< Luka 17 >

1 Yesu alobaki na bayekoli na Ye: — Makambo oyo ebetisaka bato mabaku ekoki kozanga te; kasi mawa na moto oyo, na nzela na ye, makambo yango eyaka!
And Jesus said to his disciples: It cannot be, but that offences will come: but woe to him, by whom they come.
2 Ekoleka malamu mpo na ye kokanga ye libanga monene ya enikelo, na kingo mpe kobwaka ye na ebale, na esika ya kotika ye kokweyisa na masumu moko kati na bana mike oyo.
Better for him were it, if a millstone were suspended to his neck, and he cast into the sea, than that he should cause one of these little ones to stumble.
3 Bosala penza keba mpo na bolamu na bino! Soki ndeko na yo asali yo mabe, pamela ye; mpe soki ayoki mawa mpo na mabe yango, limbisa ye.
Take heed to yourselves. If thy brother transgress, rebuke him; and if he repent, forgive him.
4 Mpe soki, na mokolo moko, asali yo mabe mbala sambo, mpe ayei epai na yo mbala sambo koloba na yo: « Nayoki mawa mpo na mabe na ngai, » limbisa ye!
And if he shall offend against thee seven times in a day, and, seven times in a day, shall turn himself to thee, and say, I repent; forgive him.
5 Bantoma balobaki na Nkolo: — Bakisa kondima na biso!
And the Legates said to our Lord: Increase our faith.
6 Nkolo azongisaki: — Soki bozali na kondima oyo ezali moke lokola mbuma ya mutarde, bokoki koloba na nzete oyo: « Pikolama na esika oyo mpe kende komilona kati na ebale, » mpe ekotosa bino.
He said to them: If ye had faith like a grain of mustard seed, ye might say to this mulberry-tree, Be thou torn up by the roots, and be thou planted in the sea; and it would obey you.
7 Nani kati na bino, soki azali na mosali bilanga to na mobateli bibwele, akoloba na ye tango azongi wuta na bilanga: « Yaka noki, vanda na mesa mpo ete olia? »
Which of you, having a servant driving a yoke of oxen, or tending sheep, will say to him when he cometh from the field, Pass on at once, and recline for supper?
8 Boni, akoloba na ye te: « Lambela ngai bilei, lata bilamba na yo ya mosala mpo na kotiela ngai biloko na mesa, kino nasilisa kolia mpe komela; sima na yango nde yo mpe okoki kolia mpe komela? »
But he will say to him: Prepare for me what I may sup upon, and gird thy loins and serve me, until I have eaten and drunken; and afterwards thou shalt eat and drink.
9 Boni, akozongisela mosali wana matondi mpo ete asali mosala oyo atindaki ye?
Hath he thanks for him, because the servant did what was commanded him? I think not.
10 Ndenge moko mpe mpo na bino: soki bosali nyonso oyo batindi bino, boloba: « Tozali basali ya pamba, tokokisi kaka mokumba na biso. »
So also ye, when ye have done all the things commanded you, say: We are unprofitable servants, for we have done only what we were obligated to do.
11 Wana Yesu azalaki kokende na Yelusalemi, alekaki na mondelo kati na Samari mpe na Galile.
And it occurred as Jesus advanced towards Jerusalem, that he passed among the Samaritans into Galilee.
12 Lokola azalaki kokota na mboka moko, bato na maba zomi bayaki kokutana na Ye; batelemaki na mosika
And when he drew near to enter a certain village, there met him ten leprous men; and they stood at a distance,
13 mpe babandaki kobelela Ye na mongongo makasi: — Mokonzi, Yesu, yokela biso mawa!
and raised their voice, and said: Our Rabbi, Jesus, have compassion upon us.
14 Tango Yesu amonaki bango, alobaki: — Bokende komilakisa epai ya Banganga-Nzambe! Wana bazalaki kokende kuna, bakomaki peto.
And when he had looked upon them, he said to them: Go, show yourselves to the priests. And as they were going, they were cleansed.
15 Tango moko kati na bango amonaki ete abiki na bokono na ye, azongaki na kokumisa Nzambe na mongongo makasi.
And one of them, when he saw that he was cleansed, returned, and with a loud voice, glorified God.
16 Afukamaki na makolo ya Yesu, elongi kino na se, mpe azongiselaki Ye matondi. Moto yango azalaki moto ya Samari.
And he fell on his face, at the feet of Jesus, and thanked him. And he was a Samaritan.
17 Bongo Yesu atunaki: — Boni, bango nyonso zomi bakomi peto te? Wapi bato mosusu libwa?
And Jesus answered, and said: Were they not ten who were cleansed? Where are the nine?
