< Ezayi 19 >

1 Maloba ya Yawe mpo na kosambisa Ejipito: Tala, Yawe amati likolo ya mapata oyo ekendaka mbangu, azali koya na Ejipito. Banzambe ya bikeko ya Ejipito ezali kolenga liboso na Ye mpe mitema ya bato ya Ejipito elembi-lembi kati na bango.
ὅρασις Αἰγύπτου ἰδοὺ κύριος κάθηται ἐπὶ νεφέλης κούφης καὶ ἥξει εἰς Αἴγυπτον καὶ σεισθήσεται τὰ χειροποίητα Αἰγύπτου ἀπὸ προσώπου αὐτοῦ καὶ ἡ καρδία αὐτῶν ἡττηθήσεται ἐν αὐτοῖς
2 « Nakosala ete bato ya Ejipito batelemelana bango na bango: ndeko akobundisa ndeko na ye, moninga akobundisa moninga na ye, engumba moko ekobundisa engumba mosusu, mpe mboka moko ekobundisa mboka mosusu.
καὶ ἐπεγερθήσονται Αἰγύπτιοι ἐπ’ Αἰγυπτίους καὶ πολεμήσει ἄνθρωπος τὸν ἀδελφὸν αὐτοῦ καὶ ἄνθρωπος τὸν πλησίον αὐτοῦ πόλις ἐπὶ πόλιν καὶ νομὸς ἐπὶ νομόν
3 Bato ya Ejipito bakosila mayele, mpe nakobebisa mabongisi na bango nyonso; bakokende kotuna toli epai ya banzambe ya bikeko, epai ya milimo ya bakufi, epai ya bato oyo basololaka na milimo ya bakufi mpe epai ya bato oyo balobaka makambo oyo ekoya.
καὶ ταραχθήσεται τὸ πνεῦμα τῶν Αἰγυπτίων ἐν αὐτοῖς καὶ τὴν βουλὴν αὐτῶν διασκεδάσω καὶ ἐπερωτήσουσιν τοὺς θεοὺς αὐτῶν καὶ τὰ ἀγάλματα αὐτῶν καὶ τοὺς ἐκ τῆς γῆς φωνοῦντας καὶ τοὺς ἐγγαστριμύθους
4 Nakokaba bato ya Ejipito na maboko ya bakonzi ya mitema mabe, mpe mokonzi moko ya kanda makasi akokonza bango, » elobi Nkolo Yawe, Mokonzi ya mampinga.
καὶ παραδώσω Αἴγυπτον εἰς χεῖρας ἀνθρώπων κυρίων σκληρῶν καὶ βασιλεῖς σκληροὶ κυριεύσουσιν αὐτῶν τάδε λέγει κύριος σαβαωθ
5 Mayi ya ebale monene ekokita, mpe mayi ya ebale ekosila mpe ekokawuka.
καὶ πίονται οἱ Αἰγύπτιοι ὕδωρ τὸ παρὰ θάλασσαν ὁ δὲ ποταμὸς ἐκλείψει καὶ ξηρανθήσεται
6 Mayi ya miluka ekokoma solo, mayi ya Ejipito ekokita mpe ekokawuka. Mpe lisusu, banzete oyo ebotaka na mayi ekokawuka,
καὶ ἐκλείψουσιν οἱ ποταμοὶ καὶ αἱ διώρυγες τοῦ ποταμοῦ καὶ ξηρανθήσεται πᾶσα συναγωγὴ ὕδατος καὶ ἐν παντὶ ἕλει καλάμου καὶ παπύρου
7 elongo na matiti oyo ezalaka pembeni ya Nili, na monoko ya ebale. Milona nyonso ya bilanga oyo ebotaka pembeni ya Nili ekokawuka mpe ekopumbwa na mopepe, eloko moko te ekotikala.
καὶ τὸ ἄχι τὸ χλωρὸν πᾶν τὸ κύκλῳ τοῦ ποταμοῦ καὶ πᾶν τὸ σπειρόμενον διὰ τοῦ ποταμοῦ ξηρανθήσεται ἀνεμόφθορον
8 Balobi mbisi bakonyokwama mpe bakokoma kolela, bato nyonso oyo babwakaka ndobo mpe minyama na ebale Nili bakokoma na pasi.
