< 이사야 39 >

1 그 때에 발라단의 아들 바벨론 왕 므로닥발라단이 히스기야가 병들었다가 나았다 함을 듣고 글과 예물을 보낸지라
Na tango wana, Merodaki-Baladani, mwana mobali ya Baladani, mokonzi ya Babiloni, atindaki mokanda mpe kado epai ya Ezekiasi, pamba te ayokaki sango ete Ezekiasi abelaki mpe abikaki.
2 히스기야가 사자를 인하여 기뻐하여 그에게 궁중 보물 곧 은금과 향료와 보배로운 기름과 모든 무기고와 보물고에 있는 것을 다 보였으니 궁중의 소유와 전 국내의 소유를 보이지 아니한 것이 없은지라
Ezekiasi ayambaki bantoma wana na esengo mpe alakisaki bibombelo biloko na ye ya motuya lokola palata mpe wolo, biloko ya mike-mike ya solo kitoko, mafuta ya kitoko, bibundeli na ye nyonso mpe bomengo na ye nyonso. Ezalaki na eloko moko te, ezala ya ndako na ye to ya mokili na ye mobimba, oyo azangaki kolakisa bango.
3 이에 선지자 이사야가 히스기야왕에게 나아와 묻되 그 사람들이 무슨 말을 하였으며 어디서 왕에게 왔나이까 히스기야가 가로되 그들이 원방 곧 바벨론에서 내게 왔나이다
Boye, mosakoli Ezayi akendeki epai ya mokonzi Ezekiasi mpe atunaki ye: — Bato wana balobi nini mpe bawuti wapi? Ezekiasi azongisaki: — Bawuti mosika, na mokili ya Babiloni, mpo na koya kotala ngai.
4 이사야가 가로되 그들이 왕의 궁전에서 무엇을 보았나이까 히스기야가 대답하되 그들이 내 궁전에 있는 것을 다 보았나이다 내 보물은 보이지 아니한 것이 하나도 없나이다
Ezayi atunaki: — Bamoni eloko nini kati na ndako na yo? Ezekiasi azongisaki: — Bamoni biloko nyonso oyo ezali kati na ndako na ngai; ezali na eloko moko te, kati na bibombelo na ngai, oyo nazangi kolakisa bango.
5 이사야가 히스기야에게 이르되 왕은 만군의 여호와의 말씀을 들으소서
Ezayi alobaki na Ezekiasi: — Yoka liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi:
6 보라 날이 이르리니 네 집에 있는 모든 소유와 네 열조가 오늘 까지 쌓아둔 것이 모두 바벨론으로 옮긴 바 되고 남을 것이 없으리라 여호와의 말이니라
« Solo, na mikolo oyo ekoya, nyonso oyo ezali kati na ndako na yo mpe nyonso oyo batata na yo babomba kino na mokolo ya lelo, bakomema yango na Babiloni; eloko moko te ekotikala, » elobi Yawe.
7 또 네게서 날 자손 중에서 몇이 사로잡혀 바벨론 왕궁의 환관이 되리라 하셨나이다
« Mingi kati na bakitani na yo, kati na ba-oyo babimi penza na mokongo na yo, bakomema bango mpe bakoboma bango mikongo mpo ete bakoma kosala kati na ndako ya mokonzi ya Babiloni. »
8 히스기야가 이사야에게 이르되 당신의 이른바 여호와의 말씀이 좋소이다 또 가로되 나의 생전에는 평안과 견고함이 있으리로다 하니라
Ezekiasi azongiselaki Ezayi: — Liloba na Yawe oyo osili koloba ezali malamu. Pamba te azalaki komilobela: « Kimia mpe bobatelami ekozala penza na mikolo ya bomoi na ngai. »

< 이사야 39 >