18 Moko te azongi mpo na kopesa Nzambe nkembo, longola kaka mopaya oyo?
Have they so gone as not to come and give glory to God; except this one, who is of another nation?
19 Bongo alobaki na moto yango ya Samari: — Telema mpe kende; kondima na yo ebikisi yo!
And he said to him; Arise, and go: thy faith hath given thee life.
20 Mokolo moko, Bafarizeo batunaki Yesu: — Bokonzi ya Nzambe ekoya tango nini? Yesu azongiselaki bango: — Bokonzi ya Nzambe ekoya te na lolenge ete bato bamona yango.
And as some of the Pharisees asked him, When the kingdom of God would come; he answered, and said to them: The kingdom of God will not come with observables.
21 Bakoloba te: « Ezali awa » to « Ezali kuna, » pamba te Bokonzi ya Nzambe ezali kati na bino.
And they will not say: Behold, here it is! or, Behold, it is there! For lo, the kingdom of God is within you
22 Bongo alobaki na bayekoli na Ye: — Tango ezali koya, tango oyo bokozala na posa makasi ya komona ata mokolo moko kati na mikolo ya Mwana na Moto, kasi bokomona yango te.
And he said to his disciples: The days will come, when ye will long to see one of the days of the Son of man, and ye will not see them.
23 Bakoloba na bino: « Azali awa! » to « Azali kuna! » Bolanda bango te!
And if they shall say to you: Lo, here he is! or, Lo, there he is! go not forth.
24 Pamba te, na mokolo na Ye, Mwana na Moto akozala lokola mokalikali oyo epeli mpe engengisi likolo longwa na este kino na weste.
For, as the lightning darteth from the heavens, and illuminateth all beneath the heavens; so will the Son of man be, in his day.
25 Kasi liboso ete mokolo yango ekoma, asengeli komona pasi mingi, mpe bato ya ekeke oyo basengeli koboya Ye.
But, previously, he is to suffer many things, and to be rejected by this generation.
26 Ndenge esalemaki na tango ya Noa, ndenge wana mpe ekosalema na tango ya Mwana na Moto:
And as it was in the days of Noah, so will it be in the days of the Son of man.
27 bato bazalaki kolia, komela, kobala mpe kobalisa, kino na mokolo oyo Noa akotaki na masuwa; bongo mpela eyaki mpe ebomaki bango nyonso.
They ate and drank, they took wives and were given to husbands, until the day that Noah entered the ark; and the flood came, and destroyed every one.
28 Ezalaki mpe bongo na tango ya Loti: bato bazalaki kolia, komela, kosomba, koteka, kolona mpe kotonga.
And again, as it was in the days of Lot; they ate and drank, bought and sold, planted and built.
29 Kasi na mokolo oyo Loti abimaki wuta na Sodome, mvula ya moto mpe ya fofolo ekitaki wuta na likolo mpe ebomaki bango nyonso.
But in the day that Lot went out of Sodom, the Lord rained fire and sulphur from heaven, and destroyed them all.
30 Ekozala mpe bongo, na mokolo oyo Mwana na Moto akomonana.
Thus will it be, in the day when the Son of man shall be revealed.
31 Na mokolo yango, moto oyo akozala na likolo ya ndako na ye asengeli te kokita mpo na kozwa biloko kati na ndako na ye, mpe moto oyo akozala kati na bilanga na ye asengeli te kozonga na ndako mpo na likambo songolo.
In that day, let him that is on the house-top, and his goods in the house, not come down to take them: and let him that is in the field, not return after what is behind him.
32 Bokanisa makambo oyo ekomelaki mwasi ya Loti!
Remember Lot's wife.
33 Moto oyo akoluka kobatela bomoi na ye akobungisa yango, mpe moto oyo akobungisa bomoi na ye akobatela yango.
He that desireth to preserve his life, will lose it; and he that will lose his life, shall preserve it.
34 Nazali koloba na bino: na butu wana, bato mibale bakozala na likolo ya mbeto moko: moko akokamatama, mpe mosusu akotikala;
I tell you, that, in that night, two will be in one bed; one will be taken, and the other left.
35 basi mibale bakozala konika bambuma elongo: moko akokamatama, mpe mosusu akotikala; [
And two females will be grinding together; one will be taken, and the other left.
36 mibali mibale bakozala kati na elanga moko: moko akokamatama, mpe mosusu akotikala.]
Two men will be in the field; one will be taken, and the other left.
37 Bayekoli batunaki Yesu: — Nkolo, makambo yango ekosalema wapi? Yesu azongiselaki bango: — Epai ebembe ezali, kuna nde bandeke oyo eliaka bibembe ekosangana.
They answered, and said to him: Whither, our Lord? He said to them: Where the body is, there will the eagles assemble themselves.

< Luka 17 >