< ᎣᏍᏛ ᎧᏃᎮᏛ ᏣᏂ ᎤᏬᏪᎳᏅᎯ 14 >

1 ᏞᏍᏗ ᎢᏣᏓᏅᏙ ᏳᏕᏍᏔᏁᎮᏍᏗ; ᎡᏦᎢᏳᎲᎦ ᎤᏁᎳᏅᎯ, ᎠᎴ ᎾᏍᏉ ᎠᏴ ᏍᎩᏲᎢᏳᎲᎦ.
Yesu alobaki: — Tika ete mitema na bino etungisama te! Bondima Nzambe mpe bondima Ngai.
2 ᎡᏙᏓ ᎦᏁᎸᎢ ᎤᏣᏔ ᏓᏓᏁᎸ. ᎢᏳᏃ ᎾᏍᎩ ᏄᏍᏛᎾ ᏱᎨᏎᎢ, ᏱᏨᏃᏁᎴᎢ. ᎦᏛᏅᎢᏍᏔᏂ ᎢᏥᏴᏍᏗᏱ.
Kati na ndako ya Tata na Ngai, bisika ezali mingi. Soki ezalaki bongo te, boni, nalingaki koyebisa bino ete nakeyi kuna mpo na kobongisela bino esika?
3 ᎢᏳᏃ ᏯᏆᏛᏅᎢᏍᏔᏁᏅ ᎢᏥᏴᏍᏗᏱ, ᏔᎵᏁ ᏛᏥᎷᏥ ᎠᎴ ᎠᏋᏒ ᎠᏉᎸ ᏙᏓᏨᏯᏓᏂᎸᏥ, ᎾᏍᎩ ᎠᏴ ᎨᎥ ᎾᏍᏉ ᎾᎿᎭᎢᏣᏕᏗᏱ.
Mpe, sima na Ngai kobongisa yango, nakozonga mpe nakozwa bino mpo ete bozala elongo na Ngai; mpe mpo ete bino mpe bozala na esika oyo Ngai nazali.
4 ᎠᎴ ᎠᏴ ᏫᏥᎦᏛ ᎢᏥᎦᏔᎭ, ᎠᎴ ᏫᎦᏅᏅ ᎢᏥᎦᏔᎭ.
Boyebi nzela ya esika oyo nazali kokende.
5 ᏓᎻ ᎯᎠ ᏄᏪᏎᎸᎩ; ᏣᎬᏫᏳᎯ, ᎥᏝ ᏲᏥᎦᏔᎭ ᏫᎦᏛᎢ; ᎦᏙᏃ ᏱᎦᎵᏍᏙᏓ ᏲᏥᎦᏔᎭ ᏫᎦᏅᏅᎢ.
Toma alobaki na Yesu: — Te, Nkolo! Toyebi te esika oyo ozali kokende; bongo tokoyeba nzela na yango ndenge nini?
6 ᏥᏌ ᎯᎠ ᏄᏪᏎᎸᎩ; ᎠᏴ ᎾᏍᎩ ᏅᏃᎯ, ᎠᎴ ᏚᏳᎪᏛᎢ, ᎠᎴ ᎬᏂᏛ. ᎥᏝ ᎩᎶ ᎠᎦᏴᎵᎨᎢ ᏱᎦᎷᏤᎰᎢ, ᎬᏂ ᎠᏴ ᎠᎩᎶᎯᏎᎸᎯ ᏥᎨᏐᎢ.
Yesu azongiselaki ye: — Ngai, nazali nzela, solo mpe bomoi. Moto moko te akoki koya epai ya Tata, soki na nzela na Ngai te.
7 ᎢᏳᏃ ᎠᏴ ᏱᏍᎩᎦᏔᎮᎢ ᎾᏍᏉ ᎡᏙᏓ ᏰᏥᎦᏔᎮᎢ; ᎪᎯᏃ ᎢᏳᏓᎴᏅᏛ ᎡᏥᎦᏔᎭ ᎠᎴ ᎡᏥᎪᏩᏛᎲ.
Soki boyebaki Ngai, bolingaki mpe koyeba Tata na Ngai; mpe kobanda sik’oyo, boyebi Ye mpe bomoni Ye.
