< Banzembo 114 >

1 Tango Isalaele abimaki wuta na Ejipito, tango libota ya Jakobi elongwaki na ekolo ya bapaya, 2 Yuda ekomaki Esika ya bule ya Yawe, mpe Isalaele ekomaki mabele na Ye. 3 Ebale monene emonaki yango mpe ekimaki, mayi ya Yordani ezongaki na sima, 4 bangomba epumbwaki lokola bameme, bangomba mike epumbwaki lokola bana ya ntaba. 5 Ebale monene, nini ezalaki kati na yo mpo ete okima? Yordani, mpo na nini ozongaki na sima? 6 Bino bangomba, mpo nini bopumbwaki lokola bameme? Bongo bino bangomba mike, mpo na nini bopumbwaki lokola bana ya ntaba? 7 Mokili, lenga liboso ya Yawe, liboso ya Nzambe ya Jakobi, 8 oyo abongolaka libanga monene liziba, mpe libanga etima.

< Banzembo 114 >