< 2 Bakonzi 6 >

1 Mokolo moko, bayekoli ya basakoli balobaki na Elize: — Tala! Esika oyo tosanganaka elongo na yo ekomi moke mingi mpo na biso.
And the sons of the prophets said unto Elisha, Behold now, the place where we dwell with you is too strait for us.
2 Pesa biso nzela ya kokende na ebale Yordani epai wapi moko na moko kati na biso akoki kozwa nzete mpo na kotonga kuna esika ya kovanda. Elize alobaki na bango: — Bokende!
Let us go, we pray you, unto Jordan, and take thence every man a beam, and let us make us a place there, where we may dwell. And he answered, Go all of you.
3 Moko kati na bango alobaki: — Okosepela te kokende elongo na basali na yo? Elize azongisaki: — Nandimi, nakokende.
And one said, Be content, I pray you, and go with your servants. And he answered, I will go.
4 Boye akendeki elongo na bango. Bakendeki na ebale Yordani mpe babandaki kokata banzete.
So he went with them. And when they came to Jordan, they cut down wood.
5 Wana moko kati na bango azalaki kokata nzete, ebende ya epasola na ye ekweyaki na mayi. Agangaki: — Ah, nkolo na ngai! Nadefaki yango kodefa!
But as one was felling a beam, the axe head fell into the water: and he cried, and said, Alas, master! for it was borrowed.
6 Moto na Nzambe atunaki: — Ekweyaki na esika nini? Sima na ye kolakisa ye esika yango, Elize akataki eteni ya nzete mpe abwakaki yango na esika oyo ebende ya epasola ekweyaki. Mpe, na mbala moko, eteni ya nzete yango ematisaki ebende na likolo ya mayi, mpe ebende ekomaki kotepa.
And the man of God said, Where fell it? And he showed him the place. And he cut down a stick, and cast it in thither; and the iron did swim.
7 Elize alobaki: — Kamata yango! Boye, mosali wana asembolaki loboko na ye mpe akamataki yango.
Therefore said he, Take it up to you. And he put out his hand, and took it.
8 Mokonzi ya Siri azalaki kobundisa bana ya Isalaele. Asololaki na basali na ye mpe alobaki: « Nakotia molako na ngai na esika songolo to pakala. »
Then the king of Syria warred against Israel, and took counsel with his servants, saying, In such and such a place shall be my camp.
9 Mbala moko, moto na Nzambe atindaki maloba oyo epai ya mokonzi ya Isalaele: « Keba! Koleka na esika wana te, pamba te bato ya Siri bazali kokita kuna. »
And the man of God sent unto the king of Israel, saying, Beware that you pass not such a place; for thither the Syrians are come down.
10 Mokonzi ya Isalaele atindaki bato kokende kononga esika oyo moto na Nzambe alobelaki. Mbala ebele, Elize azalaki kokebisa mokonzi ete azala na bokebi na bisika ya ndenge wana; mpe mbala ebele, mokonzi ya Isalaele azalaki komibikisa na motambo ya bato ya Siri.
And the king of Israel sent to the place which the man of God told him and warned him of, and saved himself there, not once nor twice.
11 Suka na suka, mokonzi ya Siri asilikaki makasi, abengisaki bakalaka na ye mpe atunaki bango: — Bokoki te koyebisa ngai nani kati na biso azali na ngambo ya mokonzi ya Isalaele?
Therefore the heart of the king of Syria was sore troubled for this thing; and he called his servants, and said unto them, Will all of you not show me which of us is for the king of Israel?
12 Moko kati na bakalaka na ye alobaki: — Mokonzi, nkolo na ngai, moko te kati na biso. Ezali nde mosakoli Elize oyo azali kati na Isalaele; ye nde ayebaka mpe ayebisaka mokonzi ya Isalaele ata makambo oyo olobaka kati na shambre na yo ya kolala.
And one of his servants said, None, my lord, O king: but Elisha, the prophet that is in Israel, tells the king of Israel the words that you speak in your bedchamber.
13 Mokonzi apesaki mitindo: — Bokende koluka esika oyo azali mpo ete natinda bato mpo na kokanga ye. Bayaki koyebisa ye: — Azali na Dotani.
