< Kobima 26 >

1 Okotonga Mongombo elongo na batapi zomi ya lino ya kitoko oyo bakotonga bililingi na likolo na yango, ya langi ya ble, ya motane ya pete mpe ya motane makasi, elongo na basheribe; ekozala mosala ya bato oyo basalaka bililingi na maboko.
"Moreover you shall make the tabernacle with ten curtains; of fine twined linen, and blue, and purple, and scarlet, with cherubim. The work of the skillful workman you shall make them.
2 Tapi moko na moko ekozala na bametele pene zomi na minei na molayi; mpe bametele pene mibale, na mokuse. Batapi nyonso ekozala ndenge moko na mokuse mpe na molayi.
The length of each curtain shall be forty-one feet four inches, and the breadth of each curtain five feet eleven inches: all the curtains shall have one measure.
3 Okokangisa batapi mitano, moko na mosusu, mpe okosala ndenge moko mpo na batapi mitano mosusu.
Five curtains shall be coupled together one to another; and the other five curtains shall be coupled one to another.
4 Okotia basinga ya langi ya ble na pembeni ya tapi ya suka ya lisanga ya batapi mitano ya liboso, mpe na pembeni ya tapi ya suka ya lisanga ya batapi mitano ya mibale.
You shall make loops of blue on the edge of the one curtain from the edge in the coupling; and likewise you shall make in the edge of the curtain that is outmost in the second coupling.
5 Okotia basinga tuku mitano na suka ya lisanga ya batapi mitano ya liboso, mpe na suka ya lisanga ya batapi mitano ya mibale; basinga yango ekotalana.
You shall make fifty loops in the one curtain, and you shall make fifty loops in the edge of the curtain that is in the second coupling. The loops shall be opposite one to another.
6 Okosala na wolo bibende tuku mitano oyo ezali lokola ndobo; mpe okokangisa na bibende oyo ezali lokola ndobo lisanga ya batapi mitano ya liboso mpe lisanga ya batapi mitano ya mibale. Na boye, Mongombo ekobima eloko moko.
You shall make fifty clasps of gold, and couple the curtains one to another with the clasps: and the tabernacle shall be a unit.
7 Okosala batapi zomi na moko na bapwale ya ntaba mpo na kotia yango na likolo ya Mongombo.
"You shall make curtains of goats' hair for a covering over the tabernacle. You shall make them eleven curtains.
8 Molayi ya tapi moko na moko ekozala na bametele pene zomi na mitano, mpe mokuse na yango ekozala na bametele pene mibale. Batapi nyonso zomi na moko ekozala ndenge moko na mokuse mpe na molayi.
The length of each curtain shall be forthy-four feet four inches, and the breadth of each curtain five feet eleven inches: the eleven curtains shall have one measure.
9 Okokangisa batapi mitano na ngambo moko, mpe batapi motoba na ngambo mosusu; mpe okogumba tapi ya motoba na liboso ya Mongombo.
You shall couple five curtains by themselves, and six curtains by themselves, and shall double over the sixth curtain in the forefront of the tent.
10 Okotia basinga tuku mitano na suka ya liboke ya batapi ya liboso, mpe basinga tuku mitano na suka ya liboke ya batapi ya mibale.
You shall make fifty loops on the edge of the one curtain that is outmost in the coupling, and fifty loops on the edge of the curtain which is outmost in the second coupling.
11 Okosala na bronze bibende tuku mitano oyo ezali lokola ndobo; okokotisa yango na basinga mpo na kokangisa Mongombo mpo ete ekoma eloko moko.
You shall make fifty clasps of bronze, and put the clasps into the loops, and couple the tent together, that it may be one.
12 Batapi oyo ekozala na likolo ya Mongombo ekoleka molayi mpe ndambo na yango ekokita na sima ya Mongombo.
The overhanging part that remains of the curtains of the tent, the half curtain that remains, shall hang over the back of the tabernacle.
13 Mpe na molayi ya batapi oyo ezali na likolo ya Mongombo, basantimetele pene tuku mitano ekolekana na bangambo mibale ya Mongombo mpo na kozipa yango.
Eighteen inches on the one side, and eighteen inches on the other side, of that which remains in the length of the curtains of the tent, shall hang over the sides of the tabernacle on this side and on that side, to cover it.
14 Okosalela baposo ya bameme oyo bapakola langi ya motane mpo na kozipa Mongombo, mpe okobakisa na likolo na yango baposo ya banyama ya ebale.
You shall make a covering for the tent of rams' skins dyed red, and a covering of sea cow hides above.
15 Okosala bizingelo ya Mongombo na banzete ya akasia mpe okotelemisa yango.
"You shall make the boards for the tabernacle of acacia wood, standing up.
16 Ezingelo moko na moko ekozala na bametele mitano na molayi, mpe basantimetele tuku sambo na mitano na mokuse.
Seventeen feet three inches shall be the length of a board, and two feet three inches the breadth of each board.
17 Okobeta banzete mibale-mibale na ezingelo; okosala bongo mpo na bizingelo nyonso ya Mongombo.
There shall be two tenons in each board, joined to one another: thus you shall make for all the boards of the tabernacle.
