< Ezekieli 29 >

1 Na mokolo ya zomi na mibale ya sanza ya zomi, na mobu ya zomi, Yawe alobaki na ngai:
ἐν τῷ ἔτει τῷ δεκάτῳ ἐν τῷ δεκάτῳ μηνὶ μιᾷ τοῦ μηνὸς ἐγένετο λόγος κυρίου πρός με λέγων
2 « Mwana na moto, talisa elongi na yo epai ya Faraon, mokonzi ya Ejipito, sakola mpo na kotelemela ye mpe mokili mobimba ya Ejipito!
υἱὲ ἀνθρώπου στήρισον τὸ πρόσωπόν σου ἐπὶ Φαραω βασιλέα Αἰγύπτου καὶ προφήτευσον ἐπ’ αὐτὸν καὶ ἐπ’ Αἴγυπτον ὅλην
3 Loba: ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Yo Faraon, mokonzi ya Ejipito, natelemeli yo! Yo dalagona monene oyo ovandaka kati na bibale na yo, yo oyo ozali koloba: ‘Ebale Nili ezali ya ngai; mpe ngai, ngai moko nde namisala!’
καὶ εἰπόν τάδε λέγει κύριος ἰδοὺ ἐγὼ ἐπὶ Φαραω τὸν δράκοντα τὸν μέγαν τὸν ἐγκαθήμενον ἐν μέσῳ ποταμῶν αὐτοῦ τὸν λέγοντα ἐμοί εἰσιν οἱ ποταμοί καὶ ἐγὼ ἐποίησα αὐτούς
4 Nakokanga yo bibende na mbanga, nakosala ete mbisi ya ebale na yo ekangama yo na poso ya nzoto; nakobimisa yo na libanda ya bibale na yo elongo na mbisi oyo ekangami yo na poso ya nzoto.
καὶ ἐγὼ δώσω παγίδας εἰς τὰς σιαγόνας σου καὶ προσκολλήσω τοὺς ἰχθῦς τοῦ ποταμοῦ σου πρὸς τὰς πτέρυγάς σου καὶ ἀνάξω σε ἐκ μέσου τοῦ ποταμοῦ σου καὶ πάντας τοὺς ἰχθύας τοῦ ποταμοῦ σου
5 Nakobwaka yo na esobe, yo mpe mbisi ya bibale na yo. Okokweya na mabele ya elanga ya polele; bakolokota yo te, bakokunda yo te; mpe nakokomisa yo bilei ya banyama ya mokili mpe ya bandeke ya likolo.
καὶ καταβαλῶ σε ἐν τάχει καὶ πάντας τοὺς ἰχθύας τοῦ ποταμοῦ σου ἐπὶ πρόσωπον τοῦ πεδίου πεσῇ καὶ οὐ μὴ συναχθῇς καὶ οὐ μὴ περισταλῇς τοῖς θηρίοις τῆς γῆς καὶ τοῖς πετεινοῖς τοῦ οὐρανοῦ δέδωκά σε εἰς κατάβρωμα
6 Boye, bavandi nyonso ya Ejipito bakoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe. Ozalaki na yo kaka lokola eyekamelo oyo basala na nzete oyo ebotaka na mayi, mpo na libota ya Isalaele.
καὶ γνώσονται πάντες οἱ κατοικοῦντες Αἴγυπτον ὅτι ἐγώ εἰμι κύριος ἀνθ’ ὧν ἐγενήθης ῥάβδος καλαμίνη τῷ οἴκῳ Ισραηλ
7 Tango maboko na bango esimbaki yo, obukanaki mpe ozokisaki mapeka na bango; tango balalelaki yo, obukanaki mpe olembisaki mikongo na bango.
ὅτε ἐπελάβοντό σου τῇ χειρὶ αὐτῶν ἐθλάσθης καὶ ὅτε ἐπεκράτησεν ἐπ’ αὐτοὺς πᾶσα χεὶρ καὶ ὅτε ἐπανεπαύσαντο ἐπὶ σέ συνετρίβης καὶ συνέκλασας αὐτῶν πᾶσαν ὀσφύν
8 Yango wana, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Nakoyeisa mopanga mpo na kobebisa yo, mpe nakoboma bato na yo mpe bibwele na bango.