καὶ στενάξουσιν οἱ ἁλεεῖς καὶ στενάξουσιν πάντες οἱ βάλλοντες ἄγκιστρον εἰς τὸν ποταμόν καὶ οἱ βάλλοντες σαγήνας καὶ οἱ ἀμφιβολεῖς πενθήσουσιν
9 Bato oyo basalaka lino bakokufa soni ya makasi, mpe bato oyo batongaka bilamba bakotonda na mawa.
καὶ αἰσχύνη λήμψεται τοὺς ἐργαζομένους τὸ λίνον τὸ σχιστὸν καὶ τοὺς ἐργαζομένους τὴν βύσσον
10 Bato oyo basimbaka mokili bakokweya, mpe basali nyonso bakolemba nzoto.
καὶ ἔσονται οἱ διαζόμενοι αὐτὰ ἐν ὀδύνῃ καὶ πάντες οἱ τὸν ζῦθον ποιοῦντες λυπηθήσονται καὶ τὰς ψυχὰς πονέσουσιν
11 Bakambi ya Tsoani bakomi penza lokola bazoba, bato ya bwanya ya Faraon bakomi kopesa batoli oyo ezanga tina. Ndenge nini bokoki penza koloba na Faraon: « Ngai, nazali moko kati na bato ya bwanya, moyekoli ya bakonzi ya kala? »
καὶ μωροὶ ἔσονται οἱ ἄρχοντες Τάνεως οἱ σοφοὶ σύμβουλοι τοῦ βασιλέως ἡ βουλὴ αὐτῶν μωρανθήσεται πῶς ἐρεῖτε τῷ βασιλεῖ υἱοὶ συνετῶν ἡμεῖς υἱοὶ βασιλέων τῶν ἐξ ἀρχῆς
12 Wapi sik’oyo bato na yo ya bwanya? Tika ete balakisa yo mpe basosolisa yo makambo oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, abongisaki mpo na kotelemela Ejipito.
ποῦ εἰσιν νῦν οἱ σοφοί σου καὶ ἀναγγειλάτωσάν σοι καὶ εἰπάτωσαν τί βεβούλευται κύριος σαβαωθ ἐπ’ Αἴγυπτον
13 Bakambi ya Tsoani bakomi lokola bazoba, bakambi ya Mefisi bakomi kokanisa makambo ya lokuta; nzokande bango, makonzi ya bikolo ya bato ya Ejipito, nde bazali kobungisa bato ya Ejipito nzela.
ἐξέλιπον οἱ ἄρχοντες Τάνεως καὶ ὑψώθησαν οἱ ἄρχοντες Μέμφεως καὶ πλανήσουσιν Αἴγυπτον κατὰ φυλάς
14 Yawe atindeli bango molimo ya kizunguzungu: bango nde basalaki ete Ejipito ekoma kotenga-tenga na misala na yango nyonso ndenge moto oyo alangwe masanga atengaka-tengaka.
κύριος γὰρ ἐκέρασεν αὐτοῖς πνεῦμα πλανήσεως καὶ ἐπλάνησαν Αἴγυπτον ἐν πᾶσι τοῖς ἔργοις αὐτῶν ὡς πλανᾶται ὁ μεθύων καὶ ὁ ἐμῶν ἅμα
15 Eloko moko te ekosalema lisusu na Ejipito, ezala na moto to na mokila, na lindalala ya nzete ya mbila to na nzete oyo ebotaka na mayi.
καὶ οὐκ ἔσται τοῖς Αἰγυπτίοις ἔργον ὃ ποιήσει κεφαλὴν καὶ οὐράν ἀρχὴν καὶ τέλος
16 Na mokolo wana, bato ya Ejipito bakokoma lokola basi. Bakolenga na somo na koningana ya loboko oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, atomboli mpo na kotelemela bango.
τῇ δὲ ἡμέρᾳ ἐκείνῃ ἔσονται οἱ Αἰγύπτιοι ὡς γυναῖκες ἐν φόβῳ καὶ ἐν τρόμῳ ἀπὸ προσώπου τῆς χειρὸς κυρίου σαβαωθ ἣν αὐτὸς ἐπιβαλεῖ αὐτοῖς
17 Bongo mokili ya Yuda ekolengisa bato ya Ejipito na somo. Tango nyonso bakoyoka kombo ya Yuda, bakolenga na somo mpo na mabongisi nyonso oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, asalaki mpo na kotelemela bango.
καὶ ἔσται ἡ χώρα τῶν Ιουδαίων τοῖς Αἰγυπτίοις εἰς φόβητρον πᾶς ὃς ἐὰν ὀνομάσῃ αὐτὴν αὐτοῖς φοβηθήσονται διὰ τὴν βουλήν ἣν βεβούλευται κύριος ἐπ’ αὐτήν
18 Na mokolo wana, bingumba mitano kati na Ejipito ekokoma koloba lokota ya Bayuda mpe kolapa ndayi na Kombo na Yawe, Mokonzi ya mampinga. Bongo moko kati na yango ekobenga yango: Engumba ya moyi.