And he said, Go and spy where he is, that I may send and fetch him. And it was told him, saying, Behold, he is in Dothan.
14 Bongo mokonzi atindaki kuna bampunda elongo na bashar mpe basoda ebele. Bakendeki kuna na butu mpe bazingelaki engumba.
Therefore sent he thither horses, and chariots, and a great host: and they came by night, and compassed the city about.
15 Na tongo-tongo ya mokolo oyo elandaki, tango mosali ya moto na Nzambe alamukaki mpe abimaki, amonaki ete mampinga elongo na bampunda mpe bashar bazingelaki engumba. Mosali yango alobaki na Elize: — Oh nkolo na ngai, eyindi na libanda! Tokosala nini!
And when the servant of the man of God was risen early, and gone forth, behold, an host compassed the city both with horses and chariots. And his servant said unto him, Alas, my master! how shall we do?
16 Mosakoli azongisaki: — Kobanga te, pamba te ba-oyo bazali elongo na biso bazali ebele koleka ba-oyo bazali elongo na bango.
And he answered, Fear not: for they that be with us are more than they that be with them.
17 Elize asambelaki: — Oh Yawe, fungola ye miso mpo ete amona! Yawe afungolaki miso ya mosali, mpe mosali atalaki; amonaki bangomba mike etonda na bampunda mpe bashar ya moto zingazinga ya Elize.
And Elisha prayed, and said, LORD, I pray you, open his eyes, that he may see. And the LORD opened the eyes of the young man; and he saw: and, behold, the mountain was full of horses and chariots of fire round about Elisha.
18 Lokola monguna azalaki kopusana pene na ye, Elize asambelaki Yawe: — Boma ekolo oyo miso! Mpe Yawe abomaki bango miso, ndenge kaka Elize asengaki.
And when they came down to him, Elisha prayed unto the LORD, and said, Strike this people, I pray you, with blindness. And he stroke them with blindness according to the word of Elisha.
19 Elize alobaki na bango: — Nzela ezali awa te! Engumba mpe ezali awa te! Bolanda ngai, mpe nakomema bino epai ya moto oyo bozali koluka. Elize amemaki bango na Samari.
And Elisha said unto them, This is not the way, neither is this the city: follow me, and I will bring you to the man whom all of you seek. But he led them to Samaria.
20 Tango bakotaki na engumba, Elize asambelaki lisusu: — Yawe, fungola miso ya bato oyo mpo ete bamona. Yawe afungolaki miso na bango, mpe bamonaki ete bazali kati na engumba Samari.
And it came to pass, when they were come into Samaria, that Elisha said, LORD, open the eyes of these men, that they may see. And the LORD opened their eyes, and they saw; and, behold, they were in the midst of Samaria.
21 Tango mokonzi ya Isalaele amonaki bango, atunaki Elize: — Tata na ngai, naboma bango? Naboma bango?
And the king of Israel said unto Elisha, when he saw them, My father, shall I strike them? shall I strike them?
22 Elize azongisaki: — Koboma bango te! Boni, okoboma solo bato oyo okangi, na nzela ya mopanga na yo to ya tolotolo na yo? Pesa bango nde bilei mpe mayi ya komela mpo ete balia, bamela mpe bazonga epai ya mokonzi na bango.
And he answered, You shall not strike them: would you strike those whom you have taken captive with your sword and with your bow? set bread and water before them, that they may eat and drink, and go to their master.
23 Boye abongisaki feti monene mpo na bango. Tango basilisaki kolia mpe komela, azongisaki bango. Mpe bazongaki epai ya mokonzi na bango. Wuta tango yango, mampinga ya Siri batikaki kokota mpo na kobundisa Isalaele.
And he prepared great provision for them: and when they had eaten and drunk, he sent them away, and they went to their master. So the bands of Syria came no more into the land of Israel.
24 Sima na tango, Beni-Adadi, mokonzi ya Siri, asangisaki mampinga na ye nyonso mpe akendeki kozingela engumba Samari.
And it came to pass after this, that Benhadad king of Syria gathered all his host, and went up, and besieged Samaria.
