< Ezekieli 31 >

1 Na mokolo ya liboso ya sanza ya misato, na mobu ya zomi na moko, Yawe alobaki na ngai:
καὶ ἐγένετο ἐν τῷ ἑνδεκάτῳ ἔτει ἐν τῷ τρίτῳ μηνὶ μιᾷ τοῦ μηνὸς ἐγένετο λόγος κυρίου πρός με λέγων
2 « Mwana na moto, loba na Faraon, mokonzi ya Ejipito, mpe na mampinga na ye nyonso: ‹ Nani penza akoki kokokana na yo na lokumu?
υἱὲ ἀνθρώπου εἰπὸν πρὸς Φαραω βασιλέα Αἰγύπτου καὶ τῷ πλήθει αὐτοῦ τίνι ὡμοίωσας σεαυτὸν ἐν τῷ ὕψει σου
3 Tala mokili ya Asiri malamu! Ezalaki lokola nzete ya sedele kati na Libani: bitape na yango ezalaki kitoko mpe na makasa ebele oyo ezalaki kopesa pio koleka banzete nyonso ya zamba; elekaki banzete nyonso ya zamba na molayi, songe na yango ezalaki ekenda kino na mapata.
ἰδοὺ Ασσουρ κυπάρισσος ἐν τῷ Λιβάνῳ καὶ καλὸς ταῖς παραφυάσιν καὶ ὑψηλὸς τῷ μεγέθει εἰς μέσον νεφελῶν ἐγένετο ἡ ἀρχὴ αὐτοῦ
4 Mayi ezalaki kokolisa yango, mpe mayi ya se ya mabele ezalaki koyeisa yango molayi; ebimisaki miluka zingazinga ya esika oyo balonaki yango mpe epanzanaki kino na banzete nyonso ya zamba.
ὕδωρ ἐξέθρεψεν αὐτόν ἡ ἄβυσσος ὕψωσεν αὐτόν τοὺς ποταμοὺς αὐτῆς ἤγαγεν κύκλῳ τῶν φυτῶν αὐτοῦ καὶ τὰ συστέματα αὐτῆς ἐξαπέστειλεν εἰς πάντα τὰ ξύλα τοῦ πεδίου
5 Boye, nzete yango ekomaki molayi makasi koleka banzete nyonso ya zamba; bitape na yango ekomaki milayi, mpe makasa na yango ekomaki ebele, pamba te ezalaki kozwa mayi ebele.
ἕνεκεν τούτου ὑψώθη τὸ μέγεθος αὐτοῦ παρὰ πάντα τὰ ξύλα τοῦ πεδίου καὶ ἐπλατύνθησαν οἱ κλάδοι αὐτοῦ ἀφ’ ὕδατος πολλοῦ
6 Bandeke nyonso ya likolo ezalaki koya kotonga bazala na bitape na yango, banyama nyonso ya zamba mpe ezalaki kobota na se ya bitape na yango. Bikolo nyonso ya minene ezalaki kobika na se ya pio na yango.
ἐν ταῖς παραφυάσιν αὐτοῦ ἐνόσσευσαν πάντα τὰ πετεινὰ τοῦ οὐρανοῦ καὶ ὑποκάτω τῶν κλάδων αὐτοῦ ἐγεννῶσαν πάντα τὰ θηρία τοῦ πεδίου ἐν τῇ σκιᾷ αὐτοῦ κατῴκησεν πᾶν πλῆθος ἐθνῶν
7 Ezalaki kitoko na monene na yango mpe na molayi ya bitape na yango, pamba te misisa na yango ezalaki ekita kino na mayi minene.
καὶ ἐγένετο καλὸς ἐν τῷ ὕψει αὐτοῦ διὰ τὸ πλῆθος τῶν κλάδων αὐτοῦ ὅτι ἐγενήθησαν αἱ ῥίζαι αὐτοῦ εἰς ὕδωρ πολύ
8 Kati na elanga ya Nzambe, nzete moko te ya sedele ekokanaki na yango, nzete moko te ya sipele ekokanaki na yango na bitape, nzete moko te ya platane ekokanaki na yango na makasa: nzete moko te kati na elanga ya Nzambe ekokanaki na yango na kitoko.
