< Daniele 1 >

1 Na mobu ya misato ya bokonzi ya Yeoyakimi, mokonzi ya Yuda, Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, ayaki kobundisa Yelusalemi mpe azingelaki yango.
בשנת שלוש למלכות יהויקים מלך יהודה--בא נבוכדנאצר מלך בבל ירושלם ויצר עליה
2 Yawe akabaki Yeoyakimi, mokonzi ya Yuda, elongo na ndambo ya bisalelo ya Tempelo ya Nzambe na maboko ya Nabukodonozori. Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, amemaki bisalelo yango kati na tempelo ya nzambe na ye, na Shineari, mpe atiaki yango kati na ndako oyo babombelaka bomengo ya nzambe na ye.
ויתן אדני בידו את יהויקים מלך יהודה ומקצת כלי בית האלהים ויביאם ארץ שנער בית אלהיו ואת הכלים הביא בית אוצר אלהיו
3 Mokonzi apesaki mitindo epai ya Ashipenazi, mokonzi ya bakalaka na ye ya lokumu, ete ayeisa na Babiloni ndambo ya bana ya Isalaele oyo babotama na mabota ya bakonzi to ya bato ya lokumu,
ויאמר המלך לאשפנז רב סריסיו להביא מבני ישראל ומזרע המלוכה--ומן הפרתמים
4 bilenge mibali oyo banzoto na bango ezanga mbeba, ya bilongi kitoko, ya mayele mpe ya bwanya, oyo bazali na makoki ya koyekola kotanga mpe kokoma makambo ya ndenge na ndenge, oyo bazali na bososoli mpe bakoka mpo na kosala kati na ndako ya mokonzi; Ashipenazi asengelaki kolakisa bango koloba, kokoma mikanda mpe kotanga lokota ya bato ya Babiloni.
ילדים אשר אין בהם כל מאום וטובי מראה ומשכלים בכל חכמה וידעי דעת ומביני מדע ואשר כח בהם לעמד בהיכל המלך וללמדם ספר ולשון כשדים
5 Mokonzi akatelaki bango mpo na mokolo na mokolo, bilei oyo basengeli kolia mpe masanga oyo basengeli komela: nyonso ezalaki kowuta na mesa na ye. Mibu misato, basengelaki koyekola; na sima nde bakoki kosala mosala ya mokonzi.
וימן להם המלך דבר יום ביומו מפת בג המלך ומיין משתיו ולגדלם שנים שלוש ומקצתם--יעמדו לפני המלך
6 Kati na ndambo ya bato oyo bawutaki na Yuda, ezalaki na Daniele, Anania, Mikaeli mpe Azaria.
ויהי בהם מבני יהודה--דניאל חנניה מישאל ועזריה
7 Mokonzi ya bakalaka ya lokumu apesaki bango bakombo ya sika; apesaki Daniele kombo Belitsatsari; Anania, Shadraki; Mikaeli, Meshaki; mpe Azaria, Abedinego.
וישם להם שר הסריסים שמות וישם לדניאל בלטשאצר ולחנניה שדרך ולמישאל מישך ולעזריה עבד נגו
8 Daniele azwaki mokano ya koboya komikomisa mbindo na nzela ya bilei mpe ya vino ya mokonzi; ayebisaki mokonzi ya bakalaka ya lokumu ete apesa ye nzela te ya komikomisa mbindo na lolenge wana.
וישם דניאל על לבו אשר לא יתגאל בפת בג המלך וביין משתיו ויבקש משר הסריסים אשר לא יתגאל
9 Boye, Nzambe asalaki ete Daniele azwa ngolu mpe bolamu na miso ya mokonzi ya bakalaka ya lokumu.
ויתן האלהים את דניאל לחסד ולרחמים לפני שר הסריסים
10 Kasi mokonzi ya bakalaka ya lokumu alobaki na Daniele: — Nazali kobanga mokonzi, nkolo na ngai, oyo akateli bino bilei oyo bosengeli kolia mpe masanga oyo bosengeli komela! Mpo na nini bokolinga ete mokonzi amona bilongi na bino ekonda koleka bilongi ya bilenge mosusu ya mibu na bino? Bomoni te ete wana bokobomisa ngai epai ya mokonzi?
