< 1 Masolo ya Kala 5 >

1 Ribeni azalaki mwana mobali ya liboso ya Isalaele. Kasi lokola asangisaki nzoto na mwasi moko kati na basi ya tata na ye, makoki ya bomwana na ye ya liboso epesamaki epai ya bana mibali ya Jozefi, mwana mobali ya Isalaele. Yango wana bazalaki kotanga ye lisusu te lokola mwana ya liboso. Nzokande, Jozefi akomamaki te na buku ya mabota lokola mwana ya liboso.
The sons of Reuben the firstborn of Israel (for he was the firstborn; but, because he defiled his father's bed, his birthright was given to the sons of Joseph the son of Israel; and not to be regarded in the genealogy as the firstborn.
2 Yuda alekaki bandeko na ye nyonso ya mibali na makasi, mpe moto oyo akomaki mokonzi abimaki na nzela na ye. Kasi atako bongo, makoki ya bomwana ya liboso epesamaki kaka epai ya Jozefi.
For Judah prevailed above his brothers, and a leader descended from him; but the birthright was Joseph's: )
3 Tala bana mibali ya Ribeni, mwana mobali ya liboso ya Isalaele: Enoki, Palu, Etsironi mpe Karimi.
the sons of Reuben the firstborn of Israel: Hanoch, and Pallu, Hezron, and Carmi.
4 Bakitani ya Joeli: Shemaya, mwana mobali ya Joeli; Gogi, mwana mobali ya Shemaya; Shimei, mwana mobali ya Gogi;
The descendants of Joel: Shemaiah his son, Gog his son, Shimei his son,
5 Mishe, mwana mobali ya Shimei; Reaya, mwana mobali ya Mishe; Bala, mwana mobali ya Reaya;
Micah his son, Reaiah his son, Baal his son,
6 Beera, mwana mobali ya Bala mpe mokambi ya bato ya Ribeni, oyo Tigilati-Pilezeri, mokonzi ya Asiri, amemaki na bowumbu.
Beerah his son, whom Tilgath Pilneser king of Assyria carried away captive: he was leader of the Reubenites.
7 Tala bandeko ya Beera kolanda etuka na bango ndenge bakomami na molongo ya botata na bango: mokambi Yeyeli, Zakari;
His brothers by their families, when the genealogy of their generations was reckoned: the chief, Jeiel, and Zechariah,
8 Bela, mwana mobali ya Azazi, koko ya Shema, mwana mobali ya Joeli. Bazalaki kovanda na mboka Aroeri mpe na etuka oyo ekenda kino na ngomba Nebo mpe na Bala-Meoni.
and Bela the son of Azaz, the son of Shema, the son of Joel, who lived in Aroer, even to Nebo and Baal Meon:
9 Bavandaki na ngambo ya este, longwa na mondelo ya esobe kino na ebale Efrate, pamba te bangombe na bango ekomaki ebele kati na mokili ya Galadi.
and eastward he lived even to the entrance of the wilderness from the river Perath, because their livestock were multiplied in the land of Gilead.
10 Na tango Saulo azalaki mokonzi, babundisaki bato ya Agari mpe balongaki bango. Bavandaki na bandako na bango ya kapo oyo ezalaki na etuka mobimba ya ngambo ya Galadi.
In the days of Saul, they made war with the Hagrites, who fell by their hand; and they lived in their tents throughout all the land east of Gilead.
11 Bakitani ya Gadi bazalaki kovanda pembeni ya bakitani ya Ribeni, na mokili ya Bashani kino na Salika.
The descendants of Gad lived across from them, in the land of Bashan as far as Salecah.
12 Etuka ya Joeli nde elekaki monene, elandamaki na etuka ya Shafami, mpe bituka ya Yaenayi mpe Shafati esukisaki, kati na Bashani.
Joel was chief, and Shapham the second, and Janai judged in Bashan.
13 Bandeko na bango ya mibali kolanda mabota na bango bazalaki: Mikaeli, Meshulami, Sheba, Yorayi, Yaekani, Ziya mpe Eberi. Bango nyonso bazalaki sambo.
Their brothers of their fathers' houses: Michael, and Meshullam, and Sheba, and Jorai, and Jacan, and Zia, and Eber, seven.
14 Bazalaki bana ya Abiyaili, mwana mobali ya Uri, mwana mobali ya Yaroa, mwana mobali ya Galadi, mwana mobali Mikaeli, mwana mobali ya Yeshishai, mwana mobali ya Yado, mwana mobali ya Buzi.
