< Hebreerne 6 >

1 Difor vil me springa yver barnelærdomen um Kristus og skrida fram til det fullkomne, og ikkje atter leggja grunnvollen med umvending frå daude gjerningar og tru på Gud,
Yango wana, tokota na mateya oyo ekoki mpo na mikolo; tolekisa tango te na mateya ya ebandeli na tina na Klisto, mpe tozongela te mateya lokola kobongola motema, kotika misala oyo ememaka na kufa, kondima kati na Nzambe,
2 med læra um dåp og handpåleggjing og uppstoda av daude og æveleg dom. (aiōnios g166)
ndenge nyonso ya kobatisa, kotiela bato maboko, lisekwa ya bakufi, mpe etumbu ya seko. (aiōnios g166)
3 Og dette vil me gjera, um Gud gjev lov til det.
Soki Nzambe apesi biso nzela, tokomipesa nde na mateya oyo ekoki mpo na mikolo.
4 For det er umogelegt at dei som ein gong er upplyste og hev smaka den himmelske gåva og fenge lut i den Heilage Ande
Solo, ekoki kosalema te ete bato oyo Nzambe angengisaki na pole na Ye, oyo bamekaki elengi ya likabo ya Lola, oyo basanganaki na Molimo Mosantu,
5 og smaka Guds gode ord og krafterne av den komande verdi (aiōn g165)
oyo bamekaki elengi ya bolamu ya Liloba na Nzambe, oyo bamekaki nguya ya mokili oyo ezali koya, (aiōn g165)
6 og so fell frå, atter kann uppnyast til umvending, sidan dei på nytt krossfester Guds son for seg og gjer honom til spott.
ekoki kosalema te ete bateya bango lisusu mateya ya kobongola lisusu mitema soki bakweyi na masumu, pamba te bazali lisusu kobaka Mwana na Nzambe na ekulusu, mpo na bango moko, mpe kosambwisa Ye na miso ya bato.
7 For den jordi som drikk regnet som ofte fell på henne, og ber gagnleg grøda åt deim som ho vert dyrka for, ho fær velsigning av Gud;
Tango mabele oyo enokelaka mvula emelaka mayi mpe ebotaka matiti ya tina mpo na bato oyo baloneli yango, Nzambe apambolaka yango.
8 men ber ho tornar og tistlar, so er ho udugleg og forbanning nær, og enden med henne er å verta brend.
Kasi soki ebimisi basende mpe banzube, ezalaka lisusu na tina te, ezalaka mosika te ya kolakelama mabe, mpe esukaka na kozika na moto.
9 Men um dykk, kjære vener, er me visse på det som betre er, og som høyrer til frelsa, um me og talar soleis.
Atako tolobi bongo, balingami na ngai, tondimisami penza na tina na bino ete tozali kozela lokola libula biloko ya malamu koleka, biloko oyo ememaka na lobiko.
10 For Gud er ikkje urettferdig, so han skulde gløyma dykkar verk og den kjærleiken som de hev synt for hans namn, med di de hev tent og endå tener dei heilage.
Pamba te Nzambe azangi bosembo te mpo ete abosana mosala na bino mpe bolingo nyonso oyo botalisaki mpo na Kombo na Ye, na ndenge bosungaki mpe bozali kokoba kosunga basantu.
11 Men me ynskjer at kvar ein av dykk må syna den same ihuge for den fulle vissa i voni alt til enden,
Kasi tolingi ete moto nyonso kati na bino akoba kolakisa bolingo yango kino na suka mpo ete makambo oyo bozali kotiela elikya ekokisama solo.
12 so de ikkje skal verta seinføre, men fylgja etter deim som ved tru og tolmod erver lovnaderne.
Tolingi te ete bokoma bagoyigoyi, kasi bomekola bato oyo bazwaka, na nzela ya kondima mpe kokanga motema, biloko oyo Nzambe alaka.
13 For då Gud gav Abraham lovnaden, og han ingen større hadde å sverja ved, so svor han ved seg sjølv
Tango Nzambe apesaki Abrayami elaka, akataki seleka na Kombo na Ye moko, pamba te ezali na moto moko te oyo aleki Nzambe mpo ete Ye Nzambe akata seleka na kombo na ye.
14 og sagde: «Sanneleg, eg vil rikleg velsigna deg og gjera deg storleg mangfaldig.»
Alobaki: « Nakopambola yo solo mpe nakopesa yo bakitani ebele. »
15 Og soleis vann han lovnaden, då han hadde venta med tolmod.
Yango wana, Abrayami akangaki motema mpe azwaki oyo Nzambe alakaki ye.
16 For menneskje sver ved ein større, og eiden er deim ein ende på all motsegn til stadfesting.
Nzokande, bato bakataka seleka na kombo ya moto oyo aleki bango, mpe seleka ezalaka ndanga oyo esukisaka tembe nyonso.
17 Difor lagde Gud ein eid til, då han enn meir vilde syna ervingarne til lovnaden kor ubrigdeleg hans vilje var,
Yango wana, Nzambe akataki seleka mpo na kolakisa na bato oyo bazwaki elaka ete akobongola mokano na Ye te.
18 so me ved tvo ubrigdelege ting, som Gud umogeleg kunde svika i, skulde hava ei sterk trøyst, me som flydde til å gripa den voni som ventar oss,
Mpo na yango, mpo ete, biso bato oyo totika nyonso mpo na kosimba elikya ete tokozwa biloko oyo alakaki biso, tolendisama makasi, Nzambe asalelaki makambo mibale oyo ebongwanaka te, oyo kati na yango ekoki kosalema te ete Nzambe akosa.
19 den me hev som eit anker for sjæli, eit som er trygt og fast og når inn um forhenget,
Mpo na biso, elikya yango ezali lokola longo ya bomoi na biso; epolaka te mpe esimba biso makasi, ekota kino koleka rido, kati penza na Esika-Oyo-Eleki-Bule
20 der Jesus gjekk inn som fyregangsmann for oss, med di han vart øvsteprest etter Melkisedeks vis til æveleg tid. (aiōn g165)
epai wapi Yesu akotaki mpo na biso lokola moto ya liboso, pamba te akomaki Mokonzi ya Banganga-Nzambe mpo na libela, kolanda molongo ya Melishisedeki. (aiōn g165)

< Hebreerne 6 >