τῇ ἡμέρᾳ ἐκείνῃ ἔσονται πέντε πόλεις ἐν Αἰγύπτῳ λαλοῦσαι τῇ γλώσσῃ τῇ Χανανίτιδι καὶ ὀμνύουσαι τῷ ὀνόματι κυρίου πόλις‐ασεδεκ κληθήσεται ἡ μία πόλις
19 Na mokolo wana, bakotonga etumbelo moko na kati-kati ya Ejipito mpe bakotia likonzi moko lokola ekaniseli mpo na Yawe, na bandelo ya mokili.
τῇ ἡμέρᾳ ἐκείνῃ ἔσται θυσιαστήριον τῷ κυρίῳ ἐν χώρᾳ Αἰγυπτίων καὶ στήλη πρὸς τὸ ὅριον αὐτῆς τῷ κυρίῳ
20 Ekozala lokola elembo mpe litatoli mpo na Yawe, Mokonzi ya mampinga, na mokili ya Ejipito. Tango bakoganga epai na Yawe likolo na banyokoli na bango, akotindela bango mobikisi mpe mobundeli, mpe akobikisa bango.
καὶ ἔσται εἰς σημεῖον εἰς τὸν αἰῶνα κυρίῳ ἐν χώρᾳ Αἰγύπτου ὅτι κεκράξονται πρὸς κύριον διὰ τοὺς θλίβοντας αὐτούς καὶ ἀποστελεῖ αὐτοῖς κύριος ἄνθρωπον ὃς σώσει αὐτούς κρίνων σώσει αὐτούς
21 Boye, Yawe akomimonisa epai na bato ya Ejipito. Mpe na mokolo wana, bato ya Ejipito bakoyeba Yawe, bakogumbamela Ye na bambeka mpe na makabo ya bambuma; bakolapa ndayi na Kombo na Yawe mpe bakokokisa yango.
καὶ γνωστὸς ἔσται κύριος τοῖς Αἰγυπτίοις καὶ γνώσονται οἱ Αἰγύπτιοι τὸν κύριον ἐν τῇ ἡμέρᾳ ἐκείνῃ καὶ ποιήσουσιν θυσίας καὶ εὔξονται εὐχὰς τῷ κυρίῳ καὶ ἀποδώσουσιν
22 Kasi Yawe akobeta Ejipito na nzela ya bitumbu, akobeta yango mpe akobikisa yango. Bakozonga epai na Yawe, bongo akoyanola na kolela na bango mpe akobikisa bango.
καὶ πατάξει κύριος τοὺς Αἰγυπτίους πληγῇ μεγάλῃ καὶ ἰάσεται αὐτοὺς ἰάσει καὶ ἐπιστραφήσονται πρὸς κύριον καὶ εἰσακούσεται αὐτῶν καὶ ἰάσεται αὐτούς
23 Na mokolo wana, bakopasola nzela moko wuta na Ejipito kino na Asiri. Bato ya Asiri bakokoma koya na Ejipito, mpe bato ya Ejipito bakokoma koya na Asiri. Bato ya Ejipito mpe bato ya Asiri bakokoma kosala elongo losambo mpo na Yawe.
τῇ ἡμέρᾳ ἐκείνῃ ἔσται ὁδὸς Αἰγύπτου πρὸς Ἀσσυρίους καὶ εἰσελεύσονται Ἀσσύριοι εἰς Αἴγυπτον καὶ Αἰγύπτιοι πορεύσονται πρὸς Ἀσσυρίους καὶ δουλεύσουσιν οἱ Αἰγύπτιοι τοῖς Ἀσσυρίοις
24 Na mokolo wana, Isalaele akozala ekolo ya misato, sima na Ejipito mpe Asiri, lipamboli oyo Nzambe akomema na mokili.
τῇ ἡμέρᾳ ἐκείνῃ ἔσται Ισραηλ τρίτος ἐν τοῖς Ἀσσυρίοις καὶ ἐν τοῖς Αἰγυπτίοις εὐλογημένος ἐν τῇ γῇ
25 Yawe, Mokonzi ya mampinga, akopambola bango na maloba oyo: « Tika ete bopambolama: Ejipito, bato na Ngai; Asiri, misala ya maboko na Ngai, mpe Isalaele, libula na Ngai! »
ἣν εὐλόγησεν κύριος σαβαωθ λέγων εὐλογημένος ὁ λαός μου ὁ ἐν Αἰγύπτῳ καὶ ὁ ἐν Ἀσσυρίοις καὶ ἡ κληρονομία μου Ισραηλ

< Ezayi 19 >