< Banzembo 72 >

1 Nzembo ya Salomo. Oh Nzambe, pesa na mokonzi mayele na Yo; mpe na mwana ya mokonzi, bosembo na Yo!
Van Salomon. Geef aan den Koning uw rechtsmacht, o God, En uw gerechtigheid aan den Zoon van den Koning;
2 Tika ete asambisa bato na Yo na bosembo; mpe babola na Yo, kolanda boyengebene.
Opdat Hij uw volk met rechtvaardigheid richte, En uw misdeelden volgens recht.
3 Bangomba milayi ekomemela bato kimia; mpe bangomba mike, bosembo.
De bergen zullen de vrede brengen, De heuvelen gerechtigheid voor het volk;
4 Akokota likambo ya babola kati na bato, akobikisa bana ya moto akelela mpe akobebisa monyokoli.
Hij zal recht verschaffen aan het volk in verdrukking, De armen helpen, maar den verdrukker vertrappen.
5 Bongo bakotosa Yo tango nyonso moyi ekongala, tango nyonso sanza ekongenga, na bikeke nyonso.
Hij zal leven, zolang de zon blijft stralen, Met de maan van geslacht tot geslacht;
6 Tika ete azala lokola mvula oyo ezali konoka na bilanga oyo balongoli matiti, lokola mamwe oyo ezali kopolisa mabele.
Hij zal neerdalen als regen op de beemden, Als een bui, die de aarde besproeit.
7 Na tango na ye, moto ya sembo akokende liboso, mpe kimia ekofuluka kino sanza ekongenga lisusu te.
In zijn dagen zal de gerechtigheid bloeien, En een volheid van vrede, totdat de maan niet meer schijnt.
8 Tika ete akonza longwa na ebale moko ya monene kino na ebale mosusu ya monene, longwa na ebale Efrate kino na suka ya mokili.
Van zee tot zee zal Hij heersen, Van de Eufraat tot de grenzen der aarde.
9 Bavandi ya esobe bakofukama liboso na ye, mpe banguna na ye bakolembola putulu.
Zijn tegenstanders zullen de knie voor Hem buigen, Zijn vijanden in het stof moeten bijten;
10 Bakonzi ya Tarsisi mpe ya bisanga bakomemela ye mpako ya mokonzi, bakonzi ya Saba mpe ya Seba bakopesa ye makabo.
De koningen van Tarsjisj en zijn kusten, Zullen Hem geschenken brengen. De koningen van Sjeba en Seba Zullen Hem hun schatting betalen;
11 Bakonzi nyonso bakofukama liboso na ye, mpe bikolo nyonso ekosalela ye.
Alle vorsten Hem huldigen, Alle volken Hem dienen.
12 Pamba te akokangola moto akelela oyo azali koganga mpo na kosenga lisungi, mpe mobola oyo azangi mosungi.
Want Hij zal den arme tegen den rijke beschermen, En den verdrukte, die geen helper meer heeft;
13 Akoyokela mobola mpe moto akelela mawa, mpe akobikisa moto akelela na kufa;
Zich over den zwakke en arme ontfermen, En uitkomst brengen aan de misdeelden.
14 akosikola bango na minyoko mpe na makambo na kanza, pamba te bomoi na bango ezali motuya na miso na ye.
Hij zal ze verlossen van druk en geweld, En hun bloed zal kostbaar zijn in zijn ogen;
15 Akozala na bomoi, bakopesa ye wolo ya Saba. Bakobanda kosambela mpo na ye tango nyonso mpe kopambola ye mikolo nyonso.
Hij zal ze doen leven, en het goud van Sjeba hun schenken, Steeds voor hen bidden, ze iedere dag zegenen.
16 Tika ete ble etonda kati na mokili, mbuma na yango ebota ebele na likolo ya bangomba lokola Libani! Wuta na engumba, bato bakozala na bofuluki lokola matiti ya elanga.
Dan zal er een overvloed van koren zijn in het land, Het zal wuiven op de toppen der bergen; Zijn aren zullen als de Libanon bloeien, En de halmen als het kruid op het veld.
17 Tika ete kombo na ye ewumela libela na libela, ewumela tango nyonso moyi ekozala, mpo ete bato bakoma kotangaka kombo na ye wana bakobanda kopambolanaka, mpe bikolo nyonso ekoma kobengaka ye: moto ya esengo.
Zijn Naam zij voor eeuwig gezegend, Zolang de zon schijnt, heerse zijn Naam: Alle volkeren zullen zich daarmee zegenen, Alle geslachten der aarde hem loven!
18 Tika ete Yawe Nzambe oyo asalaka Ye moko bikamwa, Nzambe ya Isalaele, apambolama!
Gezegend zij Jahweh, lsraëls God, Die wonderen doet, Hij alleen!
19 Tika ete Kombo na Ye ya nkembo epambolama libela na libela! Tika ete mokili mobimba etonda na nkembo na Ye! Amen! Amen!
Gezegend voor eeuwig zijn heerlijke Naam, Heel de aarde worde vervuld van zijn glorie! Amen, Amen!
20 Mabondeli ya Davidi, mwana mobali ya Izayi, esuki awa.
Einde der gebeden van David, den zoon van Jesse.

< Banzembo 72 >