< Књига пророка Јеремије 18 >

1 Реч која дође Јеремији од Господа говорећи:
Tala liloba oyo Yawe alobaki na Jeremi:
2 Устани, и сиђи у кућу лончареву, и онде ћу ти казати речи своје.
— Kende na ndako ya mosali mbeki mpe, kuna, nakoyebisa yo makambo.
3 Тада сиђох у кућу лончареву, и гле, он рађаше посао на свом колу.
Boye, nakendeki na ndako ya mosali mbeki mpe nakutaki ye azali kosala mosala na ye.
4 И поквари се у руци лончару суд који грађаше од кала, па начини изнова од њега други суд, како беше воља лончару да начини.
Kasi mbeki oyo azalaki kosala na mabele oyo basalelaka bikeko ezalaki kokangama ye na maboko. Bongo, mosali mbeki yango asalaki mbeki mosusu wuta na mbeki oyo ebebaki, asalaki yango lisusu kitoko kolanda posa ya motema na ye.
5 Тада дође ми реч Господња говорећи:
Mpe kuna, Yawe alobaki na ngai:
6 Не могу ли чинити од вас као овај лончар, доме Израиљев? Говори Господ; гле, шта је као у руци лончаревој, то сте ви у мојој руци, доме Израиљев.
— Oh bana ya Isalaele, nakoki kosala bino te ndenge mosali mbeki oyo azali kosala, elobi Yawe? Bana ya Isalaele, bozali te kati na maboko na Ngai lokola mabele oyo basalelaka bikeko kati na maboko ya mosali mbeki?
7 Кад бих рекао за народ и за царство да га истребим и разорим и затрем;
Soki nazwi mokano ya kopikola, ya kokweyisa to ya kobebisa ekolo to mokili songolo,
8 Ако се обрати народ ода зла, за које бих рекао, и мени ће бити жао са зла које мишљах да му учиним.
bongo ekolo to mokili oyo nakebisi etiki kosala mabe, nakobongola mokano oyo nasilaki kozwa mpo na yango mpe nakolongola pasi oyo nakanaki kotindela yango.
9 А кад бих рекао за народ и за царства да га сазидам и насадим;
To mpe lisusu, soki nazwi mokano ya kotonga to ya kolona ekolo to mokili pakala,
10 Ако учини шта је зло преда мном не слушајући глас мој, и мени ће бити жао добра које рекох да му учиним.
bongo ekolo to mokili yango ekomi kosala mabe na miso na Ngai mpe eboyi koyokela Ngai, nakobongola mokano oyo nasilaki kozwa ya kosalela yango bolamu.
11 Зато сада реци Јудејцима и Јерусалимљанима говорећи: Овако вели Господ: Ево спремам на вас зло, и мислим мисли на вас; вратите се, дакле, сваки са свог пута злог, и поправите путеве своје и дела своја.
Yango wana, yebisa sik’oyo bato ya Yuda mpe bavandi ya Yelusalemi: « Tala liloba oyo Yawe alobi: ‹ Tala, nasili kozwa mokano ya kotindela bino pasi, mpe nazali na mabongisi ya kosala bino mabe. Boye, tika ete moko na moko kati na bino atika nzela na ye ya mabe, abongola bizaleli mpe misala na ye. ›
12 А они рекоше: Нема ништа од тога, него ћемо ићи за својим мислима и чинићемо сваки по мисли срца свог злог.
Kasi bakozongisa: ‹ Ezali na tina te! Tokokoba kaka kosala mabongisi ya mitema na biso, mpe moko na moko kati na biso akokoba kaka kolanda baposa mabe ya motema na ye. › »
13 Зато овако говори Господ: Питајте по народима је ли ко чуо такво шта? Грдило велико учини девојка Израиљева.
Yango wana, tala liloba oyo Yawe alobi: « Boluka koyeba kati na bikolo soki nani asila koyoka makambo ya boye! Isalaele, mboka kitoko, asali likambo ya mabe penza!
14 Оставља ли снег ливански са стене моја поља? Остављају ли се воде студене, које теку?
