< 2 Bakonzi 1 >

1 Sima na kufa ya mokonzi Akabi, bato ya Moabi batombokelaki Isalaele.
Moab rebelled against Israel after the death of Ahab.
2 Mokonzi Akazia akweyaki na Samari wuta na lininisa ya shambre na ye ya likolo mpe azokaki pota moko ya makasi. Atindaki bantoma na ye mpe alobaki na bango: — Bokende kotuna epai ya Bala-Zebubi, nzambe ya Ekroni, mpo na koyeba soki nakobika solo na likama oyo.
Ahaziah fell down through the lattice in his upper room that was in Samaria, and was sick. So he sent messengers, and said to them, "Go, inquire of Baal Zebub, the god of Ekron, whether I will recover of this sickness."
3 Kasi anjelu ya Yawe alobaki na Eliya, moto ya mboka Tishibe: — Kende kokutana na bantoma ya mokonzi ya Samari mpe tuna bango: « Boni, Nzambe azali te kati na Isalaele mpo ete bokende kotuna epai ya Bala-Zebubi, nzambe ya Ekroni?
But the angel of Jehovah said to Elijah the Tishbite, "Arise, go up to meet the messengers of the king of Samaria, and tell them, 'Is it because there is no God in Israel, that you go to inquire of Baal Zebub, the god of Ekron?
4 Mpo na yango, tala makambo oyo Yawe alobi: ‹ Okokita te na mbeto oyo olali, pamba te, solo, okokufa. › » Boye Eliya akendeki.
Now therefore thus says Jehovah, "You shall not come down from the bed where you have gone up, but shall surely die."'" Elijah departed.
5 Tango bantoma bazongaki epai ya mokonzi, atunaki bango: — Mpo na nini bozongi?
The messengers returned to him, and he said to them, "Why is it that you have returned?"
6 Bazongisaki: — Moto moko ayaki kokutana na biso mpe alobaki na biso: « Bozonga epai ya mokonzi oyo atindi bino mpe boloba na ye: Tala liloba oyo Yawe alobi: ‹ Boni, Nzambe azali lisusu te kati na Isalaele; yango wana ozali kotinda bato kokende kotuna epai ya Bala-Zebubi, nzambe ya Ekroni? › Mpo na yango, okokita te na mbeto oyo olali; okokufa solo. »
They said to him, "A man came up to meet us, and said to us, 'Go, return to the king who sent you, and tell him, "Thus says Jehovah, 'Is it because there is no God in Israel, that you send to inquire of Baal Zebub, the god of Ekron? Therefore you shall not come down from the bed where you have gone up, but shall surely die.'"'"
7 Mokonzi atunaki bango: — Moto oyo ayaki kokutana na bino mpe ayebisaki bino makambo oyo azalaki ndenge nini?
He said to them, "What kind of man was he who came up to meet you, and told you these words?"
8 Bazongisaki: — Azalaki mobali moko alata bilamba ya poso ya nyama na loketo na ye. Mokonzi alobaki: — Ezalaki kaka Eliya, moto ya Tishibe.
They answered him, "He was a hairy man, and wearing a leather belt around his waist." He said, "It is Elijah the Tishbite."
9 Mbala moko, mokonzi atindaki mokonzi ya basoda tuku mitano epai ya Eliya elongo na basoda na ye tuku mitano. Mokonzi ya basoda tuku mitano akendeki epai ya Eliya oyo azalaki kovanda na songe ya ngomba mpe alobaki na ye: — Moto na Nzambe, mokonzi apesi mitindo ete okende epai na ye.
Then the king sent a captain of fifty with his fifty to him. He went up to him; and look, he was sitting on the top of the hill. He said to him, "Man of God, the king has said, 'Come down.'"
10 Kasi Eliya azongiselaki mokonzi yango ya basoda: — Soki solo nazali moto na Nzambe, tika ete moto ekita wuta na likolo mpe ezikisa yo mpe bato na yo tuku mitano. Bongo moto ekitaki wuta na likolo mpe ezikisaki mokonzi yango ya basoda elongo na basoda na ye tuku mitano.
