba te bamonaki te ndenge nini bakokaki kopesa bango etumbu, mpo ete bato nyonso bazalaki kokumisa Nzambe mpo na likambo oyo esalemaki.
22 ᎠᏍᎦᏯᏰᏃ ᎾᏍᎩ ᎤᏍᏆᏂᎪᏗ ᎢᏯᎬᏁᎸᎯ ᎠᏥᏅᏩᏅᎯ ᎤᎶᏒᏍᏗ ᏅᎦᏍᎪᎯ ᎢᏳᏕᏘᏴᏛ ᏱᎰᏎᎢ.
Pamba te moto oyo abikaki na ndenge ya kokamwa azalaki na mibu koleka tuku minei.
23 ᏕᎨᏥᎧᏅᏃ ᎤᎾᎵᎪᏅᎯ ᏗᏂᏅ ᏭᏂᎶᏎᎢ, ᎠᎴ ᏭᏂᏃᎮᎴ ᏂᎦᎥ ᏂᎬᏩᏂᏪᏎᎸ ᏄᏂᎬᏫᏳᏒ ᎠᏥᎸ-ᎠᏁᎶᎯ ᎠᎴ ᏗᏂᎳᏫᎩ.
Tango batikaki bango, Petelo mpe Yoane bakendeki koyebisa baninga na bango makambo nyonso oyo bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe bakambi balobelaki bango.
24 ᎾᏍᎩᏃ ᎤᎾᏛᎦᏅ ᏌᏉ ᎢᎦᎦᏛ ᎤᏁᎳᏅᎯ ᎤᏂᏌᎳᏓᏁᎴ ᎠᏂᏁᎬᎢ, ᎯᎠ ᏄᏂᏪᏎᎢ; ᏣᎬᏫᏳᎯ, ᏂᎯ ᏣᏁᎳᏅᎯ, ᏗᏦᏢᏅᎯ ᎦᎸᎶᎢ ᎠᎴ ᎡᎶᎯ ᎠᎴ ᎠᎺᏉᎯ ᎠᎴ ᏂᎦᏛ ᎾᎿᎭᎠᏁᎯ;
Tango bayokaki bongo, batombolaki mingongo na bango elongo mpo na kobondela Nzambe; balobaki: — Nkolo Yawe, Yo nde okela Likolo, mabele, ebale monene mpe nyonso oyo ezali kati na yango;
25 ᎯᏅᏏᏓᏍᏗ ᏕᏫ ᎠᎰᎵ ᏨᏔᏅᎯ ᎯᎠ ᎢᏣᏪᏛ ᏥᎩ; “ᎦᏙᏃ ᏧᎾᏓᎴᏅᏛ ᏴᏫ ᎤᏂᏔᎳᏬᏎᎢ, ᎠᎴ ᏴᏫ ᎤᎾᏓᏅᏖᎴ ᎢᏳᎾᏛᏁᏗᏱ ᎾᏍᎩ ᎢᎬᏩᎵᏍᏙᏗ ᏂᎨᏒᎾ ᎨᏒᎢ.
Yo nde olobaki na nzela ya Molimo Mosantu, na monoko ya koko na biso, Davidi, mosali na yo: « Mpo na nini bikolo ezali kosala makelele, mpe bato bazali kosala makita ya pamba?
26 ᎤᏂᎬᏫᏳᎯ ᎡᎶᎯ ᎠᏁᎯ ᏚᎾᎴᏅᎩ, ᎠᎴ ᎠᏰᎵ ᏧᏂᎸᏫᏍᏓᏁᎯ ᏚᏂᎳᏫᏨᎩ ᎠᎾᏡᏗᏍᎬ ᎤᎬᏫᏳᎯ ᎠᎴ ᎠᎾᏡᏗᏍᎬ ᎤᏤᎵ ᎦᎶᏁᏛ.”
Bakonzi ya mokili batomboki, mpe bakambi basangani mpo na kotelemela Nkolo mpe Mopakolami na Ye. »
27 ᎤᏙᎯᏳᎯᏯᏰᏃ ᎠᎾᏡᏗᏍᎬ ᎾᏍᎦᏅᎾ ᏤᏥ ᏥᏌ ᎾᏍᎩ ᎯᎶᏁᏛ ᎢᏧᎳ ᎡᎶᏛ ᎠᎴ ᏆᏂᏗ ᏆᎴᏗ ᎠᎴ ᏴᏫ ᏧᎾᏓᎴᏅᏛ ᎠᎴ ᎢᏏᎵ ᏴᏫ ᏚᏂᎳᏫᏨᎩ,
Pamba te, Erode mpe Ponse Pilato basanganaki penza kati na engumba oyo, elongo na bato ya bikolo mosusu mpe bana ya Isalaele, mpo na kosalela Yesu likita, Mosali na Yo, Mosantu, oyo obulisa.
28 ᎢᏳᎾᏛᏁᏗᏱ ᏂᎦᎥ ᏦᏰᏂ ᎠᎴ ᎭᏓᏅᏖᏍᎬ ᎦᏳᎳ ᏗᏧᎪᏔᏅᎯ ᏥᎨᏎ ᎾᏍᎩ ᎢᏳᎵᏍᏙᏗᏱ.
Ezali ndenge wana nde bakokisaki mabongisi oyo osala wuta kala, na nguya mpe na mokano na Yo.
29 Ꭷ ᏣᎬᏫᏳᎯ, ᎿᎭᏉ, ᏔᎧᏅᎦ ᎪᎩᏍᎦᎬ ᏣᏂᏁᎦ, ᎠᎴ ᏔᎵᏍᎪᎸᏓᏏ ᏘᏅᏏᏓᏍᏗ ᎤᏍᏗᎤᏅ ᎾᏂᏍᎦᎢᎲᎾ ᎢᏳᎵᏍᏙᏗᏱ ᏣᏁᏨ ᎠᏂᏃᎮᏍᎬᎢ,
Sik’oyo Nkolo, tala ndenge bazali kotungisa biso, mpe pesa basali na Yo makasi ya koteya Liloba na Yo na molende nyonso.