8 ᏈᎵᎩ ᎯᎠ ᏄᏪᏎᎸᎩ; ᏣᎬᏫᏳᎯ, ᏍᎩᎾᏄᎪᏫᏏ ᎠᎦᏴᎵᎨᎢ, ᎿᎭᏉᏃ ᏰᎵᎦ ᏓᏲᏥᏰᎸᏂ.
Filipo alobaki na Yesu: — Nkolo, lakisa biso Tata; tozali na posa ya eloko mosusu te.
9 ᏥᏌ ᎯᎠ ᏄᏪᏎᎸᎩ; ᏥᏌ ᏂᎪᎯᎩ ᎢᏧᎳᎭ ᎢᏁᏓ, ᎠᏏᏍᎪᏃ ᎥᏝ ᏱᏍᎩᎦᏙᎥᏍᎦ, ᏈᎵᎩ; ᎩᎶ ᎠᏴ ᎠᎩᎪᎲᎯ ᏥᎨᏐᎢ, ᎤᎪᎲᎯ ᎨᏐ ᎠᎦᏴᎵᎨᎢ; ᎦᏙᏃ ᎯᎠ ᏂᎯᏪᎠ; ᏍᎩᎾᏄᎪᏫᏏ ᎠᎦᏴᎵᎨᎢ?
Yesu azongiselaki ye: — Ah Filipo! Kala nyonso oyo nazalaka elongo na bino, oyebaka na yo kaka Ngai te? Moto oyo amoni Ngai amoni Tata. Bongo ndenge nini olobi: « Lakisa biso Tata? »
10 ᏝᏍᎪ ᏲᎯᏳᎲᏍᎦ ᎠᏴ ᎠᎦᏴᎵᎨᎢ ᏥᏯᎥᎢ, ᎠᎴ ᎠᎦᏴᎵᎨ ᎠᏴ ᎠᎩᏯᎥᎢ? ᎧᏃᎮᏛ ᏥᏨᏃᎮᎮᎰᎢ, ᎥᏝ ᎠᏋᏒᏉ ᎠᏆᏓᏅᏖᏛ ᏱᏥᏁᎪᎢ, ᎠᎦᏴᎵᎨᎢᏍᎩᏂ ᏣᎩᏯᎠ ᎾᏍᎩ ᏚᎸᏫᏍᏓᏁᎰᎢ.
Ondimi te ete nazali kati na Tata, mpe ete Tata azali kati na Ngai? Maloba oyo nayebisaka bino, nalobaka yango te na bokonzi na Ngai moko; ezali Tata oyo azali kati na Ngai nde azali kokokisa bongo misala na Ye.
11 ᏍᎩᏲᎢᏳᎲᎦ ᎠᏴ ᎠᎦᏴᎵᎨᎢ ᏥᏯᎥᎢ, ᎠᎴ ᎠᎦᏴᎵᎨᎢ ᎠᏴ ᎠᎩᏯᎥᎢ, ᎢᏳᏃ ᏂᏍᎩᏲᎢᏳᎲᏍᎬᎾ ᎢᎨᏎᏍᏗ, ᏓᎩᎸᏫᏍᏓᏁᎲᏉ ᏫᏂᎦᎵᏍᏙᏓ ᏍᎩᏲᎢᏳᎲᎦ.
Bondima Ngai: nazali kati na Tata, mpe Tata azali kati na Ngai. Soki te, bondima ata mpo na misala oyo bomoni Ngai kosala.
12 ᎤᏙᎯᏳᎯᏯ ᎤᏙᎯᏳᎯᏯ ᎯᎠ ᏂᏨᏪᏎᎭ; ᎠᏉᎯᏳᎲᏍᎩ, ᎠᏴ ᏥᏓᎩᎸᏫᏍᏓᏁᎭ ᎾᏍᏉᎾᏍᎩ ᏙᏓᏳᎸᏫᏍᏓᏁᎵ, ᎠᎴ ᎤᏟ ᎤᏍᏆᏂᎪᏗᏳ ᏙᏓᏳᎸᏫᏍᏓᏁᎵ ᎡᏍᎦᏉ ᎯᎠ; ᎡᏙᏙᏱᏰᏃ ᎦᎢ,
Nazali koloba na bino penza ya solo: moto oyo andimi Ngai akosala misala oyo nazali kosala; akosala kutu misala oyo eleki minene, pamba te nazali kokende epai ya Tata.
