+ Ebandeli 1 >

1 Na ebandeli, Nzambe akelaki Likolo mpe mokili.
In the beginning God created the heavens and the earth.
2 Mokili ezalaki na lolenge te mpe ezalaki pamba. Molili ezalaki na likolo ya mozindo; mpe Molimo ya Nzambe azalaki kopepa na likolo ya mayi.
Now the earth was formless and empty, and darkness was on the surface of the watery depths. And God's Spirit was hovering over the surface of the waters.
3 Mpe Nzambe alobaki: « Tika ete pole ezala! » Mpe pole ezalaki.
And God said, "Let there be light," and there was light.
4 Nzambe amonaki ete pole ezali malamu, akabolaki pole na molili.
And God saw that the light was good. And God separated the light from the darkness.
5 Nzambe abengaki pole « moyi, » mpe abengaki molili « butu. » Pokwa ezalaki mpe tongo ezalaki. Yango ezalaki mokolo moko.
And God called the light Day, and the darkness he called Night. There was evening and there was morning, one day.
6 Bongo Nzambe alobaki: « Tika ete etando ezala kati na mayi mpo na kokabola yango! »
And God said, "Let there be an expanse in the midst of the waters, and let it separate the waters from the waters." And it was so.
7 Nzambe akelaki etando; akabolaki mayi oyo ezalaki na se ya etando na mayi ya likolo. Yango esalemaki mpe bongo.
And God made the expanse, and separated the waters which were under the expanse from the waters which were above the expanse.
8 Nzambe abengaki etando « likolo. » Pokwa ezalaki, tongo mpe ezalaki. Yango ezalaki mokolo ya mibale.
And God called the expanse Sky. And God saw that it was good. There was evening and there was morning, a second day.
9 Bongo Nzambe alobaki: « Tika ete mayi oyo ezali na se ya likolo esangana esika moko mpo ete mabele ya kokawuka ebima! » Yango esalemaki mpe bongo.
And God said, "Let the waters under the sky be gathered to one gathering, and let the dry land appear." And it was so. And the waters under the sky gathered to their gatherings, and the dry land appeared.
10 Nzambe abengaki mabele ya kokawuka « mokili, » mpe abengaki mayi oyo esanganaki esika moko « ebale monene. » Nzambe amonaki ete ezali malamu.
And God called the dry land Earth, and the gatherings of the waters he called Seas. And God saw that it was good.
11 Nzambe alobaki: « Tika ete mokili ebimisa matiti, milona oyo ezali na nkona mpe banzete ya mbuma oyo ebotaka mbuma kolanda lolenge ya nzete moko na moko! » Yango esalemaki mpe bongo.
And God said, "Let the earth produce vegetation, plants yielding seed after its kind, and fruit trees bearing fruit with seed in it after its kind, on the earth." And it was so.
12 Mabele ebimisaki matiti, milona oyo ebotaka nkona kolanda lolenge ya molona moko na moko mpe banzete oyo ebotaka mbuma kolanda lolenge ya nzete moko na moko. Nzambe amonaki ete ezali malamu.
And the earth brought forth vegetation, plants yielding seed after its kind, and fruit trees bearing fruit with seed in it after its kind, on the earth. And God saw that it was good.
13 Pokwa ezalaki, tongo mpe ezalaki. Yango ezalaki mokolo ya misato.
There was evening and there was morning, a third day.
14 Bongo Nzambe alobaki: « Tika ete biloko oyo ebimisaka pole ezala na etando ya likolo mpo na kokabola moyi wuta na butu, mpo na kozala bilembo oyo ekolakisa bileko, mikolo mpe mibu,
And God said, "Let there be lights in the expanse of the sky for the illumination of the day, to give light on the earth, and to rule the day and the night, and to separate between the day and the night. And let them be for signs, and for seasons, and for days, and for years;
15 mpe mpo na kongengisa mokili! » Yango esalemaki mpe bongo.
and let them be for lights in the expanse of the sky to shine on the earth." And it was so.
16 Nzambe akelaki biloko mibale ya minene oyo ebimisaka pole: oyo eleki monene, mpo na kongenga na moyi; mpe oyo ya moke, mpo na kongenga na butu. Mpe akelaki lisusu minzoto.
And God made the two great lights—the greater light to rule the day, and the lesser light to rule the night—and the stars.
17 Nzambe atiaki yango na etando ya likolo mpo ete engengisa mokili,
And God set them in the expanse of the sky to shine on the earth,
18 engenga na moyi mpe na butu, mpe ekabola pole na molili. Nzambe amonaki ete ezali malamu.
and to rule over the day and over the night, and to divide the light from the darkness. And God saw that it was good.