30 ᎭᏙᏯᎯᏗᏍᎬ ᏕᎯᏅᏫᏍᎬᎢ ᎠᎴ ᎤᏰᎸᏛᎢ ᎠᎴ ᎤᏍᏆᏂᎪᏗ ᏚᏂᎸᏫᏍᏓᏁᎲ ᎠᏅᏗᏍᎬ ᏕᎤᏙᎥ ᏥᏌ ᎾᏍᎦᏅᎾ ᏤᏥ.
Boye, sembola loboko na Yo mpo na kobikisa babeli, kosala bilembo ya kokamwa mpe misala minene, na Kombo na Yesu, Mosali na Yo, Mosantu.
31 ᎤᎾᏓᏙᎵᏍᏔᏅᏃ ᎤᎵᏖᎸᏁ ᎾᎿᎭᏓᏂᎳᏫᎥᎢ, ᏂᎦᏛᏃ ᏚᏂᎧᎵᏤ ᎦᎸᏉᏗᏳ ᎠᏓᏅᏙ, ᎠᎴ ᎾᏂᏍᎦᎢᎲᎾ ᎤᏂᏃᎮᎴ ᎧᏃᎮᏛ ᎤᏁᎳᏅᎯ ᎤᏤᎵᎦ.
Boye, tango basilisaki kobondela, esika oyo basanganaki eninganaki; bango nyonso batondisamaki na Molimo Mosantu mpe bakomaki koteya Liloba na Nzambe na molende nyonso.
32 ᏂᎦᏛᏃ ᎤᏂᏣᏘ ᎨᏒ ᎤᏃᎯᏳᏅᎯ ᏌᏉᏉ ᏄᏅᏁ ᏧᏂᎾᏫ ᎠᎴ ᏧᎾᏓᏅᏙ; ᎥᏝ ᎠᎴ ᎩᎶ ᎠᏋᏒ ᎠᏆᏤᎵ ᏯᏗᏍᎨ ᎪᎱᏍᏗ ᎤᎲᎢ, ᎠᏰᎵᏉᏰᏃ ᏄᏅᏁᎢ ᏂᎦᎥ ᎪᎱᏍᏗ.
Bandimi nyonso bazalaki motema moko mpe makanisi moko. Moko te kati na bango azalaki koloba ete biloko na ye ezali kaka ya ye moko, kasi biloko nyonso ezalaki mpo na bango nyonso.
33 ᎤᎵᏂᎩᏗᏳᏃ ᎾᏂᏪᏍᎨ ᎨᏥᏪᏍᎨ ᎨᏥᏅᏏᏛ ᎬᏂᎨᏒ ᎾᏅᏁᎲ ᏕᏅᎴᎯᏌᏅ ᎤᎬᏫᏳᎯ ᏥᏌ; ᏂᎦᏛᏃ ᎤᏣᏘ ᎣᏏᏳ ᎨᎦᏓᏅᏖᏍᎨᎢ.
Bantoma bakobaki kotatola lisekwa ya Nkolo Yesu na nguya monene, mpe ngolu monene ezalaki na bango nyonso.
34 ᎥᏝ ᎠᎴ ᎩᎶ ᏳᏓᏑᏰ ᏳᏂᎬᎨᎢ, ᎾᏂᎥᏰᏃ ᎦᏓ ᎠᎴ ᏓᏓᏁᎸ ᏧᏂᎯ ᏚᏂᎾᏗᏅᏎᎢ, ᎾᏍᎩᏃ ᎤᏂᎾᏗᏅᏛ ᏧᎬᏩᎳᏅᎯ ᎤᏂᏲᎴᎢ,
Moko te kati na bango akelelaki; pamba te bato oyo bazalaki na mabele to na bandako bazalaki koteka yango, bazalaki komema mbongo oyo batekelaki
35 ᎠᎴ ᎤᏂᏁ ᎨᏥᏅᏏᏛ ᏧᎾᎳᏏᏕᏄᎶᏗ, ᎾᏂᎥᏃ ᎾᏍᎩᏯ ᎤᏂᏂᎬᏎᎲ ᎨᏥᏯᏙᎮᎮᎢ.
mpe kotia yango na makolo ya bantoma. Bantoma bazalaki kokabola yango na moto na moto, kolanda bosenga na ye.
36 ᏦᏏᏃ ᎨᏥᏅᏏᏛ ᏆᏂᏆ ᏥᏚᏃᎡᎢ, ᎾᏍᎩ ᎦᏛᎬ ᎣᏍᏛ ᎠᏓᏅᏓᏗᏍᏗ ᎤᏪᏥ, ᎠᎵᏫ ᏌᏈ ᎤᏕᏅᎯ,
Boye, Jozefi, moto ya libota ya Levi, oyo abotama na esanga Shipre mpe bantoma bapesaki ye kombo mosusu, Barnabasi oyo elakisi « molendisi, »
37 ᎦᏓ ᎤᎮᎢ, ᎤᎾᏗᏅᏎᎢ, ᎠᎴ ᎠᏕᎸ ᏚᏲᎴᎢ, ᎠᎴ ᎾᏍᎩ ᏕᎤᏁ ᎨᏥᏅᏏᏛ ᏧᎾᎳᏏᏕᏄᎶᏗ.
atekaki mpe elanga na ye mpe amemaki mbongo epai ya bantoma.

< ᎨᏥᏅᏏᏛ ᏄᎾᏛᏁᎵᏙᎸᎢ 4 >