κυπάρισσοι τοιαῦται οὐκ ἐγενήθησαν ἐν τῷ παραδείσῳ τοῦ θεοῦ καὶ πίτυες οὐχ ὅμοιαι ταῖς παραφυάσιν αὐτοῦ καὶ ἐλάται οὐκ ἐγένοντο ὅμοιαι τοῖς κλάδοις αὐτοῦ πᾶν ξύλον ἐν τῷ παραδείσῳ τοῦ θεοῦ οὐχ ὡμοιώθη αὐτῷ ἐν τῷ κάλλει αὐτοῦ
9 Nasalaki yango kitoko makasi na bitape ebele; bongo banzete nyonso ya Edeni, kati na elanga ya Nzambe, ezalaki kolula yango.
διὰ τὸ πλῆθος τῶν κλάδων αὐτοῦ καὶ ἐζήλωσεν αὐτὸν τὰ ξύλα τοῦ παραδείσου τῆς τρυφῆς τοῦ θεοῦ
10 Yango wana, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Lokola ekomaki molayi penza, bongo songe na yango ekendeki kino na mapata; mpe lokola ekomaki na lolendo mpo na molayi na yango,
διὰ τοῦτο τάδε λέγει κύριος ἀνθ’ ὧν ἐγένου μέγας τῷ μεγέθει καὶ ἔδωκας τὴν ἀρχήν σου εἰς μέσον νεφελῶν καὶ εἶδον ἐν τῷ ὑψωθῆναι αὐτόν
11 nakabaki yango na maboko ya nkumu ya bikolo mpo ete apesa yango etumbu oyo ekoki na mabe na yango. Nabenganaki yango;
καὶ παρέδωκα αὐτὸν εἰς χεῖρας ἄρχοντος ἐθνῶν καὶ ἐποίησεν τὴν ἀπώλειαν αὐτοῦ
12 mpe bikolo ya bapaya oyo eleki kanza ekweyisaki yango mpe asundolaki yango; makasa na yango ekweyaki na bangomba mpe na mabwaku nyonso, bitape na yango ebukanaki mpe ekweyaki na mabulu nyonso ya minene ya mokili. Bikolo nyonso ya mabele ekimaki wuta na se ya pio na yango mpe esundolaki yango; bongo etikalaki yango moko.
καὶ ἐξωλέθρευσαν αὐτὸν ἀλλότριοι λοιμοὶ ἀπὸ ἐθνῶν καὶ κατέβαλον αὐτὸν ἐπὶ τῶν ὀρέων ἐν πάσαις ταῖς φάραγξιν ἔπεσαν οἱ κλάδοι αὐτοῦ καὶ συνετρίβη τὰ στελέχη αὐτοῦ ἐν παντὶ πεδίῳ τῆς γῆς καὶ κατέβησαν ἀπὸ τῆς σκέπης αὐτῶν πάντες οἱ λαοὶ τῶν ἐθνῶν καὶ ἠδάφισαν αὐτόν
13 Bandeke nyonso ya likolo ekomaki kovanda na mobimbi na yango oyo epola, mpe banyama nyonso ya zamba ekomaki kovanda na bitape na yango.
ἐπὶ τὴν πτῶσιν αὐτοῦ ἀνεπαύσαντο πάντα τὰ πετεινὰ τοῦ οὐρανοῦ καὶ ἐπὶ τὰ στελέχη αὐτοῦ ἐγένοντο πάντα τὰ θηρία τοῦ ἀγροῦ
14 Boye, makambo oyo nyonso esalemaki mpo ete nzete moko te oyo elonama pembeni ya mayi ekoma na lolendo mpo na molayi na yango mpe mpo na songe na yango oyo ekenda kino na mapata; mpe mpo ete terebente moko te oyo ezali kozwa mayi ekoma na lolendo mpo na molayi na yango. Pamba te, yango nyonso etangama ete ekokufa, ekokita kino na mokili ya se ya mabele, kati na bakufi, elongo na bato oyo bakitaka na se ya libulu ya kufa.