ויאמר שר הסריסים לדניאל--ירא אני את אדני המלך אשר מנה את מאכלכם ואת משתיכם אשר למה יראה את פניכם זעפים מן הילדים אשר כגילכם וחיבתם את ראשי למלך
11 Daniele alobaki na mosali oyo mokonzi ya bakalaka ya lokumu aponaki mpo ete abatela Daniele, Anania, Mikaeli mpe Azaria:
ויאמר דניאל אל המלצר--אשר מנה שר הסריסים על דניאל חנניה מישאל ועזריה
12 « Nabondeli yo, meka basali na yo mikolo zomi: pesa biso kaka bandunda lokola bilei mpe mayi mpo na komela; kopesa biso eloko mosusu te!
נס נא את עבדיך ימים עשרה ויתנו לנו מן הזרעים ונאכלה--ומים ונשתה
13 Sima na mikolo yango, okotala yo moko bilongi na biso mpe bilongi ya bilenge mosusu oyo bazali kolia bilei ya mokonzi; bongo okosala basali na yo ndenge yo moko okomona. »
ויראו לפניך מראינו ומראה הילדים האכלים את פת בג המלך וכאשר תראה עשה עם עבדיך
14 Mosala andimaki bosenga na bango mpe amekaki bango mikolo zomi.
וישמע להם לדבר הזה וינסם ימים עשרה
15 Sima na mikolo yango zomi, bakomaki bilongi kitoko mpe banzoto ngebungebu koleka bilenge oyo bazalaki kolia bilei ya mokonzi.
ומקצת ימים עשרה נראה מראיהם טוב ובריאי בשר מן כל הילדים--האכלים את פת בג המלך
16 Boye, mosali yango akomaki kotia pembeni bilei mpe vino oyo bazalaki kobongisela bango mpe kopesa bango kaka bandunda.
ויהי המלצר נשא את פת בגם ויין משתיהם ונתן להם זרענים
17 Nzambe apesaki bilenge wana minei boyebi mpe bososoli kati na makambo nyonso: koloba, kokoma, kotanga mikanda, mayele mpe bwanya. Mpe Daniele akomaki na makoki ya kolimbola bimoniseli mpe bandoto ya ndenge na ndenge.
והילדים האלה ארבעתם נתן להם האלהים מדע והשכל בכל ספר וחכמה ודניאל הבין בכל חזון וחלמות
18 Sima na mikolo oyo mokonzi akataki mpo ete bamemela ye bango, mokonzi ya bakalaka ya lokumu amemaki bango liboso ya Nabukodonozori.
ולמקצת הימים אשר אמר המלך להביאם ויביאם שר הסריסים לפני נבכדנצר
19 Mokonzi asololaki na bango; mpe kati na bilenge nyonso oyo bamemelaki ye, amonaki ete moko te akokani na Daniele, na Anania, na Mikaeli mpe na Azaria. Boye, bakomaki kosala kati na ndako ya mokonzi.
וידבר אתם המלך ולא נמצא מכלם כדניאל חנניה מישאל ועזריה ויעמדו לפני המלך
20 Na makambo nyonso oyo mokonzi azalaki kotuna bango, oyo ezalaki kosenga bwanya mpe bososoli, amonaki ete bazali mayele mbala zomi koleka bato ya soloka mpe ya maji ya mokili na ye mobimba.
וכל דבר חכמת בינה אשר בקש מהם המלך--וימצאם עשר ידות על כל החרטמים האשפים אשר בכל מלכותו
21 Mpe Daniele awumelaki kosala kati na ndako ya mokonzi kino na mobu ya liboso ya mokonzi Sirisi.
ויהי דניאל עד שנת אחת לכורש המלך

< Daniele 1 >