Elijah answered to the captain of fifty, "If I am a man of God, let fire come down from the sky, and consume you and your fifty." Fire came down from the sky, and consumed him and his fifty.
11 Mokonzi atindaki lisusu epai ya Eliya mokonzi mosusu ya basoda tuku mitano elongo na basoda na ye tuku mitano. Mokonzi ya basoda alobaki na Eliya: — Moto na Nzambe, mokonzi apesi mitindo ete okende noki epai na ye.
Again he sent to him another captain of fifty and his fifty. And he went up and said to him, "Man of God, the king has said, 'Come down quickly.'"
12 Kasi Eliya azongiselaki mokonzi ya basoda: — Soki solo nazali moto na Nzambe, tika ete moto ekita wuta na likolo mpe ezikisa yo elongo na bato na yo tuku mitano. Mbala moko moto ekitaki wuta na likolo mpe ezikisaki mokonzi ya basoda tuku mitano elongo na basoda na ye.
And Elijah answered and said to him, "If I am a man of God, let fire come down from the sky, and consume you and your fifty." The fire of God came down from the sky, and consumed him and his fifty.
13 Mokonzi Akazia atindaki lisusu na mbala ya misato mokonzi mosusu ya basoda tuku mitano elongo na basoda tuku mitano. Mokonzi yango akendeki kofukama liboso ya Eliya mpe abondelaki ye: — Moto na Nzambe, tika ete bomoi na ngai mpe bomoi ya basali na yo, bato tuku mitano oyo, ezala na motuya na miso na yo!
And he tried again and sent a third captain with his fifty. The third captain of fifty went up, and came and fell on his knees before Elijah, and begged him, and said to him, "Man of God, please let my life, and the life of these fifty your servants, be precious in your sight.
14 Nayebi ete moto ekitaki wuta na likolo mpe ezikisaki bakonzi nyonso mibale ya basoda elongo na basoda na bango oyo bayaki liboso; kasi sik’oyo, tika ete bomoi na ngai mpe bomoi ya bato na ngai tuku mitano ezala na motuya na miso na yo!
Look, fire came down from the sky, and consumed the two former captains of fifty with their fifties. But now let my life be precious in your sight."
15 Anjelu ya Yawe alobaki na Eliya: — Kende na ye nzela moko; kobanga ye te. Bongo Eliya atelemaki mpe akendeki na ye nzela moko kino epai ya mokonzi.
The angel of Jehovah said to Elijah, "Go down with him. Do not be afraid of him." He arose, and went down with him to the king.
16 Alobaki na mokonzi: Tala liloba oyo Yawe alobi: « Boni, Nzambe azali lisusu te na Isalaele mpo ete otinda bato kotuna epai ya Bala-Zebubi, nzambe ya Ekroni? Lokola osali bongo, okokita lisusu te na mbeto oyo olali, okokufa solo. »
He said to him, "Thus says Jehovah, 'Because you have sent messengers to inquire of Baal Zebub, the god of Ekron, is it because there is no God in Israel to inquire of his word? Therefore you shall not come down from the bed where you have gone up, but shall surely die.'"
17 Mokonzi Akazia akufaki kolanda liloba oyo Yawe alobaki na nzela ya Eliya. Lokola mokonzi Akazia azalaki na mwana te, ndeko na ye ya mobali Yorami akitanaki na ye na bokonzi na tango Yorami, mwana mobali ya Jozafati, mokonzi ya Yuda, akokisaki mibu mibale na bokonzi.
So he died according to the word of Jehovah which Elijah had spoken. And his brother Jehoram began to reign in his place in the second year of Jehoram the son of Jehoshaphat king of Judah; because he had no son.
18 Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Akazia mpe misala oyo asalaki ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Isalaele.
Now the rest of the acts of Ahaziah which he did, aren't they written in the book of the chronicles of the kings of Israel?

< 2 Bakonzi 1 >