< 1 Bakonzi 17 >

1 Eliya, moto ya Tishibe, moko kati na bavandi ya Galadi, alobaki na mokonzi Akabi: — Solo, na Kombo na Yawe, Nzambe ya Isalaele, Nzambe oyo ngai nasalelaka, mamwe mpe mvula ekozala te na mibu oyo ezali koya, longola kaka soki nasengi yango.
And Elijah the Tishbite, of the inhabitants of Gilead, said to Ahab, "As Jehovah, the God of Israel, lives, before whom I stand, there shall not be dew nor rain these years, except by my word."
2 Bongo Yawe alobaki na Eliya:
And the word of Jehovah came to him, saying,
3 — Longwa awa, kende na ngambo ya este mpe bombama na lubwaku ya Keriti, na ngambo ya este ya Yordani.
"Go away from here, turn eastward, and hide yourself by the Wadi Cherith, that is near the Jordan.
4 Kuna, okomela mayi ya lubwaku, mpe napesi mitindo epai ya bayanganga mpo ete eleisa yo.
And it shall be that you will drink from the wadi. I have commanded the ravens to feed you there."
5 Eliya asalaki ndenge Yawe alobaki na ye: akendeki na lubwaku ya Keriti na ngambo ya este ya Yordani mpe avandaki kuna.
So he went and did according to the word of Jehovah; for he went and lived by the Wadi Cherith, that is near the Jordan.
6 Bayanganga ezalaki komemela ye mapa mpe mbisi na tongo mpe na pokwa, mpe amelaki mayi ya lubwaku.
And the ravens brought him bread and meat in the morning, and bread and meat in the evening. And he drank from the wadi.
7 Sima na mwa tango, mayi ya lubwaku ekawukaki mpo ete mvula ezalaki lisusu konoka te na mokili.
And it happened after a while that the wadi dried up, because there was no rain in the land.
8 Yawe alobaki na Eliya:
The word of Jehovah came to him, saying,
9 « Kende na lombangu na Sarepita, kati na mokili ya Sidoni, mpe vanda kuna. Napesi mitindo kuna epai ya mwasi moko oyo akufisa mobali ete apesa yo bilei. »
"Arise, go to Zarephath, which belongs to Sidon, and stay there. Look, I have commanded a widow there to provide for you."
10 Eliya akendeki na Sarepita. Tango akomaki na ekuke ya engumba, mwasi moko oyo akufisa mobali azalaki wana; azalaki kolokota bakoni. Eliya abengaki ye mpe alobaki na ye: — Nabondeli yo, zwela ngai mwa mayi na mbeki mpo ete namela.
So he got up and went to Zarephath. And when he came to the gate of the city, look, a widow was there gathering wood. And he called to her, and said, "Please bring me a little water in a pitcher, that I may drink."
11 Tango mwasi yango azalaki kokende kozwa mayi, Eliya ayebisaki ye lisusu: — Nabondeli yo, memela ngai mpe lipa.
And as she was going to get it, he called to her, and said, "Please bring me a piece of bread in your hand."
12 Mwasi yango azongiselaki ye: — Na Kombo na Yawe, Nzambe na yo, nazali na lipa te; nazali kaka na mwa ndambo ya farine na sani mpe ndambo ya mafuta na mbeki. Nazali kolokota mwa koni oyo nakomema na ndako mpo na kolamba bilei ya suka mpo na ngai mpe mpo na mwana na ngai ya mobali. Tango tokosilisa yango, ekotikala na biso kaka kozela kufa.
She said, "As Jehovah your God lives, I do not have anything baked, except a handful of flour in a jar, and a little oil in a jug. Look, I am gathering a couple of sticks, that I may go in and bake it for me and my son, that we may eat it, and die."
13 Eliya alobaki na ye: — Kobanga te, zonga na ndako mpe sala ndenge olobi. Kasi salela ngai nanu lipa na oyo ozali na yango mpe memela ngai yango; bongo na sima, okosala mpo na yo mpe mpo na mwana na yo ya mobali.
