< 이사야 40 >

1 너희 하나님이 가라사대 너희는 위로하라 내 백성을 위로하라
Bobondisa, bobondisa bato na Ngai, elobi Nzambe na bino.
2 너희는 정다이 예루살렘에 말하며 그것에게 외쳐 고하라 그 복역의 때가 끝났고 그 죄악의 사함을 입었느니라 그 모든 죄를 인하여 여호와의 손에서 배나 받았느니라 할지니라
Boloba kati na Yelusalemi, boyebisa ye ete minyoko na ye ekomi na suka, masumu na ye esili kolimbisama, pamba te asili kozwa na loboko ya Yawe ngolu koleka mbala mibale mpo na masumu na ye nyonso.
3 외치는 자의 소리여 가로되 너희는 광야에서 여호와의 길을 예비하라 사막에서 우리 하나님의 대로를 평탄케 하라
Mongongo ya moto moko ezali kobelela: « Kati na esobe, bobongisa nzela mpo na Yawe; kati na mabele ya kokawuka, bosembolela Nzambe na biso nzela moko ya monene.
4 골짜기마다 돋우어지며 산마다 작은 산마다 낮아지며 고르지 않은 곳이 평탄케 되며 험한 곳이 평지가 될 것이요
Tika ete mabwaku nyonso ekundama, bangomba nyonso ya milayi to ya mikuse ekitisama, banzela nyonso oyo etengama esembolama, mpe mabulu nyonso ekoma bitando.
5 여호와의 영광이 나타나고 모든 육체가 그것을 함께 보리라 대저 여호와의 입이 말씀하셨느니라
Bongo, nkembo na Yawe ekomonisama, mpe bato nyonso bakomona yango elongo; » pamba te Yawe nde alobi.
6 말하는 자의 소리여 가로되 외치라 대답하되 내가 무엇이라 외치리이이까? 가로되 모든 육체는 풀이요 그 모든 아름다움은 들의 꽃 같으니
Mongongo moko elobi: « Belela! » Mpe nazongisaki: « Nabelela likambo nini? » « Bato nyonso bazalaka lokola matiti, mpe nkembo na bango nyonso ezalaka lokola bafololo ya bilanga.
7 풀은 마르고 꽃은 시듦은 여호와의 기운이 그 위에 붊이라 이 백성은 실로 풀이로다
Matiti ekawukaka mpe fololo elembaka, tango mopepe ya Yawe elekaka likolo na yango. Solo, bato bazali lokola matiti:
8 풀은 마르고 꽃은 시드나 우리 하나님의 말씀은 영영히 서리라 하라
Matiti ekawukaka mpe fololo elembaka, kasi Liloba na Nzambe na biso ewumelaka seko na seko. »
9 아름다운 소식을 시온에 전하는 자여 너는 높은 산에 오르라 아름다운 소식을 예루살렘에 전하는 자여 너는 힘써 소리를 높이라 두려워 말고 소리를 높여 유다의 성읍들에 이르기를 너희 하나님을 보라 하라
Mata likolo ya ngomba, Siona, yo momemi sango malamu; tombola mongongo na yo mpe ganga makasi, Yelusalemi, yo momemi sango malamu; tombola yango penza, kobanga te; loba na bingumba ya Yuda: « Botala Nzambe na bino! »
10 보라, 주 여호와께서 장차 강한 자로 임하실 것이요 친히 그 팔로 다스리실 것이라 보라 상급이 그에게 있고 보응이 그 앞에 있으며
Botala, Nkolo Yawe azali koya na nguya, loboko na Ye ezali kopesa Ye makoki ya kokonza. Botala, azali na lifuti elongo na Ye, azali kotambola na lifuti na Ye.
11 그는 목자같이 양무리를 먹이시며 어린 양을 그 팔로 모아 품에 안으시며 젖먹이는 암컷들을 온순히 인도하시리로다
Azali kobatela etonga na Ye lokola mobateli bibwele: kosangisa bana meme na maboko na Ye mpe kokanga bango na tolo na Ye; kotambolisa malembe-malembe bana meme ya basi oyo ezali nanu komela mabele.
12 누가 손바닥으로 바다 물을 헤아렸으며 뼘으로 하늘을 재었으며 땅의 티끌을 되에 담아 보았으며 명칭으로 산들을, 간칭으로 작은 산들을 달아 보았으랴
Nani asila komeka ebale monene kati na loboko na Ye, to likolo na nzela ya molayi ya misapi na Ye? Nani asila kosangisa putulu nyonso ya mabele kati na katini moko to komeka kilo ya bangomba milayi na nzela ya ndobo to komeka kilo ya bangomba mikuse na nzela ya emekelo kilo?
13 누가 여호와의 신을 지도하였으며 그의 모사가 되어 그를 가르쳤으랴
Nani asosoli makanisi ya Yawe to apesi Ye toli lokola molakisi?
14 그가 누구로 더불어 의논하셨으며 누가 그를 교훈하였으며 그에게 공평의 도로 가르쳤으며 지식을 가르쳤으며 통달의 도를 보여주었느뇨
Yawe atunaki toli na nani mpo ete apesa Ye mayele? Nani alakisaki Ye ndenge bakataka makambo na sembo to apesaki Ye boyebi, to mpe ateyaki Ye nzela ya bososoli?
15 보라, 그에게는 열방은 통의 한 방울 물 같고 저울의 적은 티끌 같으며 섬들은 떠오르는 먼지 같으니
Solo, bikolo ezali lokola litanga moko ya mayi na katini, lokola putulu kati na emekelo kilo! Tala, amekaka bisanga lokola eloko ya moke penza.
