< Ezekieli 38 >

1 Yawe alobaki na ngai:
ויהי דבר יהוה אלי לאמר
2 « Mwana na moto, talisa elongi na yo na ngambo ya Gogi, ya mokili ya Magogi, mokambi ya liboso ya Mesheki mpe ya Tubali! Sakola na tina ye mpo na kotelemela ye!
בן אדם שים פניך אל גוג ארץ המגוג--נשיא ראש משך ותבל והנבא עליו
3 Loba: ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Natombokeli yo, Gogi, mokambi ya liboso ya Mesheki mpe ya Tubali!
ואמרת כה אמר אדני יהוה הנני אליך גוג--נשיא ראש משך ותבל
4 Nakokembisa yo, nakotia yo bibende na mbanga, nakobimisa yo elongo na basoda na yo nyonso, mpunda na yo elongo na basoda oyo babundaka likolo ya bampunda: bango nyonso balata kitoko mpe batondi ebele, bamemi banguba minene mpe ya mike mpe bayebi malamu kosalela mipanga.
ושובבתיך ונתתי חחים בלחייך והוצאתי אותך ואת כל חילך סוסים ופרשים לבשי מכלול כלם--קהל רב צנה ומגן תפשי חרבות כלם
5 Basoda ya Persi, ya Kushi mpe ya Puti, ba-oyo nyonso bamemaka banguba ya mike mpe balataka bikoti ya bibende, bakosangana na bango;
פרס כוש ופוט אתם כלם מגן וכובע
6 Gomeri mpe mampinga na ye nyonso ya basoda; libota ya Togarima, wuta na suka ya etuka ya nor, elongo na mampinga na ye nyonso ya basoda, ebele ya bato ya bikolo, bakosangana na yo mpo na kosunga yo.
גמר וכל אגפיה--בית תוגרמה ירכתי צפון ואת כל אגפיו עמים רבים אתך
7 Milengela malamu mpe bongama, yo elongo na mampinga nyonso oyo esangani na yo! Yo nde okozala mokengeli na bango.
הכן והכן לך--אתה וכל קהלך הנקהלים עליך והיית להם למשמר
8 Na mikolo ekoya, okobengama mpo na kobunda; na mibu oyo ekoya, okokende kobundisa mokili oyo bavandi na yango, sima na bango kobika na mopanga, basangisaki bango kati na bikolo ebele, na likolo ya bangomba ya Isalaele, oyo ekufa mpe etikala lisusu na bato te wuta kala. Bakobima wuta na bikolo mosusu mpe bakovanda na kimia.
מימים רבים תפקד--באחרית השנים תבוא אל ארץ משובבת מחרב מקבצת מעמים רבים על הרי ישראל אשר היו לחרבה תמיד והיא מעמים הוצאה וישבו לבטח כלם
9 Yo mpe mampinga na yo nyonso, elongo na bikolo ebele oyo esanganaki na yo, bokomata mpe bokopusana lokola mopepe makasi, lokola lipata oyo ezipi mokili.
ועלית כשאה תבוא כענן לכסות הארץ תהיה--אתה וכל אגפיך ועמים רבים אותך
10 Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Na mokolo wana, makanisi ekobotama na motema na yo mpe okosala mabongisi ya mabe.
כה אמר אדני יהוה והיה ביום ההוא יעלו דברים על לבבך וחשבת מחשבת רעה
11 Okoloba: ‘Nakobundisa mikili oyo ebatelama malamu te, nakokende kino epai ya bato oyo bavandaka na boboto kati na kimia, bavandaka kati na bingumba oyo ezanga bamir, ezanga bikangelo mpe bikuke;
ואמרת אעלה על ארץ פרזות--אבוא השקטים ישבי לבטח כלם ישבים באין חומה ובריח ודלתים אין להם
12 nakokende koyiba mpe kozwa na makasi bomengo ya bitumba. Okobalola loboko na yo mpo na kobundisa bisika oyo ebeba, bongo bato bakoma lisusu kovanda kuna, bato oyo basangisa wuta na bikolo, oyo batonda na bibwele mpe na biloko ebele, oyo bavandaka na kati-kati ya mokili oyo.’
