< 1 Masolo ya Kala 1 >

1 Adamu, Seti, Enoshi,
Adam, Sheth, Enosh,
2 Kenani, Maalalele, Yeredi,
Kenan, Mahalaleel, Jered,
3 Enoki, Metusalemi, Lemeki,
Henoch, Methuselah, Lamech,
4 Noa, Semi, Cham mpe Jafeti.
Noah, Shem, Ham, and Japheth.
5 Bana mibali ya Jafeti: Gomeri, Magogi, Madayi, Yavani, Tubali, Mesheki mpe Tirasi.
The sons of Japheth; Gomer, and Magog, and Madai, and Javan, and Tubal, and Meshech, and Tiras.
6 Bana mibali ya Gomeri: Ashikenazi, Difati mpe Togarima.
And the sons of Gomer; Ashchenaz, and Riphath, and Togarmah.
7 Bana mibali ya Yavani: Elisha, Tarsisi, Kitimi mpe Dodanimi.
And the sons of Javan; Elishah, and Tarshish, Kittim, and Dodanim.
8 Bana mibali ya Cham: Kushi, Mitsirayimi, Puti mpe Kanana.
The sons of Ham; Cush, and Mizraim, Put, and Canaan.
9 Bana mibali ya Kushi: Seba, Avila, Sabita, Raema mpe Sabiteka. Bana mibali ya Raema: Sheba mpe Dedani.
And the sons of Cush; Seba, and Havilah, and Sabta, and Raamah, and Sabtecha. And the sons of Raamah; Sheba, and Dedan.
10 Kushi azalaki tata ya Nimirodi oyo azalaki elombe ya liboso ya bitumba kati na mokili.
And Cush brings forth Nimrod: he began to be mighty upon the earth.
11 Mitsirayimi azalaki koko ya bato ya Ludi, ya Anami, ya Leabi, ya Nafitu,
And Mizraim brings forth Ludim, and Anamim, and Lehabim, and Naphtuhim,
12 ya Patrusi, ya Kasilu (oyo babimisa bato ya Filisitia) mpe ya Kereti.
And Pathrusim, and Casluhim, (of whom came the Philistines, ) and Caphthorim.
13 Kanana azalaki tata ya Sidoni, mwana na ye ya liboso, ya Eti,
And Canaan brings forth Zidon his firstborn, and Heth,
14 ya Yebusi, ya Amori, ya Girigazi,
The Jebusite also, and the Amorite, and the Girgashite,
15 ya Evi, ya Ariki, ya Sini,
And the Hivite, and the Arkite, and the Sinite,
16 ya Arivadi, ya Tsemari mpe ya Amati.
And the Arvadite, and the Zemarite, and the Hamathite.
17 Bana mibali ya Semi: Elami, Asuri, Aripakishadi, Ludi mpe Arami. Bana mibali ya Arami: Utsi, Uli, Geteri mpe Mesheki.
The sons of Shem; Elam, and Asshur, and Arphaxad, and Lud, and Aram, and Uz, and Hul, and Gether, and Meshech.
18 Aripakishadi abotaki Shela, mpe Shela abotaki Eberi.
And Arphaxad brings forth Shelah, and Shelah brings forth Eber.
19 Eberi abotaki bana mibali mibale; moko, kombo na ye ezalaki « Pelegi » oyo elingi koloba: Kokabola; pamba te ezalaki na tango na ye nde bakabolaki mabele. Kombo ya mwana mosusu ezalaki « Yokitani. »
And unto Eber were born two sons: the name of the one was Peleg; because in his days the earth was divided: and his brother's name was Joktan.
20 Yokitani abotaki Alimodadi, Shelefi, Atsarimaveti, Yera,
And Joktan brings forth Almodad, and Sheleph, and Hazarmaveth, and Jerah,
21 Adorami, Uzali, Dikila,
Hadoram also, and Uzal, and Diklah,
22 Obali, Abimaeli, Saba,
And Ebal, and Abimael, and Sheba,
23 Ofiri, Avila mpe Yobabi. Bango nyonso wana bazalaki bakitani ya Yokitani.
And Ophir, and Havilah, and Jobab. All these were the sons of Joktan.
24 Semi, Aripakishadi, Shela,
Shem, Arphaxad, Shelah,
25 Eberi, Pelegi, Rewu,
Eber, Peleg, Reu,
26 Serugi, Naori, Tera,
Serug, Nahor, Terah,
27 mpe Abrami oyo azali Abrayami.
Abram; the same is Abraham.
28 Bana mibali ya Abrayami: Izaki mpe Isimaeli.
The sons of Abraham; Isaac, and Ishmael.
29 Tala bakitani na bango: Nebayoti, mwana mobali ya liboso ya Isimaeli; Kedari, Adibeli, Mibisami,
These are their generations: The firstborn of Ishmael, Nebaioth; then Kedar, and Adbeel, and Mibsam,
30 Mishima, Duma, Masa, Adadi, Tema,
Mishma, and Dumah, Massa, Hadad, and Tema,
31 Yeturi, Nafishi mpe Kedima. Bango nde bazalaki bana mibali ya Isimaeli.
Jetur, Naphish, and Kedemah. These are the sons of Ishmael.
32 Bana mibali oyo Abrayami abotaki na Ketura, makangu na ye: Zimirani, Yokishani, Medani, Madiani, Ishibaki mpe Shuwa. Bana mibali ya Yokishani: Saba mpe Dedani.