13 ᏂᎦᎥᏃ ᎪᎱᏍᏗ ᏓᏉᏙᎥ ᎢᏥᏔᏲᏍᏗᏍᎨᏍᏗ, ᎾᏍᎩ ᎢᏯᏆᏛᏁᏗ ᎨᏎᏍᏗ, ᎠᎦᏴᎵᎨᎢ ᎠᏥᎸᏉᏙᏗᏱ ᎤᏪᏥ ᎢᏳᏩᏂᏌᏅᎯ ᎨᏒᎢ.
Mpe nakosala nyonso oyo bokosenga na Kombo na Ngai, mpo ete Tata azwa lokumu kati na Mwana.
14 ᎢᏳᏃ ᎪᎱᏍᏗ ᏓᏆᏙᎥ ᎢᏥᏔᏲᏍᏗᏍᎨᏍᏗ, ᎾᏍᎩ ᎠᏎ ᎢᏯᏆᏛᏁᏗ.
Soki bosengi Ngai eloko na Kombo na Ngai, nakosala yango.
15 ᎢᏳᏃ ᏍᎩᎨᏳᎢᏳ ᎨᏎᏍᏗ, ᎢᏥᏍᏆᏂᎪᏓ ᎠᏆᏤᎵ ᏗᎧᎿᎭᏩᏛᏍᏗ;
Soki bolingaka Ngai, bokobatela mibeko na Ngai.
16 ᎠᎴ ᎠᎦᏴᎵᎨ ᎠᏴ ᏓᏥᏔᏲᏎᎵ, ᎾᏍᎩᏃ ᏓᏣᎵᏍᎪᎸᏓᏁᎵ ᏅᏩᏓᎴ ᎢᏥᏅᏬᎯᏍᏗᏍᎩ, ᎾᏍᎩ ᎠᎵᏍᏆᏗᏍᎩ ᏂᎨᏒᎾ ᎢᏤᎳᏗᏙᎯ, (aiōn g165)
Mpe Ngai, nakosenga epai ya Tata ete apesa bino Molobeli mosusu mpo ete azala elongo na bino tango nyonso, (aiōn g165)
17 ᎾᏍᎩ Ꮎ ᎦᏰᎪᎩ ᏂᎨᏒᎾ ᎠᏓᏅᏙ, ᎾᏍᎩ ᎡᎶᎯ ᏗᎬᏩᏓᏂᎸᎢᏍᏗ ᏂᎨᏒᎾ ᏥᎩ, ᎾᏍᎩ ᏳᎪᏩᏘᎭ ᎠᎴ ᎥᏝ ᏳᎦᏔᎭ; ᏂᎯᏍᎩᏂ ᎡᏥᎦᏔᎭ, ᎢᏤᎳᏗᏙᎭᏰᏃ, ᎠᎴ ᎾᏍᎩ ᎢᏥᏯᎡᏍᏗ.
Molimo ya solo, Molimo oyo mokili ekoki koyamba te mpo ete ezali komona Ye te to eyebi Ye te. Kasi bino, boyebi Ye, pamba te azali elongo na bino mpe azali kati na bino.
18 ᎥᏝ ᎢᏣᏓᏂᏯᏛ ᏴᏓᏨᏴᏕᏥ; ᏛᏨᎷᏤᎵ.
Nakotika bino te lokola bana bitike; nakozongela bino.
19 ᎠᏏ ᏞᎦ, ᎿᎭᏉ ᎡᎶᎯ ᎥᏝ ᏯᎩᎪᏩᏘᏍᎨᏍᏗ, ᏂᎯᏍᎩᏂ ᏍᎩᎪᏩᏘᏍᎨᏍᏗ, ᎠᏴᏰᏃ ᎬᏅ, ᎠᎴ ᏂᎯ ᎾᏍᏉ ᏕᏨᏁᏍᏗ.
Etikali kaka tango moke, mokili ekomona Ngai lisusu te; kasi bino, bokomona Ngai. Mpo ete nazali na bomoi, bino mpe bokozala na bomoi.
20 ᎾᎯᏳ ᏓᏣᏙᎴᎰᏏ ᎠᏴ ᎡᏙᏓ ᏥᏯᎥᎢ, ᎠᎴ ᏂᎯ ᏍᎩᏯᎥᎢ, ᎠᎴ ᎠᏴ ᎢᏨᏯᎥᎢ.