ὅπως μὴ ὑψωθῶσιν ἐν τῷ μεγέθει αὐτῶν πάντα τὰ ξύλα τὰ ἐν τῷ ὕδατι καὶ οὐκ ἔδωκαν τὴν ἀρχὴν αὐτῶν εἰς μέσον νεφελῶν καὶ οὐκ ἔστησαν ἐν τῷ ὕψει αὐτῶν πρὸς αὐτὰ πάντες οἱ πίνοντες ὕδωρ πάντες ἐδόθησαν εἰς θάνατον εἰς γῆς βάθος ἐν μέσῳ υἱῶν ἀνθρώπων πρὸς καταβαίνοντας εἰς βόθρον
15 Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Na mokolo oyo nzete ya sedele ekitaki na se ya mokili ya bakufi, napesaki mitindo ete mayi oyo ya se ya mabele esala matanga mpo na yango. Likolo na yango, nazipaki mayi ya se ya mabele, nakangaki bibale na yango mpe mayi minene ekangamaki; nazipaki zamba ya Libani na molili mpe nakawusaki banzete nyonso ya elanga. (Sheol h7585)
τάδε λέγει κύριος κύριος ἐν ᾗ ἡμέρᾳ κατέβη εἰς ᾅδου ἐπένθησεν αὐτὸν ἡ ἄβυσσος καὶ ἐπέστησα τοὺς ποταμοὺς αὐτῆς καὶ ἐκώλυσα πλῆθος ὕδατος καὶ ἐσκότασεν ἐπ’ αὐτὸν ὁ Λίβανος πάντα τὰ ξύλα τοῦ πεδίου ἐπ’ αὐτῷ ἐξελύθησαν (Sheol h7585)
16 Nalengisaki bikolo na lokito ya kokweya na yango, tango nakitisaki yango na mboka ya bakufi elongo na bato oyo bakitaka na libulu ya kufa. Boye, banzete nyonso ya Edeni, oyo eleki kitoko, mpe banzete ya Libani, oyo eleki kitoko, banzete nyonso oyo ezalaki kozwa mayi malamu, ebondisamaki na se ya mabele. (Sheol h7585)
ἀπὸ τῆς φωνῆς τῆς πτώσεως αὐτοῦ ἐσείσθησαν τὰ ἔθνη ὅτε κατεβίβαζον αὐτὸν εἰς ᾅδου μετὰ τῶν καταβαινόντων εἰς λάκκον καὶ παρεκάλουν αὐτὸν ἐν γῇ πάντα τὰ ξύλα τῆς τρυφῆς καὶ τὰ ἐκλεκτὰ τοῦ Λιβάνου πάντα τὰ πίνοντα ὕδωρ (Sheol h7585)
17 Yango mpe ekitaki, elongo na nzete ya sedele, na mokili ya bakufi, epai ya bato oyo bakufaki na mopanga, oyo basanganaki na yango mpo na kovanda na se ya pio na yango kati na bikolo. (Sheol h7585)
καὶ γὰρ αὐτοὶ κατέβησαν μετ’ αὐτοῦ εἰς ᾅδου ἐν τοῖς τραυματίαις ἀπὸ μαχαίρας καὶ τὸ σπέρμα αὐτοῦ οἱ κατοικοῦντες ὑπὸ τὴν σκέπην αὐτοῦ ἐν μέσῳ τῆς ζωῆς αὐτῶν ἀπώλοντο (Sheol h7585)
18 Nzete nini kati na Edeni ekokani na yo na monene mpe na lokumu? Nzokande, yo mpe okokita, elongo na banzete ya Edeni, na mokili ya se ya mabele; okolala esika moko na bato oyo bakatama ngenga te, elongo na bato oyo bakufaki na mopanga. Ndenge wana nde Faraon elongo na bato na ye bakosuka, elobi Nkolo Yawe. › »
τίνι ὡμοιώθης κατάβηθι καὶ καταβιβάσθητι μετὰ τῶν ξύλων τῆς τρυφῆς εἰς γῆς βάθος ἐν μέσῳ ἀπεριτμήτων κοιμηθήσῃ μετὰ τραυματιῶν μαχαίρας οὕτως Φαραω καὶ τὸ πλῆθος τῆς ἰσχύος αὐτοῦ λέγει κύριος κύριος

< Ezekieli 31 >