< ᎣᏍᏛ ᎧᏃᎮᏛ ᏣᏂ ᎤᏬᏪᎳᏅᎯ 15 >

1 ᏖᎸᎳᏗᏯ ᎠᏴ, ᎡᏙᏓᏃ ᏗᎦᎶᎩᏍᎩ.
Nazali nzete ya solo ya vino, mpe Tata na Ngai azali nkolo elanga.
2 ᏂᎦᎥ ᏓᏋᏂᎦᎸᎢ ᎾᎾᏓᏛᎥᏍᎬᎾ ᏥᎨᏐ ᏕᎬᏂᎦᎵᏍᎪᎢ; ᏂᎦᏛᏃ ᎠᎾᏓᏛᎥᏍᎩ ᏕᎬᏂᎦᎷᏬᏍᎪᎢ ᎤᏟ ᎢᎦᎢ ᎤᎾᏓᏛᏗᏱ ᎤᏰᎸᏐᎢ.
Tata na Ngai akataka etape nyonso oyo, kati na Ngai, ebotaka mbuma te; mpe abongisaka bitape nyonso oyo ebotaka bambuma, mpo ete ebota lisusu bambuma ebele koleka.
3 ᎿᎭᏉ ᏂᎯ ᎢᏣᏓᏅᎦᎸᏔᏅ ᎧᏃᎮᏛ ᎾᏍᎩ ᎢᏨᏁᏤᎸᎯ ᏥᎩ.
Bino mpe, bosili kokoma peto mpo na liloba oyo nateyaki bino.
4 ᏍᎩᏯᎡᏍᏗ, ᎠᏎᏃ ᎢᏨᏯᎡᏍᏗ. ᎾᏍᎩᏯ ᎤᏩᏂᎦᎸᎢ ᎤᏩᏒ ᏰᎵ ᎬᏩᏓᏛᏗ ᏂᎨᏒᎾ ᏥᎨᏐ ᎬᏂ ᎤᏖᎸᎳᏛ ᏧᏩᏂᎦᎶᎢ, ᎾᏍᏉᏍᎩᏂ ᏂᎯ ᎥᏝ ᏰᎵᎦ ᎬᏂ ᎠᏴ ᏱᏍᎩᏯᎠ.
Bowumela kati na Ngai, mpe Ngai nakowumela kati na bino. Ndenge etape ekoki kobota bambuma te na ndenge na yango moko, soki ekangani te na nzete na yango ya vino, ndenge wana mpe bino, bokoki kobota bambuma te soki bokangani na Ngai te.
5 ᎤᏖᎸᎳᏛᎢ ᎠᏴ, ᏚᏩᏂᎦᎸᎢ ᏂᎯ. ᎠᏴ ᎠᎩᏯᎢ, ᎠᏴᏃ ᏥᏯᎢ, ᎾᏍᎩ ᎤᏣᏙ ᎠᎾᏓᏛᎥᏍᎪᎢ. ᎥᏝᏰᏃ ᎠᏴ ᎥᏝ ᏰᎵ ᎪᎱᏍᏗ ᏴᎨᏣᏛᎦ.
Nazali nzete ya vino; bino, bozali bitape. Moto oyo akowumela kati na Ngai, mpe Ngai kati na ye, akobotaka bambuma ebele, pamba te bokoki kosala eloko moko te, soki na lisungi na Ngai te.
6 ᎢᏳᏃ ᎩᎶ ᎾᎩᏯᎥᎾ ᏥᎨᏐᎢ, ᎠᎦᏓᎡᎪᎢ ᎾᏍᎩᏯ ᎤᏩᏂᎦᎳᏅᎯ ᏧᎾᏓᎡᎪᎢ, ᎠᎴ ᎬᏴᏍᎪᎢ; ᏴᏫᏃ ᏓᏂᏟᏏᏍᎪᎢ, ᎠᏥᎸᏱᏃ ᏫᏚᎾᏕᎪᎢ, ᎠᎴ ᏓᎪᎲᏍᎪᎢ.
Moto oyo akowumela te kati na Ngai akobwakama na libanda ya elanga, lokola bitape oyo bakati: ekokawuka, bakolokota yango, bakobwaka yango na moto mpe ekozika.
7 ᎢᏳᏃ ᏂᎯ ᏍᎩᏯᎡᏍᏗ, ᎠᎴ ᎠᎩᏁᏨ ᎢᏥᏯᎡᏍᏗ, ᏂᎦᎥ ᎢᏣᏚᎵᏍᎬ ᎢᏥᏔᏲᎯᎮᏍᏗ, ᎠᎴ ᎾᏍᎩ ᎠᏎ ᎢᏰᏣᏛᏁᏗ ᎨᏎᏍᏗ.