לשלל שלל ולבז בז--להשיב ידך על חרבות נושבות ואל עם מאסף מגוים עשה מקנה וקנין ישבי על טבור הארץ
13 Bato ya Seba, ya Dedani, bato ya mombongo ya Tarsisi, elongo na bamboka na yango nyonso ya mike bakoloba na yo: ‘Boni, oyei solo mpo na kozwa na makasi bomengo ya bitumba? Boni, osangisi mampinga na yo mpo na kobotola palata mpe komema wolo, mpo na kozwa bibwele mpe kobotola biloko to mpo na kozwa biloko ebele?’ ›
שבא ודדן וסחרי תרשיש וכל כפיריה יאמרו לך הלשלל שלל אתה בא הלבז בז הקהלת קהלך--לשאת כסף וזהב לקחת מקנה וקנין לשלל שלל גדול
14 Yango wana, mwana na moto, sakola! Loba na Gogi: ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Na mokolo wana, tango bato na Ngai, Isalaele, bakovanda na kimia, boni, okoyeba yango te?
לכן הנבא בן אדם ואמרת לגוג כה אמר אדני יהוה הלוא ביום ההוא בשבת עמי ישראל לבטח--תדע
15 Okowuta na bisika na yo, mosika kuna na etuka ya nor, yo mpe bikolo ebele elongo na yo; bango nyonso likolo ya bampunda, bato ebele, mampinga ya basoda ebele ya nguya.
ובאת ממקומך מירכתי צפון--אתה ועמים רבים אתך רכבי סוסים כלם קהל גדול וחיל רב
16 Okoya kobundisa libota na Ngai, Isalaele, ndenge mapata ezipaka mokili. Oh Gogi, na mikolo ekoya, nakosala ete obundisa mokili na Ngai mpo ete bikolo mosusu eyeba Ngai tango Ngai moko nakomonisa bosantu na Ngai na nzela na yo na miso na bango.
ועלית על עמי ישראל כענן לכסות הארץ באחרית הימים תהיה והבאותיך על ארצי למען דעת הגוים אתי בהקדשי בך לעיניהם גוג
17 Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Boni, ezali yo te oyo na tina na nani nalobelaki na tango ya kala na nzela ya basali na Ngai, basakoli ya Isalaele, oyo basakolaki na tango wana, na mibu ebele, ete nakotinda yo mpo ete obundisa bato na Ngai?
כה אמר אדני יהוה האתה הוא אשר דברתי בימים קדמונים ביד עבדי נביאי ישראל הנבאים בימים ההם שנים--להביא אתך עליהם
18 Na mokolo yango, mokolo oyo Gogi akobundisa mabele ya Isalaele, tala makambo oyo ekosalema: kanda na Ngai ekopela makasi, elobi Nkolo Yawe.
והיה ביום ההוא ביום בוא גוג על אדמת ישראל--נאם אדני יהוה תעלה חמתי באפי
19 Na zuwa mpe kanda na Ngai ya makasi, nalobi ete na tango wana, mabele ekoningana makasi kati na Isalaele.
ובקנאתי באש עברתי דברתי אם לא ביום ההוא יהיה רעש גדול על אדמת ישראל
20 Bambisi ya ebale, bandeke ya likolo, banyama ya zamba, bikelamu nyonso oyo etambolaka na libumu mpe bato nyonso oyo bazali awa na mabele bakolenga liboso na Ngai; bangomba ekopanzana, mabanga minene ekobukana mpe bamir nyonso ekokweya na mabele.
ורעשו מפני דגי הים ועוף השמים וחית השדה וכל הרמש הרמש על האדמה וכל האדם אשר על פני האדמה ונהרסו ההרים ונפלו המדרגות וכל חומה לארץ תפול
21 Nakobengisa mopanga mpo na kobundisa Gogi, na bangomba na Ngai nyonso, elobi Nkolo Yawe. Mopanga ya moto na moto ekoboma ndeko na ye.
וקראתי עליו לכל הרי חרב נאם אדני יהוה חרב איש באחיו תהיה
22 Nakotindela ye bokono oyo ebomaka mpe nakotangisa makila na ye lokola etumbu; nakotindela mampinga na ye mpe bikolo oyo ekosangana na ye mvula makasi, mvula ya mabanga mpe ya moto.
ונשפטתי אתו בדבר ובדם וגשם שוטף ואבני אלגביש אש וגפרית אמטיר עליו ועל אגפיו ועל עמים רבים אשר אתו
23 Na nzela wana, nakomonisa monene mpe bosantu na Ngai, mpe nakosala ete bato ya bikolo ebele bayeba Ngai; boye bakoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe. ›
והתגדלתי והתקדשתי ונודעתי לעיני גוים רבים וידעו כי אני יהוה

< Ezekieli 38 >