< Banzembo 113 >

1 Bokumisa Yawe! Bino basali ya Yawe, bokumisa Ye; bokumisa Yawe! 2 Tika ete Kombo ya Yawe epambolama kobanda sik’oyo kino libela na libela! 3 Longwa na este kino na weste, tika ete Kombo ya Yawe epambolama! 4 Yawe azali na likolo ya bikolo nyonso, nkembo na Ye ezali na likolo koleka Lola. 5 Nani akokani na Yawe, Nzambe na biso, oyo avandi na Kiti ya Bokonzi kati na bisika oyo eleki likolo? 6 Agumbamaka mpo na kotala likolo mpe mokili. 7 Wuta na putulu, atombolaka moto oyo akelela; wuta na fulu ya matiti, abimisaka mobola 8 mpo na kovandisa ye esika moko na bakambi, na bankumu ya bato na Ye. 9 Avandisaka mwasi ekomba kati na ndako na ye, lokola mama ya esengo kati na bana na ye. Bokumisa Yawe!

< Banzembo 113 >