And Elijah said to her, "Do not be afraid. Go and do as you have said. But make me of it a little cake first, and bring it out to me, and afterward make some for yourself and for your son.
14 Pamba te, tala maloba oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi: « Farine ekozanga te na sani, mpe mafuta ekosila te na mbeki. »
For thus says Jehovah, the God of Israel, 'The jar of flour shall not empty, neither shall the jug of oil be empty, until the day that Jehovah sends rain on the surface of the land.'"
15 Mwasi yango akendeki mpe asalaki ndenge kaka Eliya alobaki. Boye, na tango molayi, bilei ezangaki te mpo na Eliya, mpo na mwasi oyo akufisa mobali mpe mpo na ndako na ye.
And she went and did according to the saying of Elijah. And she, and he, and her household, ate for a long time.
16 Farine etikalaki kosila te na sani, mpe mafuta etikalaki kokawuka te na mbeki, kolanda ndenge Yawe alobaki na nzela ya mosakoli Eliya.
The jar of flour did not empty, neither did the jug of oil become empty, according to the word of Jehovah, which he spoke by Elijah.
17 Sima na mwa tango, mwana mobali ya mwasi oyo akufisa mobali, nkolo ndako, abelaki; mpe pasi na ye ekomaki makasi penza kino akataki motema.
It happened after these things, that the son of the woman, the mistress of the house, fell sick. And his illness was so severe that there was no breath left in him.
18 Mwasi yango alobaki na Eliya: — Moto na Nzambe, nasali yo nini? Boni, oyaki na ndako na ngai mpo na kokundola lisumu na ngai mpe kobomisa mwana na ngai ya mobali?
And she said to Elijah, "What do we have in common, O man of God? You have come to me to bring my sin to memory, and to kill my son."
19 Eliya azongisaki: — Pesa ngai mwana na yo ya mobali. Eliya azwaki mwana yango na maboko ya mwasi oyo akufisa mobali, amemaki ye na shambre ya likolo epai wapi azalaka kovanda mpe alalisaki ye na mbeto na ye;
And he said to her, "Give me your son." And he took him out of her lap and carried him up into the room where he stayed, and laid him on his own bed.
20 abelelaki Yawe na maloba oyo: — Oh Yawe, Nzambe na ngai, mpo na nini koyeisa lisusu pasi na bomoi ya mwasi oyo akufisa mobali, na koboma mwana na ye ya mobali; nzokande ayambaki ngai epai na ye?
He cried to Jehovah, and said, "Jehovah my God, have you also brought disaster on the widow with whom I sojourn, by killing her son?"
21 Sima, amitandaki mbala misato likolo ya mwana mobali mpe abelelaki Yawe na maloba oyo: — Oh Yawe, Nzambe na ngai, tika ete pema ya mwana mobali oyo ezonga kati na ye.
And he stretched himself upon the child three times, and called out to Jehovah, and said, "Jehovah my God, please let this child's soul come into him again."
22 Yawe ayanolaki libondeli ya Eliya mpe azongisaki pema kati na mwana mobali, bongo mwana yango azongaki lisusu na bomoi.
Jehovah listened to the voice of Elijah; and the soul of the child came into him again, and he revived.
23 Eliya azwaki mwana mpe akitisaki ye wuta na shambre ya likolo kino kati na ndako. Apesaki mwana epai ya mama na ye mpe alobaki: — Tala mwana na yo ya mobali, azali na bomoi.
And Elijah took the child and brought him down out of the room into the house and gave him to his mother. And Elijah said, "See, your son lives."
24 Mwasi yango alobaki na Eliya: — Nasosoli sik’oyo ete ozali solo moto na Nzambe; mpe Liloba na Yawe, oyo ebimaka na monoko na yo ezali penza solo.
And the woman said to Elijah, "Now I know that you are a man of God and that the word of Jehovah in your mouth is the truth."

< 1 Bakonzi 17 >