< Luka 17 >

1 Yesu alobaki na bayekoli na Ye: — Makambo oyo ebetisaka bato mabaku ekoki kozanga te; kasi mawa na moto oyo, na nzela na ye, makambo yango eyaka! 2 Ekoleka malamu mpo na ye kokanga ye libanga monene ya enikelo, na kingo mpe kobwaka ye na ebale, na esika ya kotika ye kokweyisa na masumu moko kati na bana mike oyo. 3 Bosala penza keba mpo na bolamu na bino! Soki ndeko na yo asali yo mabe, pamela ye; mpe soki ayoki mawa mpo na mabe yango, limbisa ye. 4 Mpe soki, na mokolo moko, asali yo mabe mbala sambo, mpe ayei epai na yo mbala sambo koloba na yo: « Nayoki mawa mpo na mabe na ngai, » limbisa ye! 5 Bantoma balobaki na Nkolo: — Bakisa kondima na biso! 6 Nkolo azongisaki: — Soki bozali na kondima oyo ezali moke lokola mbuma ya mutarde, bokoki koloba na nzete oyo: « Pikolama na esika oyo mpe kende komilona kati na ebale, » mpe ekotosa bino. 7 Nani kati na bino, soki azali na mosali bilanga to na mobateli bibwele, akoloba na ye tango azongi wuta na bilanga: « Yaka noki, vanda na mesa mpo ete olia? » 8 Boni, akoloba na ye te: « Lambela ngai bilei, lata bilamba na yo ya mosala mpo na kotiela ngai biloko na mesa, kino nasilisa kolia mpe komela; sima na yango nde yo mpe okoki kolia mpe komela? » 9 Boni, akozongisela mosali wana matondi mpo ete asali mosala oyo atindaki ye? 10 Ndenge moko mpe mpo na bino: soki bosali nyonso oyo batindi bino, boloba: « Tozali basali ya pamba, tokokisi kaka mokumba na biso. » 11 Wana Yesu azalaki kokende na Yelusalemi, alekaki na mondelo kati na Samari mpe na Galile. 12 Lokola azalaki kokota na mboka moko, bato na maba zomi bayaki kokutana na Ye; batelemaki na mosika 13 mpe babandaki kobelela Ye na mongongo makasi: — Mokonzi, Yesu, yokela biso mawa! 14 Tango Yesu amonaki bango, alobaki: — Bokende komilakisa epai ya Banganga-Nzambe! Wana bazalaki kokende kuna, bakomaki peto. 15 Tango moko kati na bango amonaki ete abiki na bokono na ye, azongaki na kokumisa Nzambe na mongongo makasi. 16 Afukamaki na makolo ya Yesu, elongi kino na se, mpe azongiselaki Ye matondi. Moto yango azalaki moto ya Samari. 17 Bongo Yesu atunaki: — Boni, bango nyonso zomi bakomi peto te? Wapi bato mosusu libwa? 18 Moko te azongi mpo na kopesa Nzambe nkembo, longola kaka mopaya oyo? 19 Bongo alobaki na moto yango ya Samari: — Telema mpe kende; kondima na yo ebikisi yo! 20 Mokolo moko, Bafarizeo batunaki Yesu: — Bokonzi ya Nzambe ekoya tango nini? Yesu azongiselaki bango: — Bokonzi ya Nzambe ekoya te na lolenge ete bato bamona yango. 21 Bakoloba te: « Ezali awa » to « Ezali kuna, » pamba te Bokonzi ya Nzambe ezali kati na bino. 22 Bongo alobaki na bayekoli na Ye: — Tango ezali koya, tango oyo bokozala na posa makasi ya komona ata mokolo moko kati na mikolo ya Mwana na Moto, kasi bokomona yango te. 23 Bakoloba na bino: « Azali awa! » to « Azali kuna! » Bolanda bango te! 24 Pamba te, na mokolo na Ye, Mwana na Moto akozala lokola mokalikali oyo epeli mpe engengisi likolo longwa na este kino na weste. 25 Kasi liboso ete mokolo yango ekoma, asengeli komona pasi mingi, mpe bato ya ekeke oyo basengeli koboya Ye. 26 Ndenge esalemaki na tango ya Noa, ndenge wana mpe ekosalema na tango ya Mwana na Moto: 27 bato bazalaki kolia, komela, kobala mpe kobalisa, kino na mokolo oyo Noa akotaki na masuwa; bongo mpela eyaki mpe ebomaki bango nyonso. 28 Ezalaki mpe bongo na tango ya Loti: bato bazalaki kolia, komela, kosomba, koteka, kolona mpe kotonga. 29 Kasi na mokolo oyo Loti abimaki wuta na Sodome, mvula ya moto mpe ya fofolo ekitaki wuta na likolo mpe ebomaki bango nyonso. 30 Ekozala mpe bongo, na mokolo oyo Mwana na Moto akomonana. 31 Na mokolo yango, moto oyo akozala na likolo ya ndako na ye asengeli te kokita mpo na kozwa biloko kati na ndako na ye, mpe moto oyo akozala kati na bilanga na ye asengeli te kozonga na ndako mpo na likambo songolo. 32 Bokanisa makambo oyo ekomelaki mwasi ya Loti! 33 Moto oyo akoluka kobatela bomoi na ye akobungisa yango, mpe moto oyo akobungisa bomoi na ye akobatela yango. 34 Nazali koloba na bino: na butu wana, bato mibale bakozala na likolo ya mbeto moko: moko akokamatama, mpe mosusu akotikala; 35 basi mibale bakozala konika bambuma elongo: moko akokamatama, mpe mosusu akotikala; [ 36 mibali mibale bakozala kati na elanga moko: moko akokamatama, mpe mosusu akotikala.] 37 Bayekoli batunaki Yesu: — Nkolo, makambo yango ekosalema wapi? Yesu azongiselaki bango: — Epai ebembe ezali, kuna nde bandeke oyo eliaka bibembe ekosangana.

< Luka 17 >