< 2 Masolo ya Kala 32 >

1 Sima na Ezekiasi kotalisa boyengebene na ye epai ya Nzambe, Senakeribe, mokonzi ya Asiri, ayaki kobundisa Yuda. Azingelaki bingumba batonga makasi, pamba te azalaki na posa ya kobotola yango.
After these things, and the establishment thereof, Sennacherib king of Assyria came, and entered into Judah, and encamped against the fenced cities, and thought to win them for himself.
2 Tango Ezekiasi amonaki ete Senakeribe ayei mpe azali na makanisi ya kobundisa Yelusalemi,
And when Hezekiah saw that Sennacherib was come, and that he was purposed to fight against Jerusalem,
3 apesaki bakalaka mpe bakonzi ya basoda na ye likanisi ya kokanga bitima oyo ezalaki na libanda ya engumba. Bango nyonso bandimaki likanisi yango mpe basungaki ye.
He took counsel with his princes and his mighty men to stop the waters of the fountains which were without the city: and they did help him.
4 Bato ebele basanganaki mpe bakangaki bitima nyonso elongo na mayi oyo ezalaki kotiola na se ya mabele. Balobaki: — Mpo na nini bakonzi ya Asiri baya kokuta mayi ebele?
So there was gathered much people together, who stopped all the fountains, and the brook that ran through the midst of the land, saying, Why should the kings of Assyria come, and find much water?
5 Ezekiasi asalaki mosala makasi ya kobamba madusu ya mir mpe ya kobakisa bosanda ya bandako milayi; atongaki mir mosusu na libanda, alendisaki mir ya engumba ya Davidi mpe asalaki lisusu makonga mpe banguba ebele.
Also he strengthened himself, and built up all the wall that was broken, and raised it up to the towers, and another wall without, and repaired Millo in the city of David, and made darts and shields in abundance.
6 Atiaki bakonzi ya basoda mpo ete bakamba bato mpe asangisaki bango liboso na ye, na esika oyo ezali pene ya ekuke ya engumba. Alendisaki bango na maloba oyo:
And he set captains of war over the people, and gathered them together to him in the street of the gate of the city, and spoke comfortably to them, saying,
7 — Bozala makasi mpe boyika mpiko! Bobanga te mpe bolenga te liboso ya mokonzi ya Asiri mpe ya mampinga ya basoda ebele oyo bazali elongo na ye, pamba te Ye oyo azali elongo na biso azali na nguya monene koleka ye.
Be strong and courageous, be not afraid nor dismayed for the king of Assyria, nor for all the multitude that is with him: for there be more with us than with him:
8 Mokonzi oyo ya Asiri azali kaka na nguya ya bomoto; kasi biso, tozali elongo na Yawe, Nzambe na biso, oyo akosunga mpe akobundela biso bitumba. Boye bato batiaki elikya na maloba oyo Ezekiasi, mokonzi ya Yuda, alobaki.
With him is an arm of flesh; but with us is the LORD our God to help us, and to fight our battles. And the people rested themselves upon the words of Hezekiah king of Judah.
9 Sima na yango, wana Senakeribe, mokonzi ya Asiri, elongo na mampinga ya basoda na ye nyonso bazingelaki engumba Lakishi, atindaki bakonzi ya basoda na ye epai ya Ezekiasi, mokonzi ya Yuda, mpe epai ya bato nyonso ya Yuda, oyo bazalaki na Yelusalemi; atindaki bango kopesa sango oyo:
After this did Sennacherib king of Assyria send his servants to Jerusalem, (but he himself laid siege against Lachish, and all his power with him, ) unto Hezekiah king of Judah, and unto all Judah that were at Jerusalem, saying,
10 « Tala makambo oyo Senakeribe, mokonzi ya Asiri, alobi: Botie elikya na bino na nini mpo ete bowumela kati na Yelusalemi oyo bazingeli?
Thus says Sennacherib king of Assyria, Whereon do all of you trust, that all of you abide in the siege in Jerusalem?
11 Bozali komona te ete Ezekiasi azali kokosa bino mpo ete bokufa na nzala mpe na posa ya mayi tango azali koloba: ‹ Yawe, Nzambe na biso, akokangola biso na loboko ya mokonzi ya Asiri? ›
Does not Hezekiah persuade you to give over yourselves to die by famine and by thirst, saying, The LORD our God shall deliver us out of the hand of the king of Assyria?
