< Masese 2 >

1 Mwana na ngai, soki ondimi maloba na ngai mpe obateli kati na motema na yo mibeko na ngai;
My son, if you will receive my words, and store up my commandments within you;
2 soki opesi litoyi na yo na maloba ya bwanya mpe okabi motema na yo na makambo ya mayele;
So as to turn your ear to wisdom, and apply your heart to understanding;
3 soki obeleli mayele mpe ogangi epai ya bososoli;
Yes, if you call out for discernment, and lift up your voice for understanding;
4 soki oluki yango penza ndenge balukaka palata to bomengo oyo ebombama,
If you seek her as silver, and search for her as for hidden treasures:
5 okososola solo soki kotosa Yawe elakisi nini mpe okozwa boyebi ya Nzambe.
then you will understand the fear of Jehovah, and find the knowledge of God.
6 Pamba te Yawe nde apesaka bwanya, mpe maloba ya monoko na Ye epesaka mayele mpe bososoli.
For Jehovah gives wisdom. Out of his mouth comes knowledge and understanding.
7 Abongiselaka bato ya sembo elonga mpe azali nguba ya bato oyo batambolaka na bosembo.
He lays up sound wisdom for the upright. He is a shield to those who walk in integrity;
8 Pamba te abatelaka bayengebene mpe nzela ya bato oyo batosaka Ye.
that he may guard the paths of justice, and preserve the way of his faithful ones.
9 Boye, okososola likambo nini ezali solo, alima, sembo: nzela nyonso oyo ememaka na bolamu.
Then you will understand righteousness and justice, equity and every good path.
10 Pamba te bwanya ekokota kati na motema na yo mpe boyebi ekosepelisa molimo na yo.
For wisdom will enter into your heart. Knowledge will be pleasant to your soul.
11 Bososoli ekobatela yo, mpe mayele ekobomba yo
Discretion will watch over you. Understanding will keep you,
12 mpo na kobikisa yo na nzela mabe, na moto oyo alobaka makambo ezanga tina,
to deliver you from the way of evil, from the men who speak perverse things;
13 na bato oyo batikaka nzela ya sembo mpo na kolanda nzela ya molili,
who forsake the paths of uprightness, to walk in the ways of darkness;
14 na bato oyo basepelaka kosala mabe, na bato oyo bazalaka na esengo ya kokota na bozindo ya mabe,
who rejoice to do evil, and delight in the perverseness of evil;
15 na bato oyo nzela na bango etengama-tengama mpe etamboli na bango etonda na mobulu.
who are crooked in their ways, and wayward in their paths:
16 Bwanya ekobikisa yo lisusu liboso ya mwasi mopaya, liboso ya mwasi oyo atonda na maloba ya sukali,
To deliver you from the strange woman, even from the foreigner who flatters with her words;
17 oyo akima mobali na ye ya bolenge mpe abosana boyokani oyo asalaki elongo na Nzambe na ye;
who forsakes the friend of her youth, and forgets the covenant of her God:
18 pamba te ndako na ye ememaka na kufa, mpe nzela na ye ememaka na mboka ya bakufi.
for her house leads down to death, her paths to the dead.
19 Moto moko te oyo akotaka epai na ye azongaka mpe amonaka lisusu nzela ya bomoi.
None who go to her return again, neither do they attain to the paths of life:
20 Boye, okotambola na nzela ya bato malamu mpe okolanda nzela ya bato ya sembo.
that you may walk in the way of good men, and keep the paths of the righteous.
21 Pamba te bato ya sembo bakovanda na mokili, mpe bato oyo bazangi pamela bakotikala kati na yango;
For the upright will dwell in the land. The perfect will remain in it.
22 kasi bato mabe bakokufa na mokili mpe bakolongola bango kati na mokili ya bato ya songisongi.
But the wicked will be cut off from the land. The treacherous will be uprooted out of it.

< Masese 2 >