< Yobo 7 >

1 Boni, bomoi ya moto awa na se ezali kaka bomoi ya pasi te? Mikolo ya bomoi na ye ezali penza mikolo ya mongamba te?
הלא-צבא לאנוש על- (עלי-) ארץ וכימי שכיר ימיו
2 Ndenge mowumbu azelaka pio ya pokwa to ndenge mongamba azelaka makasi lifuti na ye,
כעבד ישאף-צל וכשכיר יקוה פעלו
3 ngai nazwaki lokola libula, basanza ya pamba mpe babutu ya pasi na pasi.
כן הנחלתי לי ירחי-שוא ולילות עמל מנו-לי
4 Soki kaka nalali, nakomi komituna: ‹ Tango nini nakolamuka? › Mpe soki kaka nalamuki: ‹ Tango nini butu ekoya? › Nalembi komitungisa tango nyonso.
אם-שכבתי-- ואמרתי מתי אקום ומדד-ערב ושבעתי נדדים עדי-נשף
5 Nkusu mpe makwanza ezipi nzoto na ngai, poso ya nzoto na ngai ezoki-zoki bapota mpe ekomi kolumba solo.
לבש בשרי רמה וגיש (וגוש) עפר עורי רגע וימאס
6 Mikolo ya bomoi na ngai ezali koleka mbangu penza koleka tonga oyo mosali bilamba asalelaka; nakomi na suka, mpe elikya na ngai nyonso esili.
ימי קלו מני-ארג ויכלו באפס תקוה
7 Oh Nkolo, kobosana te ete bomoi na ngai ezali kaka pema ya pamba! Miso na ngai ekomona lisusu bolamu te.
זכר כי-רוח חיי לא-תשוב עיני לראות טוב
8 Liso oyo ezali komona ngai sik’oyo ekotikala komona ngai lisusu te; okoluka ngai, kasi nakozala lisusu te.
לא-תשורני עין ראי עיניך בי ואינני
9 Ndenge mapata ekendaka mpe elimwaka, ndenge wana mpe moto oyo akendaka na mboka ya bakufi azongaka lisusu te. (Sheol h7585)
כלה ענן וילך כן יורד שאול לא יעלה (Sheol h7585)
10 Akozonga lisusu te na ndako na ye, mpe ndako na ye ekoyeba ye lisusu te.
לא-ישוב עוד לביתו ולא-יכירנו עוד מקמו
11 Yango wana, nakokanga monoko na ngai te, molimo na ngai ekoloba kaka na mawa, mpe motema na ngai ekolela kaka pasi na ngai.
גם-אני לא אחשך-פי אדברה בצר רוחי אשיחה במר נפשי
12 Boni, nakomi ebale to elima ya mayi mpo ete batiela ngai bikangiseli?
הים-אני אם-תנין כי-תשים עלי משמר
13 Nakanisaka ete soki nalali, mbeto na ngai ekobondisa ngai mpe pongi ekokitisa pasi na ngai;
כי-אמרתי תנחמני ערשי ישא בשיחי משכבי
14 nzokande, ozali lisusu kotungisa ngai na bandoto ya mabe mpe kobangisa ngai na bimoniseli ya somo.
וחתתני בחלמות ומחזינות תבעתני
15 Malamu bafina ngai kingo mpe nakufa, pamba te kufa ezali na litomba koleka bomoi oyo.
ותבחר מחנק נפשי מות מעצמותי
16 Nayini bomoi na ngai; nawumela libela te na bomoi! Tika ngai kimia, pamba te mikolo na ngai ezanga na yango tina.
מאסתי לא-לעלם אחיה חדל ממני כי-הבל ימי
17 Moto azali penza nani mpo ete okanisaka ye, mpo ete olandelaka ye na bokebi,
מה-אנוש כי תגדלנו וכי-תשית אליו לבך
18 mpo ete otalaka ye tango nyonso mpe omekaka ye tango nyonso?
ותפקדנו לבקרים לרגעים תבחננו
19 Mpo na nini okoki kolongola miso na Yo te likolo na ngai? Mpo na nini okoki kotika ngai kimia te ata mpo na ngonga moke?
כמה לא-תשעה ממני לא-תרפני עד-בלעי רקי
20 Oh Mokeli na ngai, soki nasali lisumu, eloko nini ngai nasali Yo? Mpo na nini oponi kaka kobeta ngai? Boni, nakomi mokumba mpo na Yo?
חטאתי מה אפעל לך-- נצר האדם למה שמתני למפגע לך ואהיה עלי למשא
21 Mpo na nini ozali kolimbisa mabunga na ngai te mpe ozali kobosana masumu na ngai te? Kala mingi te, nakokende kolala na putulu; okoluka ngai, kasi nakozala lisusu te. »
ומה לא-תשא פשעי-- ותעביר את-עוני כי-עתה לעפר אשכב ושחרתני ואינני

< Yobo 7 >