These were the sons of Abihail, the son of Huri, the son of Jaroah, the son of Gilead, the son of Michael, the son of Jeshishai, the son of Jahdo, the son of Buz;
15 Ayi, mwana mobali ya Abidieli, mwana mobali ya Guni, azalaki mokambi ya bituka na bango.
Ahi the son of Abdiel, the son of Guni, chief of their fathers' houses.
16 Bango nyonso bazalaki kovanda na Galadi, na Bashani, na bamboka na yango ya zingazinga mpe na bilanga nyonso ya Saroni kino na suka na yango.
They lived in Gilead in Bashan, and in its towns, and in all the suburbs of Sharon, as far as their borders.
17 Batangaki bato nyonso oyo tango Yotami azalaki mokonzi ya Yuda mpe Jeroboami, mokonzi ya Isalaele.
All these were reckoned by genealogies in the days of Jotham king of Judah, and in the days of Jeroboam king of Israel.
18 Bakitani ya mabota ya Ribeni, ya Gadi mpe ya ndambo ya libota ya Manase bazalaki bango nyonso nkoto tuku minei na minei na nkama sambo na tuku motoba. Babongamaki mpo na mosala ya soda. Bazalaki bilombe mibali oyo bayebi kosalela nguba, mopanga, tolotolo; mpe bamilengela mpo na bitumba.
The descendants of Reuben and Gad and the half-tribe of Manasseh, of valiant men, men able to bear buckler and sword, and to shoot with bow, and skillful in war, were forty-four thousand seven hundred and sixty, that were able to go forth to war.
19 Babundisaki bato ya Agari, ya Yeturi, ya Nafishi mpe ya Nodabi.
They made war with the Hagrites, with Jetur, and Naphish, and Nodab.
20 Nzambe asungaki bango mpe apesaki bango elonga likolo ya bato ya Agari mpe baninga na bango nyonso oyo bayaki kosunga bango, pamba te babelelaki Yawe na tango ya bitumba. Yawe ayanolaki bango, pamba te batielaki Ye motema.
They were helped against them, and the Hagrites were delivered into their hand, and all who were with them; for they cried to God in the battle, and he answered their petition, because they put their trust in him.
21 Bazwaki bibwele ya bato ya Agari: bashamo nkoto tuku mitano, bameme nkoto nkama mibale na tuku mitano, mpe ba-ane nkoto mibale. Bazwaki mpe bakangami nkoto nkama moko:
They took away their livestock; of their camels fifty thousand, and of sheep two hundred fifty thousand, and of donkeys two thousand, and of men one hundred thousand.
22 mingi bakufaki, pamba te bitumba ezalaki na maboko ya Nzambe. Bavandaki na mokili yango kino na tango ya bowumbu.
For there fell many slain, because the war was of God. They lived in their place until the captivity.
23 Bakitani ya ndambo ya libota ya Manase bavandaki na mokili oyo ezalaki longwa na Bashani kino na Bala-Erimoni, Seniri mpe ngomba Erimoni.
And the descendants of the half-tribe of Manasseh lived in the land. They increased from Bashan to Baal Hermon, and Senir, and Mount Hermon, and in Lebanon.
24 Tala bakambi ya bituka na bango: Eferi, Yisheyi, Elieli, Azirieli, Jeremi, Odavia mpe Yadiele. Bazalaki bilombe ya bitumba, bato bayebana mpe bakambi ya mabota na bango.
These were the heads of their fathers' houses: Epher, and Ishi, and Eliel, and Azriel, and Jeremiah, and Hodaviah, and Jahdiel, mighty men of valor, famous men, heads of their fathers' houses.
25 Kasi lokola batosaki te Nzambe ya bakoko na bango mpe bakomaki kosalela banzambe ya bato ya mokili oyo Nzambe abebisaki liboso na bango.
They trespassed against the God of their fathers, and prostituted themselves after the gods of the peoples of the land, whom God destroyed before them.
26 Yango wana Nzambe ya Isalaele alamusaki molimo ya Puli, mokonzi ya Asiri, mpe molimo ya Tigilati-Pilezeri, mokonzi ya Asiri, mpo na komema na bowumbu: bato ya libota ya Ribeni, ya libota ya Gadi mpe ya ndambo ya libota ya Manase. Amemaki bango na Ala, na Abori, na Ara mpe na ngambo ya ebale Gozani, epai wapi bazali kovanda kino lelo.
The God of Israel stirred up the spirit of Pul king of Assyria, and the spirit of Tilgath Pilneser king of Assyria, and he carried them away, even the Reubenites, and the Gadites, and the half-tribe of Manasseh, and brought them to Halah, and Habor, and Hara, and to the river of Gozan, to this day.

< 1 Masolo ya Kala 5 >