< Ezayi 18 >

1 Mawa na mokili oyo ezali na bamasuwa oyo ezalaka na bavwale lokola mabanki, bongo enanaka na ebale ya Kushi!
οὐαὶ γῆς πλοίων πτέρυγες ἐπέκεινα ποταμῶν Αἰθιοπίας
2 Mawa na yo oyo otindaka bantoma na nzela ya ebale kati na bamasuwa oyo basala na papirisi, na likolo ya ebale monene! Bino bapanzi sango ya mbangu, bokende epai ya bato ya ekolo oyo bazalaka milayi mpe baposo ya nzoto na bango engengaka, epai ya bato ya ekolo oyo babangisaka na mosika, bato ya makasi oyo banyataka banguna na bango, mpe oyo bibale eleka kati na mokili na bango.
ὁ ἀποστέλλων ἐν θαλάσσῃ ὅμηρα καὶ ἐπιστολὰς βυβλίνας ἐπάνω τοῦ ὕδατος πορεύσονται γὰρ ἄγγελοι κοῦφοι πρὸς ἔθνος μετέωρον καὶ ξένον λαὸν καὶ χαλεπόν τίς αὐτοῦ ἐπέκεινα ἔθνος ἀνέλπιστον καὶ καταπεπατημένον νῦν οἱ ποταμοὶ τῆς γῆς
3 Bino nyonso, bavandi ya mokili, bino oyo botondisi mabele, tango bakotombola bendele na likolo ya bangomba, bokomona; tango bakobeta kelelo, bokoyoka!
πάντες ὡς χώρα κατοικουμένη κατοικηθήσεται ἡ χώρα αὐτῶν ὡσεὶ σημεῖον ἀπὸ ὄρους ἀρθῇ ὡς σάλπιγγος φωνὴ ἀκουστὸν ἔσται
4 Pamba te, tala liloba oyo Yawe alobi na ngai: « Nakovanda kimia mpe nakotala wuta na ndako na Ngai, lokola kongala ya moyi to lokola mapata na tango ya molunge. »
ὅτι οὕτως εἶπέν μοι κύριος ἀσφάλεια ἔσται ἐν τῇ ἐμῇ πόλει ὡς φῶς καύματος μεσημβρίας καὶ ὡς νεφέλη δρόσου ἡμέρας ἀμήτου ἔσται
5 Mpo ete liboso ya kobuka bambuma, tango bafololo ya mike etikaka kobima mpe ekomaka bambuma mibesu oyo ekomi pene ya kotela, bakataka bitape na likwangola, babwakaka mpe batiaka pembeni bitape.
πρὸ τοῦ θερισμοῦ ὅταν συντελεσθῇ ἄνθος καὶ ὄμφαξ ἀνθήσῃ ἄνθος ὀμφακίζουσα καὶ ἀφελεῖ τὰ βοτρύδια τὰ μικρὰ τοῖς δρεπάνοις καὶ τὰς κληματίδας ἀφελεῖ καὶ κατακόψει
6 Bakosundola yango epai ya bandeke oyo eliaka misuni na likolo ya bangomba mpe epai ya banyama ya zamba. Bandeke minene ekolia yango na tango ya molunge mpe banyama ya zamba ekolia yango na tango ya malili.
καὶ καταλείψει ἅμα τοῖς πετεινοῖς τοῦ οὐρανοῦ καὶ τοῖς θηρίοις τῆς γῆς καὶ συναχθήσεται ἐπ’ αὐτοὺς τὰ πετεινὰ τοῦ οὐρανοῦ καὶ πάντα τὰ θηρία τῆς γῆς ἐπ’ αὐτὸν ἥξει
7 Na tango wana, bakomema bakado epai na Yawe, Mokonzi ya mampinga, wuta epai ya ekolo ya bato milayi oyo poso ya nzoto na bango engengaka, wuta epai ya ekolo ya bato oyo babangisaka na mosika, bato ya makasi oyo banyataka banguna na bango, mpe oyo bibale eleka kati na mokili na bango, bakomema bakado yango na ngomba Siona, esika oyo Kombo ya Yawe, Mokonzi ya mampinga, ezalaka.
ἐν τῷ καιρῷ ἐκείνῳ ἀνενεχθήσεται δῶρα κυρίῳ σαβαωθ ἐκ λαοῦ τεθλιμμένου καὶ τετιλμένου καὶ ἀπὸ λαοῦ μεγάλου ἀπὸ τοῦ νῦν καὶ εἰς τὸν αἰῶνα χρόνον ἔθνος ἐλπίζον καὶ καταπεπατημένον ὅ ἐστιν ἐν μέρει ποταμοῦ τῆς χώρας αὐτοῦ εἰς τὸν τόπον οὗ τὸ ὄνομα κυρίου σαβαωθ ἐπεκλήθη ὄρος Σιων

< Ezayi 18 >