Soki bokowumela kati na Ngai, mpe maloba na Ngai ekowumela kati na bino, bosenga nyonso oyo bolingi, bokozwa yango.
8 ᎤᏣᏛ ᎢᏣᏓᏛᎥᏍᎬ ᎾᏍᎩ ᏅᏓᎦᎵᏍᏙᏔᏂ ᎡᏙᏓ ᏓᏰᏥᎸᏉᏔᏂ; ᎰᏩᏃ ᏍᎩᏍᏓᏩᏗᏙᎯ ᎨᏎᏍᏗ.
Soki boboti bambuma ebele mpe botalisi, na nzela yango, ete bozali bayekoli na Ngai, Tata na Ngai azwa lokumu.
9 ᎡᏙᏓ ᎠᎩᎨᏳᎯᏳ ᏥᎩ, ᎾᏍᎩᏯ ᎾᏍᏉ ᎢᏨᎨᏳᎢᏳ ᏂᎯ. ᏅᏩᏍᏗᏗᏎᏍᏗᏉ ᎢᏨᎨᏳᎢᏳ ᎨᏒᎢ.
Ndenge Tata alingaki Ngai, Ngai mpe nalingaki bino; boye, bowumela kati na bolingo na Ngai.
10 ᎢᏳᏃ ᏱᏥᏍᏆᏂᎪᏗ ᏗᎧᎿᎭᏩᏛᏍᏗ ᎠᏆᏤᎵᎦ, ᏱᏅᏩᏍᏗᏗᏉ ᎢᏨᎨᏳᎢᏳ ᎨᏒᎢ; ᎾᏍᎩᏯ ᏣᎩᏍᏆᏂᎪᏔᏅ ᏗᎧᎿᎭᏩᏛᏍᏗ ᎡᏙᏓ ᎤᏤᎵᎦ, ᎠᎴ ᏥᏅᏩᏍᏗᏗᏉ ᎠᎩᎨᏳᎯᏳ ᎨᏒᎢ.
Soki kaka bobateli mibeko na Ngai, bokowumela kati na bolingo na Ngai, ndenge Ngai nabatelaki mibeko ya Tata na Ngai mpe nawumelaka kati na bolingo na Ye.
11 ᎾᏍᎩ ᎯᎠ ᏄᏍᏗ ᎢᏨᏬᏁᏔᏅ, ᏅᏩᏍᏗᏗᏎᏍᏗᏉ ᎦᏥᏯᎵᎡᎵᎬ ᎠᏇᎵᏒ, ᎠᎴ ᎠᎾᎵᎮᎵᎬ ᎤᎧᎵᏨᎯ ᎨᏎᏍᏗ ᎠᏇᎵᏒ.
Nalobi na bino makambo oyo nyonso mpo ete esengo na Ngai ezala kati na bino, mpe esengo na bino ezala ya kokoka.
12 ᏗᎧᎿᎭᏩᏛᏍᏗ ᎠᏆᏤᎵᎦ ᎯᎠ ᏄᏍᏗ, ᏗᏣᏓᎨᏳᎯᏳ ᎢᏳᎵᏍᏙᏗᏱ, ᎾᏍᎩᏯ ᎢᏨᎨᏳᎢᏳ ᏄᎵᏍᏔᏅᎢ.
Tala mobeko na Ngai: bolinganaka bino na bino ndenge Ngai nalingaki bino.
13 ᎥᏝ ᎩᎶ ᎤᏓᎨᏳᎯᏳ ᎨᏒ ᏴᎬᎪᎾᏛᏓ ᎤᎵᎢ ᏗᏲᎱᎯᏎᎯ.
Bolingo oyo eleki monene ezali: kokaba bomoi mpo na balingami.
14 ᏂᎯ ᎠᏴ ᎢᎦᎵᎢ, ᎢᏳᏃ ᏂᎦᎥ ᎢᏨᏁᏤᎲ ᏱᏂᏣᏛᏁᎭ.
Bozali baninga na Ngai soki bozali kosala makambo oyo nazali kotinda bino.
15 ᎪᎯ ᎢᏳᏓᎴᏅᏛ ᎥᏝ ᎢᏨᏅᏏᏓᏍᏗ ᏱᏨᏲᏎᎭ; ᎠᏥᏅᏏᏓᏍᏗᏰᏃ ᎥᏝ ᏯᎦᏔᎰ ᎤᎾᏞᎢ ᎾᏛᏁᎲᎢ. ᏂᎯᏍᎩᏂ ᎢᎦᎵᎢ ᎢᏨᏲᏎᎭ; ᏂᎦᎥᏰᏃ ᎪᎱᏍᏗ ᎡᏙᏓ ᏥᏯᏛᎦᏁᎸᎢ ᎾᏍᎩ ᎢᏨᎾᏄᎪᏫᏎᎸ.
