< Књига пророка Јеремије 19 >

1 Овако рече Господ: Иди и купи крчаг земљан у лончара с неколико старешина народних и старешина свештеничких.
Tala liloba oyo Yawe alobi: — Kende kosomba mbeki epai ya mosali mbeki. Kende nzela moko na bakambi ya bato mpe bakambi ya Banganga-Nzambe;
2 И отиди у долину сина Еномовог што је пред вратима источним, и онде прогласи речи које ћу ти казати.
bimela na nzela ya Lubwaku ya Beni-Inomi, na liboso ya ekuke ya ndako epai wapi basalaka mbeki; mpe kuna, okosakola maloba oyo nakoyebisa yo.
3 И реци: Чујте реч Господњу, цареви Јудини и становници јерусалимски; овако вели Господ над војскама Бог Израиљев: Ево, ја ћу пустити зло на то место да ће зујати уши свакоме ко га чује.
Loba: « Bino bakonzi ya Yuda mpe bavandi ya Yelusalemi, boyoka Liloba na Yawe! Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi: Boyoka! Nakoyeisa pasi makasi na esika oyo; mpe moto nyonso oyo akoyoka sango na yango, akozala na somo.
4 Јер ме оставише и оскврнише ово место кадећи на њему другим боговима, којих не знаше ни они ни оци њихови, ни цареви Јудини, и напунише то место крви праве.
Lokola bato oyo basundoli Ngai mpe bakomisi esika oyo esika ya banzambe ya bapaya, lokola bakomi kotumba mbeka na esika oyo mpo na banzambe oyo; ezala bango, batata na bango to bakonzi ya Yuda, batikalaki koyeba te, batondisi esika oyo na makila ya bato oyo basali mabe ata moko te,
5 И поградише висине Валу да сажижу синове своје огњем на жртве паљенице Валу, чега не заповедих нити о том говорих, нити ми на ум дође.
batongi bisambelo ya likolo ya bangomba mpo na Bala, mpo na kotumba bana na bango na moto lokola mbeka ya kotumba epai ya Bala; nzokande Ngai natikala kotinda bango likambo ya boye te to mpe likambo ya boye etikala ata komata na makanisi na Ngai te;
6 Зато, ево, иде време, вели Господ, кад се ово место неће више звати Тофет, ни долина сина Еномовог, него крвна долина.
yango wana, na mikolo ekoya, elobi Yawe, bakobenga lisusu te esika oyo: ‹ Tofeti to Lubwaku ya Beni-Inomi, › kasi bakokoma kobenga yango: ‹ Lubwaku oyo babomelaka bato. ›
7 Јер ћу уништити савет Јудин и јерусалимски на овом месту, и учинићу да падну од мача пред непријатељима својим и од руке оних који траже душу њихову, и мртва ћу телеса њихова дати за храну птицама небеским и зверима земаљским.
Kaka na esika oyo, nakobebisa mabongisi ya Yuda mpe ya Yelusalemi; nakosala ete bakweya na mopanga ya banguna na bango mpe na maboko ya bato oyo bazali na posa ya kosala bango mabe. Nakokomisa bibembe na bango bilei ya bandeke ya likolo mpe ya banyama ya zamba.
8 И обратићу тај град у пустош и руг: ко год прође мимо њ, чудиће се и звиждаће за све муке његове.
Nakobebisa engumba oyo mpe nakokomisa yango eloko ya kotiola. Bato nyonso oyo bakolekela awa bakokamwa mpe bakoyoka somo wana bakomona kobeba na yango nyonso.
9 И учинићу да једу месо од својих синова и месо од својих кћери, и сваки ће јести месо од друга свог у невољи и тескоби, којом ће им досађивати непријатељи њихови и који траже душу њихову.
Nakoleisa bango misuni ya bana na bango ya basi mpe ya mibali, bakoliana bango na bango tango bato oyo bazali na posa ya kosala bango mabe bakozingela bango.
10 Потом разбиј крчаг пред људима који ће ићи с тобом.
Boye, buka mbeki na miso ya bato oyo bozali kokende na bango nzela moko
11 И реци им: Овако вели Господ над војскама: Тако ћу разбити тај народ и тај град као што се разбије суд лончарски, који се не може више оправити, и у Тофету ће се погребавати, јер неће бити места за погребавање:
mpe loba na bango: ‹ Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi: Nakobebisa ekolo mpe engumba oyo, kaka ndenge bapanzaka mbeki oyo mosali mbeki asali, mpe bakokoka lisusu kobongisa yango te. Bakokunda bibembe na Tofeti kino esika ya kokunda ekotikala lisusu te.
12 Тако ћу учинити томе месту, вели Господ, и становницима његовим и учинићу тај град да буде као Тофет;
Yango ezali makambo oyo nakosala na esika oyo mpe epai ya bavandi ya esika oyo, elobi Yawe, nakokomisa engumba oyo lokola Tofeti.
13 И куће јерусалимске и куће царева Јудиних биће нечисте као место Тофет, све куће, где на крововима кадише свој војсци небеској и лише наливе другим боговима.
Bandako ya Yelusalemi mpe bandako ya bakonzi ya Yuda ekokoma mbindo lokola esika oyo na kombo Tofeti, bandako nyonso oyo, na likolo ya manzanza na yango, bazalaki kotumba malasi ya ansa mpo na mampinga nyonso ya likolo mpe bazalaki kobonza makabo ya masanga ya vino mpo na banzambe mosusu. › »
14 Потом се врати Јеремија из Тофета куда га беше послао Господ да пророкује, и стаде у трему дома Господњег, и рече свему народу:
Jeremi azongaki wuta na Tofeti epai wapi Yawe atindaki ye mpo na kosakola, atelemaki na lopango ya Tempelo ya Yawe mpe alobaki na bato nyonso:
15 Овако вели Господ над војскама, Бог Израиљев: Ево, ја ћу пустити на тај град и на све градове његове све зло које изрекох за њ, јер отврднуше вратом својим да не слушају речи моје.
— Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi: « Boyoka! Nakoyeisa na engumba oyo mpe na mboka oyo ezali zingazinga na yango pasi nyonso oyo nasakolaki na tina na yango, pamba te batosaki Ngai te mpe bayokaki maloba na ngai te. »

< Књига пророка Јеремије 19 >