12 Boni, ezali kaka Ezekiasi wana te oyo alongolaki bisambelo ya likolo ya bangomba mpe bitumbelo ya banzambe tango alobaki na Yuda mpe na Yelusalemi: ‹ Bosengeli kogumbama liboso ya etumbelo moko kaka mpe kobonza mbeka ya malasi na likolo ya etumbelo yango? ›
Has not the same Hezekiah taken away his high places and his altars, and commanded Judah and Jerusalem, saying, All of you shall worship before one altar, and burn incense upon it?
13 Boyebi te makambo oyo ngai mpe batata na ngai tosalaki bato nyonso ya bikolo mosusu? Boni, banzambe ya bikolo wana bakokaki solo kokangola mikili na bango na maboko na ngai?
Know all of you not what I and my fathers have done unto all the people of other lands? were the gods of the nations of those lands any ways able to deliver their lands out of mine hand?
14 Kati na banzambe nyonso ya bikolo oyo batata na ngai babebisaki, nani akokaki kokangola bato na ye na maboko na ngai? Bongo ndenge nini Nzambe na bino akoka solo kokangola bino na maboko na ngai?
Who was there among all the gods of those nations that my fathers utterly destroyed, that could deliver his people out of mine hand, that your God should be able to deliver you out of mine hand?
15 Sik’oyo, botika te ete Ezekiasi amema bino na libunga mpe akosa bino ndenge wana; bondimela ye te! Pamba te soki nzambe moko te ya ekolo songolo to ya mokili pakala alongaki kokangola bato na ye na loboko na ngai mpe na loboko ya batata na ngai, bongo nzambe na bino nde akolonga kokangola bino na loboko na ngai? »
Now therefore let not Hezekiah deceive you, nor persuade you on this manner, neither yet believe him: for no god of any nation or kingdom was able to deliver his people out of mine hand, and out of the hand of my fathers: how much less shall your God deliver you out of mine hand?
16 Bakonzi ya basoda ya Senakeribe bakobaki koloba mabe na tina na Yawe Nzambe mpe Ezekiasi, mosali na Ye.
And his servants spoke yet more against the LORD God, and against his servant Hezekiah.
17 Senakeribe akomaki lisusu mikanda mpo na kofinga Yawe, Nzambe ya Isalaele. Tala maloba mabe oyo akomaki na tina na Ye: « Ndenge banzambe ya bato ya bikolo mosusu balongaki te kokangola bato na bango, ndenge wana mpe nzambe ya Ezekiasi akolonga te kokangola bato na ye na maboko na ngai. »
He wrote also letters to rail on the LORD God of Israel, and to speak against him, saying, As the gods of the nations of other lands have not delivered their people out of mine hand, so shall not the God of Hezekiah deliver his people out of mine hand.
18 Boye bagangaki na lokota ya Ebre mpo na kolengisa mpe kobangisa bato ya Yelusalemi oyo batelemaki likolo ya mir, mpo ete bakoka kobotola engumba.
Then they cried with a loud voice in the Jews' speech unto the people of Jerusalem that were on the wall, to affright them, and to trouble them; that they might take the city.
19 Balobaki na tina na Nzambe ya Yelusalemi lokola bato oyo bazali kolobela nzambe moko ya bapagano, nzambe oyo bato basali na ndenge mpe na maboko na bango!
And they spoke against the God of Jerusalem, as against the gods of the people of the earth, which were the work of the hands of man.
20 Mokonzi Ezekiasi mpe mosakoli Ezayi, mwana mobali ya Amotsi, babondelaki Nzambe na tina na yango mpe bagangaki na ngambo ya Lola mpo na kosenga lisungi.
And for this cause Hezekiah the king, and the prophet Isaiah the son of Amoz, prayed and cried to heaven.
21 Yawe atindaki anjelu moko oyo abomaki basoda nyonso ya mpiko, bakonzi ya basoda elongo na bakambi kati molako ya mokonzi ya Asiri. Mokonzi ya Asiri azongaki na mokili na ye na soni makasi. Mpe tango akotaki na ndako ya nzambe na ye, bana na ye ya mibali babomaki ye na mopanga.
And the LORD sent an angel, which cut off all the mighty men of valour, and the leaders and captains in the camp of the king of Assyria. So he returned with shame of face to his own land. And when he was come into the house of his god, they that came out of his own bowels slew him there with the sword.
22 Ezalaki ndenge wana nde Yawe akangolaki Ezekiasi mpe bato ya Yelusalemi na maboko ya Senakeribe, mokonzi ya Asiri, mpe na maboko ya banguna mosusu; mpe apesaki bango kimia na bangambo nyonso.
