< Ezekieli 35 >

1 Yawe alobaki na ngai:
καὶ ἐγένετο λόγος κυρίου πρός με λέγων
2 « Mwana na moto, talisa elongi na yo na ngambo ya ngomba Seiri mpe sakola mpo na kotelemela yango!
υἱὲ ἀνθρώπου ἐπίστρεψον τὸ πρόσωπόν σου ἐπ’ ὄρος Σηιρ καὶ προφήτευσον ἐπ’ αὐτὸ
3 Loba: ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Natombokeli yo, ngomba Seiri! Nakosembola loboko na Ngai mpo na kotelemela yo mpe nakokomisa yo esobe mpe mokili oyo ezanga bato.
καὶ εἰπόν τάδε λέγει κύριος κύριος ἰδοὺ ἐγὼ ἐπὶ σέ ὄρος Σηιρ καὶ ἐκτενῶ τὴν χεῖρά μου ἐπὶ σὲ καὶ δώσω σε ἔρημον καὶ ἐρημωθήσῃ
4 Nakobebisa bingumba na yo, mpe okotikala lisusu na bato te; boye, okoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe.
καὶ ταῖς πόλεσίν σου ἐρημίαν ποιήσω καὶ σὺ ἔρημος ἔσῃ καὶ γνώσῃ ὅτι ἐγώ εἰμι κύριος
5 Lokola obokolaka tango nyonso koyina bana ya Isalaele kati na motema na yo mpe obomisaki bango na mopanga tango bazalaki na pasi makasi, na tango oyo bazwaki etumbu mpo na masumu na bango,
ἀντὶ τοῦ γενέσθαι σε ἐχθρὰν αἰωνίαν καὶ ἐνεκάθισας τῷ οἴκῳ Ισραηλ δόλῳ ἐν χειρὶ ἐχθρῶν μαχαίρᾳ ἐν καιρῷ ἀδικίας ἐπ’ ἐσχάτῳ
6 na Kombo na Ngai, elobi Nkolo Yawe, nakosopa makila na yo, mpe makila ekolanda yo. Lokola ozalaki na somo te ya kosopa makila, makila ekolanda yo.
διὰ τοῦτο ζῶ ἐγώ λέγει κύριος κύριος εἰ μὴν εἰς αἷμα ἥμαρτες καὶ αἷμά σε διώξεται
7 Nakokomisa ngomba Seiri esika oyo ebebisama nye mpe ezanga bato; mpe nakoboma kuna bato nyonso oyo bakoluka kokende mpe kozonga.
καὶ δώσω τὸ ὄρος Σηιρ εἰς ἔρημον καὶ ἠρημωμένον καὶ ἀπολῶ ἀπ’ αὐτοῦ ἀνθρώπους καὶ κτήνη
8 Nakotondisa bangomba na yango nyonso na bibembe; bato nyonso oyo bakokufa na mopanga bakokweya na bangomba na yo ya mike, kati na mabwaku na yo mpe na se ya bangomba na yo nyonso.
καὶ ἐμπλήσω τῶν τραυματιῶν σου τοὺς βουνοὺς καὶ τὰς φάραγγάς σου καὶ ἐν πᾶσι τοῖς πεδίοις σου τετραυματισμένοι μαχαίρᾳ πεσοῦνται ἐν σοί
9 Nakokomisa yo esobe mpo na libela, bingumba na yo ekozala lisusu na bato te; boye bokoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe.
ἐρημίαν αἰώνιον θήσομαί σε καὶ αἱ πόλεις σου οὐ μὴ κατοικηθῶσιν ἔτι καὶ γνώσῃ ὅτι ἐγώ εἰμι κύριος
10 Mpo ete olobaki: ‘Mikili oyo mibale, Isalaele mpe Yuda, elongo na bikolo na yango ekokoma ya ngai, mpe nakozwa yango,’ atako Yawe azalaki kuna;
διὰ τὸ εἰπεῖν σε τὰ δύο ἔθνη καὶ αἱ δύο χῶραι ἐμαὶ ἔσονται καὶ κληρονομήσω αὐτάς καὶ κύριος ἐκεῖ ἐστιν
11 mpo na yango, na Kombo na Ngai, elobi Nkolo Yawe, nakopesa yo etumbu kolanda kanda mpe zuwa na yo, oyo olakisaki mpo na kosala bango mabe mpo ete oyinaki bango; mpe Ngai moko, nakosala ete bayeba Ngai tango nakosambisa yo.
διὰ τοῦτο ζῶ ἐγώ λέγει κύριος καὶ ποιήσω σοι κατὰ τὴν ἔχθραν σου καὶ γνωσθήσομαί σοι ἡνίκα ἂν κρίνω σε
12 Boye, okoyeba solo ete Ngai Yawe, nayokaki maloba nyonso ya kotiola oyo olobaki na tina na bangomba ya Isalaele. Olobaki: ‘Tala, bangomba ebebisami! Bakabeli biso yango lokola nyama ya kolia!’
καὶ γνώσῃ ὅτι ἐγώ εἰμι κύριος ἤκουσα τῆς φωνῆς τῶν βλασφημιῶν σου ὅτι εἶπας τὰ ὄρη Ισραηλ ἔρημα ἡμῖν δέδοται εἰς κατάβρωμα
13 Botelemelaki Ngai mpe bolobaki na Ngai na maloba ya lolendo; nayokaki yango Ngai moko.
καὶ ἐμεγαλορημόνησας ἐπ’ ἐμὲ τῷ στόματί σου ἐγὼ ἤκουσα
14 Boye, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Tango mokili mobimba ekozala na esengo, Ngai nakobebisa yo.
τάδε λέγει κύριος ἐν τῇ εὐφροσύνῃ πάσης τῆς γῆς ἔρημον ποιήσω σε
15 Mpo ete osepelaki na kobebisama ya libula ya Isalaele, nakosala yo mpe kaka ndenge wana: ngomba Seiri, okobebisama elongo na Edomi mobimba; boye, bakoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe. › »
ἔρημον ἔσῃ ὄρος Σηιρ καὶ πᾶσα ἡ Ιδουμαία ἐξαναλωθήσεται καὶ γνώσῃ ὅτι ἐγώ εἰμι κύριος ὁ θεὸς αὐτῶν

< Ezekieli 35 >