Boni, bosila komona mvula ya pembe ya Libani kosila na bangomba na yango? Bosila komona mayi ya malili oyo ekitaka na bangomba na yango kokawuka?
15 А народ мој мене заборави, кади таштини, и спотичу се на својим путевима, на старим стазама, да ходе стазама пута непоравњеног,
Nzokande, bato na Ngai babosani Ngai, bazali kotumba malasi ya ansa mpo na banzambe ya bikeko oyo ezanga tina, oyo ebetisaka bango mabaku na nzela mpe epengwisaka bango na nzela ya kala, bongo ememaka bango na banzela mosusu oyo bafungola nanu te.
16 Да бих обратио земљу њихову у пустош, на вечну срамоту, да се чуди ко год прође преко ње и маше главом својом.
Mokili na bango ekotikala lisusu na bato te, ekokoma eloko ya kotiola mpo na tango nyonso, bongo bato nyonso oyo bakoleka wana bakokamwa mpe bakoningisa mito na bango.
17 Као устоком разметнућу их пред непријатељем; леђа а не лице показаћу им у невољи њиховој.
Nakopanza bango liboso ya banguna na bango ndenge mopepe ya este esalaka. Tango bakokoma na pasi, nakopesa bango mokongo mpe nakolakisa bango elongi na Ngai te. »
18 А они рекоше: Ходите да смислимо шта Јеремији, јер неће нестати закона свештенику ни савета мудрацу ни речи пророку; ходите, убијмо га језиком и не пазимо на речи његове.
Bazalaki koloba: « Boya! Tika ete tosalela Jeremi likita mpo na kosala ye mabe, pamba te ezala ndenge nini, Banganga-Nzambe bakosila te mpo na koteya Mobeko, bato ya bwanya bakosila te mpo na kopesa toli, mpe basakoli bakosila te mpo na kosakola Liloba na Yawe. Boya! Tika ete toboma ye na nzela ya lolemo, mpe tolanda te makambo oyo azali koloba! »
19 Пази на ме, Господе, и чуј глас мојих противника.
Eh Yawe, yoka makambo oyo bafundi na ngai bazali koloba!
20 Еда ли ће се зло вратити за добро, кад ми копају јаму? Опомени се да сам стајао пред Тобом говорећи за њихово добро, да бих одвратио гнев Твој од њих.
Boni, bazongisaka solo mabe na malamu? Tala, batimoli libulu mpo na kokunda ngai! Kanisa ndenge nini natelemaki liboso na Yo mpo na koloba na tina na bolamu na bango, mpo ete kanda na Yo ekende mosika na bango.
21 Зато предај синове њихове глади и учини да изгину од мача, и жене њихове да буду сироте и удове, и мужеви њихови да се погубе, младиће њихове да побије мач у боју.
Mpo na yango, boma bana na bango na nzala, kaba bango na mopanga! Tika ete basi na bango bakufisa bana na bango mpe bakoma basi bakufisa mibali! Tika ete kufa ekomela mibali na bango, mpe bilenge mibali na bango bakufa na mopanga ya bitumba.
22 Нека се чује вика из кућа њихових, кад доведеш на њих војску изненада; јер ископаше јаму да ме ухвате, и замке наместише ногама мојим.
Tika ete kolela eyokana wuta na bandako na bango tango okotindela bango banguna na pwasa, pamba te batimoli libulu mpo ete bakanga ngai mpe batie mitambo na makolo na ngai!
23 А Ти, Господе, знаш све што су наумили мени да ме убију, немој им опростити безакоња ни грех њихов избрисати испред себе; него нека попадају пред Тобом, у гневу свом ради супрот њима.
Kasi Yo, Yawe, oyebi mabongisi nyonso oyo basali mpo na koboma ngai; kolimbisa mabe na bango te, kolongola masumu na bango liboso na Yo te! Tika ete balenga liboso na Yo! Pesa bango etumbu na mokolo ya kanda na Yo.

< Књига пророка Јеремије 18 >