Nazali kobenga bino lisusu te « bawumbu, » pamba te mowumbu ayebaka te makambo oyo nkolo na ye asalaka. Nzokande, nazali kobenga bino « baninga na Ngai, » pamba te nayebisi bino makambo nyonso oyo nayekolaki epai ya Tata na Ngai.
16 ᎥᏝ ᏂᎯ ᎠᏴ ᏍᎩᏯᏑᏰᏛ ᏱᎩ, ᎠᏴᏍᎩᏂ ᏂᎯ ᎢᏨᏯᏑᏰᏛ, ᎠᎴ ᏕᏨᏯᎧᏅ ᎢᏤᏅᏍᏗᏱ ᎤᏁᏉᏨᎯ ᎢᏥᎾᏄᎪᏫᏍᏗᏱ, ᎠᎴ ᎤᏁᏉᏨᎯ ᎢᏣᏤᎵᎦ ᎦᎶᏐᎲᏍᎩ ᏂᎨᏒᎾ ᎢᏳᎵᏍᏙᏗᏱ, ᏂᎦᎥᏃ ᎪᎱᏍᏗ ᎡᏥᏔᏲᏎᎮᏍᏗ ᎠᎦᏴᎵᎨᎢ, ᎠᏴ ᏓᏆᏙᎥ ᎢᏥᏔᏲᏍᏗᏍᎨᏍᏗ, ᎾᏍᎩ ᎢᏥᏁᏗᏱ.
Ezali bino te bato boponaki Ngai! Ngai nde naponaki bino mpe napesaki bino mosala mpo ete bokende, bobota bambuma, bambuma oyo ekowumela; mpe mpo ete Tata apesa bino nyonso oyo bokosenga Ye na Kombo na Ngai.
17 ᎾᏍᎩ ᎯᎠ ᏄᏍᏗ ᎢᏨᏁᏤᎭ ᏗᏣᏓᎨᏳᎯᏳ ᎢᏳᎵᏍᏙᏗᏱ.
Tala mobeko na Ngai: bolinganaka bino na bino.
18 ᎢᏳᏃ ᎡᎶᎯ ᎢᏥᏍᎦᎩᏳ ᏱᎩ, ᎢᏥᎦᏔᎭ ᎠᏴ ᎢᎬᏱ ᎠᎩᏍᎦᎩᏳ ᏄᎵᏍᏔᏅ ᏂᎯ ᎣᏂ.
Solo, mokili ezali koyina bino; kasi boyeba ete eyinaki Ngai liboso na bino.
19 ᎢᏳᏃ ᎡᎶᎯ ᎢᏣᎵᎪᎯ ᏱᎨᏎᎢ, ᎡᎶᎯ ᏧᎨᏳᎯᏳ ᏱᎨᏎ ᏧᏤᎵᎦ. ᎠᏎᏃ ᎡᎶᎯ ᎢᏣᎵᎪᎯ ᏂᎨᏒᎾ ᏥᎩ, ᎢᏨᏯᏑᏰᏛᏍᎩᏂ ᎡᎶᎯ ᏥᎩ, ᎾᏍᎩ ᏅᏗᎦᎵᏍᏙᏗᎭ ᎡᎶᎯ ᎢᏥᏍᎦᎦ.
Soki kaka bozalaki ya mokili, mokili ekokaki kolinga bino lokola bato na yango penza. Nzokande, bozali ya mokili te, pamba te nasilaki kopona mpe kolongola bino na se ya bokonzi na yango mpo na kobulisa bino; yango wana mokili ezali koyina bino.
20 ᎢᏣᏅᏖᏍᏗ ᎯᎠ ᏥᏂᏨᏪᏎᎸᎩ; ᎠᏥᎾᏝᎢ ᎥᏝ ᎤᏟ ᎠᏥᎸᏉᏗᏳ ᏱᎨᏐ ᎡᏍᎦᏉ ᎤᎾᏝᎢ. ᎢᏳᏃ ᎠᏴ ᎬᎩᏐᏢᏔᏅᎯ ᏱᎩ, ᏂᎯ ᎾᏍᏉ ᏓᎨᏥᏐᏢᏔᏂ. ᎢᏳᏃ ᎠᏴ ᎠᎩᏁᏨ ᎤᏂᏍᏆᏂᎪᏔᏅᎯ ᏱᎩ, ᏂᎯ ᎾᏍᏉ ᎢᏥᏁᏨ ᏛᏂᏍᏆᏂᎪᏔᏂ.
Bobosana te makambo oyo nayebisaki bino: « Mowumbu aleki nkolo na ye te, na bokonzi. » Lokola banyokolaki Ngai, bino mpe bakonyokola bino; soki babatelaki mateya na Ngai, bakobatela mpe mateya na bino.