Thus the LORD saved Hezekiah and the inhabitants of Jerusalem from the hand of Sennacherib the king of Assyria, and from the hand of all other, and guided them on every side.
23 Bato ebele bamemaki na Yelusalemi makabo mpo na Yawe mpe bakado ya motuya mpo na Ezekiasi, mokonzi ya Yuda. Wuta tango wana, lokumu ya Ezekiasi emataki makasi na miso ya bikolo nyonso.
And many brought gifts unto the LORD to Jerusalem, and presents to Hezekiah king of Judah: so that he was magnified in the sight of all nations from thenceforth.
24 Na tango wana, Ezekiasi abelaki bokono moko ya makasi, pene akufa. Asambelaki Yawe; mpe Yawe ayanolaki, apesaki ye elembo moko ya kokamwa.
In those days Hezekiah was sick to the death, and prayed unto the LORD: and he spoke unto him, and he gave him a sign.
25 Kasi mpo ete Ezekiasi akomaki na lolendo, atambolaki lisusu te na lolenge ya kondima bolamu ya Nzambe mpe ya kozongisela Ye matondi; mpo na yango, Yawe asilikelaki ye, Yuda mpe Yelusalemi.
But Hezekiah rendered not again according to the benefit done unto him; for his heart was lifted up: therefore there was wrath upon him, and upon Judah and Jerusalem.
26 Bongo Ezekiasi amikitisaki, atikaki lolendo na ye mpe abongolaki motema. Bato ya Yelusalemi mpe basalaki lokola Ezekiasi. Boye, Yawe akweyiselaki bango kanda na Ye te na mikolo nyonso oyo Ezekiasi azalaki mokonzi.
Notwithstanding Hezekiah humbled himself for the pride of his heart, both he and the inhabitants of Jerusalem, so that the wrath of the LORD came not upon them in the days of Hezekiah.
27 Ezekiasi azalaki na bozwi ebele mpe na lokumu mingi, abombaki palata, wolo, mabanga ya talo, biloko ya solo kitoko, banguba mpe biloko nyonso ya talo.
And Hezekiah had exceeding much riches and honour: and he made himself treasuries for silver, and for gold, and for precious stones, and for spices, and for shields, and for all manner of pleasant jewels;
28 Atongaki bibombelo ya ble, ya vino ya sika mpe ya mafuta; atongaki lisusu mapango mpe bandako mpo na bibwele na ye.
Storehouses also for the increase of corn, and wine, and oil; and stalls for all manner of beasts, and cotes for flocks.
29 Atongaki bingumba mpe akomaki na bibwele ebele: bantaba, bameme mpe bangombe. Nzambe apesaki ye bozwi mingi.
Moreover he provided him cities, and possessions of flocks and herds in abundance: for God had given him substance very much.
30 Ezali mpe Ezekiasi moto akangaki monoko ya etima ya Giyoni mpe alekisaki mayi na yango na se ya mabele, na ngambo ya weste ya engumba ya Davidi. Ezekiasi azalaki kolonga na misala na ye nyonso.
This same Hezekiah also stopped the upper watercourse of Gihon, and brought it straight down to the west side of the city of David. And Hezekiah prospered in all his works.
31 Kasi tango bakambi ya Babiloni batindelaki ye bakalaka mpo na kotuna ye na tina na elembo ya kokamwa oyo esalemaki kati na mokili, Nzambe atikaki Ezekiasi kosala na ndenge na ye moko mpo na komeka ye mpe koyeba mozindo ya motema na ye.
Nevertheless in the business of the ambassadors of the princes of Babylon, who sent unto him to enquire of the wonder that was done in the land, God left him, to try him, that he might know all that was in his heart.
32 Makambo mosusu oyo etali Ezekiasi elongo na misala ya botosi na ye kati na makambo ya Nzambe, ekomama kati na emoniseli ya mosakoli Ezayi, mwana mobali ya Amotsi, mpe kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Yuda mpe ya Isalaele.
Now the rest of the acts of Hezekiah, and his goodness, behold, they are written in the vision of Isaiah the prophet, the son of Amoz, and in the book of the kings of Judah and Israel.
33 Ezekiasi akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye na ngomba moke epai wapi bakunda ya bakitani ya Davidi ezali. Bato nyonso ya Yuda mpe ya Yelusalemi bapesaki ye lokumu tango akufaki, mpe Manase, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi.
And Hezekiah slept with his fathers, and they buried him in the chiefest of the sepulchers of the sons of David: and all Judah and the inhabitants of Jerusalem did him honour at his death. And Manasseh his son reigned in his position.

< 2 Masolo ya Kala 32 >