18 Okotia bizingelo tuku mibale na ngambo ya Negevi, na sude;
You shall make the boards for the tabernacle, twenty boards for the south side southward.
19 mpe makolo tuku minei ya palata na se ya bizingelo tuku mibale: makolo mibale na se ya ezingelo moko na moko oyo babeta banzete mibale;
You shall make forty sockets of silver under the twenty boards; two sockets under one board for its two tenons, and two sockets under another board for its two tenons.
20 bizingelo tuku mibale na ngambo mosusu ya Mongombo, na nor,
For the second side of the tabernacle, on the north side, twenty boards,
21 elongo na makolo na yango tuku minei ya palata: makolo mibale mpo na ezingelo moko na moko;
and their forty sockets of silver; two sockets under one board, and two sockets under another board.
22 bizingelo motoba na suka ya Mongombo, na ngambo ya weste,
For the far part of the tabernacle westward you shall make six boards.
23 mpe bizingelo mibale na suka mpo na kolendisa Mongombo.
You shall make two boards for the corners of the tabernacle in the far part.
24 Bizingelo yango ekozala ya kofungwama na se, kasi ekosala songe na likolo mpe ekokota na lopete ya liboso: nyonso mibale ekozala ndenge moko mpe ekolendisa Mongombo.
They shall be double beneath, and in like manner they shall be entire to its top to one ring: thus shall it be for them both; they shall be for the two corners.
25 Boye, bizingelo ekozala mwambe elongo na makolo na yango zomi na motoba ya palata: makolo mibale-mibale na se ya ezingelo moko na moko.
There shall be eight boards, and their sockets of silver, sixteen sockets; two sockets under one board, and two sockets under another board.
26 Sima, okosala, na nzete ya akasia, mabaya mitano mpo na bizingelo ya ngambo moko ya Mongombo,
"You shall make bars of acacia wood: five for the boards of the one side of the tabernacle,
27 mabaya mitano mpo na bizingelo ya ngambo mosusu ya Mongombo, mabaya mitano mpo na bizingelo oyo ekozala na suka ya Mongombo, na ngambo ya weste.
and five bars for the boards of the other side of the tabernacle, and five bars for the boards of the side of the tabernacle, for the far part westward.
28 Libaya ya kati ekoleka na kati-kati ya bizingelo, ekoleka ngambo na ngambo.
The middle bar in the midst of the boards shall pass through from end to end.
29 Okobamba wolo na bizingelo, okosala bapete na yango na wolo mpo na kolekisa mabaya; mpe okobamba mabaya wolo.
You shall overlay the boards with gold, and make their rings of gold for places for the bars: and you shall overlay the bars with gold.
30 Okotonga Mongombo ndenge kaka balakisaki yo yango na likolo ya ngomba.
You shall set up the tabernacle according to the way that it was shown to you on the mountain.
31 Okosala rido ya langi ya ble, ya motane ya pete, ya motane makasi, mpe na lino ya kitoko oyo bakotonga bililingi na likolo na yango, elongo na basheribe; ekozala mosala ya bato oyo basalaka bililingi na maboko.
"You shall make a veil of blue, and purple, and scarlet, and fine twined linen, with cherubim. The work of the skillful workman shall it be made.
32 Okotia yango na makonzi minei ya nzete ya akasia, oyo bapakola wolo; okokangisa yango na bibende ya wolo oyo ezali lokola ndobo mpe okotelemisa yango na makolo minei ya palata.
You shall hang it on four pillars of acacia overlaid with gold; their hooks shall be of gold, on four sockets of silver.
33 Okokangisa rido na bibende oyo ezali lokola ndobo mpe okotia Sanduku ya Litatoli na sima ya rido yango. Rido nde ekokabola Esika ya bule mpe Esika-Oyo-Eleki-Bule.
You shall hang up the veil under the clasps, and shall bring the ark of the testimony in there within the veil: and the veil shall separate the holy place from the most holy for you.
34 Kati na Esika-Oyo-Eleki-Bule, okotia mofinuku na likolo ya Sanduku ya Litatoli.
You shall put the mercy seat on the ark of the testimony in the most holy place.
35 Okotia mesa na liboso ya rido, na ngambo ya nor ya Mongombo, mpe okotia etelemiselo ya minda na liboso ya mesa, na ngambo ya sude.
You shall set the table outside the veil, and the lampstand over against the table on the side of the tabernacle toward the south: and you shall put the table on the north side.
36 Mpo na ekotelo ya Ndako ya kapo, okosala rido ya langi ya ble, ya motane ya pete, ya motane makasi mpe na lino ya kitoko oyo bakotonga bililingi na likolo na yango; ekozala mosala ya bato oyo batongaka bililingi na bilamba.
"You shall make a screen for the door of the Tent, of blue, and purple, and scarlet, and fine twined linen, the work of the embroiderer.
37 Okosala na wolo, bibende mitano oyo ezali lokola ndobo mpo na kokangisela rido mpe banzete mitano ya akasia babamba wolo; okosala makolo mitano ya bronze mpo na kotelemisela banzete yango.
You shall make for the screen five pillars of acacia, and overlay them with gold: their hooks shall be of gold: and you shall cast five sockets of bronze for them.

< Kobima 26 >