διὰ τοῦτο τάδε λέγει κύριος ἰδοὺ ἐγὼ ἐπάγω ἐπὶ σὲ ῥομφαίαν καὶ ἀπολῶ ἀνθρώπους ἀπὸ σοῦ καὶ κτήνη
9 Ejipito ekokoma esobe mpe ekotikala lisusu na bato te; mpe bakoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe. Lokola ozalaki koloba: ‘Ebale Nili ezali ya ngai; kasi ngai, ngai moko nde namisala,’
καὶ ἔσται ἡ γῆ Αἰγύπτου ἀπώλεια καὶ ἔρημος καὶ γνώσονται ὅτι ἐγώ εἰμι κύριος ἀντὶ τοῦ λέγειν σε οἱ ποταμοὶ ἐμοί εἰσιν καὶ ἐγὼ ἐποίησα αὐτούς
10 natombokeli yo mpe bibale na yo; mpe lisusu, nakobebisa mokili ya Ejipito, nakokomisa yango esobe kobanda na Migidoli kino na Siene, kino na bandelo ya mokili ya Kushi.
διὰ τοῦτο ἰδοὺ ἐγὼ ἐπὶ σὲ καὶ ἐπὶ πάντας τοὺς ποταμούς σου καὶ δώσω γῆν Αἰγύπτου εἰς ἔρημον καὶ ῥομφαίαν καὶ ἀπώλειαν ἀπὸ Μαγδώλου καὶ Συήνης καὶ ἕως ὁρίων Αἰθιόπων
11 Ata litambe moko ya moto to ya nyama ekolekela lisusu wana te: moto moko te akovanda lisusu kuna mibu tuku minei.
οὐ μὴ διέλθῃ ἐν αὐτῇ ποὺς ἀνθρώπου καὶ ποὺς κτήνους οὐ μὴ διέλθῃ αὐτήν καὶ οὐ κατοικηθήσεται τεσσαράκοντα ἔτη
12 Nakokomisa Ejipito esobe kati na mikili oyo ekoma esobe, mpe bingumba na yango ekotikala lisusu na bato te, mibu tuku minei, kati na bingumba oyo ebeba. Nakopanza bato ya Ejipito kati na bikolo mpe nakopalanganisa bango na mikili mosusu.
καὶ δώσω τὴν γῆν αὐτῆς ἀπώλειαν ἐν μέσῳ γῆς ἠρημωμένης καὶ αἱ πόλεις αὐτῆς ἐν μέσῳ πόλεων ἠρημωμένων ἔσονται τεσσαράκοντα ἔτη καὶ διασπερῶ Αἴγυπτον ἐν τοῖς ἔθνεσιν καὶ λικμήσω αὐτοὺς εἰς τὰς χώρας
13 Nzokande, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Sima na mibu tuku minei, nakosangisa bato ya Ejipito wuta na bikolo epai wapi bapalanganaki,
τάδε λέγει κύριος μετὰ τεσσαράκοντα ἔτη συνάξω τοὺς Αἰγυπτίους ἀπὸ τῶν ἐθνῶν οὗ διεσκορπίσθησαν ἐκεῖ
14 nakokangola bato ya Ejipito oyo bazalaki na bowumbu mpe nakozongisa bango na Patrosi, mokili ya bakoko na bango; mpe kuna, bakokoma kaka mwa bokonzi moko ya moke.
καὶ ἀποστρέψω τὴν αἰχμαλωσίαν τῶν Αἰγυπτίων καὶ κατοικίσω αὐτοὺς ἐν γῇ Παθουρης ἐν τῇ γῇ ὅθεν ἐλήμφθησαν καὶ ἔσται ἀρχὴ ταπεινὴ
15 Ejipito ekokoma mokili moko moke koleka mikili mosusu, ekomikumisa lisusu te liboso ya bikolo mosusu; nakokomisa yango moke penza mpo ete ezala lisusu na makoki te ya kokonza bikolo mosusu.