Now the sons of Keturah, Abraham's concubine: she bare Zimran, and Jokshan, and Medan, and Midian, and Ishbak, and Shuah. And the sons of Jokshan; Sheba, and Dedan.
33 Bana mibali ya Madiani: Efa, Eferi, Enoki, Abida mpe Elida. Bango nyonso wana bazalaki bakitani ya Ketura.
And the sons of Midian; Ephah, and Epher, and Henoch, and Abida, and Eldaah. All these are the sons of Keturah.
34 Abrayami azalaki tata ya Izaki. Bana mibali ya Izaki: Ezawu mpe Isalaele.
And Abraham brings forth Isaac. The sons of Isaac; Esau and Israel.
35 Bana mibali ya Ezawu: Elifazi, Reweli, Yewushi, Yaelami mpe Kora.
The sons of Esau; Eliphaz, Reuel, and Jeush, and Jaalam, and Korah.
36 Bana mibali ya Elifazi: Temani, Omari, Tsefo, Gaetami, Kenazi, Timina mpe Amaleki.
The sons of Eliphaz; Teman, and Omar, Zephi, and Gatam, Kenaz, and Timna, and Amalek.
37 Bana mibali ya Reweli: Naati, Zera, Shama mpe Miza.
The sons of Reuel; Nahath, Zerah, Shammah, and Mizzah.
38 Bana mibali ya Seiri: Lotani, Shobali, Tsibeoni, Ana, Dishoni, Etseri mpe Dishani.
And the sons of Seir; Lotan, and Shobal, and Zibeon, and Anah, and Dishon, and Ezar, and Dishan.
39 Bana mibali ya Lotani: Ori mpe Omani. Timina azalaki ndeko mwasi ya Lotani.
And the sons of Lotan; Hori, and Homam: and Timna was Lotan's sister.
40 Bana mibali ya Shobali: Alivani, Manaati, Ebali, Shefo mpe Onami. Bana mibali ya Tsibeoni: Aya mpe Ana.
The sons of Shobal; Alian, and Manahath, and Ebal, Shephi, and Onam. and the sons of Zibeon; Aiah, and Anah.
41 Mwana mobali ya Ana: Dishoni. Bana mibali ya Dishoni: Emidani, Eshibani, Yitirani mpe Kerani.
The sons of Anah; Dishon. And the sons of Dishon; Amram, and Eshban, and Ithran, and Cheran.
42 Bana mibali ya Etseri: Bilani, Zavani mpe Yaakani. Bana mibali ya Dishani: Utsi mpe Arani.
The sons of Ezer; Bilhan, and Zavan, and Jakan. The sons of Dishan; Uz, and Aran.
43 Tala bakonzi oyo bakambaki Edomi liboso ete Isalaele ekoma kokambama na mokonzi: Bela, mwana mobali ya Beori, oyo kombo ya engumba na ye ezalaki « Dinaba. »
Now these are the kings that reigned in the land of Edom before any king reigned over the children of Israel; Bela the son of Beor: and the name of his city was Dinhabah.
44 Tango Bela akufaki, Yobabi, mwana mobali ya Zera, moto ya mokili ya Botsira, akitanaki na ye na bokonzi.
And when Bela was dead, Jobab the son of Zerah of Bozrah reigned in his position.
45 Tango Yobabi akufaki, Ushami, moto ya mokili ya Temani, akitanaki na ye na bokonzi.
And when Jobab was dead, Husham of the land of the Temanites reigned in his position.
46 Tango Ushami akufaki, Adadi, mwana mobali ya Bedadi, akitanaki na ye na bokonzi. Alongaki bato ya Madiani na mokili ya bato ya Moabi. Engumba na ye ezalaki Aviti.
And when Husham was dead, Hadad the son of Bedad, which stroke Midian in the field of Moab, reigned in his position: and the name of his city was Avith.
47 Tango Adadi akufaki, Samila, moto ya engumba Masireka, akitanaki na ye na bokonzi.
And when Hadad was dead, Samlah of Masrekah reigned in his position.
48 Tango Samila akufaki, Saulo, moto ya engumba Reoboti, engumba oyo etongama pembeni ya ebale, akitanaki na ye na bokonzi.
And when Samlah was dead, Shaul of Rehoboth by the river reigned in his position.
49 Tango Saulo akufaki, Bala-Anani, mwana mobali ya Akibori, akitanaki na ye na bokonzi.
And when Shaul was dead, Baalhanan the son of Achbor reigned in his position.
50 Tango Bala-Anani akufaki, Adadi akitanaki na ye na bokonzi. Engumba na ye ezalaki « Pawu, » mpe kombo ya mwasi na ye ezalaki « Meetabeli. » Meetabeli azalaki mwana mwasi ya Matiredi mpe koko ya Mezaabi.
And when Baalhanan was dead, Hadad reigned in his position: and the name of his city was Pai; and his wife's name was Mehetabel, the daughter of Matred, the daughter of Mezahab.
51 Adadi mpe akufaki. Tala bakombo ya bakambi ya Edomi: Timina, Aliva, Yeteti,
Hadad died also. And the dukes of Edom were; duke Timnah, duke Aliah, duke Jetheth,
52 Olibama, Ela, Pinoni,
Duke Aholibamah, duke Elah, duke Pinon,
53 Kenazi, Temani, Mibitsari,
Duke Kenaz, duke Teman, duke Mibzar,
54 Magidieli mpe Irami. Bango nde bazalaki bakonzi ya Edomi.
Duke Magdiel, duke Iram. These are the dukes of Edom.

< 1 Masolo ya Kala 1 >