Tango mokolo yango ekokoma, bokososola ete nazali kati na Tata na ngai; bokososola lisusu ete bozali kati na Ngai, mpe Ngai nazali kati na bino.
21 ᎾᏍᎩ Ꮎ ᏗᎧᎿᎭᏩᏛᏍᏗ ᎠᏆᏤᎵᎦ ᎤᏍᏆᏂᎪᏗ ᎠᎴ ᏗᎧᎿᎭᏩᏕᎩ, ᎾᏍᎩ ᎠᏴ ᎠᎩᎨᏳᎯ, ᎠᎴ ᎠᏴ ᎠᎩᎨᏳᎯ ᎤᎨᏳᎯ ᎨᏎᏍᏗ ᎡᏙᏓ, ᎠᎴ ᎠᏴ ᏥᎨᏳᎢᏳ ᎨᏎᏍᏗ, ᎠᎴ ᎬᏂᎨᏒ ᏅᏓᏥᏯᏛᏁᎵ.
Moto oyo alingaka Ngai, ezali ye oyo abatelaka mibeko na Ngai mpe atiaka yango na misala. Tata na Ngai akolinga moto oyo alingaka Ngai; Ngai mpe nakolinga ye mpe nakomimonisa epai na ye.
22 ᏧᏓᏏ, ᎥᏝ ᎢᏍᎦᎳᏗ, ᎯᎠ ᏄᏪᏎᎸᎩ; ᏣᎬᏫᏳᎯ, ᎦᏙ ᏓᎦᎵᏍᏙᏔᏂ ᎬᏂᎨᏒ ᎠᏴ ᏅᏛᏍᎩᏯᏛᏁᎵ, ᎥᏝᏃ ᎡᎶᎯ?
Yuda (Yuda Isikarioti te) atunaki Yesu: — Nkolo, mpo na nini komimonisa epai na biso, kasi epai ya mokili te?
23 ᏥᏌ ᎤᏁᏨᎩ, ᎯᎠ ᏄᏪᏎᎸᎩ; ᎢᏳᏃ ᎩᎶ ᎠᎩᎨᏳᎯ ᏱᎩ, ᎾᏍᎩ ᏧᎧᎿᎭᏩᏛᏍᏗ ᎠᎩᏁᏨᎢ; ᎡᏙᏓᏃ ᎤᎨᏳᎯ ᎢᏳᎵᏍᏙᏗ, ᎠᎴ ᏓᏲᏍᏗᎷᏤᎵ, ᎠᎴ ᎦᏁᎸᎢ ᏓᏲᏍᏓᏁᎳᏗ.
Yesu azongiselaki ye: — Moto oyo alingaka Ngai akobatela maloba na Ngai, mpe Tata na Ngai akolinga ye; bongo tokoya epai na ye mpe tokovanda elongo na ye.
24 ᎠᎩᎨᏳᎯ ᏂᎨᏒᎾ ᎥᏝ ᏱᏓᎧᎿᎭᏩᏕᎪ ᎠᎩᏁᏨᎢ. ᎧᏃᎮᏛᏃ ᏥᏣᏛᎩᎠ, ᎥᏝ ᎠᏴ ᎠᏆᏤᎵᎦ ᏱᎩ, ᎠᎦᏴᎵᎨᏍᎩᏂ ᏅᏛᎩᏅᏏᏛ ᎤᏤᎵᎦ.
Kasi moto oyo alingaka Ngai te, akobatela mpe maloba na Ngai te. Nzokande, Liloba oyo bozali koyoka ezali ya Ngai te, kasi ezali Liloba ya Tata oyo atindaki Ngai.
25 ᎾᏍᎩ ᎢᏨᏃᎮᎮᎸ ᎠᏏ ᏥᏨᏰᎳᏗᏙᎭ.
Nayebisi bino makambo oyo nyonso, wana nazali nanu elongo na bino.
26 ᎠᏓᏅᏬᎯᏍᏗᏍᎩᏍᎩᏂ, ᎦᎸᏉᏗᏳ ᎠᏓᏅᏙ, ᎾᏍᎩ ᎠᎦᏴᎵᎨᎢ ᏅᏓᏳᏅᏍᏗ ᏥᎩ ᏓᏆᏙᏍᏛᎢ, ᎾᏍᎩ ᏂᎦᏛ ᏓᏤᏲᏂ, ᎠᎴ ᏓᏣᏅᏓᏗᏍᏔᏂ ᏂᎦᎥ ᎢᏨᏁᏤᎸᎢ.