21 ᎠᏍᎡᏃ ᎾᏍᎩ ᎯᎠ ᏂᎦᏛ ᏧᏓᎴᏅᏛ ᏅᏓᎨᏨᏁᎵ ᏅᏗᎦᎵᏍᏙᏗᏍᎨᏍᏗ ᏓᏆᏙᎥᎢ, ᏂᎬᏩᎦᏔᎲᎾ ᎨᏒ ᎢᏳᏍᏗ ᏅᏛᎩᏅᏏᏛ.
Bakosala bino makambo wana nyonso likolo na Ngai, pamba te bayebi te Ye oyo atindaki Ngai.
22 ᎢᏳᏃ ᎾᎩᎷᏨᎾ ᎠᎴ ᏂᎦᏥᏬᏁᏔᏅᎾ ᏱᎨᏎᎢ, ᎥᏝ ᎠᏍᎦᏂ ᏱᎬᏩᏁᎮᎢ; ᎪᎯᏍᎩᏂ ᎥᏝ ᏳᏁᎭ ᎤᏄᏢᏙᏗ ᎤᏂᏍᎦᏅᏨᎢ.
Soki nayaki te mpe soki nalobaki na bango te, balingaki te komema ngambo ya lisumu; kasi sik’oyo, bakoki komilongisa te na tina na lisumu na bango.
23 ᎾᏍᎩ Ꮎ ᎠᎩᏍᎦᎩ ᎠᏴ, ᎾᏍᏉ ᎠᏍᎦᎩᏳ ᎨᏐ ᎡᏙᏓ.
Pamba te moto oyo ayini Ngai ayini mpe Tata na Ngai.
24 ᎢᏳᏃ ᎠᏁᎲ ᏂᏓᎩᎸᏫᏍᏓᏁᎲᎾ ᏱᎨᏎᎢ ᎩᎶ ᏧᎸᏫᏍᏓᏁᎸᎯ ᏂᎨᏒᎾ ᏥᎩ, ᎥᏝ ᎠᏍᎦᏂ ᏱᎬᏩᏁᎮᎢ; ᎠᏎᏃ ᎿᎭᏉ ᎢᏧᎳ ᎪᎩᏂᎪᎲ ᎠᎴ ᎪᎩᏂᏍᎦᎩᏳ ᏄᎵᏍᏔᏅ ᎢᏧᎳ ᎠᏴ ᎡᏙᏓᏃ.
Mpe soki nasalaki te, kati na bango, misala wana oyo moto ata moko te asalaki, balingaki te kozala na ngambo ya lisumu. Kasi sik’oyo, atako bamonaki misala yango, bazali kaka kokoba koyina biso: Ngai mpe Tata na Ngai.
25 ᎠᏎᏃ [ ᎾᏍᎩ ᏄᎵᏍᏔᏅᎩ ] ᎤᏙᎯᏳᏗᏱ ᎠᏰᎸᏒ ᎤᎵᏁᏨ ᎯᎠ ᏥᏂᎬᏅ ᏥᎪᏪᎳ ᏧᏂᎧᎿᎭᏩᏛᏍᏗᏱ; “ᎠᏎᏉ ᎬᎩᏍᎦᎬᎩ.”
Kasi ezali mpo ete liloba oyo ekomama kati na mibeko na bango ekokisama: « Bayinaki Ngai kaka pamba. »
26 ᎠᏎᏃ ᎠᏓᏅᏬᎯᏍᏗᏍᎩ ᎦᎷᏨᎭ, ᎾᏍᎩ ᎠᎦᏴᎵᎨᏍᏛᏱ ᏅᏓᏥᏅᏍᏗ ᏥᎩ ᏂᎯ ᎢᏥᎷᏤᏗᏱ, ᎦᏰᎪᎩ ᏂᎨᏒᎾ ᎠᏓᏅᏙ ᎠᎦᏴᎵᎨᏍᏛᏱ ᏅᏛᏓᎴᎲᏍᎩ, ᎾᏍᎩ ᏛᎩᏃᎮᎵ ᎬᏂᎨᏒ ᏅᏛᏋᏁᎵ.
Tango Molobeli akoya, oyo nakotindela bino kowuta epai ya Tata —Molimo ya bosolo, oyo akowuta epai ya Tata— akotatola Ye moko na tina na Ngai;
27 ᏂᎯᏃ ᎾᏍᏉ ᎢᏥᏃᎮᏍᎩ ᎨᏎᏍᏗ, ᎢᏧᎳᎭᏰᏃ ᎢᏕᏓ ᏗᏓᎴᏂᏍᎬ ᏅᏓᎬᏩᏓᎴᏅᏛ.
bongo bino mpe bokotatola na tina na Ngai, pamba te bozali elongo na Ngai wuta na ebandeli.

< ᎣᏍᏛ ᎧᏃᎮᏛ ᏣᏂ ᎤᏬᏪᎳᏅᎯ 15 >