παρὰ πάσας τὰς ἀρχάς οὐ μὴ ὑψωθῇ ἔτι ἐπὶ τὰ ἔθνη καὶ ὀλιγοστοὺς αὐτοὺς ποιήσω τοῦ μὴ εἶναι αὐτοὺς πλείονας ἐν τοῖς ἔθνεσιν
16 Mokili ya Ejipito ekozala lisusu mpo na bana ya Isalaele mokili ya kotiela motema te, kasi ekokoma lokola ekaniseli ya masumu oyo bato na Ngai bazalaki kosala tango bazalaki koluka lisungi epai na yango. Boye, bakoyeba solo ete Ngai, nazali Nkolo Yawe. › »
καὶ οὐκέτι ἔσονται τῷ οἴκῳ Ισραηλ εἰς ἐλπίδα ἀναμιμνῄσκουσαν ἀνομίαν ἐν τῷ αὐτοὺς ἀκολουθῆσαι ὀπίσω αὐτῶν καὶ γνώσονται ὅτι ἐγώ εἰμι κύριος
17 Na mokolo ya liboso ya sanza ya liboso, na mobu ya tuku mibale na sambo, Yawe alobaki na ngai:
καὶ ἐγένετο ἐν τῷ ἑβδόμῳ καὶ εἰκοστῷ ἔτει μιᾷ τοῦ μηνὸς τοῦ πρώτου ἐγένετο λόγος κυρίου πρός με λέγων
18 « Mwana na moto, Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, alendisaki makasi mampinga na ye mpo na kobundisa engumba Tiri; mito ya basoda nyonso ekomaki mabandi mpe mapeka na bango elongwaki-longwaki baposo. Nzokande, ye mpe mampinga na ye batikalaki kozwa litomba ata moko te na mosala na bango ya kobundisa engumba Tiri.
υἱὲ ἀνθρώπου Ναβουχοδονοσορ βασιλεὺς Βαβυλῶνος κατεδουλώσατο αὐτοῦ τὴν δύναμιν δουλείᾳ μεγάλῃ ἐπὶ Τύρου πᾶσα κεφαλὴ φαλακρὰ καὶ πᾶς ὦμος μαδῶν καὶ μισθὸς οὐκ ἐγενήθη αὐτῷ καὶ τῇ δυνάμει αὐτοῦ ἐπὶ Τύρου καὶ τῆς δουλείας ἧς ἐδούλευσαν ἐπ’ αὐτήν
19 Yango wana, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Nakokaba Ejipito na maboko ya Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni; mpe ye, akobotola bomengo na yango, akozwa bomengo ya bitumba mpe akobebisa yango nyonso penza.
τάδε λέγει κύριος κύριος ἰδοὺ δίδωμι τῷ Ναβουχοδονοσορ βασιλεῖ Βαβυλῶνος γῆν Αἰγύπτου καὶ προνομεύσει τὴν προνομὴν αὐτῆς καὶ σκυλεύσει τὰ σκῦλα αὐτῆς καὶ ἔσται μισθὸς τῇ δυνάμει αὐτοῦ
20 Napesi epai ya Nabukodonozori mokili ya Ejipito lokola lifuti mpo na misala na ye, pamba te ye mpe mampinga na ye basalaki mpo na Ngai, elobi Nkolo Yawe.
ἀντὶ τῆς λειτουργίας αὐτοῦ ἧς ἐδούλευσεν ἐπὶ Τύρον δέδωκα αὐτῷ γῆν Αἰγύπτου τάδε λέγει κύριος κύριος
21 Na mokolo wana, nakobimisa liseke mpo na libota ya Isalaele; nakofungola monoko na yo kati na bango, mpe bakoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe. »
ἐν τῇ ἡμέρᾳ ἐκείνῃ ἀνατελεῖ κέρας παντὶ τῷ οἴκῳ Ισραηλ καὶ σοὶ δώσω στόμα ἀνεῳγμένον ἐν μέσῳ αὐτῶν καὶ γνώσονται ὅτι ἐγώ εἰμι κύριος

< Ezekieli 29 >