16 레바논 짐승들은 번제 소용에도 부족하겠고 그 삼림은 그 화목 소용에도 부족할 것이라
Banzete ya Libani ekokoka te mpo na kopelisa moto ya etumbelo, mpe banyama na yango ekokoka te mpo na kotumba mbeka.
17 그 앞에는 모든 열방이 아무 것도 아니라 그는 그들을 없는 것 같이, 빈 것 같이 여기시느니라
Na miso na Ye, bikolo nyonso ezali lokola biloko pamba; amonaka yango lokola eloko pamba to mpe lokola eloko te.
18 그런즉 너희가 하나님을 누구와 같다 하겠으며 무슨 형상에 비기겠느냐
Bolingi kokokanisa Nzambe na nani? Bolingi kokokanisa Ye na elilingi nini?
19 우상은 장인이 부어 만들었고 장색이 금으로 입혔고 또 위하여 은사슬을 만든 것이니라
Ndenge basalaka ekeko, mosali bikeko anyangwisi ebende na moto mpe asali ekeko; mosali ya wolo abambi ekeko yango wolo, bongo akangisi yango na basheneti ya palata.
20 궁핍하여 이런 것을 드리지 못하는 자는 썩지 않는 나무를 택하고 공교한 장인을 구하여 우상을 만들어서 흔들리지 않도록 세우느니라
Moto oyo azangi makoki ya kobonza makabo ya boye mpo ete azali mobola makasi akopona nzete oyo epolaka te; akoluka mosali bikeko oyo azali penza mayele mpo na kosala nzambe ya ekeko oyo eninganaka te.
21 너희가 알지 못하였느냐? 너희가 듣지 못하였느냐? 태초부터 너희에게 전하지 아니하였느냐 땅의 기초가 창조될 때부터 너희가 깨닫지 못하였느냐
Boyebi yango te? Boyoka nanu yango te? Bayebisa bino nanu yango te wuta na ebandeli? Bososola nanu yango te wuta mokili esalema?
22 그는 땅 위 궁창에 앉으시나니 땅의 거민들은 메뚜기 같으니라 그가 하늘을 차일 같이 펴셨으며 거할 천막 같이 베푸셨고
Yawe avandaka na likolo ya mondelo ya mabele, epai wapi bato na yango bamonanaka lokola mabanki; atandaki likolo lokola liputa mpe afungolaki yango lokola ndako ya kapo mpo na kovanda kuna;
23 귀인들을 폐하시며 세상의 사사들을 헛되게 하시나니
akomisaka bakonzi ya mokili bato pamba, mpe bakambi na yango lokola biloko pamba.
24 그들은 겨우 심기웠고 겨우 뿌리웠고 그 줄기가 겨우 땅에 뿌리를 박자 곧 하나님의 부심을 받고 말라 회리바람에 불려가는 초개 같도다
Tango nanu batiami kutu na mabele te, nanu balonami kutu te, mobimbi na bango ezwi nanu ata misisa te, afuli bango lokola mopepe mpe bakawuki, bongo mopepe makasi ememi bango lokola matiti ya kokawuka.
25 거룩하신 자가 가라사대 그런즉 너희가 나를 누구에게 비기며 나로 그와 동등이 되게 하겠느냐 하시느니라
« Bolingi kokokanisa Ngai na nani? Bolingi kotia Ngai esika moko na nani, » elobi Ye oyo azali Mosantu?
26 너희는 눈을 높이 들어 누가 이 모든 것을 창조하였나보라 주께서는 수효대로 만상을 이끌어 내시고 각각 그 이름을 부르시나니 그의 권세가 크고 그의 능력이 강하므로 하나도 빠짐이 없느니라
Botombola miso na bino mpe botala na likolo: Nani akela biloko nyonso ya likolo: moyi, sanza, minzoto mpe biloko mosusu? Ezali Ye oyo abimisaka mampinga nyonso ya minzoto mpe abengaka yango moko na moko na kombo na yango. Mpo na bokonzi monene mpe nguya makasi na Ye, moko te kati na yango ezangaka.
27 야곱아, 네가 어찌하여 말하며 이스라엘아 네가 어찌하여 이르기를 내 사정은 여호와께 숨겨졌으며 원통한 것은 내 하나님에게서 수리하심을 받지 못한다 하느냐
Oh Jakobi, mpo na nini ozali koloba; oh Isalaele, mpo na nini kotatola: « Nzela na ngai ebombami na miso ya Yawe, likambo na ngai eyebani te na Nzambe na ngai? »
28 너는 알지 못하였느냐? 듣지 못하였느냐? 영원하신 하나님 여호와 땅 끝까지 창조하신 자는 피곤치 아니하시며 곤비치 아니하시며 명철이 한이 없으시며
Oyebi te? Nanu oyoka te? Yawe azali Nzambe ya libela na libela, azali Mokeli ya basuka ya mabele; alembaka te mpe apemaka te, mpe moko te akoki kososola mayele na Ye.
29 피곤한 자에게는 능력을 주시며 무능한 자에게는 힘을 더하시나니
Apesaka makasi na bato oyo balembi mpe abakisaka nguya na bato oyo bazanga nguya.
30 소년이라도 피곤하며 곤비하며 장정이라도 넘어지며 자빠지되
Solo, bilenge bapemaka mpe balembaka, bilombe batengaka-tengaka;
31 오직 여호와를 앙망하는 자는 새 힘을 얻으리니 독수리의 날개치며 올라감 같을 것이요 달음박질하여도 곤비치 아니하겠고 걸어가도 피곤치 아니하리로다
basi bato oyo batiaka elikya na Yawe, Yawe ayeisaka makasi na bango ya sika: bapumbwaka likolo lokola bampongo, bapotaka mbangu mpe bapemaka te, batambolaka mpe balembaka te.

< 이사야 40 >