25 Lokola bazingelaki Samari tango molayi, nzala makasi ekotaki kati na engumba kino moto moko ya ane ekomaki kotekama na motuya ya mbongo ya bibende ya palata, tuku mwambe; mpe bagrame nkama mibale na tuku mitano ya nyei ekawuka ya ebenga ekomaki kotekama na motuya ya mbongo ya bibende ya palata, mitano.
And there was a great famine in Samaria: and, behold, they besieged it, until an ass's head was sold for fourscore pieces of silver, and the fourth part of a cab of dove's dung for five pieces of silver.
26 Mokolo moko, wana mokonzi ya Isalaele azalaki koleka na likolo ya mir ya lopango, mwasi moko agangaki epai na ye: — Mokonzi, nkolo na ngai, sunga ngai!
And as the king of Israel was passing by upon the wall, there cried a woman unto him, saying, Help, my lord, O king.
27 Mokonzi azongisaki: — Soki Yawe asungi yo te, esika nini ngai nakozwa lisungi mpo na kosunga yo? Nazangi vino to ble ya kopesa yo.
And he said, If the LORD do not help you, whence shall I help you? out of the barn floor, or out of the winepress?
28 Nzokande, mokonzi atunaki ye lisusu: — Likambo nini ekomeli yo? Mwasi azongisaki: — Mwasi wana alobaki na ngai: « Pesa mwana na yo ya mobali mpo ete tolia ye lelo, bongo lobi, tokolia mwana na ngai. »
And the king said unto her, What disturbs you? And she answered, This woman said unto me, Give your son, that we may eat him to day, and we will eat my son tomorrow.
29 Boye tolambaki mwana na ngai ya mobali mpe toliaki ye. Mokolo oyo elandaki, nalobaki na ye: « Pesa mwana na yo ya mobali mpo ete tolia ye, » kasi abombaki ye.
So we boiled my son, and did eat him: and I said unto her on the next day, Give your son, that we may eat him: and she has hid her son.
30 Tango mokonzi ayokaki maloba ya mwasi oyo, apasolaki bilamba na ye. Lokola atambolaki lisusu na likolo ya mir ya lopango, bato bamonaki ete, na se ya bilamba na ye ya bokonzi, alataki saki na nzoto na ye.
And it came to pass, when the king heard the words of the woman, that he rent his clothes; and he passed by upon the wall, and the people looked, and, behold, he had sackcloth within upon his flesh.
31 Mokonzi alobaki: « Tika ete Nzambe apesa ngai etumbu ya makasi soki kaka moto ya Elize, mwana mobali ya Shafati, etikali na likolo ya mapeka na ye. »
Then he said, God do so and more also to me, if the head of Elisha the son of Shaphat shall stand on him this day.
32 Nzokande, Elize avandaki kati na ndako na ye, elongo na bakambi ya engumba. Mokonzi atindaki ntoma moko epai ya Elize. Kasi liboso ete akoma, Elize alobaki na bakambi ya engumba: « Bozali komona te ete mobomi oyo atindi moto mpo na koya kokata ngai moto? Bosala keba! Tango kaka bokomona ye, bokanga ekuke liboso na ye mpe botindika ye na yango na sima! Boyoka! Wana ezali makelele ya makolo ya nkolo na ye te, oyo ezali koyokana sima na ye? »
But Elisha sat in his house, and the elders sat with him; and the king sent a man from before him: but before the messenger came to him, he said to the elders, See all of you how this son of a murderer has sent to take away mine head? look, when the messenger comes, shut the door, and hold him fast at the door: is not the sound of his master's feet behind him?
33 Wana Elize azalaki nanu koloba, ntoma ya mokonzi akomaki mpe ayebisaki ye maloba ya mokonzi: « Pasi oyo nyonso ewuti epai ya Yawe! Nakozela lisusu nini kowuta na Ye? »
And while he yet talked with them, behold, the messenger came down unto him: and he said, Behold, this evil is of the LORD; what should I wait for the LORD any longer?

< 2 Bakonzi 6 >