19 Pokwa ezalaki, tongo mpe ezalaki. Yango ezalaki mokolo ya minei.
There was evening and there was morning, a fourth day.
20 Bongo Nzambe alobaki: « Tika ete bikelamu ya bomoi etonda kati na mayi, mpe bandeke epumbwa na mokili na etando ya likolo! »
And God said, "Let the waters swarm with swarms of living creatures, and let flying creatures fly above the earth in the open expanse of the sky." And it was so.
21 Nzambe akelaki banyama minene ya mayi mpe bikelamu nyonso ya bomoi oyo etambolaka kati na mayi mpe etondi meke kati na mayi: ekelamu na ekelamu na lolenge na yango. Akelaki mpe bandeke nyonso ya mapapu: ndeke na ndeke na lolenge na yango. Nzambe amonaki ete ezali malamu.
And God created the large sea creatures, and every living creature that moves, with which the waters swarmed, after its kind, and every winged flying creature after its kind. And God saw that it was good.
22 Nzambe apambolaki yango mpe alobaki: « Bobotana, bokoma ebele, botondisa mayi ya bibale, mpe tika ete bandeke ekoma ebele kati na mokili. »
And God blessed them, saying, "Be fruitful, and multiply, and fill the waters in the seas, and let the flying creatures multiply on the earth."
23 Pokwa ezalaki, tongo mpe ezalaki. Yango ezalaki mokolo ya mitano.
There was evening and there was morning, a fifth day.
24 Bongo Nzambe alobaki: « Tika ete mokili ebimisa bikelamu ya bomoi kolanda lolenge na yango: bibwele, bikelamu oyo etambolaka na libumu, banyama ya mike-mike mpe banyama ya zamba! » Yango esalemaki mpe bongo.
And God said, "Let the earth bring forth living creatures after its kind: tame animals, and crawling creatures, and wild animals of the earth after its kind." And it was so.
25 Nzambe akelaki banyama ya zamba kolanda lolenge na yango: bibwele mpe bikelamu nyonso ya mike-mike. Nzambe amonaki ete ezali malamu.
And God made the wild animals of the earth after its kind, and the tame animals after its kind, and everything that crawls on the ground after its kind. And God saw that it was good.
26 Bongo Nzambe alobaki: « Tika ete tosala bato na elilingi na biso, na lolenge oyo biso tozali, mpo ete bakonza bambisi ya ebale, bandeke ya likolo, bibwele kati na mokili mobimba, bikelamu nyonso oyo etambolaka na libumu mpe banyama ya mike-mike! »
And God said, "Let us make humankind in our image, after our likeness. And let them have dominion over the fish of the sea, and over the flying creatures of the sky, and over the tame animals, and over all the wild animals of the earth, and over every creature that crawls on the earth." And it was so.
27 Nzambe akelaki bato na elilingi na Ye, akelaki bango na elilingi ya Nzambe; akelaki bango mobali mpe mwasi.
And God created humankind in his own image. In God's image he created him; male and female he created them.
28 Nzambe apambolaki bango mpe alobaki na bango: « Bobotana, bokoma ebele, botondisa mokili mpe bobongola yango. Bokonza bambisi ya bibale, bandeke ya likolo, bikelamu oyo etambolaka na libumu mpe banyama nyonso ya mike-mike. »
And God blessed them, saying, "Be fruitful, and multiply, and fill the earth, and subdue it, and have dominion over the fish of the sea, and over the flying creatures of the sky, and over all the tame animals, and over all the wild animals of the earth, and over all the creatures that crawl on the earth."
29 Bongo Nzambe alobaki: « Tala, kati na mokili mobimba, napesi bino milona oyo ezali na nkona mpe banzete nyonso oyo ebotaka mbuma. Yango nde ekozala bilei na bino.
And God said, "Look, I have given you every plant yielding seed, which is on the surface of all the earth, and every tree, which bears fruit yielding seed. It will be your food.
30 Napesi matiti nyonso ya mobesu lokola bilei epai ya banyama nyonso ya mokili, epai ya bandeke nyonso ya likolo, epai ya bikelamu nyonso oyo etambolaka na libumu, mpe epai ya bikelamu nyonso oyo ezali na bomoi. » Yango esalemaki mpe bongo.
And to every wild animal of the earth, and to every tame animal of the earth, and to every flying creature of the sky, and to every creature that crawls on the earth, in which there is life, I have given every green plant for food."
31 Nzambe atalaki biloko nyonso oyo akelaki mpe amonaki ete ezali malamu koleka. Pokwa ezalaki, tongo mpe ezalaki. Yango ezalaki mokolo ya motoba.
And God saw everything that he had made, and look, it was very good. There was evening and there was morning, a sixth day.

+ Ebandeli 1 >