Kasi Molobeli, Molimo Mosantu oyo Tata akotinda na Kombo na Ngai, akoteya bino makambo nyonso mpe akosunga bino mpo ete bobosana te nyonso oyo nayebisaki bino.
27 ᏅᏩᏙᎯᏯᏛ ᎢᏨᎢᏯᏏ; ᏅᏩᏙᎯᏯᏛ ᎠᏆᏤᎵᎦ ᎢᏨᎥᏏ. ᎥᏝ ᎡᎶᎯ ᏣᏓᏁᎰ ᎾᏍᎩ ᎢᏳᏍᏗ ᏱᏨᎥᏏ; ᏞᏍᏗ ᎢᏣᏓᏅᏙ ᏳᏕᏯᏔᏁᎮᏍᏗ, ᎠᎴ ᏞᏍᏗ ᏯᏍᎦᎢᎮᏍᏗ.
Nakeyi, kasi natikeli bino kimia; napesi bino kimia na Ngai. Nazali kopesa bino te ndenge mokili epesaka. Tika ete mitema na bino etungisama te mpe bobanga te!
28 ᎢᏣᏛᎦᏅᎯ, ᏛᎨᏏ ᎠᎴ ᏛᏨᎷᏤᎵ, ᏥᏨᏲᏎᎸᎩ. ᎢᏳᏃ ᏍᎩᎨᏳᎢᏳ ᏱᎩ, ᏱᏣᎵᎮᎵᎦ ᏱᏅᏗᎦᎵᏍᏙᏗᎭ ᎠᎦᏴᎵᎨᏍᏛᏱ ᏫᏥᎦᏘ ᏣᏆᏛᏅᎩ; ᎡᏙᏓᏰᏃ ᎤᏟ ᎠᏥᎸᏉᏗᏳ ᎡᏍᎦᏉ ᎠᏴ.
Boyoki Ngai koloba na bino ete nakeyi, mpe lisusu ete nakozongela bino. Soki bozalaki kolinga Ngai, bolingaki kosepela na kokende na Ngai epai ya Tata, pamba te Tata aleki Ngai na monene.
29 ᎿᎭᏉᏃ ᎠᏏᏉ ᎾᏍᏆᎵᏍᎬᎾ ᎨᏒ ᎢᏨᏃᎲᏏ, ᎾᏍᎩ ᎠᏍᏆᎸᎲᎭ ᎢᏦᎯᏳᏗᏱ.
Nayebisi bino makambo yango sik’oyo, liboso ete esalema, mpo ete bokoka kondima, na mokolo oyo ekosalema.
30 ᎪᎯ ᎢᏳᏓᎴᏅᏛ ᎥᏝ ᎤᏣᏘ ᏴᎨᏨᏯᎵᏃᎮᏓ; ᎤᎬᏫᏳᎯᏰᏃ ᎯᎠ ᎡᎶᎯ ᎤᏤᎵᎦ ᏓᏯᎢ; ᎥᏝᏃ ᎪᎱᏍᏗ ᎤᏤᎵ ᏯᏇᎭ.
Kobanda sik’oyo, nakoloba na bino lisusu mingi te, pamba te mokonzi ya mokili oyo azali koya. Ezali te mpo ete azali na nguya moko te likolo na Ngai,
31 ᎠᏎᏃ ᎡᎶᎯ ᎤᏙᎴᎰᎯᏍᏗᏱ ᎠᎦᏴᎵᎨᎢ ᏥᎨᏳᎢᏳ ᎨᏒᎢ, ᎠᎴ ᎠᎦᏴᎵᎨᎢ ᎠᎩᏁᏤᎸᎢ ᎾᏍᎩ ᏂᎦᏛᏁᎲᎢ. ᏗᏣᎴᎲᎦ, ᎢᏕᎾ.
kasi ezali mpo ete mokili eyeba ete nalingaka Tata, mpe ete nazali kosala kolanda ndenge atindaki Ngai. Botelema; tolongwa awa.

< ᎣᏍᏛ ᎧᏃᎮᏛ ᏣᏂ ᎤᏬᏪᎳᏅᎯ 14 >